“Esengo na bato na kimya”
Na 1901, prix nobel oyo ebimaki mpo na mbala ya yambo, epesamaki na Henri Dunant, mobandisi ya croix-Rouge, mpe na Frédéric Passy, moto oyo ayekoli mingi makambo na nkita (sciences économiques). Kobanda ntango wana, prix nobel esili kopesama na bato mbala 69; mbala 55 epai na bato 71 bakeseni to epai ya moto mokomoko to mpe epai na bato mibale elongo, mpe mbala 14 epai na masangá ya bato to bituluku 16. Masangá mosusu ezwaki yango mbala mingi, lokola comité international de la croix-Rouge (na 1917, na 1944, mpe na 1963) mpe Haut-Commissariat des Nations Unies pour les réfugiés (na 1954 mpe na 1981.) Soki prix nobel epesameli bato mbala 19 te, na ntembe te, ezali likoló na bakonzi oyo bakotisamaki kati na masangá yango.
Lokola oyo tokoki komona yango, mingi na baoyo basili kozwa prix nobel yango ezali bobele bakonzi ya Leta to mpe bato minene ya politike, mpe lisusu bapanzi nsango, ba juristes, ba sociologues, ba ekonomiste to bato bayekoli makambo na nkita. mpe ba réformateurs sociaux. Bobele bato na siances kati na bango, totangi Linus Pauling oyo azwaki lokumu yango na 1962 mpe Andrei Sakharov na 1975, mpe baoyo bazali kokamba masangá mpo na basali, mingi mpenza Lech Walesa oyo azwaki yango na 1983. Na 1970, prix nobel yango epesamaki na Norman Borlaug, moto oyo ayekoli mingi mpenza mpo na oyo etali milona.
Moto ya yambo kati na bakonzi ya mangomba oyo azwaki prix yango, azalaki moto ya Suéde, Nathan Soderblom, episkopo na lingomba ya ba luthériens, oyo azwaki yango na 1930. Na 1946, ezalaki ngala ya John Mott, mokonzi na lingomba Methodiste évangélique et laic oyo na 1952, alandamaki na Albert Schweitzer, moto na teoloji mpe na filozofi mpe, na 1958, prix yango ezwamaki na Dominique George Pire, mokonzi ya lingomba na Belgique. Na 1964, baponaki Martin Luther King, ministre na lingomba ya ba Baptistes mpe mokoteli mpo na kobatela lotomo ya bato ya ekolo na ye.
Kasi na mibu oyo, mangomba mazali mpenza kokokisa mosala monene mpo na koluka kotya kimya na mokili mobimba. Na boyokani na likanisi yango, bato libwa baoyo bazwaki prix nobel nsima bazali bakonzi ya mangomba: na 1979, mere Teresa, mokonzi mwasi ya lingomba ya katolike na Calcutta; na 1984, Desmond Tutu, éveque anglican ya Afrique du Sud; mpe na mobu oyo mouti koleka, prix yango epesamaki na Dalai—Lama, “nzambe-mokonzi” ya babudiste, oyo akimaki longwa na mboka na ye mpo na koya kofanda na Tibet.
Ezali solo ete Yesu Klisto alobaki boye: “Esengo na baoyo bakoyeisaka kimya.” (Matai 5:9). Kasi milende wana na bato yango bazali koyeisa kimya na nzela ya mangomba, ezala bakatolike, baprotestá to babudiste, mizali nde kolonga?
Biblia ezali kolobela biso ete mokili oyo mabe esila kokabwana na Nzambe, ekozwa kimya ya solo te, mpe lolenge oyo mangomba emikotisi na makambo ya mokili, na makambo matali ezalela ya bato epai kuna bafandi mpe kati na politike, ekobongola ata eloko moko te. Ezali bongo na kokitanyàká Bokonzi oyo botambwisami na Yesu Klisto, ye “Nkolo na kimya” na esika ya biyangeli ya lelo nde Mozalisi ye moko mosika te, akopambola bandimi na kopesáká bango kimya.—Yisaya 9:6, 7; 57:21; Nzembo 46:9; Daniele 2:44.
Bato na kimya oyo bayebi solo oyo mpe bazali koyokanisa bomoi na bango elongo na yango, bakozala mpenza na esengo. Na yango, Traduction du monde nouveau ebongoli maloba yango na Yesu boye: “Esengo na bato na kimya.”