Ntango molingami na biso akufi
“NA 1981, mama mobokoli na ngai akufaki na maladi ya kanser. Mpo na leki na ngai, oyo abotami na mama wana mpe ngai, ezalaki mpasi mingi. Nazalaki na mibu 17 mpe ye mibu 11. Nayokaki mawa mingi. Lokola nabokwamaki na lingomba ya katolike mpe bazalaki koyebisa ngai ete azalaki na likoló, nalingaki komiboma mpo na kolanda ye. Azalaki moninga na ngai ya solo.” Roberta, na mibu 25.
Osili kozwama na likambo motindo boye? Soki bongo, oyebi malamu mpasi nini moto akoyokaka ntango molingami na ye akufi. Ezali komonana ete ezali bokesene monene lokola liwa esili kozwa nguya na kozangisa yo moto oyo olingi. Ntango likambo yango ekwei, likanisi ete okosolisa ye lisusu te, okoyamba ye lisusu te, to okoseka na ye lisusu te ekoki kozala mpasi mpo na kokanga motema. Mpe lokola maloba na Roberta mamonisi yango, ata soki bayebisi yo ete azali na likoló, yango ekokitisa mpasi na yo te.
Nzokande, okomiyoka ndenge nini soki oyebi ete likoki ezali ya komonana lisusu na moto oyo olingi mingi na mikolo mizali koya, na likoló te, kasi awa na mabelé, kati na makambo na sembo mpe na kimya? Mpe soki oyebi lisusu ete na ntango yango bato nyonso bakozala na elikya ya kozala na kolongono na nzoto ya kokoka mpe libela bakokufa te? Mbala mosusu okoloba ete: ‘Likanisi wana ezali bobele ndoto mpamba!’
Nzokande, na ekeke ya liboso, Yesu Klisto alobaki na molende ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akozonga na bomoi.” (Yoane 11:25). Ezalaki elaka ete bakufi bakozonga lisusu na bomoi. Oyo nde elikya na esengo!
Kasi, mbala mosusu ozali komituna ete: ‘Bantina mpenza makasi ezali mpo na kondima elaka yango? Ndenge nini nakoki koyeba mpenza ete ezali ndoto mpamba te? Mpe soki bantina ezali mpo na kondima yango, kokokisama na yango ekolimbola nini mpo na ngai mpe mpo na baoyo nalingi?’ Lisolo elandi ekoyanola na mituna oyo mpe na mituna mosusu.