Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/5 nk. 10-13
  • Nasili kolonga bolembu na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasili kolonga bolembu na ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobokwama na baboti
  • Ndakisa malamu ya tata na ngai
  • Ezaleli malamu ya mama na ngai
  • Etumba na konyokwama na makanisi
  • Mbeba na mwana na ngai ya mobali
  • Esengeli kozala na elikya
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nakozongisela Yehova nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nazali na esengo atako nazali ebosono
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/5 nk. 10-13

Nasili kolonga bolembu na ngai

Lisolo ya Thomas Addison

TANGO nazalaki mwana moke, kokutana bobele na ndeke moke na nzela ezalaki kobangisa ngai mpe nazalaki koluka nzela mosusu. Wana bandeko to baninga bazalaki koya kotala biso, bazalaki komona mwana moko oyo azalaki kobanga mpe ekangami na makolo ya mama na ye. Soki tozwi bapaya, nazalaki kobombama mingimingi kati na chambre na ngai nokinoki. Nazalaki kokoka koloba te liboso na moto nyonso oyo azalaki na bokonzi, mingimingi balakisi.

Eloko nini epesaki ngai nzela mpo na kobongwana? Ndenge nini, ngai elenge mobali oyo azalaki sonisoni nakokaki koloba na bambula eleki liboso na bato ebele na libaku ya ba assemblées minene?

Kobokwama na baboti

Baboti na ngai bazalaki kokoka kokanga ntina na ezalela na ngai te, mingimingi tata na ngai, ye Moekosé moto na nzoto moke mpe na makasi. Wana ekomaki ye etike na mibu 13, azalaki naino mpenza na makasi na ye nyonso. Uta bolenge na ye, ayebaki kobika ye moko. Mpo na mama, mwana mwasi ya fermier, azalaki na bomoto na ezalela ya bopolo. Nabokwamaki na bopolo mpe na nguya, kasi na mibeko mingi te.

Mbala ya liboso natelema liboso na bato ezalaki na Eteyelo mpo na mosala ya Nzambe na 1945, ntango nazalaki na mibu motoba. Nasalaki lisolo na ngai ya liboso na mwa pole ya mwinda ya pétrole, kati na lisangá moko moke ya Australie oyo ezalaki bobele na mabota misato. Tata na ngai asalisaki ngai mpo na komibongisa liboso mpenza, na koyebisáká ngai matomba na diskur oyo moto akangi nyonso na motó te. Azalaki kolobela mingi likoló na kozanga kobanga na ntina na oyo bato mosusu bakoloba to bakokanisa. Mbala mingi azalaki koloba: “Biso bato, tozali biso nyonso bobele maboke ya mputulu. Maboke mosusu ezali minene koleka mosusu, ezali se ndenge wana.” Mabolongo na ngai mabetanaki, maboko matokaki, mpe na katikati na lisolo nakomaki baba, nakokaki kosilisa te.

Nazalaki mbala mosusu pene na mbula zomi ntango tata na ngai amemaki leki na ngai Robert mpe ngai, na balabala monene ya engumba, liboso mpenza ya salle ya cinema. Kuna, bolakisaki bazulunalo La Tour de Garde mpe Réveillez-vous!, na miso na baninga na biso nyonso ya eteyelo. Bazulunalo ekomaki kilo lokola ebende mpe mbala mosusu nazalaki kobomba yango na mokongo! Nazalaki komiyeisa moke na kongunzama mpo ete namonana te.

Kasi, nazalaki komona ndakisa na molende ya tata na ngai, likambo yango nde elendisaki ngai mingi koleka. Tata na ngai azalaki koloba ntango nyonso ete kozonga nsima, ezalaki nde kopesa nzela na Satana mpe na kobanga bato. Komekama mosusu ekómelaki ngai na eteyelo. Mwa ntango moke Etumba ya Mibale ya mokili mobimba euti kosila mpe makambo ya bolingo makasi ya ekolo (nationalisme) ezalaki naino makasi na mokili ya Australie. Ndeko na ngai ya mwasi Ellerie mpe ngai tozalaki kofanda wana ezalaki bango koyemba loyembo ya lokumu mpo na ekolo (hymne national) wana bana kelasi bazalaki koyangana na eteyelo. Ezalaki mpo na ngai komekama makasi na komikesenisa boye na bamosusu, kasi, lisungi mpe kolendisama ntango nyonso na baboti na ngai esalisaki ngai lisusu na kozanga kowangana kondima na ngai.

