Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/5 nk. 4-7
  • Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisalisi mpo na babólá
  • Lisalisi mpo na koyikela bobólá mpiko
  • Na nsuka, moto moko te akozala lisusu mobólá!
  • Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Etikali moke bobola esila na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tósalisa babola bákóma na elikya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/5 nk. 4-7

Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!

“BANGA tɛ! Jambi tala, napɛsi bino nsango malamu na ɛsɛngɔ monɛnɛ ekojala na bato yɔnsɔ.” (Luka 2:10) Maloba wana ya koyikisa mpiko mayebisamaki na bakɛngɛli ya bampate oyo bazalaki na kokamwa monene penepene na Bɛtɛlɛmɛ na butu oyo Yesu abotamaki. Na boyokani na maloba oyo, Yesu alobelaki mingi mpenza “nsango malamu” na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé. Lelo oyo, atako tozali mpenza na mposa ya mosolo mpo na kokokisa bamposa na biso, lolenge nini nsango malamu na ntina na Yesu ekoki kopesa biso litomba?

Yesu Klisto asakolaki “na babola Nsango Malamu.” (Luka 4:18) Engebene Matai 9:35, “Yesu atamboli na mboka minɛnɛ mpe na mboka mikɛ yɔnsɔ, wana ejalaki ye kolakisa na biyanganelo na bango mpe kosakola Nsango Malamu na Bokonji.” Nsango na ye ezalaki ya kolendisa mpo na baoyo banyokwamaki na bobólá. “Emɔni ye bibele, ayoki mawa mpɔ na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bajali na mobateli tɛ.” (Matai 9:36) Ya solo, Yesu alobaki, “Bojali na babola na bino elɔngɔ mikɔlɔ yɔnsɔ,” kasi tosengeli te kosukisa ete maloba wana malimboli kozanga elikya mpo na baoyo bazali kati na bosɛnga. (Yoane 12:8) Ntango nyonso oyo ebongiseli ya biloko mabe oyo ekoumela, babólá bakozala, atako eloko nini ekoki kozala ntina ya bampasi na bango. Liloba ya Nzambe libosani te ezalela ya mpasi oyo babólá bazali kati na yango, kasi lizali mpe te kolobela mingi makambo mabe na yango. Nzokande, lizali kopesa babólá lisalisi mpo na koyika mpiko kati mikakatano ya bomoi.

Lisalisi mpo na babólá

Ya solo, elobamaki ete: “Mpasi oyo eleki monene epai na moto ezali bongo likambo ya koyeba ete moto moko te azali komibanzabanza mpo na ye to moto moko te azali komitya na esika na ye.” Nzokande, atako bato mingi bazangaka komonisela babólá motema mawa, nsango malamu ezali mpo na bango​—baoyo ya mikolo na biso mpe baoyo bakoya nsima.

Likambo ya mawa, bobele bato moke bazali komonisa mposa ya kosalisa babólá. Engebene búku The World Book Encyclopedia, bato mosusu bakanisaka ete “kati na etuluku bato bazali komekana mpo na kobika mpe . . . baoyo baleki makasi bakómaka na nguya mpe na bozwi mingi.” Baoyo bandimaka likanisi yango, oyo ebéngami Darwinisme social, bakoki komona babólá lokola bato na goigoi to bato oyo babebisaka mosolo mpambampamba. Nzokande, basáli bilanga, basáli oyo bauti na mikili ya bapaya mpe basusu, atako bazwaka lifuti moke mpenza, mbala mingi basalaka mosala makasi mpo na koleisa mabota na bango.

Na mikili mingi bobólá eyikani mpenza. Na yango, babólá​—oyo bazali mingi koleka⁠—​bapusami te na kooka ete bazali bato balóngi te. Nzokande, na mikili motindo yango ezali na bato ya bozwi mingi baoyo bazali na kartyé moko elongo na babólá. Bandako kitoko, oyo ezali na bozwi mingi etongami penepene na bandako mike ya bobólá oyo etondi na bato mpe ezangi bopɛto. Bato oyo bazwaka lifuti malamu bakumbaka mituka na bango ya ntalo mingi na balabála oyo etondi na babólá mpe bato oyo bazali na mosala te. Kati na mikili motindo yango babólá bazali mpenza koyeba malamu mpasi oyo bazali na yango. Ya solo, lokola búku The World Book Encyclopedia elobi yango, “mobólá azali konyokwama te bobele mpo azangi bilei malamu, azangi ndako malamu mpe makoki ya komisalisa malamu epai na minganga, kasi lisusu na mitungisi oyo azali ntango nyonso kooka mpo na ezalela na ye. Lokola bazangi makoki ya kozwa mpe kozala na misala oyo mibongi, bazali kobungisa lokumu mpe limemya ya bango moko.” Bongo, lolenge nini bato mosusu oyo bazali mpenza babólá bayikaka mpiko kati na ezalela na bango? Nsango malamu na ntina na Yesu ezali na boyokani nini na likambo ya koyika mpiko kati na bobólá?

Ya liboso, omikundola ete mimeseno misusu ya mabe mikoki kobakisa bobólá. Totalela mwa bandakisa. Valdecir andimi ete ntango mwasi na ye mpe bana na ye ya mike bazalaki na biloko mingi te ya kolya, ye azalaki kosilisa mosolo na kolandáká lolenge ya bomoi ya mbindo. Alobi ete: “Atako nazalaki kosala, nazalaki na mosolo soko moke te mpo na libota na ngai kasi nazalaki ntango nyonso na batiké ya loterie kati na libénga na ngai.” Milton, mpo na komela masanga mpe makaya mingi, abungisaki mombongo na ye oyo ezalaki na basáli 23. Alobi ete: “Nazalaki kolala na balabála, nakokaki te kozonga na ndako, mpe libota na ngai enyokwamaki mingi na ntina na ngai.”

João mpe azalaki kosilisa lifuti na ye na misala ya mbindo. “Nazalaki kolala na ndako te. Lifuti nyonso oyo nazalaki kozwa ezalaki kokoka te na ntina na misala ya mbindo mpe basi ya ndumba. Ekómaki mpasi mingi, mpe mwasi na ngai alingaki ete tókabwana.” Longola mikakatano ya nkita mpe ya libota, ezalaki mpe na mikakatano misusu. Alobi ete: “Natungisaki mingi bandeko na ngai mpe baninga ya pembeni, mpe nakutanaki mpenza na mikakatano mingi na esika ya mosala. Mbuma mabe na yango ezalaki ete, nazalaki ntango nyonso kozanga mosala.” Júlio azalaki moombo ya bilangwiseli. Nzokande, alimboli ete: “Lokola lifuti na ngai lizalaki kokoka soko moke te mpo na kosimba momeseno na ngai wana ya komela bilangwiseli, nabandaki kotekisa bilangwiseli mpo ete nasombaka lisusu yango te.”

Lokola abɔkwamaki kati na libota ya bobólá oyo ezalaki na bana mwambe, José alingaki kozala na biloko na ye moko. Kokanisáká ete akokaki kozala na mpasi mosusu te koleka oyo azalaki na yango, elongo na bilenge mosusu abandaki koyiba bato biloko na bango. Kati na kozanga elikya, elenge mosusu akómaki mosangani ya etuluku moko ya babɔtɔli oyo ebéngamaki ete Headbangers. Alimboli ete: “Lokola mingi kati na biso bazalaki mpenza babólá, tozalaki kosepela na kobebisa biloko mpe kobundisa bato.”

Nzokande, lelo oyo mibali yango mpe mabota na bango bazali lisusu te konyokwama na bosɛnga monene to na maoki ya nkanda mpe ya likunya. Bazali lisusu te kati na ezalela ya kozanga lisalisi mpe ya kozanga elikya. Mpo na nini? Mpamba te basili koyekola nsango malamu oyo Yesu asakolaki. Basalelaki toli ya Biblia mpe basanganaki elongo na bato oyo bazalaki na makanisi lolenge moko na bango kati na masangá ya Batatoli ya Yehova. Mpe bayekolaki makambo mosusu ya ntina mingi oyo matali bozwi mpe bobólá.

Lisalisi mpo na koyikela bobólá mpiko

Ya liboso, bayekolaki ete soki basaleli mitindá ya Biblia, mpasi oyo ezali kouta na bobólá ekokita mwa moke. Biblia ezali kokweisa ezaleli ya mbindo, kolangwa masanga, masano ya mbongo, mpe komela bangi. (1 Bakolinti 6:9, 10) Biloko motindo wana bizalaka na ntalo makasi. Bikoki kokómisa mozwi mobólá, mpe mobolá akokóma mobolá koleka. Kotika misala wana ya mabe mpe misala mosusu oyo ekokani na yango ekobongisa ezalela ya nkita ya libota.

Ya mibale, bamonaki ete ezali na makambo mosusu ya ntina kati na bomoi oyo maleki bozwi na ntina. Likanisi ya bokatikati ezali komonana kati na maloba oyo mapemami: “Mayɛlɛ ekobatelaka lokola ekobatelaka mosɔlɔ. Malamu na mayɛlɛ ejali ete mayɛlɛ ekobikisa bomɔi na ye oyo ajui yango.” (Mosakoli 7:12) Ee, mosolo ezali na ntina. Kasi mayele mpe boyebi oyo ezali na moboko likoló na Biblia ezali na motuya mingi koleka. Ya solo, mpo na moto oyo azangi mayele, kozala na mosolo mingi ekoki kozala mokakatano monene lokola mpe kozala na yango moke mpenza. Mokomi ya Biblia abondelaki na mayele nyonso ete: “Pɛsa ngai bobola tɛ, bojui mpe tɛ. Leisa ngai bilei bikoki na ngai, ete natonda tɛ mpe boye naangana yɔ tɛ, naloba tɛ ete, [Yehova] ajali nani? Sɔkɔ ete najala mobola tɛ mpe nayiba tɛ, nabimisa nkombo na Njambe na ngai mpamba tɛ.”​—Masese 30:8, 9.

Ya misato, bamonaki ete soki moto azali komitambwisa engebene nsango malamu oyo Yesu asakolaki, akozala ata na ntina moko te ya kooka ete asundolami. Nsango malamu etali Bokonzi ya Nzambe. Nsango yango ebéngami ete “nsango malamu ya Bokonzi,” mpe na mikolo na biso yango ezali kosakolama na mabelé mobimba. (Matai 24:14) Yesu ayebisaki biso ete tokozwa lisalisi soki totye elikya na biso likoló na Bokonzi yango. Alobaki ete: “Bolukaka nde liboso Bokonji na Njambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na [Nzambe] mpe bilɔkɔ oyo yɔnsɔ ikobakisama na bino.” (Matai 6:33) Nzambe alakaki te mituka ya kitoko to bandako ya motuya mingi. Yesu azalaki nde kolobela biloko oyo bizali na ntina mpo ete moto azala na bomoi, lokola bilei mpe bilamba. (Matai 6:31) Kasi bamilió ya bato lelo oyo bakoki kondimisa ete tokoki kotya motema na elaka ya Yesu. Moto nyonso, ata moto oyo azali mobolá mingi asundolami mpenza te soki atye Bokonzi na esika ya liboso.

Ya minei, bamonaki ete moto oyo azali kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso akoyokaka motema mpasi te na ntina na ezalela na ye ya mpasi etali makambo ya nkita. Ee, moto oyo azali mobolá asengeli kosala mosala makasi. Kasi soki azali kosalela Nzambe, azali na boyokani ya malamu mpenza elongo na Mozalisi na ye, oyo Biblia elobi na ntina na ye ete: “Atiolaki mpe aboyaki mpasi na monyɔkɔlami tɛ; abombelaki ye elongi na ye tɛ kasi ayokaki wana alelaki ye.” (Njembo 22:24) Lisusu, mobólá azali na lisalisi mpo na koyika mpiko na mikakatano ya bomoi. Azalaka na boyokani ya esengo elongo na baninga na ye baklisto mpe azali na boyebi ya mokano ya Yehova oyo emonisami mpe azali kotyela yango motema. Makambo motindo yango “eleki mposa na wɔlɔ, ata na wɔlɔ mingi malamu.”​—Njembo 19:10.

Na nsuka, moto moko te akozala lisusu mobólá!

Ya nsuka, bato oyo bazali kolanda nsango malamu bayebi ete Yehova Nzambe asili kokana kosilisa mikakatano ya bobólá mpo na libela na nzela ya Bokonzi na ye. Biblia epesi elaka oyo ete: “Bato na kojanga bakotikama libela tɛ; elikia na mobola ekokufa seko tɛ.” (Njembo 9:18) Bokonzi ezali boyangeli ya solo, oyo etyamaki na makoló mpe Yesu Klisto azali Moyangeli na yango. Mosika te, Bokonzi wana ekokitana biyangeli ya bato mpo na kotambwisa makambo nyonso oyo matali bato. (Danyele 2:44) Na nsima, lokola Mokonzi oyo afandisami na kiti ya bokonzi, Yesu “akoyokela moto na bolɔji mawa mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola. Akosikola milimo na bango na kati na konyɔkɔla mpe na kongala; makila na bango ekojala na motuya na miso na ye.”​—Njembo 72:13, 14.

Na kozeláká ntango wana na motema likoló, Mika 4:3, 4 elobi ete: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na njete na ye na mosuke, moto mɔkɔ akobangisa bango tɛ, mpɔ ete monɔkɔ na [Yehova] na bibele elobi bongo.” Awa bazali mpenza kolobela banani? Ya solo, ezali baoyo nyonso bazali kotosa Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi wana ekosilisa mikakatano nyonso oyo mizali konyokola bato​—ata mikakatano ya bokɔnɔ mpe ya kufa. “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi yɔnsɔ.” (Yisaya 25:8; 33:24) Oyo ekozala solo mokili ya motindo mosusu! Mpe omikundola ete, tokoki kondima bilaka wana mpamba te yango epemamaki na Nzambe ye moko. Alobi ete: “Bato na ngai bakofanda na efandelo na kimia na bifandelo na sɔlɔ mpe na ndako na bolɔji tɛ.”​—Yisaya 32:18.

Elikya kati na Bokonzi ya Nzambe ezali kolónga likoló na kozanga limemya ya yo moko oyo eutaka na bobólá. Moklisto oyo azali mobolá ayebi ete ye azali na ntina na miso na Nzambe motindo moko lokola moklisto oyo azali mozwi. Nzambe alingi bango nyonso mibale lolenge moko, mpe bango nyonso bazali na elikya bobele moko. Bango nyonso bazali kozela na motema likoló ntango oyo, na nsé ya Bokonzi ya Nzambe, bobólá ekozala lisusu te. Oyo ekozala solo ntango ya nkembo! Na nsuka, moto moko te akozala lisusu mobolá!

[Elilingi na lokasa 5]

Mpo na nini kosilisa mosolo kati na masano ya mbongo, komela makaya, kolangwa masanga, komela bangi, to na bomoi ya mbindo?

[Elilingi na lokasa 7]

Yehova Nzambe akosilisa mikakatano ya bato oyo mitali bobólá na nzela ya Bokonzi na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto