Tomekola Yesu, Ndakisa na moto oyo amipesaki na makambo na Nzambe
“Libombami na [komipesal na makumba na Nzambe ezali monene, lokola toyamboli ete:‘[Yesul amonisami polele kati na nzoto.’”—1 TIMOTE 3:16
1. (a) Motuna nini ezangaki eyano na boumeli ya mibu 4 000? (b) Ntango nini mpe ndenge nini eyano epesamaki?
MOTUNA moko ezangaki eyano uta pene na mibu 4000 nsima wana mobali ya liboso, Adam, abungisaki bosembo na ye: Ndenge nini bato bakoki komonisa ezaleli na kobanga Nzambe? Nzokande na ekeke ya liboso ya ntango na biso, eyano epesamaki na motuna yango na nzela na boyei ya Mwana na Nzambe awa na mabelé. Na makanisi na ye nyonso, na maloba na ye mpe na misala na ye, Yesu Klisto amonisaki polele bokangami na ye epai na Jéhovah. Amonisaki bongo ‘libombami mosantu ye komipesa na makambo na Nzambe’ mpe amonisaki ndenge nini bato oyo bamipesi na Nzambe bakoki kolanda kobenga Nzambe.—1 Timote 3:16.
2. Mpo ete tolanda komipesa na makambo na Nzambe, mpo na nini tosengeli kotalela malamu ndakisa na Yesu?
2 Lokola tozali baklisto bamipesi mpe babatisami mpe tozali komipesa na makambo na Nzambe, tosengeli ‘kotalela’ ndakisa na Yesu. (Baebele 12:3) Mpo na nini? Mpo na bantina mibale. Ya liboso, ndakisa na Yesu ekoki kosalisa biso na kolona ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe. Yesu ayebaki Tata na ye malamu koleka moto nyonso. (Yoane 1:18) Azalaki komekola malamu mpenza mitindo mpe bizaleli na Jéhovah na boye ete akokaki koloba: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.” (Yoane 14:9) Na kotalelaka bomoi mpe mosala na Yesu, tokoki bongo kosepela na bizaleli malamu ya Jéhovah, mpe kolendisa bongo bokangami na biso epai na Mozalisi na biso atondi na bolingo. Ya mibale, ndakisa na Yesu ekoki kosalisa biso na komipesa na makambo na Nzambe. Yesu azalaki ndakisa ya kokoka mpo na oyo etali etamboli ya moto amipesi na makambo na Nzambe. Tozali bongo na bantina ya kotalela ndenge nini ‘kolata Klisto’, elingi koloba kozwa ye lokola elakiseli, kolanda ndakisa na ye.—Baloma 13:14.
3. Tosengeli kokɔtisa eloko nini kati na programme na biso ya boyekoli ya Biblia? Mpo na ntina nini?
3 Maloba mpe misala nyonso na Yesu ekomamaki te. (Yoane 21:25) Na yango, makambo oyo makomamaki na kopemama na Nzambe mazali mpenza na litomba mpo na biso. Na programme na biso moko ya boyekoli Biblia, tosengeli mpe kobongisa ntango mpo na kotanga mbala na mbala ba Evanzile, masolo ya bomoi na Yesu. Kasi mpo ete batangi yango esalisa biso na komipesa na makambo na Nzambe, tosengeli kobongisa ntango mpo na kokanisa na makambo oyo tozali kotanga mpo na kokanga motuya na yango nyonso. Esengeli na biso lisusu koluka koyeba bozindo ya makambo oyo mamonisami.
Mwana akokokanaka na Tata na ye
4. (a) Nini emonisi ete Yesu azalaki moto atondi na bolingo mpe akokabolaka mpasi ya bato mosusu? (b) Yesu asalaki nini mpo ete asalisa bato kozanga ete basenga ye?
4“Tozwa ndakisa moko. Yesu azalaki moto akolingaka baninga mpe akokabolaka mpasi na bango. Na kotangaka Malako 10:1, 10, 13, 17, 35, okomona ete bato ya mibu nyonso mpe na mitindo nyonso bazalaki kobelema epai na ye. Mbala soki mibale, azingaki bana mike na maboko na ye. (Malako 9:36; 10:16) Mpo na nini bato nyonso, ata bana, bazalaki kosepela kozala esika moko na Yesu? Mpamba te azalaki komibanzabanza mpenza mpo na bango. (Malako 1:40, 41) Amonisaki yango na ndenge azalaki kobanda kolobisa bato oyo bazalaki na mposa na lisalisi. Na ndakisa, totangi ete na Naina, ntango ‘amonaki’ bazali komema ebembe ya mwana ya mwasi—mokufeli-mobali ‘abelemaki’ mpe asekwisaki elenge yango. Lisolo elobi te ete moto moko asɛngaki ye ete asala likambo yango. (Luka 7:13-15) Esika mosusu, kozanga ete moto asenga ye, azwaki likanisi ya kobikisa ebosono mpe moto moko azalaki na nzoto ya kovimba.—Luka 13:11-13; 14:1-4.
5. Masolo yango ya mosala na Yesu malakisi biso nini na ntina na bizaleli mpe misala na Jéhovah?
5 Ntango ozali kotanga masolo yango, zwa ntango ya kokanisa na mituna oyo: ‘Mpo ete Yesu amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza, masolo yango mazali kolakisa ngai nini na ntina na bizaleli mpe mitindo na Jéhovah?’ Esengeli kolendisa biso na koyeba ete Jéhovah azali Nzambe na bolingo mpe akoyebaka mpasi na bato. Bolingo monene oyo azali komonisa ntango nyonso epai na bato etindaki ye na kozwa likanisi ya kosalela bango malamu. Apusamaki na makasi te mpo ete atinda Mwana na ye “lokola lisiko mpo na bato mingi”. (Matai 20:28; Yoane 3:16.) Akolukaka mabaku ya ‘kokangama’ na baoyo bazali pene mpo na kosalela ye na bolingo. (Deteronome 10:15). Biblia elobi ete “miso na ye ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema peto liboso na ye”.—2 Ntango 16:9.
6. Toyokaka nini ntango tozali kokanisa na bolingo mpe motema mawa na Jéhovah ndenge Mwana na ye amonisaki yango malamumalamu?
6 Kokanisa moke likoló na bolingo mpe na motema mawa na Jéhovah, bizaleli oyo Mwana na ye alakisaki biso, ekosepelisa mpenza motema na yo, ekofuluka na botondi mozindo mpo na bizaleli na Ye ya kokamwa mpe oyo ezali kobenda biso. Botondi yango ekopusa yo epai na ye. Okokoma na mposa ya kosolola na ye kozanga mokakatano kati na libondeli na ntango nyonso mpe na mabaku nyonso. (Nzembo 65:2) Boyokani yango ekobelemisa bikanganeli bikangisi yo na ye.
7. Nsima na kokanisa likoló na bolingo mpe motema mawa na Jéhovah, okomituna mituna nini? Mpo na nini?
7 Kasi kobosana te ete komipesa na makambo na Nzambe etali bobele losambo te. Lokola molimboli na Biblia R. Lenski alobi yango, ezali “komonisa losambo na biso, bosembo na biso, mpe misala oyo mibimi na yango (C’est nous qui soulignons.) Nsima na kokanisa likoló na bolingo mpe na motema mawa na Jéhovah ndenge Yesu amonisaki yango na malamu nyonso, omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kokokana malamu koleka na Jéhovah na likambo yango? Bato basololaka na ngai kozanga mokakatano?’ Soko ozali na bana, basengeli kobelema epai na yo kozanga mokakatano Mpe soko ozali nkulutu, bandeko na lisangá basengeli kobelema epai na yo kozanga kokakatana. Nini ekosalisa yo na likambo yango? Soko ozali na bolingo mpe na motema mawa. Esengeli na yo kokolisa bolingo ya solo mpo na bazalani. Soko ozali komibanzabanza mpenza mpo na bamosusu mpe ozali pene na kosalisa bango, bakomona yango mpe bakobendama epai na yo.
8. (a) Nini osengeli kobosana te na ntango ozali kotanga masolo ya Biblia matali Yesu? (b) Masolo mazwami na mikapo mitangami na nse na paragrafe mazali kolakisa biso nini na ntina na Jéhovah?
8 Ntango ozali kotanga masolo ya Biblia matali Yesu, kobosana te ete maloba na ye mpe misala na ye ekoki kolakisa yo makambo mingi likoló na Jéhovah”.a Mpe soko botondi na yo mpo na bizaleli na Nzambe, bizaleli oyo Yesu amonisaki epusi yo na koluka kokokana na ye, na ndenge yango, ozali komonisa ete omipesi na makambo na Nzambe.
Tomonisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe epai na basangani na libota na biso
9, 10. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki mwa ntango moke liboso na liwa na ye ete azalaki kolinga mama na ye mpe azalaki komibanzabanza mpo na ye? (b) Mpo na nini Yesu atikaki Marie epai na ntoma Yoane, kasi epai na bandeko na ye ya mosuni te?
9 Bomoi mpe mosala na Yesu Klisto ekolakisa biso mingi mpo na ndenge ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe esengeli komonisama. Tozali na ndakisa kitoko kati na Yoane 19:25-27, epai totangi: “Pembeni na [nzete na kufal na Yesu batelemi wana, mama na ye mpe ndeko mwasi na mama na ye; Malia mwasi na Kelopa mpe Marie Madeleine. Emoni Yesu mama na ye mpe [jean,] moyekoli molingami, azalaki kotelema pembeni, alobi na mama na ye ete, Mama, tala mwana na yo. Na nsima alobi na moyekoli yango ete, Tala mama na yo. Longwa na ntango yango, moyekoli yango akamati ye na ndako na ye moko.”
10 Kanisa moke! Mwa ntango moke liboso na kotika bomoi na ye ya mabelé, Yesu amibanzabanzaki na bolingo nyonso mpo na mama na ye, Marie (na ntembe te mobali na ye asilaki kokufa na ntango yango), mpe apesaki ye epai na Yoane, ntoma molingami. Mpo na nini apesaki ye epai na Yoane, kasi epai na moko na bandeko na ye te? Mpamba te azalaki komibanzabanza bobele na biloko ya mosuni te mpo na mama na ye, kasi lisusu mpo na kolongono na ye ya elimo. Ntoma Yoane (oyo mbala mosusu azalaki cousin na Yesu) amonisaki kondima na ye, nzokande emonani ete bandeko ya mosuni ya Yesu bandimelaki naino ye te.—Matai 12:46-50; Yoane 7:5.
11. (a) Engebene Paulo, ndenge nini moklisto akoki komonisa ezaleli na kobanga Nzambe kati na libota na ye? (b) Mpo na nini moklisto nyonso ya solo ekosalisaka baboti na ye oyo banuni?
11 Nini emonisi ete ebongiseli oyo ezwamaki na Yesu ezalaki elembeteli ya ezaleli na komipesa na makambo Nzambe? Ntoma Paulo alimboli boye: “Omemya basi-bakufeli-mibali baoyo bazali sembo. Nde soko mwasi-akufeli-mobali azali na bana to bana na bana na ye, bango bayekola komipesa na makambo na Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bazongisa mwa makabo epai na baboti (mpe bankokol. Mpamba te yango ekosepelisa Nzambe.” (1 Timote 5:3, 4) Lokola Paulo alobaki yango, kokumisa baboti na kopesaka bango lisalisi ya mosuni soki esengeli, ezali elembo na ezaleli ya komipesa na makambo na Nzambe to kobanga Nzambe. Na ndenge nini? Jéhovah, Mozalisi ya libota, asengi na bana ete bakumisa baboti na bango. (Baefese 3: 14, 15; 6:1-3) Na yango, moklisto nyonso azali koyeba ete na kokokisaka mikumba na ye kati na libota azali komonisa bobele te ete alingaka baboti na ye, kasi lisusu azali kobanga Nzambe mpe azali kotosa mibeko na ye.—Tala Bakolose 3:20.
12. Ndenge nini okoki komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe epai na baboti na yo oyo banuni mpe eloko nini esengeli kopusa yo na kosala bongo?
12 Ndenge nini okoki bongo komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe epai na basangani ya libota na yo? Esengeli mpenza kozwa bibongiseli mpo na kokokisa bamposa ya elimo mpe ya mosuni ya baboti na yo oyo banuni, lokola Yesu asalaki yango. Ye oyo akosala ndenge yango te akomonisa ete azali kobanga Nzambe te. (Tala 2 Timoté 3:2, 3, 5). Soko moklisto amipesi na Nzambe azali kokokisa bamposa ya baboti na ye, yango ezali bobele mpo na motema boboto te to mpo ete asengeli kosala bongo, kasi ezali mpo ete alingi libota na ye mpe ayebi motuya nyonso oyo Jéhovah akopesaka na mokumba yango. Lisalisi oyo akopesa na baboti na ye banuni ekomonisa bongo ete azali kobanga Nzambe.b
13. Ndenge nini moklisto oyo azali tata na libota akoki komonisa ezaleli ya komipesa na matambe na Nzambe kati na libota na ye?
13 Ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe ekoki komonisama na ndako na ndenge mosusu. Na ndakisa, moklisto oyo azali tata na libota, azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni, ya bolingo mpe ya elimo ya libota na ye. Na yango, longola bamposa na bango ya mosuni oyo azali kokokisa, asengeli kobongisa na bolingo nyonso boyekoli ya Biblia kati na libota oyo ekosalema mbala na mbala. Akobongisa ntango mpo na kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola elongo na basangani ya libota na ye. Akomonisa bokatikati na koyebaka ete bazali mpe na mposa ya kopema mpe ya kominanola. Mpe akozala na mayele na kotya makambo ya ntina na esika ya liboso, mpe akokeba ete misala na ye kati na lisangá epusa ye te na kozanga kotalela bamposa ya libota na ye. (1 Timoté 3:5, 12). Mpo na nini akosala makambo nyonso wana? Bobele mpo ete ezali mokumba na ye te, kasi mpo ete azali na bolingo mpo na libota na ye. Ayebi ete na miso na Jéhovah ezali na ntina mingi ete abatela libota na ye. Na kokokisaka bongo mokumba na ye ya mobali mpe tata, akomonisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe.
14. Ndenge nini mwasi moklisto akoki komonisa ezaleli na kobanga Nzambe kati na libota na ye?
14 Basi baklisto bazali mpe na mokumba ya komonisa ezaleli na kobanga Nzambe kati na libota na bango. Ndenge nini? Biblia elobi ete mwasi asengeli ‘kotosa’ mobali na ye mpe “kozala na limemya mozindo epai na ye”. (Baefese 5:22, 33). Ata soki mobali na ye azali mondimi te, asengeli ‘kotosa’ ye. (1 Petelo 3:1.) Mwasi moklisto akomonisa botosi yango na kosimbaka bikateli ya mobali na ye na ntango ezali kobuka mibeko na Nzambe te. (Misala 5:29). Mpo na nini akondima mokumba oyo? Bobele te mpo ete akolingaka mobali na ye, kasi mingimingi mpo ayebi ete kosala bongo “ebongi kati na Nkolo”—elingi koloba ete elongobani na ebongiseli oyo Nzambe atyaki mpo na libota. (Bakolose 3:18) Na kotosaka mobali na ye na bolingo, akomonisa bongo ete amipesi na makambo na Nzambe to azali kobanga Nzambe.
“Nabimi mpo na ntina yango”
15. Na mosala nini Yesu amonisaki polele ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
15 Ezali mpenzampenza na ‘kosakolaka nsango malamu ya bokonzi na Nzambe’ nde Yesu amipesaki na makambo na Nzambe na motindo moleki malamu. (Luka 4:43). Na bambula misato na ndambo oyo elandaki nsima na batisimo na ye na Yordani na mobu 29, amipesaki na molende nyonso na mosala oyo ya ntina. Alobaki ete: “Nabimi mpo na ntina yango”. (Malako 1:38; Yoane 18:37). Kasi ndenge nini mosala yango ezalaki elembo ya komipesa na ye na makambo na Nzambe?
16, 17. (a) Nini epusaki Yesu na kosakola mpe koteya ma molende nyonso? (b) Mpo na nini mosala ya kosakola mpe ya koteya ekokisamaki na Yesu ezalaki elembo ya ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
16 Tomikundola ete ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe ekopusa moto oyo azali kosalela yango na kozala na bomoi na ndenge endimami na Nzambe mpo ete azali na bolingo epai na ye mpe na botondi mozindo mpo na bizaleli na ye kitoko. Na bongo, nini epusaki Yesu na kolekisa bambula ya nsuka ya bomoi na ye na mabelé na kosakola mpe na koteya na molende? Ezalaki bobele mpo ete asengelaki kosala bongo? Na ntembe te ezali mpo ete azalaki komibanzabanza mpo na bato. (Matai 9:35, 36) Mpe akangaki ntina ete kopakolama na ye na elimo santu epesaki ye mokumba ya kokokisa mosala na ye. (Luka 4:16-21) Kasi azalaki na mikano mozindo koleka.
17 Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu alobaki na polele nyonso epai na bantoma na ye: “Nalingi Tata.” (Yoane 14:31) Bolingo na ye ezalaki kouta na boyebi mozindo ya bizaleli na Jéhovah. (Luka 10:22) Lokola apusamaki na motema efuluki na botondi, Yesu azalaki na esengo ya kosala mokano ya Nzambe. (Nzembo 40:8) Yango ezalaki bongo “bilei” na ye eloko ekoki kozanga te na bomoi mpe ya elengi mingi (Yoane 4:34) Amonisaki malamumalamu ndenge nini “koluka liboso bokonzi” na esika ya kotya matomba na biso moko na esika ya liboso. (Matai 6:33) Mpo na mosala yango, ya koteya mpe kosakola, eloko emonisaki ete ezali elembo ya ezaleli na ye ya komipesa na makambo na Nzambe, ezali lolenge na yango te to mpe motuya na yango te, kasi ezalaki nde ntina oyo akokisaki mosala yango.
18. Mosala na biso ya kosukola ekoki kozala elembo ya ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe soko tozali kosangana na yango se likolólikoló?
18 Ndenge nini tokoki komekola Yesu, ye “ndakisa” na likambo yango.? (1 Petelo 2:21) Baoyo nyonso bazali kondima libyangami na Yesu ‘na koya mpe kolanda ye’ bazali kozwa epai na Nzambe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kozalisa bayekoli (Luka 18:22; Matai 24:14; 28:19, 20). Yango elimboli ete soko tozali kosangana se mwa moke na mosala ya kosakola nsango malamu tozali kolanda ezaleli na kobanga Nzambe? Te ezali bongo mpenzampenza te. Soko tozali kosangana na mosala ya kosakola se likololikolo to bobele mpo na kosepelisa basangani ya libota na biso to bato mosusu, mosala na biso ekoki mpenza kotalelama te lokola ‘elembo ya ezaleli na kobanga Nzambe’.—2 Petelo 3:11.
19. (a) Mokano na biso ya yambo kati na mosala ya kosakola esengeli kozala nini (b) Soko tozali na bolingo mozindo mpo na Nzambe, yango ekobimisa mbuma nini?
19 Tosengeli kozala na mikano mozindo koleka, lokola Yesu, ye oyo alobaki: “Okolinga Jéhovah, Nzambe na yo na motema na yo mobimba (na bamposa na yo mpe mayoki na yo mozindo) mpe na molimo na yo mobimba (bomoi na yo mpe mobimba na yo) mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.” Na yango, mokomeli moko ya mayele abakisaki ete kosala boye . . . “eleki malamu na mbeka na kotumba nyonso mpe miboma.” (Malako 12:30, 33, 34) Oyo ezali na ntina ezali bobele makambo oyo tozali kosala te, kasi lisusu ntina oyo epusi biso na kosala yango. Bolingo mozindo mpo na Nzambe, bolingo oyo euti mpenza na mobimba na biso, yango nde esengeli kozala mokano ya liboso ya makambo oyo tozali kosala kati na mosala ya kosakola. Soko ezali bongo, tokosepela bobele na mosala esalemi likolólikoló te, kasi tokoluka komonisa bozindo ya ezaleli na biso ya komipesa na makambo na Nzambe na kosalaka nyonso oyo ekoki na biso. (2 Timote 2:15) Epai mosusu, soko bolingo mpo na Nzambe ezali eloko oyo ezali kopusa biso, tokotonga baninga na biso te mpe tokoluka te kotala mosala na bango mpo na komona soki ekokani na oyo ya biso.—Bagalatia 6:4.
20. Ndenge nini tokoki kozwa litomba mpenza na ndakisa na Yesu mpo na kolanda ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
20 Tokoki kozala na botɔndi mingi epai na Jéhovah na ndenge amonisi biso libombami mosantu ya komipesa na makambo na Nzambe. Soko tozali koyekola na likebi nyonso maloba mpe misala na Yesu mpe soko tozali kotya makasi mpo na komekola ye, ekozala na biso petee mpo na kokolisa ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe mpe komonisa yango mobimba Jéhovah akobenisa biso mingi soko tolandi ndakisa na Yesu na kozalaka baklisto bamipesi mpe babatisami baoyo bamipesi na makambo na Nzambe.—1 Timoté 4:7, 8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandakisa mosusu, talela makambo oyo tokoki koyekola likoló na Jéhovah na kotangaka masolo malandi: Matai 8: 2, 3; Malako 14:3-9; Luka 21:1-4; mpe Yoane 11:33-36.
b Mpo na koyeba ndimbola nyonso na ntina etali komonisa ezaleli na kobanga Nzambe epai na baboti na biso banuni, tala La Tour de Garde du 1 juin 1987, pages 13 kino 18.
Bozongeli
◻Mpo na nini losengeli kotalela ndakisa na Yesu mpo na kolanda ezaleli na komipesa na makambo na Nzambe?
◻Toyekoli nini likoló na Jéhovah mpo na bolingo mpe motema mawa oyo Yesu amonisaki na ndenge malamu mpenza?
◻Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli na kobanga Nzambe epai na basangani ya libota na biso?
◻Mokano na biso esengeli kozala nini mpo ete mosala na biso ezala elembo ya komipesa na makambo na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 21]
Moklisto oyo azali tata na libota azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya mosuni, bamposa ya bolingo mpe bamposa ya elimo ya libota na ye.
[Elilingi na lokasa 23]
“Nde soko mwasi akufeli mobali azali na bana to bana na bana na ye, bango bana . . . bazongisa makabo epai na baboti mpe epai na bankoko.”