Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/4 lok. 10
  • “Baoyo nyonso bazali kati na nkunda na kokanisama”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Baoyo nyonso bazali kati na nkunda na kokanisama”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azali komibanzabanza mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • ‘Bibembe mingi ya basantu ebimaki’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • “Traduction du monde nouveau” Mosala ya mayele na sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/4 lok. 10

“Baoyo nyonso bazali kati na nkunda na kokanisama”

TOKOKI kondimisama ete bakufi mingi bakosekwa? Ee, mpo ete Yesu alobaki: “Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda [nkunda na kokanisama, Mn] bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29). Okomona awa liloba “nkunda na kokanisama” oyo ekomami bobele na Traduction du monde nouveau. Liloba yango ezali kokundwela biso ntina na makanisi oyo Nzambe azali na yango mpo na lisekwa.

Mpo na nini libongoli oyo ezali kosalela bobele liloba “nkunda” te, lokola mabongoli mosusu mingi mazali kosala yango? Ezali mpo ete Yesu asalelaki pluriel te ya liloba na greke taphos oyo elimboli “nkunda”, “liyita” to “cimetiere”. Na yango, bakufi nyonso bakundamaki kati na mayita te, to taphoï Nzokande, baoyo bakosekwa bazali na kati ya makanisi na Nzambe. Ezali yango Yesu amonisaki na kosalelaka pluriel ya liloba mneméïon, liloba oyo ekokani mpenza na maloba ya greke oyo malimboli mpenza “komikundwela”. (Matai 16:9; Malako 8:18.) Dictionnaire grec-français ya Bailly ebongoli mneméïon na, . . . ’’kokundola, . . . elembo mpo na komikundola monument na kokanisama”.

Ezali mpo na ntina yango Traduction du monde nouveau ekesenisi liloba taphos na mneméïon , Nkutu, na Matai 23:29, epai maloba oyo mibale na greke mamonani, mabongoli mingi na Biblia mosaleli maloba mibale makeseni. Biblia ya Lienart ebongoli verset oyo boye: “Bokotongaka mayita (lolenge ya liloba taphos) na basakoli mpe bokotia mibomba (monument) [na lolenge ya liloba mneméïon] na bayengebene kitoko.”

Mozalisi na moto abosani te bomoi oyo bato mingi bazalaki na yango. (Nzembo 139:16; 147:4; Matai 10:30). Na ntango oyo ekoki, akokanisa mpo na baoyo nyonso bazali kati na “mayita na kokanisama” mpe akozongisa bango na mabele mapetolami. Ezali kolendisa mpe koyikisa mpiko na koyeba ete makanisi na kokoka na Nzambe makoki kolemba te!​—Emoniseli 20:11-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto