Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/1 lok. 32
  • Esimbaki Motema na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esimbaki Motema na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/1 lok. 32

Esimbaki Motema na ye

Na printemps eleki, kati na metro ya new-york, elenge mwasi moko azalaki kotanga mokanda La Révélation: le grand denouement est proche! Mobali moko afandaki penepene na ye, amonaki mokanda yango mpe, lokola azalaki kobalola bankasa, bililingi kitoko bizalaki mpenza kosepelisa ye. Alobaki ete “mokanda oyo ezali kitoko!”.

Mwasi yango oyo afandaki pembeni na ye andimaki ete “ee. Ezali kolimbola mokapo moko na moko ya Emoniseli, mokanda na Biblia.”

Atunaki lisusu. “Nakoki kozwa yango epai wapi”?

Elenge mwasi ayanolaki ete “kende epai ya ba Témoins de Jehovah. Mpe abakisaki: “Oyebi, oyo nazali na yango awa ezali ya sika, ezali na motuya ya badolare misato; nakoki kopesa yo yango.”

Nokinoki, mobali yango abimisaki mosolo na libenga na ye, mpe akamataki mokanda. Mpe awelaki kobima, mpamba te metro etelemaki.

Mokanda yango, ezali na ekangeli makasi mpe ezali monene motindo moko na zulunalo oyo, ezali kotalela verset moko na moko ya mokanda mobimba ya Emoniseli to Koyebisa. Ezali komonisa na polele nyonso banyama na yauli, dalagona, mwasi na pite mpe bilembo mosusu oyo bizali kati na Emoniseli. Okoki koyeba ndimbola na yango mpo na eleko na biso. Kokakatana te na kosenga mokanda yango uta lelo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto