Yekola solo nyonso
“NAMONA naino te nkombo oyo kati na Biblia na ngai,” elobaki Francisco. Nkombo Jéhovah etangamaki na boumeli ya lisolo elongo na Témoin de Jéhovah moko. Ya solo, akokaki te komona nkombo ya Nzambe kati na Biblia na ye, ebimeli moko ya 1969 libongoli ya portugé ya Almeida, mpamba te nkombo ya Jéhovah ezali na kati te. Mobrezilié oyo azalaki na lingomba ya katolike azalaki koyangana na losambo mokolo ya lomingo nyonso, mpe azalaki kosepela kotanga Biblia epai na ye. Kasi nkombo Jéhovah ekamwisaki ye.
Nzambe azali nani?
Poso elandaki, Temwe amemelaki ye Biblia mosusu ya libongoli ya Almeida. Bakokanisaki oyo elobamaki na Nzembo 83:18 na mabongoli oyo mibale. Makambo nini bamonaki? Na ebimeli oyo ya 1966, mokapo yango etangami boye: “Bobele yo oyo ozali na nkombo Jéhovah, ozali Oyo Aleki—Likoló na mokili mobimba!” Nzokande kati na Biblia oyo ya 1969, batyaki liloba “NKOLO” na esika ya nkombo “JEHOVAH”. Temwe alobaki na ye ete “Omoni, babongolaki eloko moko awa.” Nsima na yango atunaki ye: “‘Nkolo’ ezali nkombo te, boye te?” Francisco ayanolaki ete: “Ezali boye.” Na kosilikaka mwa moke, abakisaki: “Ndenge nini bakokaki kosala motindo wana?”
Lisolo yango epesaki nzela na kosala mwa bolukiluki na ntina na nkombo na Jéhovah. Na ndakisa, Francisco ayekolaki ete engebene Encyclopédie catholique (1910, angl.) Jéhovah ezali “nkombo na Nzambe ye moko kati na Kondimana ya Kala.” Ayekolaki lisusu ete na monoko ya hébreu kati na yango eteni monene na “Kondimana na Kala” ekomamaki, nkombo yango ezali komonana soko mbala 7 000. Mobongoli moko azali na lotomo te ya kosanzé nkombo ya Nzambe mpo na kotya titre lokola Nkolo. Francisco alingaki koyeba solo likoló na nkombo Jéhovah, mpe ayebaki yango na lisalisi ya Biblia mpenza mpe na bolukiluki oyo esalamaki na lolenge malamu.
Esika na Yesu ezali nini?
Lokola tomonaki yango na lisolo oyo eleki, mangomba masili kobebisa solo mingi. Na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako, ba Témoins de Jéhovah bazali na libaku ya koyeba bindimeli na bato. Ya solo, bindimeli yango bikoki kokesena esika na esika, kasi makanisi mosusu mazali ndenge moko bisika nyonso. Na ndakisa, ntango bazali kotuna bango: ‘Nzambe azali nani?,’ bato mingi bazali kozongisa boye: ‘Yesu.’ Na yango balingi koloba ete Yesu azali Nzambe Mozwi—na—Nguya—Nyonso. Kasi likanisi yango ezali solo?
Kanisa mpo na makambo oyo malandi. Yesu abondelaki Tata na ye na kolobaka ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Omoni ete Yesu alobi te ete, ye nde azali “Nzambe moko na solo,” kasi ezali nde Tata na ye na likoló. Na yango, bayekoli ya liboso bazalaki na ntina ya koyebisa ye ete: “Solo yo ozali Mwana na Nzambe.” Yesu alobaki ye moko ete: “Ngai nazali Mwana na Nzambe.” Na yango, solo na ntina etali Yesu ezali ete ye azali Nzambe Mozwi—na—Nguya—Nyonso te, kasi Mwana na Jéhovah Nzambe.—Matai 14:33; Yoane 10:36.
Avenire ya mabelé ekozala ndenge nini?
Avenir ya libota na biso mpe ya mabelé ekozala ndenge nini? John Kennedy, président ya kala ya Etats-Unis, alobaki kati na diskur moko oyo asalaki liboso ya ba députés ya Nations Unies ete: “Tozali na makoki ya kobongisa libota na biso ete ezala malamu koleka kati na lisolo nyonso na bato, to ezala ya nsuka.” Bakonzi ya mokili ya ntango oyo bazali na likanisi motindo moko. Na mosala na bango ya kosakola, ba Témoins de Jéhovah bazali koyoka bato bazali koloba mbala mingi ete na nsuka ya mokili mabelé ekozika na móto to na etumba ya nikleere Bato mosusu batongi kondima na bango likoló na mokapo na Emoniseli 21:1, epai kuna tozali kotanga boye: “Namonaki likoló na sika, na nse na sika, mpo ete likoló na liboso na nse na liboso esili kolongwa. Mai monene mpe ezali lisusu te.”
Biblia ezali mbala mingi kosalela liloba “mabelé” (nse) na ndimbola na elilingi mpo na kolobela bato. Na ndakisa, totangi na Genese 11:1: “Mokili (mabelé, MN) mobimba ezalaki na lokota moko mpe na maloba na lolenge moko.” (Tala lisusu l Mikonzi 2:1, 2; Nzembo 96:1). “Nse (mabelé) na liboso” oyo elobelami kati na Emoniseli 21:1 ezali bongo etando te, kasi lisangá ya bato mabe oyo ekobomama. Kobomama yango ekopesa nzela na kotyama ya Paradis na mabelé. (Luka 23:43; 2 Batesaloniki 1:6-9; Emoniseli 21:4) Ndimbola oyo ezali na boyokani na Biblia mobimba oyo ezali komonisa ete mabelé oyo ezali etando na biso ekobebisama soko moke te. Na ndakisa, Nzembo 104:5, emonisi ete Nzambe ‘atelemisaki mabelé likoló na moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.’ (Tala Mosakoli 1:4) Ya solo, Jéhovah ‘asalaki (mabelé, MN) mpo moto afanda wana’ seko.—Yisaya 45:18.
Mpo na nini koyekola solo nyonso?
Wana ezali bobele mwa bandakisa ya makanisi na lokuta oyo mapalangani mingi na mikolo na biso. Kasi, wana moto andimi kokanisa, lokola esalaki yango Francisco, ba Témoins de Jéhovah bakosepela kosolola na moto yango lisolo oyo ezali kongengisa solo na Biblia.
Kozanga koyekola solo nyonso ekoki kozala na makama mabe. Tala ndakisa moko: Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, bato mingi bandimaki ete azalaki bobele moko na bana ya Marie mpe Joseph, mosali na mabaya mpamba na mboka Nazarete. Ezali mpo na ntina yango nde batyaki likebi na maloba na ye te. Bazalaki na mwa elonga. Yesu azalaki mwana ya Marie, oyo azwaki zemi na lisalisi ya elimo santu. Azalaki mpe mwana mobokoli ya Joseph, mpe asalaki mpenza lokola mosali na mabaya. (Malako 6:3) Kasi, yango ezalaki nde solo nyonso mpo na ye? Te! Azalaki ye nde Masiya mpenza, mpe “Mokonzi na bakonzi” na ntango esengelaki koya! (Emoniseli 17:14; Luka 1:32-35; Misala 2:36) Mpo bayekolaki solo nyonso te likoló na Yesu, bato mingi bazangaki libaku oyo eleki nyonso, oyo ya kozala na boyokani ya moto na moto elongo na Yesu awa na mabelé.
Luka solo nyonso
Engumba ya Bérée (oyo lelo ebyangami Véroia) na mokili ya Masedwane ya kala, eyebani malamu na batangi na Biblia na ntina na ezalela malamu ya bafandi na engumba yango na ekeke ya liboso. Bazalaki na ezalela nini? Lisolo elobi ete: “Bayambi Liloba na mposa mingi mpe batangi Makomi mokolo na mokolo kotala soko makambo yango mazali boye.” Litomba ezalaki nini? “Mingi kati na bango bandimaki, na basi na lokumu Bagreke na mibali mwa mingi.”— Misala 17:11, 12.
Ezalela ya basakoli na kalakala na Nzambe ebongi. Bamipesaki na ‘bolukiluki mozindo mpe bokundoli ya sikisiki’ na ntina na lobiko oyo esengelaki koya na nzela ya Masiya. (1 Petelo 1:10) Nzambe apambolaki milende na bango. Na ndenge emonani, nzela mosusu ezali te. Mpo na kokoma na boyebi ya solo nyonso na Biblia, esengeli komipesa na bolukiluki mozindo mpe kotalela na likebi makambo oyo Biblia ezali koteya.
Mbala mosusu ozali komituna: ‘Nakobandela wapi?’ Nsima na kotanga mikanda oyo mizali kolimbola Biblia, mwasi moko oyo azali kofanda na mokili ya Brésil akomaki boye: “Biso (ye na mobali na ye) tokangaki ntina mbala moko ete tosengelaki koyekola mingi mpo na kozwa eyano na mituna mingi oyo tozalaki komituna . . . Boyebisa ngai ndenge nini nakoki kozwa Biblia mpe mikanda mosusu oyo mikosalisa ngai mpo na koyeba makambo mingi na ntina na Tata na biso ya Likoló.” Azalaki na nzela malamu: ya solo esengeli kotanga Biblia mpe mikanda oyo mikolimbolaka yango malamu. Yo mpe soki olingi koyekola solo nyonso, fungola motema na yo epai na Jéhovah Nzambe mpe senga lisalisi na ye. Omikundola maloba na kolendisa oyo: “Soko moko na bino azangi mayele, alomba Nzambe, oyo akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe apamelaka te. Bongo akozwa yango. Kasi alomba na kondima, abeta ntembe te.”—Yakobo 1:5, 6.
Ebele na bato bazali koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah; bazali kosala bongo bokundoli ya sikisiki mpe bolukiluki mozindo mpo na kozwa solo nyonso. Kozwa mpe kosalela boyebi mpenza na Nzambe ya solo mpe na Yesu Klisto yango ezali bomoi na seko. (Yoane 17:3) Okoki kozala na elikya oyo kitoko soki oluki na molende mpe omoni solo nyonso.
[Elilingi na lokasa 7]
Solo nyonso na ntina etali Yesu, ezali ete azalaki bobele mosali na mabaya te. Azalaki nde Masiya