Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/2 lok. 3
  • Tokoki Kondimela Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki Kondimela Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya évolution ezali kosambisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Nasengeli kondima ete bomoi ebimá yango moko?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 1: Mpo na nini kondima ete Nzambe azali?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Evolisyo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/2 lok. 3

Tokoki Kondimela Biblia?

‘‘NTANGO tokutani na moto moko oyo alobi ete ye andimaka évolution te,tokoki mbala moko kondima kozanga kobanga ete tozali liboso na moto moko oyo ayebi makambo mingi te, zoba to bolole.” Okanisi boni mpo na maloba oyo ya biologiste Richard Dawkins? Soki ondimaka Biblia, ezali solo ete ondimaka liteya ya kozalisa kasi liteya ya évolution te. Na bongo tosengeli kondima ete ozali moto ayebi makambo mingi te, ete ozali zoba to bolole?

Tala maloba oyo: “Ba sipesialiste ya Kondimana na Sika bamonisaki, kozanga ata ntembe moke ete, Yesu ya mikanda ya yambo ya baklisto azali, kati na meko moko, elilingi mpamba ya makanisi na baklisto.” Mwa ndambo na maloba oyo ya Weekend Australian ezalaki kozongela maloba ya Robert Funk, molakisi ya makambo na nzambe na université mpe mokomi ya mikanda mingi mpo na makambo matali mangomba.

Robert Funk asalaki etuluku moko ya boyekoli oyo ebengamaki le séminaire de Jésus, oyo kati na yango ezalaki na bankama na bato balimbolaka Biblia, baoyo babebisaki ndimbola ya maloba na Yesu oyo mazwami kati na Biblia. Tala mwa ndambo na bosukisi na bango: Yesu azali mobandisi ya Tata na biso te; alobaki te ete basokemi bakozwa mabelé lokola libula, ata mpe ete bayeisi na kimya bakobiangama bana na Nzambe; Yesu alobaki te ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai . . . akokufa te.”​—Yoane 11:25, 26; Matai 5:5, 9; 6:9, 10.

Na ntembe te bosukisi oyo epesi yo mpasi; atako bongo, likambo ya malonga ezali kati na yango te. Ezali nde likambo ebimi na nzela na botongitongi Biblia na mikolo na biso, mpe uta mwa mikolo bazali koteya makanisi ya motindo moko kati na ba séminaire. Ekoki kozala ete ntango ozali mbala mingi koyoka bato na mayele kotyola Biblia, ete etombokisa yo. Nzokande, ntango bakonzi ya mangomba bazali kobeta ntembe mpo na bosolo ya masolo na Biblia, ozali mbala mosusu komituna soki ekozala ntango te ya kotalela etelemelo na yo. Ezali mpenza malamu na kondima Biblia nzokande, lokola yango ezali komonana polele, ebele na bato ya mayele kati na makambo matali nzambe bazali kondima yango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto