Totombwela Jéhovah mbeka oyo ekosepelisa ye
“Bongo mpo na ye [Yesu Klisto], totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.”—BAEBELE 13:15.
1. Jéhovah apesaki elendiseli nini epai na Bayisraele basumuki?
JEHOVAH azali “mosungi” ya baoyo bazali kopesa ye mbeka oyo ezali kosepelisa ye. Ezali mpo na yango kala Bayisraele oyo bazalaki kotombwela ye mbeka ya banyama bandimamaki liboso na ye. Nzokande, mpo bazalaki kokwea ntango nvonso na masumu, bazwaki elendiseli oyo na nzela ya mosakoli Osea: “E Yisraele, zonga epai na Jéhovah, Nzambe na yo, mpo ete obetaki libaku mpo na mabe na yo. Bokumba maloba na bino elongo mpe bobongwana epai na Jéhovah. Boloba na ye ete: ‘Limbisa mabe nyonso; mpe yamba oyo ezali malamu, boye tokopesaka bana na ngombe na bibebu na biso.’”—Osea 14:1, 2.
2. ‘Bana na ngombe na bibebu’ ezali nini, mpe na maloba nini ntoma Paulo atangi esakweli na Osea?
2 Na yango, basaleli ya Jéhovah ya ntango ya kala balendisamaki mpo na kotombwela ye ‘bana na ngombe na bibebu na bango’. Yango ezalaki nini? Ezalaki mbeka na masanzoli mauti na motema. Na kotangaka esakweli yango, ntoma Paulo alendisi Baebele bakoka kotombwela “Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye”. (Baebele 13:15) Nini ekoki kosalisa ba Témoins de Jéhovah bakoka kopesa mbeka ya motindo yango lelo?
‘Tomekola kondima na bango’
3. Makambo nini ya ntina ntoma Paulo alobi, na Baebele 13:7, mpe yango ezali kobimisa motuna nini?
3 Soki tosaleli batoli oyo ntoma Paulo apesaki epai na Baebele, tokoki kotombwela epai na Oyo azali kopesa biso lisalisi ya nguya, Jéhovah Nzambe, mbeka oyo ekosepelisa ye. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki: “Bokanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo basakoli Liloba na Nzambe epai na bino. Bobanzabanza mpo na nsuka na bizaleli na bango mpe bomekolaka kondima na bango.” (Baebele 13:7) Ntoma Paulo azali koloba mpo na banani ntango ezali ye koloba: “Bokanisa baoyo bakokambaka bino” to “baoyo bakotambwisaka bino”?—Traduction du monde nouveau, ebimeli ya anglais elongo na mitindami ya 1984, note.
4. (a) Engebene makomi na greke, ‘baoyo bazali kokamba biso’ bazali kosala nini? (b) Epai na ba Témoins de Jéhovah banani ‘bazali kokamba bango’?
4 Ntoma Paulo azali koloba mpo na ‘baoyo bazali kokamba’ to bazali kotambwisa (versets 7, 17, 24). Liloba “kotambwisa”, oyo euti na liloba ya greke kubérnaô (gouverner), oyo elimboli “kokamba masuwa, kotambwisa (gouverner)”. Bakengeli baklisto bazali “kotambwisa” na boye ete bazali kosalela “makoki na bango mpo na kotambwisa” (na greke kubérnèséïs) mpo na kopesa litambwisi, kolakisa nzela na lisangá. (1 Bakolinti 12:28) Epai mosusu, bantoma mpe bankulutu mosusu ya Yelusaleme basalaki lisangani oyo ezalaki kopesa litambwisi mpe batoli na masangá nyonso. (Misala 15:1, 2, 27-29) Ezali mpo na yango, lelo, etuluku moko ya bankulutu oyo basali Collège central bazali kopesa litambwisi ya elimo na ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba.
5. Mpo na nini tosengeli kobondela mpo na bankulutu ya masangá mpe basangani ya Collège central, mpe ndenge nini tosengeli kosala yango?
5 Bankulutu ya masangá mpe basangani ya Collège central bazali kokamba biso; tosengeli bongo kotosa bango mpe kobondela Nzambe apesa bango mayele oyo bazali na yango mposa mpo na kotambwisa lisangá. (Tala Baefese 1:15-17) Ebongi ete tokanisa mpo na baoyo nyonso ‘basakolaki Liloba na Nzambe epai na biso’. Timoté ateyamaki bobele na mama na ye mpe nkoko na ye te, kasi lisusu, na nsima ateyamaki na ntoma Paulo mpe na baklisto mosusu. (2 Timoté 1:5, 6; 3:14) Na yango Timoté azalaki na likoki ya kotala malamu nsuka na bizaleli na baoyo bazalaki kokamba mpe komekola kondima na bango.
6. Kondima ya banani tosengeli komekola, kasi tosengeli kolanda matambe ya nani?
6 Bato lokola Abel, Noé, Abrahame, Sara, Rahab mpe Moïse bazalaki na kondima. (Baebele 11:1-40) Tokoki komekola kondima na bango kozanga ntembe, mpo ete bakufaki sembo epai na Nzambe. Kasi, tokoki mpe ‘komekola kondima’ ya mibali basembwi oyo lelo bazali kokamba biso. Ezali solo ete, tozali kolanda te matambe ya bato bazangi kokoka, mpo ete tozali kotalela Klisto. Edgard Goodspeed, mobongoli na Biblia, akomaki mpo na yango ete: “Mondimi azali kozwa bato minene ya kala lokola elakiseli te, mpo ete Klisto azali elakiseli malamu koleka mpo na ye. . . . Moklisto oyo azali kopota mbango asengeli kotalela Yesu.” Ee, ‘Klisto ayokaki mpasi mpo na biso, atikeli biso elakiseli mpo ete tolanda matambe na ye’.—1 Petelo 2:21; Baebele 12:1-3.
7. Makanisi mazwami na Baebele 13:8, makoki kozala na bopusi nini likoló na lolenge na biso ya kotalela mpasi oyo tozali koyikela mpiko mpo na Yesu Klisto?
7 Na kobendaka likebi mpenza likoló ya Mwana na Nzambe, ntoma Paulo abakisi ete: “Yesu Klisto azali motindo moko, lobi mpe lelo mpe libela.” (Baebele 13:8) Na kolandaka ndakisa oyo Yesu atikaki, batemwe ya sembo lokola Setefano mpe Yakobo batelemaki ngwi na bosembo na bango. (Misala 7:1-60; 12:1, 2) Lokola bandimaki kolanda Klisto kino na liwa, kondima na bango ebongi na komekolama. Ezala na ntango ya kala to lelo to na ntango ezali koya, bato oyo bazali na bizaleli na kobanga Nzambe bakoluka te na nzela elongobani te kokima liwa oyo bayekoli ya Yesu bakoki kozwa.
Toboya mateya ya lokuta
8. Likanisi nini ya ntina ezwami na Baebele 13:9?
8 Lokola bomoto mpe mateya na Yesu ezali kobongwana te, tosengeli koumela kati na makambo oyo ye moko mpe bantoma na ye bateyaki. Ntoma Paulo alobaki epai na Baebele ete: “Bopengwa te na mateya ndenge na ndenge mpe na bopaya. Malamu ete motema molendisama na bilei te kasi na ngolu, mpo baoyo bakotambolaka na bilei bongo bakozuaka litomba te.”—Baebele 13:9.
9. Makambo nini maleki motuya mpo na yango ntoma Paulo alobeli na mokanda na ye epai na Baebele?
9 Bayuda bazalaki kotya na esika ya liboso lolenge na kokamwisa oyo bazwaki Mobeko na ngomba Sinaï, mpe lisusu bokonzi na David oyo eumelaki mingi. Ntoma Paulo amonisi epai na baninga na ye Baebele ete, atako kondimana na Mibeko esalamaki kati na makambo na kokamwisa, Jéhovah abandisaki kondimana na sika na nzela ya bilembo, bikamwiseli, misala na nguya mpe kosopama ya elimo santu, yango nde ezali kolakisa litatoli na nguya lisusu koleka. (Misala 2:1-4; Baebele 2:2-4) Bokonzi na likoló ya Klisto bokoki koningana te, nzokande bokonzi ya mabelé na molongo ya David ebomamaki na 607 liboso na ntango na biso. (Baebele 1:8, 9; 12:28) Lisusu, Jéhovah ayanganisi baklisto bapakolami liboso na eloko na kokamwisa mingi koleka emononeli na kokamwisa na ngomba Sinaï, mpo ete babelemi na ngomba Siona ya likoló.—Baebele 12:18-27.
10. Engebene Baebele 13:9, motema mozali kolendisama na nini?
10 Na yango, Baebele basengelaki kokeba ete ‘bapengwa te na mateya ndenge na ndenge mpe na bopaya’ ya baoyo bazali kolanda makanisi ya Bayuda. (Bagalatia 5:1-6) Ezali na mateya motindo oyo te nde ‘motema mozali kolendisama kasi na ngolu’, mpo na kotelema ngwi kati na solo. Ezali komonana ete bamosusu, bazalaki kobimisa ntembe mpo na bilei mpe mbeka, mpo ete ntoma Paulo alobi ete motema molendisama na bilei te “mpo baoyo bakotambolaka na bilei bongo bakozuaka litomba te”. Bobele bizaleli na moto na Nzambe mpe botondi mpo na lisiko epesamaki, nde makambo makoki kopesa matomba ya elimo, kasi kolya bilei mosusu te to kokumisa mikolo te. (Baloma 14:5-9) Likambo mosusu eleki, ezali ete mbeka na Klisto eyeisaki mpamba mbeka oyo banganga na libota na Lévi bazalaki kotombwela.—Baebele 9:9-14; 10:5-10.
Mbeka oyo ezali kosepelisa Nzambe
11. (a) Ntoma Paulo alobi nini na Baebele 13:10, 11? (b) Etumbelo nini na elilingi baklisto bazali na yango?
11 Banganga-nzambe balewi bazalaki kolya misuni ya banyama oyo bazalaki kopesa lokola mbeka, kasi ntoma Paulo akomaki ete: “Tozali na etumbelo na mbeka oyo bango bazali kosala mosala kati na hema [tabernakle] bazangi bokonzi na kolya yango. Mpo ete [Mokolo na Mbondi] nganga monene amemaki makila na banyama kati na esika na bulee lokola mbeka mpo na masumu, nde misuni na bango mitumbamaki na móto na libanda na molako.” (Baebele 13:10, 11; Levitike 16:27; 1 Bakolinti 9:13) Baklisto bazali na etumbelo na elilingi na boye ete bakoki kobelema epai na Nzambe na nzela ya mbeka na Yesu, mbeka oyo ezali kolongola masumu mpe ezali kopesa nzela na kozwa lilimbisi ya Jéhovah mpe lobiko ya seko.
12. Elendiseli nini baklisto bapakolami bazali kozwa na Baebele 13:12-14?
12 Kozanga kolobela mingi kokokana na Mokolo na Mbondi, ntoma Paulo abakisi: “Bobele bongo mpe Yesu ayokaki mpasi libanda na ekuke mpo na kobulisa bato na nzela na makila na ye moko.” Na liwa na ye libanda na “ekuke” ya Yelusaleme, Yesu apesaki mbeka na mbondi oyo ezali na nguya mpenza. (Baebele 13:12; Yoane 19:17; 1 Yoane 2:1, 2) Epai na baninga na ye, baklisto bapakolami, ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo: “Boye tokenda libanda na molako epai na ye [Klisto], awa ezali biso kokumba matyoli na ye. Mpo ete tozali na mboka na seko awa te, kasi tozali koluka mboka elingi koya.” (Baebele 13:13, 14; Levitike 16:10) Atako bazali kofinga biso mpo na koyokisa biso nsoni, lokola basalaki yango epai na Yesu, tozali kolendendela kati na mosala ya Jéhovah. Tozali ‘koboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili, kasi tozali na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Nzambe kati na biloko na ntango oyo’, na kozelaka mokili ya sika. (Tito 2:11-14; 2 Petelo 3:13; 1 Yoane 2:15-17) Mpo na baklisto bapakolami baoyo bazali kati na biso, bazali koluka mpenza “mboka”, yango Bokonzi na likoló.—Baebele 12:22.
13. Mbeka oyo ezali kosepelisa Nzambe esuki te bobele na misala nini?
13 Na nsima ntoma Paulo alobeli mpo na mbeka oyo ezali kosepelisa Nzambe. Akomaki: “Bongo na nzela na ye [Yesu], totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye. Bobosana te kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko mpo ete Nzambe akosepela mbeka na motindo yango.” (Baebele 13:15, 16) Mbeka oyo baklisto bazali kopesa ezali bobele misala na kosalisa bato bazali na kati na mpasi te. Bato mingi bazali kosangana na misala motindo yango. Na ndakisa, pene na nsuka ya 1988, bato na mikili mikeseni basalisaki bato bazwaki makama mpo na koningana ya mabelé oyo esalamaki na Arménie soviétique.
14. Mbeka oyo ezali kosepelisa Nzambe ezali mingimingi kotalela mosala nini?
14 Mosala na bulee oyo tozali kopesa epai na Jéhovah, “na kobanga mpe na nsomo”, etongami likoló na bolingo ezangi koluka litomba oyo Yesu amonisaki. (Baebele 12:28; Yoane 13:24; 15:13) Mingimingi mosala yango etali mosala na biso ya kosakola, mpamba te, na nzela na Klisto Nganga Monene ‘tozali kotombwela Nzambe mbeka na masanzoli, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye’. (Osea 14:2; Baloma 10:10-15; Baebele 7:26) Ya solo, tozali kobosana te “kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko”, ata baoyo bazali “bandimi te”. (Bagalatia 6:10) Mingimingi, ntango baninga na biso baklisto bazali na bosenga, mpo na mpasi to likama, tozali kopesa bango, na elimo mpe na mosuni, lisalisi oyo etondi na bolingo. Mpo na nini bongo? Mpamba te tozali na bolingo kati na biso. Tolingi mpe ete baninga na biso bakoka kosimba ngwi eyambweli na elikya na bango, “mpo ete Nzambe akosepela mbeka na motindo yango”.—Baebele 10:23-25; Yakobo 1:27.
Tozala na botosi
15. (a) Likanisi nini ya ntina ezwami na toli ezali na Baebele 13:17? (b) Mpo na nini tosengeli kome-mya mibali oyo bazali kokamba biso?
15 Mpo na kopesa epai na Nzambe mbeka oyo ezali kosepelisa ye, tosengeli kosala na boyokani makasi elongo na lisangá na ye. Ezali mpo na yango, ntoma Paulo alobeli likambo ya bokonzi: “Botosa bango bakokambaka bino mpe bomisokisa liboso na bango. Mpamba te bazali kokengela milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango. Tika ete basala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.” (Baebele 13:17) Tosengeli komemya mibali oyo bazali kokamba biso, elingi koloba bankulutu, mpo ete bayoka mawa te mpo tozangi kopesa bango maboko. Soki tozali na botosi te, mokumba na bakengeli yango ekoki kozala kiló mpo na komema, mpe ekozala likama mpo na ezalela na biso ya elimo. Nzokande, elimo ya kosala elongo ekoyeisa pepele mokumba na bankulutu, mokumba oyo etali kosalisa bazalani, mpe ekoyeisa bomoko mpe mosala ya kosakola Bokonzi ekokende liboso.—Nzembo 133:1-3.
16. Mpo na nini ebongi ete totosa baoyo bazali kokamba biso?
16 Ebongi mpenza ete totosa baoyo bazali kokamba biso. Ya solo, babateli na mpate yango, baoyo bazali koteya biso na ntango ya makita mpe bazali kopesa biso toli kati na mosala ya kosakola, balingi bolamu na biso. (1 Petelo 5:2, 3) Bazali kosalisa biso na kobatela boyokani ya penepene elongo na Nzambe mpe na lisangá na ye. (Misala 20:28-30) Wana ezali biso kotosa bakengeli yango batondi na mayele mpe na bolingo, tozali komonisa limemya mpo na Mokengeli oyo aleki, Jéhovah Nzambe, mpe Mokengeli oyo ye apesaki bokonzi, Yesu Klisto.—1 Petelo 2:25; Emoniseli 1:1; 2:1 kino 3:22.
Ntina ya libondeli
17. Libondeli nini ntoma Paulo asengaki ete basala mpo na ye, mpe mpo na nini azalaki na lotomo ya kosenga bongo?
17 Ntoma Paulo elongo na baninga na ye, mbala mosusu bazalaki konyokwama, bazalaki mosika na Baebele. Na yango ntoma Paulo akomaki: “Bobondelaka mpo na biso mpo ete tondimi ete tozali na lisosoli na mpeto, tozali na mposa kosalaka malamu na makambo nyonso. Nazali kopesa bino simbisi ete bosala bongo na koleka ete nazonga epai na bino na mbango.” (Baebele 13:18, 19) Soki ntoma azalaki moto mabe oyo lisosoli na ye ezalaki mabe, na lotomo nini akokaki kosenga epai na Baebele ete babondela mpo akoka koya kokutana na bango? (Masese 3:32; 1 Timoté 4:1, 2) Ya solo, azalaki ministre na kolongobana, oyo lisosoli malamu ezalaki kopesa ye nzela akoka kozala ndako molai kotemela makanisi ya bato oyo bazalaki kolanda lingomba ya Bayuda. (Misala 20:17-27) Lisusu, andimisamaki ete: soki Baebele bakobondela mpo na ye ete batika ye, yango ekosalema mbango.
18. Soki tolingi ete bamosusu babondela mpo na biso, mituna nini tosengeli komituna?
18 Lokola ntoma Paulo asengaki epai na Baebele ete babondela mpo na ye emonisi ete ebongi ete baklisto bakoka kobondela bamoko mpo na bamosusu, na kotangaka bankombo na baninga na bango. (Tala Baefese 6:17-20) Kasi, soki tolingi ete bamosusu babondela mpo na biso, tosengeli komekola ntoma Paulo mpe kosala makasi ete ‘tozala na lisosoli na mpeto mpe kosalaka malamu na makambo nyonso’. Mpo na yo moko, ozali moto na kolongobana mpo na makambo nyonso? Obondelaka na elikya nyonso lokola Paulo?—1 Yoane 5:14, 15.
Maloba ya nsuka mpe elendiseli
19. (a) Mposa nini Ntoma Paulo amonisaki mpo na Baebele? (b) Mpo na nini kondimana na sika ezali kondimana ya seko?
19 Nsima na kosenga epai na Baebele ete babondela mpo na ye, ntoma amonisi mposa na ye, oyo asaleli lokola libondeli: “Tika ete Nzambe na kimya, ye oyo atelemisaki Nkolo na biso Yesu lisusu longwa na bakufi, ye mobateli monene na bampate, mpo na makila na kondimana na seko, abongisa bino na misala nyonso malamu ete bosala mokano na ye, awa ezali ye kosala kati na bino yango ekosepelisa ye mpo na Yesu Klisto. Na ye nkembo libela na libela! Amen.” (Baebele 13:20, 21). Na kokanisaka mabelé epai kuna kimya ekoyangela, “Nzambe na kimya” asekwisaki Yesu mpo na bomoi ya kozanga kokufa kati na likoló; ezali na likoló nde Yesu amonisaki motuya ya makila na ye, oyo kosopana na yango elongisaki kondimana na sika. (Yisaya 9:6, 7; Luka 22:20) Kondimana yango ezali ya seko, mpamba te baoyo bakozala na bomoi awa na mabelé bakozwa matomba ya koumela na nzela ya mosala ya bana na Nzambe 144 000 ya elimo oyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló mpe ezali elongo na bango nde kondimana na sika esalamaki. (Emoniseli 14:1-4; 20:4-6) Ezali na nzela ya Klisto ete Nzambe, oyo tozali kopesa nkembo, ‘abongisi biso na misala nyonso malamu ete tosala mokano na ye mpe tosepelisa ye’.
20. Lobela na mokuse mpe limbola elendiseli ya nsuka ya ntoma Paulo epai na Baebele.
20 Lokola ntoma Paulo ayebaki te ndenge nini Baebele bakoyamba mokanda na ye, alobaki: “Bandeko, nazali kobondela bino ete boyamba liloba na [kolendisa] [bayokela Mwana na Nzambe, kasi maloba ya bato na lingomba ya Bayuda te] mpo ete natindeli bino mokanda mokuse [ntango tozali kotalela makambo makomami kati na yango]. Boyeba ete ndeko na biso Timoté asili kobima [na boloko]; soki akoya noki, nakomona bino esika moko na ye.” Wana ezalaki ye kokomá uta Rome, ntoma azalaki kolikya kokenda kotala Baebele na Yelusaleme, mpe akozala elongo na Timoté. Ntoma Paulo alandeli: “Bopesa bakambi [bankulutu ya molende] na bino mbote mpe babulami nyonso [baklisto oyo bazali na elikya ya likoló]. Bango bazali na Italia bazali kotindela bino mbote. Ngolu [ya Nzambe] ezala na bino nyonso!”—Baebele 13:22-25.
Mokanda na motuya mingi
21. Makambo nini ya moboko mokanda epai na Baebele mozali kosalisa biso na kokanga ntina na yango?
21 Mbala mosusu koleka mikanda nyonso ya Makomami Mosantu, mokanda epai na Baebele nde ezali kosalisa biso na kokanga ntina ya ndimbola ya mbeka oyo ezalaki kopesama na nse na Mibeko. Mokanda yango emonisi polele ete bobele mbeka na Yesu Klisto nde ezali kopesa lisiko ya ntina mpo na kosikola mokili ya bato na masumu. Ezali na nsango ya ntina: tosengeli koyokela Mwana na Nzambe.
22. Wapi mwa bantina mpo na yango tosengeli kozala na botondi epai na Nzambe na ndenge apemisaki mokanda epai na Baebele?
22 Lisusu, lokola tomonaki yango kati na lisolo ya liboso mpe ya mibale, tozali na bantina mosusu ya kozala na botondi epai na Nzambe na ndenge apemisaki mokanda epai na Baebele. Ya solo, mokanda oyo ezali kosalisa biso ete tolemba te kati na mosala na biso ya kosakola mpe ezali kolendisa biso, mpamba te ezali kokundwela biso ete Jéhovah azali mosungi na biso. Lisusu, ezali koyikisa biso mpiko na kosalela mbebu na biso mpe makoki na biso nyonso mpo na koluka litomba te, kasi mpo na kosalela Nzambe mosala na bulee butu na moi, mpe na kopesa mbeka oyo ezali kouta na motema, yango ezali kosepelisa Nzambe na biso na bolingo mpe oyo abongi na masanzoli na biso, Jéhovah.
Bozongeli
◻ Ndenge nini mokanda ntoma Paulo atindaki epai na Baebele esalisaki bango na kobwaka mateya ya lokuta?
◻ Mbeka oyo ezali kosepelisa Nzambe ezali kotalela mingimingi mosala nini ya ntina?
◻ Banani ‘bazali kokamba biso’, mpe mpo na nini tosengeli kotosa bango?
◻ Ndenge nini mokanda epai na Baebele ezali komonisa ntina ya libondeli?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete mokanda epai na Baebele ezali na motuya mingi?
[Bililingi na lokasa 23]
Mosala ya kosakola, lisalisi mpe toli oyo tozali kopesa epai na baninga na biso baklisto, ezali kati na mbeka oyo ezali kosepelisa Nzambe.