Bazuaki mabunga na kati ya Biblia?
BATO na mayele mpe batyoli na Biblia basili mpenza komonisa ete Biblia ezali na mabunga mpe na makambo mauti na makanisi na bato? Liboso ya kondima yango, osengeli koyeba lisusu ete, ata soki ebele na balimboli na Biblia bazali komonisa likanisi na bango na elobeli ya kondimisa mpe na ekateli makasi, bazali ntango nyonso na elonga te. Mbala mingi makanisi na bango matongamaka likoló na miboko makasi te.
Makanisi na lokuta oyo bato bamizwelaki
Mpo na komonisa maloba na batyoli na Biblia oyo masilaki kondimama libela, tokamata oyo ya S. Driver, oyo atyolaki makasi mokanda na Danyele. Biso banso tozali mpenzampenza kokanisa ete mokanda yango ekomamaki na Danyele ye moko na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso, na Babilone. (Danyele 12: 8, 9) Kasi Driver ye azali koloba ete yango ekomamaki bikeke mingi na nsima. Mpo na nini? Apesi lokola “elembeteli” ete mokanda yango ezali na maloba ya greke, mpe asukisi boye: “Tokoki kondima na motema moko ete maloba wana makokaki kosalelama kati na mokanda ya Danyele bobele soki ekomamaki nsima na bopusi ya bagreke na Azia na nzela ya bolongi na bisika epai ya Alexandre le Grand.” Nzokande, Alexandre abandaki bolongi na ye ya bisika penepene na 330 liboso ya ntango na biso.
Driver azali mpenza kondimisa na motema moko. Nzokande, azali bobele kotalela maloba misato mpamba ya greke, maloba misato oyo ya bibeteli na miziki. (Danyele 3:5) Nzokande, lokola tozali kozongela Lisolo ya kala ya bato oyo eyebani, Bagreke bazalaki na boyokani ya penepene elongo na Asie occidentale, yango ezali mpenza endimiseli makasi mpo na kondimisa ete bibeteli na miziki oyo ezali na bankombo ya bagreke esalelamaki te na Babilone na ekeke ya motoba liboso na ntango na biso? Ezali mpenza elembo moke mpo na koboya kondima date oyo bakomaki yango mpe mokomi ya mokanda na Danyele.
Tala ndakisa mosusu: Ezali motindo ya kotalela mikanda mitano ya liboso ya Biblia. Lokola yango eyebani, mikanda yango mikomamaki kati na biteni na yango minene epai na Moise, penepene na 1500 liboso ya ntango na biso. Nzokande, batyoli bazali koloba ete mikanda yango mizali na bokesene kati na ekomeli na yango. Lisusu, bazali komonisa ete bazali kolobela Nzambe mbala mosusu na nkombo na ye Jéhovah, mbala mosusu na liloba ya hébreu oyo elimboli “Nzambe”. Na nzela na makambo wana, basukisi ete mikanda mitano wana ya Biblia mizali mpenza liboke ya makambo ndenge na ndenge oyo mazangi boyokani oyo makomamaki na bileko bikeseni mpe masangisami kati na esika moko ya libela mwa bileko moke nsima na 537 liboso ya ntango na biso.
Liteya oyo ezali kondimama na bato mingi, nzokande moto ata moko te alimbolaki mpo na nini Moise akokaki kosalela te na mbala moko maloba Jéhovah mpe Nzambe mpo na koloba na ntina na Mozalisi. Moto moko te andimisaki ete azalaki na makoki te mpo na kokoma na mitindo mikeseni lokola azalaki kokoma makambo makeseni, azalaki kokoma na bileko bikeseni ya bomoi na ye to mpe azalaki kosalela maziba ya kalakala mpenza. Lisusu, lokola elobi yango John Romer kati na Testament—La Bible et l’Histoire (Angl.), “botemeli ya solo mpo na metode nyonso ya kotalela ezali oyo ete na mikolo oyo bamoni ata molongo moko te ya makomi na kala oyo ekondimisa kozala ya mateya oyo ezali koluka bobele biteni ya makomi makeseni oyo bato mingi ya mayele bandimi yango lelo”.
Cyclopedia ya Mcclintock mpe Strong ezali komonisa biso polele na ntina na likanisi moko ya liboso oyo batyoli mingi ya Biblia bazali kosalela: “Bato na mayele . . . bazali koloba ete makambo maleka kala oyo mazali kolongisa masolo mazali solo mpenza, oyo ekokani na lolenge na yango ya solo na makambo mosusu masalamaki oyo biso toyebi . . . Moto oyo abandisi likambo akoki komonisa likambo moko oyo ezali na boyokani te na mibeko ya bozalisi oyo eyebani lokola ete ezalilikambo ya solo? bongo . . . elingi koloba likambo oyo eyebisami esalamaki te.’’
Na kozalaka na likanisi motindo oyo, mingi bazali kokanisa ete bikamwiseli bisalemaki te, mpo ete bikamwiseli bizali koyokana te na mibeko ya bozalisi oyo eyebani. Bobele bongo, bisakweli oyo bikokokisama na liboso kuna ezali lokuta, mpamba te bato bazali na likoki te ya koyeba makambo oyo makoya liboso kuna. Ekamwiseli nyonso ezali kouta na masolo mpamba. Esakweli nyonso oyo ekokisamaki polele esengeli ezala ete ekomamaki nsima ya kokisama na yango.a Ezali bongo mpo na yango bato mosusu bandimi ete bisakweli na mokanda ya Danyele bikokisamaki na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso mpe ete mokanda oyo esengelaki bongo kokomama na ntango yango.
Kasi makanisi motindo oyo mazali kouta na endimeli oyo: Nzambe azali to te, soki azali, akomikotisaka te na makambo oyo bato bazali kosala. Kasi, Biblia mobimba ezali komonisa kozanga ntembe ete Nzambe azali mpe azali komikɔtisa kati na Lisolo ya makambo na bato. Soki yango ezali solo mpe makambo masalamaki mazali komonisa yango, eteni monene ya moboko na kotiola Biblia na ntango ya lelo ekweisami.
Sianse ya lelo emonisi ete Biblia ezali lokuta?
Engebene bamosusu, sianse esili komonisa ete tokoki kondimela Biblia te. Tokoloba nini mpo na likanisi yango? Ya solo, ntango Biblia ezali kotalela likambo moko oyo ebimi na sianse, mbala mingi likambo oyo Biblia ezali koloba ekokani na oyo bato na sianse ya lelo bazali koteya.
Na ndakisa, Biblia ezali kopesa mitinda oyo mibongi mpo na likambo litali bopeto (hygiene) mpe bokono bozali kozwama na nzela ya moto mososu. Tala oyo tozali kotanga kati na Manuel de médecine coloniale (angl.): “Ezali likambo ya kokamwisa na kotalela bibongiseli bizwamaki mpo na bopɛto na eleko ya Moise. . . . Ezali solo ete molongo ya bokono ndenge na ndenge ezalaki polele. Ezali na maladi oyo bazalaki kobianga ‘bokono na loto’ mpe bokono ya makasi, ya lolenge mosusu ya litono, ebiangamaki ‘maba’, kasi ekokaki kozala mpe ete mitinda oyo mizalaki kosenga moto oyo azali na bokono afanda esika na ye moko, oyo misengelaki kotosama kozanga bopotu, mipesaki matomba malamu.”
Ndakisa mosusu, Biblia ezali koloba ete: “Bibale nyonso ekotiola kino mai-namonana, kasi mai-na-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” (Mosakoli 1:7) Lolenge oyo eyebisami mpo na ndenge mai mazali kotiola ekoki kozwama kati na mokanda nyonso na eteyelo lelo. Mai na bibale ezali kosopana na mai-na-monana, epai kuna ezali kobongwana londende, mpe lisusu ekobongwana mampata na likolo, nsima ekonoka lokola mbula to mbula mpembe mpe ezongi lisusu na bibale.
Bobele na likanisi wana, bato ya sianse bamonisaki ete ngomba ezali komata to koya molai mpe ezali kokita, mpe ete ekomaki na ntango moko boye ngomba ezindaki na nse na mai na-monana; nzokande, likanisi oyo eyokani malamu na maloba oyo makomamaki na lolenge ya kitoko na mokomi na nzembo: “Mai etelemaki likolo na ngomba Ngomba ebimaki, mabwaku mazindaki, kino esika eponaki yo mpo na yango.”—Nzembo 104:6, 8.
Mokomi moko endimisaki ete: “Bakomi nyonso ya Kondimana na Kala bakanisaki ete mabelé ezali plat, mpe mbala mosusu bazalaki kokanisa ete esimbami na likonzi moko.” Makanisi oyo mazali lokuta. Yisaya alobaki ete: “Ye oyo akofanda likoló na cercle ya mabelé”. (Yisaya 40:22.) Yobo alobelaki lisusu mpo na moto yango: “Epai na likolo, atandi yango likoló na esika mpamba, atelemisi mabelé likoló na eloko te.” (Yobo 26:7) Kolimbolaka ete mabelé ezali cercle oyo etandami likoló na esika mpamba mpe esimbami na eloko te oyo ezali komonana ezali yango nde eyebani lelo.
Evolution
Sikawa tokoki koloba nini mpo na bongolabongola ezali kati na Biblia mpe liteya ya évolution’?b Encyclopédie britanique elobi: “Liteya ya évolution endimami na bato mingi ya sianse.” Kasi, na maloba mazangi mindɔndɔ mpo makoka koyokama na ntango oyo liboso na bokundoli ya sianse, Biblia elimboli ete bomoi eutaki na kozalisama na Nzambe ye moko mpe ete bikelamu na bomoi ya ndenge na ndenge na ebandeli biutaki na évolution te, kasi bizalisamaki—Genese 1:1; 2:7.
Bato oyo bateyaka liteya ya évolution bakeseni te na baoyo bazali kotyola Biblia. Bandimisami makasi na makanisi na bango mpe bazali koloba yango na lolendo. Kasi bamosusu bazali na mwa kolongobana mpo na kondima ete liteya ya évolution ezali na mabunga. Moko kati na bango alobi mpo na oyo babengi “modèle darwinien” ya évolution ete: “Lokola ezali bobele likanisi mpo na makambo malekaki kala, likanisi oyo ekoki kososolama malamu te na nzela ya eksperianse to komona lokola sianse ezali kosala mpo na makambo mosusu . . . ,Lisusu, liteya ya évolution ezali kotalela makambo mingi kaka na makanisi lokola ebandeli ya bomoi, ebandeli ya mayele, bongo na bongo bobele makanisi oyo makoki komonisama polele te, mpe mpo na yango nzela ezali te mpo na kotya yango kati na masini mpo na bolukiluki Mosusu alobi ete évolution ezali likambo ya “solo” oyo esalamaki. Nzokande, ezali kobimisa mokakatano monene mpo na komonisa ndenge nini évolution ezali likambo ya “solo”: “Ntango moto azali koluka biteni to bilembo oyo bizali komonisa ete motindo boye ya banyama babongwanaki motindo boye, elembo ata moko te ezali komona” Le cou de la girafe (Angl.), ya Francis Hitching.
Boyebi na bango ezali na ndelo nini?
Makanisi mingi mpo na kolongisa liteya ya évolution mazali kopesama na bato oyo basalaka boyekoli ya mabelé mpe baoyo bazali koyekola lolenge bomoi na bikelemu ezalaki, bango bazali koyekola etando na biso ndenge ezalaki. Bato oyo ya sianse bazali kokutana na mikakatano ndenge moko na baoyo bayekolaka minzoto (astronomes). Baoyo bayekolaka minzoto, na lisalisi na bamasini ndenge na ndenge, bazali kotalatala nguya ya móto oyo ezali kouta na liziba oyo ezali mosika mingi, ezala minzoto, bitando, ba galaxies to minzoto mosusu oyo eyebani te lokola quasars. Lokola bazali kosala mitango oyo bakoki elongo na oyo bayebi, bazali kokanisa ba théories mpo na makambo oyo mazali makasi koleka lokola lolenge minzoto ezalaka mpe ebandeli ya molongo. Mingimingi bazali kozwa ntango te ya kotalela malamu makanisi to ba théories na bango, kasi ntango bazali kosala yango, ezali komonana ete ezali na mabunga to nyonso ezali ya lokuta.
Gerrit Verschuur, moto oyo ayekolaka nguya oyo ezali kobimisama na minzoto, akomaki: “Bamasini ya nsuka oyo Etats-Unis atindaki na molongo mpo na koyekola koyeba makambo mazali koleka na molongo emonisaki ete boyebi na biso solo mpo na makambo oyo mazali kati na molongo ezali mpenza komonisa na kokamwisa nyonso ete boyebi to mayele yango ezali moke mingi. Eyaki koyebana ete, na komonana na penepene, etando oyo babengi Mars ekesenaki mingi na oyo nyonso tozalaki kokanisa awa na mabelé mpo na yango . . . Moko te kati na baoyo bayekolaka minzoto akanisaki te ete bampete ya etando babengi Jupiter makozala na lolenge ya kokamwisa . . . Ekamwiseli monene oyo ezelaki biso ezalaki oyo ya etando babengi Saturne, ntango bamasini oyo etambolaka na molongo (sondes Voyageurs) ekangaki bafoto ya bampete oyo etongamaki lokola pete na kati ya pete mosusu, wana ezalaki kopumbwa moko likolo ya mosusu mpe ezali bampete koleka bankoto.. . . . Ndenge ezali komonana na molongo ezali ndenge moko ntango ezali komonana na laboratware, epai bazali kokanga bafoto ya bililingi oyo bizali koyeisama monene mingi koleka. Kobelema nyonso ya penepene na eloko ezali komonisa makambo oyo tozalaki komizela na yango te oyo mazali kobulunganisa biso mpe mazali kokweisa bindimeli na biso ya kala.”
Bato oyo bazali koyekola nse ya mabelé, baoyo bayekolaka lolenge bomoi na bikelamu ezalaki mpe balukiluki mosusu baoyo bazali kopesa “bilembeteli” mingi ya liteya ya évolution, lokola baoyo bayekolaka lolenge ya minzoto; bazali kosepela na koyeba boumeli ya bambula oyo eloko to likambo ezali na yango, kasi ntaka na yango te. Lokola baoyo bayekolaka minzoto bazali kotalela mingi nguya oyo ezali kokatisa bantaka, basengeli mpe kotalela bilembo oyo biumeli mingi koleka etando. Lokola bato oyo bayekolaka lolenge ya minzoto, bato ya sianse bakoki kosala libunga na kozanga ntembe.
Tokoki kondima Biblia
Mpo na yango bato oyo bazali na makanisi malamu basengeli te komitika ete makanisi ya bato na mayele ya mokili oyo mabangisa bango kino kokoma na kokanisa ete tokoki kondima Biblia te. Nzokande, likebisi oyo emonisi te yango moko ete okoki kondima Biblia. Ezali mpo na yango osengeli kosala oyo batioli mingi na Biblia basalaki te: Kotanga Biblia na makanisi malamu (Misala 17:11) Esili koleka mwa bambula, moto moko oyo azalaki kokoma ba théatre ye moto na Australie, oyo kala azalaki kotiola Biblia, andimaki ete: “Mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ngai, nasalaki oyo mokomi nyonso na zulunalo asengeli mpenza kosala libosoliboso: kotalela malamu makanisi oyo azali na yango. . . . Nakamwaki, mpo ete makambo oyo nazalaki kotanga kati na Evanzile ezalaki masolo mpamba te to roman. Ezalaki bobele ‘kokomama ya makambo ndenge mazalaki mpe ndenge mamonanaki’ Kobanda na ebandeli kino nsuka, masolo na makambo ya kokamwa. . . . bolenge ya kokoma makambo ndenge mazalaki mpe ndenge mamonanaki ezali na elembo na yango mpenza; nzokande, tozali kokuta elembo yango kati na Evanzile.”
Tozali kolendisa yo ete alanda ndakisa na mobali yango. Tanga Biblia. Omizwila mayele na mozindo oyo ezali kati na mokanda oyo; tala ndenge nini bisakweli na yango bizali kokokana mpe ndenge nini boyokani oyo ezali kati na mikanda na yango nyonso ezali kokamwisa; wana nde okokanga ntina ete ezali mokanda ya masolo mpamba te kasi oyo ezali na boyokani na makambo mosusu ya sianse. (Yosua 23:14). Talela likambo yango yo moko mpo omona na lolenge nini mayele ya Biblia ekoki kopesa mbongwana oyo ekozala na matomba malamu kati na bomoi na yo, mpe okozala na ntembe lisusu te ete ezali Liloba na Nzambe. (2 Timoté 3:16, 17) Ee, tokoki kondima Biblia!—Yoane 17:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mingi na baoyo bazali koyekola Biblia bayebi ete likanisi yango esengeli kondimama te, mpamba te Makomami na greke, oyo makomamaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso, mazali koyebisa kokokisama ya bisakweli mingi na Makomami ya liebele oyo bilembeteli bimonisamaki ete bisakweli bikomamaki bikeke mingi liboso. Na ndakisa, likolo na esakweli ya Danyele 9:24-27, oyo ekokisamaki na mobimba na yango nyonso ata kati na makambo na yango ya mike na ekeke ya liboso, Makomami na greke mpe bakomi na masolo ya bato bazali kotatola mpo na yango.
b Mpo na koyeba malamu makambo oyo makesenisi évolution na bozalisi, tala mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou créationi?, oyo ebimisamaki na 1985 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
[Elilingi na lokasa 7]
Ezali mpasi epai na baoyo bazali koyekola lolenge bomoi na bikelamu ezalaki mpo na koyeba oyo elekaki kala lokola mpe ezali mpasi epai na baoyo bayekolaka lolenge na minzoto na koyeba oyo ezali mosika kati na molongo.