Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Mwana moke ya mbula mitano alamusi mposa ya baninga na ye
TALA likambo ekomelaki elenge mobali moko ya mbula mitano kati na ba Témoins de Jehovah koleka 40 000 ya mboka Venezuela. Engebene diskur piblike oyo ezwami na mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création?, oyo alandaki na likebi nyonso mpe boyekoli oyo libota esalaki na mokanda yango, mwana wana oyo abotami na libota ya teokratike ayebaki ete évolution ezalaki koloba ete moto autaki na ’’supu’’. Eteni moko ya mokanda yango ezali kolobela liteya ya bato babengami évolutionnistes, liteya oyo elobi ete bomoi eutaki na supu ya biloko na mokili bisangani.
Uta mibu 14. libota moko ya pembeni na bango (mobali, mwasi, bilenge mibale mpe mwana moko ya mwasi ya mibu nsambo) ezalaki koboya bilendiseli ya libota ya Batemwe mpo ete bayekola Biblia mpe kokenda elongo na bango na Salle du Royaume.
Mokolo mosusu, wana mama azalaki kosukola basani, ayokaki lisolo moko kitoko kati na mwana na ye mpe mwana mwasi ya mibu nsambo oyo ya moninga na bango, pembeni na banzete oyo ekaboli bandako mibale Mwana mobali alobaki: “Oyebi te? Bato ya mokili balobaka ete moto auti na supu!‘’ Mwana oyo ya mwasi ayanolaki ndenge azalaki kosala yango mbala mingi: “Ozali na ligboma!’‘ Mwana mobali alobaki: “Te, nazali na ligboma te. Bato ya mokili balobaka ete moto autaki na supu; kasi ezali Jéhovah nde azalisaki moto.” Likanisi yango ezalaki kosekisa mwana mobali wana. Azalaki kokanisa ete ezali supu lokola supu nyonso, oyo ye azalaki koboya kolya. Bongo alobaki: “Papa na ngai asengeli kopesa mokanda création epai ya papa na yo mpe akomona ete ezali Nzambe nde azalisaki moto.“ Ata bongo, mwana oyo ya mwasi ayanolaki ete bazalaki bakatolike mpe lisolo esukaki wana.
Ntango mobali, nkulutu kati na lisangá, azongaki na mosala, mwasi na ye ayebisaki ye lisolo oyo ayokaki. Atako lisolo kati na bana mibale wana esekisaki bango mingi, tata akanisaki ete ezalaki mbala mosusu Jehovah nde alingaki apesa litatoli mosusu epai na moninga na ye ya pembeni. Akendaki kokutana na ye mwa mikolo na nsima, mpe ayebisaki ye lisolo ya bana oyo mibale. Alobaki na ye ete alingaki kopesa ye mokanda création ndenge mwana na ye ya mobali alingaki. Temwe asengaki moninga na ye ete atanga yango kozanga makanisi mabe mpo na koyeba esika moto autaki.
Nsima na mwa mikolo, Temwe wana akamwaki mpamba te baninga na bango oyo bazali koboya solo uta bambula ebele bayaki epai na ye, mpe bamonisaki mawa na bango mpo na ezalela oyo bazalaki na yango na bambula nyonso wana. Balobaki ete basepelaki mingi na ndenge mokanda création ekomamaki.
Na bongo, boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na basangani ya libota yango. Babandaki koyangana na makita mpe bakomaki nokinoki basakoli ya nsango malamu. Mobali, mwasi na ye mpe bana na bango oyo basili kokola bazwaki batisimo na Assemblée ya distrike, mpe mwana moke ya mwasi akomi mosakoli ya Bokonzi. Mwasi abandaki kosala mbala na mbala mosala ya pionnier auxiliaire, bobele nsima na batisimo na ye.
Yesu Klisto ayebi baoyo bazali na motema malamu mpe akoki kosalela ata bana mike mpo na kosimba motema na bango.—Yoane 10:14.