Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/9 lok. 7
  • ‘Bibembe mingi ya basantu ebimaki’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bibembe mingi ya basantu ebimaki’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Elikya ya lisekwa ezali na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • ‘Liwa ekozala lisusu te’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Lisekwa ezali mpenza elikya ya solosolo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Lisekwa
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/9 lok. 7

‘Bibembe mingi ya basantu ebimaki’

“MOKILI moninganaki mpe mabanga mapaswani mpe mayita mazipwi mpe bibembe mingi ya basantu baoyo bazalaki kolala ebimi (mpe bato baoyo babimaki longwa na nkunda nsima na lisekwa na ye, bakotaki na mboka na bulee), mpe bamonanaki na bato mingi.” (Matai 27:51-53, MN). Karl Staab, molimboli ya Biblia na katolike, atalelaki likambo wana lisalamaki na liwa na Yesu lokola “libombami monene”. Nini esalamaki mpenza?

Epiphane mpe bakonzi mosusu ya lingomba bateyaki ete basantu bazongaki mpenza na bomoi mpe bakendeki na likoló elongo na Yesu. Augustin, Théophylacte mpe Euthymius Zigabéne bazalaki kondima ete bakufi yango bazwaki lisekwa ya ntango moke, kasi, na nsima, bazongaki lisusu kati na nkunda na bango. Nzokande, molimboli ya Biblia Erich Fascher alobi ete, likanisi wana “endimamaki te na bato mingi.” Na kobongoláká Matai 27:52, 53, mabongoli mingi ya sika ya Biblia mazali komonisa ete lisekwa moko esalemaki mpenza. Ezali bongo te mpo na Traduction du monde nouveau, oyo ezali kolobela koningana ya mabelé. Mpo na nini?

Yambo mpenza, ezala ata soko “basantu” yango balobelami bazalaki na lolenge nini, Matai alobi te ete bango babimaki, kasi bibembe na bango, to mpe banzoto na bango nde ebimaki. Ya mibale, Matai alobi te ete banzoto ezongaki na bomoi, kasi ete ebimaki. Nzokande, liloba ya greke égéiró oyo elimboli “kobima” ezali ntango nyonso te kokokisama bobele na lisekwa. Ekoki mpe kozwa bandimbola mosusu, lokola “kolongwa” na libulu, to mpe ‘kotelema’ longwa na mabelé. (Matai 12:11; 17:7; Luka 1:69). Koningana ya mabelé oyo esalemaki na ntango na kufa na Yesu, efungolaki nkunda, kobwakáká banzoto ya bato bakufa. Mokomi na mikanda, Aelius Aristide, ye mogreke, alobaki makambo motindo wana oyo masalemaki mpe na ekeke ya mibale ya ntango na biso, mpe kala mingi te na 1962, esalemaki na Colombie.

Ndimbola oyo ezali na boyokani elongo na mateya ya Biblia. Na yango, kati na 1 Bakolinti 15 epai kuna ntoma Paulo apesi bilembeteli ya kondimisa lisekwa, ntoma alobeli Matai 27:52, 53 te. Bakomi mosusu ya Biblia mpe balobeli yango te. (Misala 2:32, 34). Epai mosusu, banzoto oyo ebimaki na ntango ya liwa na Yesu ezongaki na bomoi te lokola Epiphane akanisaki yango mpamba te Yesu akómaki “mobotami ya liboso kati na bakufi” bobele mikolo misato nsima na kufa na ye. (Bakolose 1:18) Lisusu, baklisto bapakolami, baoyo babyangami mpe “basantu”, bazwaki elaká ya kozwa lisekwa ya liboso bobele na boumeli na kozonga na Klisto, kasi na ekeke ya liboso te.​—1 Batesaloniki 3:13: 4:14-17.

Balimboli mingi ya Biblia bazali na mpasi mpo na kolimbola verset 53, atako ebele kati na bango bazali komonisa ete verset 52 elobeli kozipwana ya nkunda na koningana ya mabelé mpe kobima na bibembe oyo ekundamaki. Na ndakisa, Theobald Daechsel, molimboli ya Biblia, abongoli yango boye: “Mpe mayita mazipwani, mpe bibembe mingi ya basantu oyo ezalaki kopema, ebimaki.”

Banani “bakotaki na mboka na bulee” na nsima, elingi koloba nsima wana Yesu asekwisamaki? Lokola tomonaki yango, banzoto oyo ebimaki ezalaki koningana te. Na yango, Matai asengeli kolobela bato oyo bamonaki mayita mpe bamemaki nsango ya likambo yango na Yelusaleme, Na yango, motindo oyo maloba yango mabongolami kati na Traduction du monde nouveau epesi biso bososoli ya bozindo na Biblia mpe ezali kopesa mobulungano te na elimo ya motangi na ntina etali lisekwa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto