“Nazali kolanda batoli ya mokanda, mpe nazali kolonga!”
Ezali yango elenge mwasi Moameriké na mboka Maryland akomaki mpo na mokanda Les jeunes s’interrogent Réponses pratiques. Akomaki ete: “Natangaki yango nyonso na mikolo mibale. mpe nakokaki kotika kolobela makambo yango epai na bazalani te.”
“Mokapo 6 oyo ezali na titre ‘Mpo na nini nazali koyokana te na bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi?’ esalisaki ngai, mpamba te nazalaki mbala mosusu koyoka zuwa mpo na yaya na ngai ya mwasi. Na kotangaka yango, nakangaki ntina mbala moko ete nasengeli te kozala na zuwa mpo azali na lotomo oyo ngai nazali na yango te na makambo mosusu. Soki matata mabimi, nazali kosalela toli ya mokanda, mpe nazali kolonga! Sikawa, nazali koyokana malamumalamu na yaya na ngai.”
Ezali petee te na kokola malamu na ntango na biso oyo na kilikili. Bilenge bazali kokutana na makambo mingi ya sika mpe basengeli kozwa makatami na makambo minene, lokola oyo: Nasengeli komela masanga mpe drogue? Etamboli nini elenge mobali mpe elenge mwasi basengeli kozala na yango epai na moko mpe mosusu? Bilenge bazali na mposa na biyano bisengeli. Tondimi ete yo na bana na yo bokozwa matomba mingi na mokanda oyo ezali na nkasa 320 oyo etondi na bililingi kitoko.