Baloma bazwi nsango oya eleki nyonso na kitoko
NDENGE NINI moto na masumu akoki kokóma moyengebene epai na Nzambe mpe kino kozwa bomoi na seko? Motuna oyo mobimisaki ntembe mingi na eleko ya liboso ya ntango na biso. Soki ezalaki yo, okokaki nde koyanola yango? Oyeba koyanola yango to mpe te, osengeli bobele kotanga mokanda epai na Baloma, yo kati na yango ntoma Paulo alimboli likambo yango na lolenge moko kitoko. Na kosaleláká yango, koyeba malamumalamu boyakani yo bozali kati na kondima, misala, boyengebene mpe bomoi ya moto.
PAULO MPE BALOMA
Mokanda ya Baloma mokomamaki na Paulo pene na bambula 56 ya ntango na biso, mpe akomelaki yango baklisto ya Rome. Mpo na nini Paulo akomaki yango? Ata akómaki naino te na Rome na mobu 56, emonani mpenza ete Paulo ayebaki baklisto minei, mpamba te kati na mokanda na ye, Paulo azali kotanga mingi na bango na bankombo na bango. Epai mosusu, azalaki na mposa mpenza makasi ya kokende wa engumba yango mpo na kolendisa bandeko na ye baklisto baoyo babalaki kofanda kuna; emonani lokola ete akanaki mpe kokende kuna ntango na mobembo oyo alingaki kosala na Espanye mpo na kopalanganisa nsango malamu.—Baloma 1:11, 12; 15:22-24.
Nzokande, mokano ya liboso ya Paulo wana ezalaki ye kokoma mokanda na ye, ezalaki mpo ete ayanola na motuna moko: Ndenge nini moto akoki kozala na boyengebene oyo bozali komema na bomoi? Eyano na motuna oyo esengeli mpenza kozala nsango oyo eleki nyonso na kitoko. Na solo, moto akotangama moyengebene na ntina na kondima.
Paulo alobelaki likanisi yango na kokomáká maloba oyo: ”Nayoki Nsango malamu nsoni te! Yango ezali nguya na Nzambe ekobikisa bandimi nyonso, Bayuda liboso mpe Bagreke lokola. Mpo ete boyengebene ya Nzambe emonisami polele kati na yango. Boyengebene yango bokobimaka na kondima, bokobendaka kino kondima lokola esili kokomama ete: ’Moyengebene akobika mpo na kondima.’”—Baloma 1:16, 17.
KONDIMA MPE MIBEKO
Na ekeke ya liboso ya nkingo na biso, bato nyonso bazalaki kondima te ete moko akokaki kokangama moyengebene na ntina na kondima na ye. Ndambo moke na bato bazalaki kondima ete esengelaki kosala mingi koleka wana. Jéhovah apesaki Mibeko ya Moise. Boye te? Ndenge nini moko oyo azali kotosa te ebongiseli wana epemami na Nzambe, akoka kokangama moyengebene? (Tala Bagalati 4:9-11, 21; 5:2.) Na mobu 49 ya ntango na biso, likambo ya kokosa Mibeko ekatamaki na college central na Yelusaleme, oyo esukisaki ete Bapakano baoyo bandimi nsango malamu bakokaki kokata ngenga te, ata kokosa Mitinda ya Mibeko ya Bayuda mpe te.—Misala 15:1, 2, 28, 29.
Pene na mbula nsambo na nsima, Paulo akomaki mokanda na ye epai na Baloma, oyo kati na yango alobelaki likatami lizwamaki esili mpenza koleka mwa ntango mingi, mpe nkuku alobelaki makambo mosusu mingi likoló na yango. Alobaki ete, na solo mpenza, ezali bobele te ete Mibeko ezalaki na ntina te mpo na baklisto oyo bazali Bayuda t, kasi ata Bayuda mpe lisusu bakokangama bayengebene te mpo na lobiko na kotosáká Mibeko.
BOYENGEBENE NA NZELA YA KONDIMA
Na kotangáká mokanda ya Baloma, okomona na lolenge nini kitoko oyo Paulo abongisaki lisolo na ye wana, na kopesáká mitango mingi ya Makomami na hébreu mpo na kondimisa maloba na ye. Wana ezalaki ye koloba epai na Bayuda baoyo mbala mosusu bazalaki na mpasi mpo na kondima mateya na ye oyo mapemami, Paulo amimonisaki na móto mingi mpe na bobóto. (Baloma 3:1, 2; 9:1-3.) Yango eloko oyo epekisaki ye te na kolakisa likambo yango na polele nyonso mpe na bososoli oyo bokoki kokweisama te.
Kati na mokapo 1 kino 4, Paulo abandi kolimbola solo moko: Bato nyonso bazali na masumu. Na yango, bato bakoki kokangama bayengebene bobele na nzela ya kondima. Solo mpenza Bayuda bamekaki kokóma bayengebene na nzela ya Mibeko na Moise. Kasi bakomaki te. Yango wana Paulo azali na nguya ya koloba boye: “Ezala Bayuda to Bagreke, nyonso bazali baombo ya masumu.” Mpe amonisi ete solo yango eyebani te na bato mingi, na kosaleláká mitango ya Makomami.—Baloma 3:9.
Mpo ete “moto moko te akolonga mpo na misala na mibeko’, elikya nini tokozala na yango? Ezali lokola likabo lipesami na nzela ya mbeka na Yesu nde Nzambe akangi bato bayengene. (Baloma 3:20, 24) Mpo na kozwa matomba ya likabo yango, bato basengeli kondima mbeka wana. Paulo abimisaki nde likambo na sika wana ateyaki ye ete bato bakotangama bayengebene na ntina na kondima Ezali bongo te. Abrahame ye moko atangamaki moyengebene na ntina na kondima liboso mpenza ete Mibeko mipesama.—Baloma 4:3.
Wana euti ye komonisa ntina ya kondima na mokapo 5, Paulo alobeli moboko ya kondima na boklisto. Moboko yango ezali Yesu, oyo bomoi ya boyengebene ekolongola makambo nyonso mabe mauti na lisumu ya Adam mpo na baoyo bazali kondima Ye. Tala lolenge oyo, ’’mosala ya boyengebene ya moko moko, eyeisaki elonga’’, kasi ezali te kotosa Mibeko ya Moise, ’’ezali mpo na bato ya lolenge nyonso nde liloba kozala bayengebene na ntina na bomoi elobamaki”.—Baloma 5:18.
BIYANO MPO NA NTEMBE OYO EBIMAKI
Kasi soko baklisto bazali na nse na Mibeko te, nini ekopekisa bango na kosala masumu wana eyebi bango ete bakangami bayengebene na nzela na ngolu na Nzambe? Paulo ayanoli na ntembe oyo na Baloma mokapo 6. Alimboli ete baklisto basila kokufa mpo na oyo etali etamboli na bango ya kala na kosala masumu. Bomoi na bango ya sika kati na Yesu ezali kopusa bango kobundisa bolembu na bango ya nzoto. Apesi elendiseli oyo ete: Tika te ete masumu mazala na bokonzi na nzoto na bino oyo ekokufa.”—Baloma 6:12.
Bongo, ata Bayuda mpe basengeli te kolanda kotosa Mibeko na Moise? Kati na mokapo 7, Paulo alimboli na polele mpenza ete Bayuda basengeli te kolanda kokosa yango. Lokola mwasi akokangwa na Mibeko ya mobali na ye na ntango akufi, bobele bongo liwa na Yesu esili kokangela Bayuda oyo bandimi na ekanganeli ya Mibeko. Paulo alobi ete: ’’Bino bosili kokufa na Mibeko kati na nzoto na klisto.”—Baloma 7:4.
Elingi koloba ete Mibeko mizalaki na mabunga? Ata soko moke te. Mibeko ezali ya kokoka. Bato bazangi kokoka nde bakokaki te na kokosa yango Paulo akomi boye: ’’Toyebi ete Mibeko ezali eloko na elimo; kasi ngai nazali eloko na nzoto, natekami na bokonzi ya masumu.” Moto oyo azangi kokoka akoki te kolanda kotosa Mibeko ya kokoka na Nzambe: Mibeko yango mizali mpenza kokweisa ye. Ezali esengo mingi sikawa na lolenge ete “bango kati na Klisto Yesu bakokweisama te“. Baklisto bapakolami basili kokóma bana na Nzambe na nzela ya elimo na ye. Elimo ya jéhovah ezali kosalisa bango na kobundisa nzoto na bango oyo ezangi kokoka. “Nani ekofunda bato oyo Nzambe aponi? Moto te. Nzambe azali molongisi.” (Baloma 7:14; 8:1, 33.) Eloko moko te ekoki kokabola bango na Nzambe.
BOYENGEBENE MPE BAYUDA YA MOSUNI
Soko Mibeko mizangi ntina, tokoloba boni mpo na libota ya Yisraele? Mpe tokoloba nini na ntina na mikapo ya Biblia nyonso oyo mizali koluka kozongisama ya Yisraele? Ezali wana mituna oyo mipesamelaki biyano na Baloma mikapo 9 kino 11. Makomami na hébreu mayebisaki ete bobele ndambo moke na Bayisraele nde bakobika mpe ete Nzambe akobalola likebi na ye epai na bapakano. Na boyokani elongo na elaka wana, bisakweli bitaleli lobiko ya Yisraele bikokisami te na Yisraele ya mosuni kasi nde na lisanga na boklisto oyo lisalemaki na ndambo moke na Bayuda ya mosuni baoyo bakómaki bandimi, mpe na motuya monene ya Bapakano ya motema sembo.—Baloma 10:19-21; 11:1, 5, 17-24.
MITINDA NA BOYENGEBENE
Nsima, na Baloma mokapo 12 kino mokapo 15, Paulo apesi mwa myango malamu oyo na nzela na yango baklisto bapakolami bakoki kozala na bomoi na boyokani elongo na likambo oyo batangami bayengebene. Na ndakisa, Paulo alobi ete: ’Bokaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulee mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango. Bongo bokosambela ye na ntina. Bobilaka makambo ya ntango oyo te, kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi na sika’. (Baloma 12:1, 2.) Tosengeli koluka nguya ya kosala malamu mpe kobundisa mabe na mabe te. Paulo akomi boye: “Tika te ete mabe mazongisa yo nsima; kasi landá kolonga mabe na malamu.”—Baloma 12:21, MN.
Na ntango ya Paulo, Rome ezalaki mboka epai kuna mikonzi bazalaki kofanda. Yango wana ntoma apesaki toli oyo ya mayele epai na baklisto : ’’Tika ete moto na moto atosa bango bazali na bokonzi, mpamba te bokonzi ezali te soki euti na Nzambe te.’ (Baloma 13:1, MN.) Mpo na baklisto, kozala na bomoi na boyokani elongo na boyengebene elimboli mpe kokengela boyokani na bango Paulo alobi ete: ”Bozala na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo ya kolingana bamoko na bamosusu; mpamba te, ye oyo akolingaka mozalani na ye asili kokokisa Mibeko.’’—Baloma 13:8,MN.
Epai mosusu, baklisto basengelaki mpe kotalela lisosoli ya bamosusu mpe kozanga komipesa mokumba ya kosambisa bamosusu. Paulo apesi etinda oyo: ’’Tobila makambo makoyeisa kimya mpe makolendisa bomoi na biso nyonso.” (Baloma 14:19.) Oyo nde toli malamu mpenza oyo ebongi na kosalela yango kati na makambo nyonso ya bomoi na biso ya boklisto! Mpo na kosilisa na mokapo 16 Paulo asukisi na bambote epai ya moto na moto mpe na mwa bilendiseli mpe batoli ya nsuka.
MPO NA BAKLISTO BAPAKOLAMI MPE BAMPATE MOSUSU
Likambo oyo litalelamaki kati na mokanda ya Paulo epai na Baloma ezalaki na ntina mingi na eleko ya liboso ya ntango na biso; mpe lelo oyo ezali bobele na ntina monene Boyengebene mpe bomoi na seko ezali na ntina monene mpo na basaleli nyonso ya Jehovah. Ya solo, mokanda ya Paulo epai na Baloma, etindamaki mpenza na lisangá ya baklisto bapakolami, kasi na mikolo na biso, motuya monene ya Témoins de Jehovah bazali nde kati na “ebele monene” mpe bazali na elikya ya kofanda na mabelé. (Emoniseli 7:9.) Nzokande, mokanda yango mazali lisusu na nsango moko ya ntina mingi mpo na bango. Nsango yango nini?
Mokanda ya Paulo epai na Baloma emonisi ete baklisto bakangami bayengebene na ntina na kondima. Mpo na yango, baklisto bapakolami bazali na elikya ya kokóma bakonzi elongo na Yesu kati na Bokonzi ya likoló. Mpo na bango, basangani ya ebele monene bakangami bayengebene lokola ‘baninga na Nzambe’, lokola Abrahame. (Yakobo 2:21-23.) Boyengebene na bango ekopesa bango nzela ya kobika na bolozi monene, mpe lolenge moko lokola mpo na baklisto bapakolami boyengebene na bango ezwi moboko kati na makila na Yesu. (Nzembo 37:11; Yoane 10:16; Emoniseli 7:9, 14.) Ntango, bososoli oyo Paulo amonisi kati na mokanda na ye epai na Baloma ezali ya ntina monene koleka ezala epai na bampate mosusu ata mpe mpo na baklisto bapakolami. Batoli kitoko oyo mokanda yango ezali kopesa na ntina na kozala na bomoi na boyokani elongo na likambo ete kokangama moyengebene ezali na motuya mingi mpenza epai na baklisto nyonso.
Kati na mokanda le livre de vie (angl.), Newton Marshall Hall mpe lrving Francis Wood balobi ete: ’’Mpo na oyo etali bososoli mpe mateya, (mokanda ya Paulo epai na Baloma) mosili kozwa esika ya liboso na mateya ya Paulo oyo mapemami. Ezali na limemya, na mayele ya koloba, nzokande ezali mpe na bokonzi. . . . Boyekoli ya mokanda yango ezali kopesa boyebi mingi.” Mpo na nini te kotanga yango mpo osepela na ’’nsango malamu” oyo ezali kati na yango, oyo ezali ”nguya na Nzambe mpo na kobikisa bandimi”?—Baloma 1:16.
“Bokonzi (ya mwa ntango moke) ezali te soki euti na Nzambe te.’ Yango elimboli te ete Nzambe akotyaka mokonzi mokomoko na kiti ya bokonzi, kasi elimboli boye ete soki lelo bakonzi ya mokili bazali kokóba koyangela ezali mpo ete Nzambe ye moko nde apesi nzela na yango. Na makambo mingi, Nzambe asili kobongisa mpe koloba na ntina na bakonzi na bato, ezali na ndimbola wana nde yango ebongisami na Nzambe’.—Baloma 13:1,MN.
Elobamaki na baklisto ete ”balata Nkolo Yesu Klisto’. Yango elimboli ete basengelaki kolanda mpenza matambe na Yesu, komekola ye na kotyáká matomba ya elimo na esika ya liboso na esika ete balekisa matomba ya mosuni, mpe yango na ‘kokanisáká te mpo na kosepelisa mposa ya nzoto’.—Baloma 13:14.
Paulo alobi na Baloma ete ‘bapesana mbote na kopwepwa na bulee’. Kasi, na maloba wana, Paulo alingaki te kobimisa esalelo mosusu ya sika mpo na baklisto to mpe molulu moko mpo m lisangá. Na eleko na ye, bato bazalaki kopepwana to kopesana baiser na elongi, na mbebu to mpe na maboko lokola elembo ya boyambi, ya bolingo to ya botosi. Na yango, kati na texte wana, Paulo alobelaki bobele momeseno oyo bato bazalaki na yango na ntango wana.—Baloma 16:16.