Ndakisa malamu ya tata na ngai

Na kotalela bomoto na ye ya kala mpe lolenge na ye, tata na ngai azalaki mpenza na motema molai mingi epai na ngai. Abandaki kosala kati na mines ya charbon, na mokili ya Angleterre, wana ezalaki ye bobele na mibu 13. Nsima mwa moke na kokokisa mibu 20, akendaki kofanda na mokili ya Australie mpo na koluka mosala malamu. Kasi, mpo na kokwea na makambo na nkita oyo ezalaki na bambula 1930, andimaki mosala moke ya mpasi mingi bobele mpo ete akokisa bamposa ya libota na ye.

Tata na ngai alembaki na motema mpo na makambo nyonso mazalaki kosalema mpe mingimingi mpo na politike. Ezali mpo na yango, wana etangaki ye mikanda ya la Société Watch Tower oyo mizalaki koyebisa polele na kozanga kobanga, bokosi ya politike, ya mombongo mpe ya lingomba, mikanda yango misimbaki motema na ye. Kozanga koumela, amipesaki epai na Jéhovah mpo na kosalela ye, mwa ntango moke nsima na mama na ngai. Atako azalaki na mpasi ya collapsus na poumon, mpo na kobukana ya tunnel moke na nsé ya mabelé, mpe lokola ayebaki mpenza malamumalamu te mosala moko mpo na ye, papa na ngai amemaki libota na biso na bisika oyo mposa na elimo ezalaki. Kotya motema na ye epai na Jéhovah ekamwisaki ngai mingi.

Na ndakisa, nazali komikundwela, wana efandaki biso kati na engumba moko moke epai kuna bazalaki kotimola mabanga na ntalo epai tokutaki bobele mibangé Batemwe mibale ya basi baoyo mibali na bango bazalaki bandimi te. Ezalaki mpasi mpo na kozwa ndako, kasi na nsuka, tofutelaki ndako moko ya kala na mwa ba kilometres na libanda ya engumba. Mbala mosusu tozalaki kosala mibembo na makolo, mbala mosusu na Vélo. Mokolo moko na ntongontongo, wana biso nyonso bana misato tozalaki epai na baninga na biso, ndako ezikaki nyonso Baboti na ngai babikisaki bobele bomoi na bango, eloko moko ebikaki te. Tozalaki na assurance te, tozalaki mpe na mbongo te.

Mwa ntango moke liboso na kufa na ye, na 1982, tata na ngai akanisaki likambo yango. Alobaki na ngai: “Mwana na ngai, ozali komikundola, ndenge tomonaki mpasi na ebandeli? Kasi Jéhovah asungaki biso. Nsima na kozika ya ndako, ba fréres ya mboka Perth batindelaki biso biloko, bilamba mpe mbongo. Mpo na bokabi na bango, tozwaki biloko mingi koleka oyo tozalaki na yango liboso!” Na ebandeli, namonaki lokola ete tata na ngai azalaki kolekisa ndelo ntango ezalaki ye koloba mingi mpo na lisalisi oyo Jéhovah azali kopesa biso kati na bomoi na biso. Nzokande mpo na koloba malamu, mbala mingi tozalaki mpenza kozwa matomba na oyo ezalaki ye kobenga lisalisi na Nzambe.

Ezaleli malamu ya mama na ngai

Moko na mikakatano na ngai ezalaki ya komona ete makambo nyonso mazalaki mabe. Mbala mingi mama na ngai azalaki kotuna ngai: “Mpo na nini otalelaka bobele ngambo mabe ya bomoi?” Ndakisa na ye ya kotalela mpe ngambo malamu ya makambo mosusu na bomoi epusaki ngai kolanda kosala milende mpo na kozala na elikya koleka.

Mosika te, mama alobelaki mpo na likambo moko lilekaki kati na engumba moko moke epai kuna bazali kolona bilanga mingi, esika oyo tokendaki kofanda. Maloba ya monganga moko masekisaki ye. Monganga akanisaki ete baboti na ngai bazalaki na bozwi na ntina na elateli na bango oyo ezalaki kitoko mpe mpo na bopeto na bango. Nzokande ndako na biso ezalaki mpenza bobele esika oyo babombaka milona oyo bitutu na yango bitongamaki na ba sacs d’emballage. Tozalaki ata na gaz te, ata na kurá te, ata na robinet mpe te. Mokolo moko ngombe, enyataki porte ya liboso na ndako. Kanisa esika nini nazalaki: na nsé na mbeto!

Mama na ngai azalaki kotoka mai na liziba moko oyo ezalaki na 200 métres na ndako na lisalisi ya ba katini mibale ya 15 litres oyo ekangisamaki na nzete mpe azalaki komema yango na mapeka na ye. Azalaki na ezaleli malamu na kotalela makambo ya mpasi lokola oyo ezali kosepelisa, na kopusama na tata na ngai, azalaki bongo kotalela mokakatano mokomoko lokola ntembe oyo asengelaki kolonga na esika ya kotalela yango lokola nkaka. Azalaki koloba mbala mingi ete atako tozalaki na biloko moke na mosuni, tozalaki kozwa mapamboli mingi.

Na ndakisa, tolekisaki ntango mingi ya malamu na kosalaka mobembo elongo mpo na kosakola kati na bateritware oyo ezalaki mosika, kolala libanda na butu, kolamba maki likolo na móto ya koni mpe koyemba banzembo ya Bokonzi na boumeli ya mobembo, wana tata na ngai azalaki kobeta miziki na kosalela accordéon. Ya solo, na likambo oyo tozalaki mpenza bazwi. Na bamboka mosusu tozalaki kofutela salle ya moke mpe tozalaki kolobela liboso mpo na diskur piblike oyo ekopesama dimanche nsima na midi.

Mbala mosusu, mpo na mikakatano ya kolongono ya nzoto ya tata na ngai, esengelaki ete mama na ngai asala mosala ya mosuni mpo na kozwa mwa mosolo. Na boumeli na bambula mingi, mama asalisaki mama na ye, koko na ye ya mobali mpe tata na biso liboso na kufa na bango. Mpe asalaki nyonso wana, kozanga koimaima. Atako mbula na mbala nazalaki konyokwama na makanisi mpe mbala mingi kozala na makanisi mabe mpo na bomoi, bilendiseli na bopolo ya mama na ngai mpe ndakisa na ye epesaki ngai mposa ya kolendendela kati na milende na ngai.

Etumba na konyokwama na makanisi

Wana ezalaki ngai na mibu pene na 20, bolembu na ngai nyonso ya bobwana oyo nakanisaki ete nalongaki ezongaki lisusu. Mituna likoló ya ntina na bomoi ebandaki kobulunganisa makanisi na ngai. Nabandaki komituna ‘Bata nyonso bazali na libaku ndenge moko mpo na koyeba mpe kosalela Jéhovah?’ Na ndakisa, ezali boni mpo na mwana oyo abotami na mokili ya lnde to mokili ya chine? Ya solo mpenza, mwana yango akokaki te kozala na libaku ya koyeba Jéhovah lokola mwana oyo azwaki libaku ya kobokwama na baboti oyo bazali Batemwe. Nazalaki komona likambo yango ete ezali bokesene! Lisusu, makambo oyo ete bizaleli ya kobotama mpe esika oyo mwana akoli, masengeli kozala na bopusi monene. Na makambo mingi, nazalaki komona ete bomoi ezali na bokesene. Nazalaki kosolola makambo oyo elongo na baboti mpe ezalaki kozwa ntango mingi. Nazalaki mpe komibanzabanza mpo na nzoto na ngai. Nazalaki kosepela mingi te na makambo mingi oyo nazalaki komona na nzoto na ngai.

Lokola nazalaki kokanisa mingi mpo na makambo nyonso wana, nazalaki konyokwama na makanisi, mbala mosusu na boumeli ya baposo. Nzoto na ngai ezalaki mpe kobeba mpo na yango. Mbala mingi, nazalaki kokanisa na nkuku mpo na komiboma. Na bantango mosusu, nazalaki kofanda esika na ngai moko mpe na komiyokela mawa. Nazalaki komimona lokola moto alingi akufa kasi bazali koyokela ye mawa te. Nazalaki na mawa mingi, kino na kozanga kokanela, na mbala moko nakomaki na mayoki ya nsomo makasi. Makambo nyonso na zingazinga na ngai mabongwanaki, nazalaki komona yango lokola soko nde moto azali kotala na lininisa oyo ezali lokola na milinga.

Likambo oyo epesaki ngai likanisi ete kozala na mawa mingi mpo na yo moko ezali na likama mpenza. Na kobondeláká Jéhovah, nazwaki ekateli ya kosala milende mpo na kotika komiyokela mawa ngai moko. Nabandaki kotia makanisi na ngai likoló na makambo ya kolendisa na Makomami. Kobanda ntango yango, nakomaki kotanga na likebi mingi mpenza lisolo nyonso ya La Tour de Garde mpe Réveillez-vous! oyo ezalaki kolobela makasi mpo na bizaleli na bomoto, mpe nabombaki yango kati na klasere. Nakangaki mpenza ntina ya batoli oyo epesamaki kati na Ministère du Royaume mpo na lolenge ya kosolola na bato mosusu.

Mokano na ngai ya liboso ezalaki ya komeka kosolola mwa ntango molai na moto mokomoko na likita nyonso. Na ebandeli, lisolo yango ezalaki koumela bobele soko minite moko, kino ete, mbula mingi, nazalaki kozonga epai na ngai na bolembu na motema Nzokande, wana nalendendelaki, malembemalembe nakomaki mobeti masolo.

Nabandaki mpe kosala bolukiluki ngai moko mpo na mituna na kobulunganisa oyo nazalaki komituna. Lisusu, nabandaki kotalela malamu biloko oyo nazalaki kolya mpe namonaki ete nakosala mbongwana na yango, ezaleli na ngai mpe bokasi na nzoto na ngai ebongaki. Nayebaki nsima ete makambo mosusu makoki mpe kobimisa konyokwama na makanisi. Na ndakisa, nazalaki kosepela mbala mosusu na eloko moko kino kokumisa yango mingi. Mbala mingi, esengo yango ezalaki koumela te, mpe mpo na yango nazalaki kolemba mpe konyokwama na makanisi. Mpo na kolonga yango, nasengelaki koyekola kosepela na eloko na ntango molai, mpe kozanga kokumisa yango koleka. Ata lelo lisusu, nasengeli komisenzela.

Likambo oyo elandaki ezalaki oyo ya kokokisa mokano baboti na ngai bazalaki ntango nyonso kotiya liboso na biso, elingi koloba mosala ya pionnier. Ekateli oyo ndeko na ngai ya mwasi amonisaki na kokangama na mosala yango na boumeli na mbula koleka 35 ezali ntango nyonso elendiseli ya solo mpo na ngai.

Mbeba na mwana na ngai ya mobali

Nsima na mwa bambula ya kofanda mozemba kati na mosala ya pionnier, nabalaki Josefa, oyo azalaki mpe pionnier. Azalaki mpo na ngai mosungi ya solo kati na makambo mingi. Na boumeli ya ntango, tobotaki bana misato. Mwana ya liboso, Graig, abotamaki na 1972, azalaki paralizé na bongó. Kolongono na ye ya nzoto ezalaki ntembe mpenza, mpamba te akokaki kosala eloko ye moko te, bobele komileisa na lutu, yango mpe ezalaki na lolenge malamu te. Ya solo, tolingi ye mingi, mpe nalukaki banzela nyonso mpo na kosalisa ye ete akoka kosala makambo ye moko. Nabongisaki bamasini mpo na kosalisa ye ete atambola. Tokendaki kotala minganga mingi oyo bayebi maladi wana, nasengeli koloba ete matomba ezalaki mingi te. Yango esalisaki ngai na kondima ete bomoi ezali na makambo mosusu oyo moto asengeli kondima yango.

Na boumeli na mibu 12 ya liboso na bomoi na ye ya, ekomaki mbala mingi ete Craig atiki kolya mpe komela mbala moko, mpe azalaki kobela mpasi na motema. Tokanisaki ete ba nerfs nde ezalaki ntina na likambo wana. Abandaki kolemba mpenza na miso na biso. Libondeli esalisaki biso mpo na kobunda na likambo yango, mpe nkisi ya monganga esalisaki mpo na kokitisa likambo yango. Likambo mpenza ya esengo ete, na nsuka, craig abandaki kozala malamu mpe esepelisaki biso lisusu na koseka na ye mpe na ebele na banzembo na ye.

Na ebandeli, Josefa amonaki nkaka mingi mpo na komesana na likambo yango ya mpasi. Kasi bolingo mpe motema molai oyo na yango abatelaki Graig, ezalaki elonga na nsuka, kino ete tolandaki kotambola mpo na kosala epai kuna mposa na basakoli ezalaki monene. Ngolu na lisungi mpe lisalisi ya Josefa, nasalaki mosala ya mosuni ya ntango moke na boumeli ya bambula mingi, oyo epesaki ngai nzela ya kozala pionnier auxiliaire wana ezali ngai kokokisa bamposa ya libota na ngai.

Esengeli kozala na elikya

Ntango craig azali kolemba na makanisi na ntina etali maladi na ye oyo ezali kozonga mbala na mbala to azali kosilika mpo na kozanga kokokisa makambo oyo alingi, tozali kolendisa ye na moko na mikapo na Makomami oyo nalingaka mingi: “Biso tozali kati na bango te baoyo Bakozongaka nsima.” (Baebele 10:39) Ayebi mokapo yango na motó, mpe verset oyo ezalaki ntango nyonso kolendisa ye mingi.

Uta bomwana na ye, craig azalaki kosepela mingi na mosala ya kosakola. Na kosaleláká fauteuil roulant (kiti oyo ezali kotambola), azali mbala mingi kobima na biso elongo. Mingimingi azali kosepela kokenda na ngai ntango nazali kotala masangá mosusu lokola mokitani ya mokengeli ya zongazonga. Bakomantere oyo azali kopesa engebene makoki na ye kati na boyekoli na etuluku, masolo na Biblia oyo azali kosala ntango nyonso na eteyelo oyo azali kolanda, epesaki ye nzela ya kobota mbuma mingi oyo, biso baoyo tozali na mbeba te naino tozwi te. Ndakisa ya craig ezali kokundola ngai ete, ata makoki nini tozali na yango, Jéhovah akoki kosalela biso mpo na kokokisa mokano na ye mpe makambo oyo alingi.

Eleki mwa ntango moke, nazwaki mokumba ya kozala molakisi na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi. Na ebandeli, atako nsima na bambula nyonso oyo nalekisaki kati na mosala, nazalaki na motema likoló. Kasi, na kotya elikya epai na Jéhovah, nokinoki nakitaki mpe lisusu nayokaki loboko na ye na nguya na kosunga.

Wana ezali ngai kokanisa na mwa bambula 50 ya bomoi na ngai sikawa, nandimi ete bobele Jéhovah akokaki kobongola na bolingo moto lokola ngai, mpo ete nazala moto moko ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto