Jéhovah azali mosungi na ngai
“Boye biso toyebi kozala na molende mpe koloba ete: ‘Jéhovah azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akosalela ngai nini?’”—BAEBELE 13:6.
1, 2. (a) Na maloba nini mokomi na nzembo mpe ntoma Paulo bamonisaki elikya na bango epai ya Jéhovah? (b) Mituna nini mizali kotunama?
LISALISI ya Jéhovah ezalaka ntango nyonso malamu. Mokomi na nzembo ayebaki yango engebene makambo oyo mazwaki ye na bomoi; mpe akokaki koloba: “Jéhovah azali epai na ngai, nakobanga te. Moto akosala ngai nini?” (Nzembo 118:6) Ntoma Paulo azalaki na mayoki motindo moko ntango akomaki mokanda na ye epai na Baebele na kopemama na elimo ya Nzambe.
2 Emonani ete Paulo azongelaki maloba na mokomi na nzembo engebene makomi na greke ya Septante. Alobi boye epai na baninga na ye Baebele ete: “Boye biso toyebi kozala na molende mpe koloba ete: ‘Jéhovah azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akosala ngai nini?’” (Baebele 13:6) Mpo na nini ntoma akomaki maloba yango? Makambo oyo mazali zongazonga na verset oyo mazali koteya biso nini?
Lisalisi ya Jéhovah ezali na ntina
3. (a) Na makambo nini Jéhovah amonisaki ete az laki mosungi mpo na ntoma Paulo? (b) Mpo na nini Baebele bazalaki na mposa mpenza ya lisalisi ya Jéhovah?
3 Ntoma Paulo, temwe ya molende, azwaki elembeteli ete Jéhovah azalaki mosungi na ye, mpo asalisaki ye na makama mingi. Mpamba te, ntoma Paulo akangamaki na boloko, abetamaki mpe abwakelamaki mabanga. Na mibembo na ye lokola misionere, akutanaki na makama mingi mpe lisusu masuwa oyo ememaki ye ezindaki na mai. Ayebaki eloko nini babengi mpasi, kozanga mpongi, nzala, mposa ya mai, mpe bolumbu. Alobaki: “Likoló na makambo oyo nyonso, mokolo na mokolo bozito na makanisi na ngai mpo na masangá ekamoli ngai.” (2 Bakolinti 11:24-29) Tomoni ete ntoma Paulo azalaki komitungisa mpo na baninga na ye Baebele. Mikolo mpo na Yelusaleme etangamaki: kati na Yuda, kondima ya bandeko na ye Bayuda mibali mpe basi esengelaki komekama makasi. (Danyele 9:24-27; Luka 21:5-24) Na yango, baklisto oyo bazalaki na mposa na lisalisi ya Jéhovah.
4. Elendiseli nini ezali komonana na mokanda mobimba oyo etindamaki na Baebele?
4 Ntoma Paulo abandi mokanda na ye epai na Baebele na komonisaka bango ete bakoki kozwa lisalisi ya Nzambe bobele soki bayokeli Mwana na ye, Yesu Klisto. (Baebele 1:1, 2) Na nsima alimboli likanisi yango mpe akembisi yango na kokundwelaka batangi na ye ete, kati na esobe, Bayisraele bazwaki etumbu mpo na kozanga botosi. Baklisto oyo bautaki na lingomba ya Bayuda bakokaki kokima etumbu te soki baboyi koyoka oyo Nzambe azali koyebisa bango na nzela na Yesu mpe soki bamiyeisi bapengwi na kolandaka kokokisa Mibeko na Moïse oyo mpo na yango mbeka na Klisto esikolaki bango.—Baebele 12:24-27.
Bolingo na bandeko ezali kosala mosala
5. (a) Batoli nini mosusu tozali kokuta na mokanda epai na Baebele? (b) Ntoma Paulo alobi nini na ntina etali bolingo?
5 Mokanda epai na Baebele mopesi epai na bazwi na libula na Bokonzi na likoló na ntango ekoya batoli oyo ekosalisa bango kolanda ndakisa na bango, Yesu Klisto, ‘kosala mosala na bulee na nsomo mpe na botosi’, mpe kozwa bongo lisalisi ya Jéhovah. (Baebele 12:1-4, 28, 29) Ntoma Paulo alendisi baninga na ye kati na kondima bayangana ntango nyonso mpe “kopesana simbisi moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu”. (Baebele 10:24, 25) Na nsima alendisi bango ete: “Tika ete bolingo na bandeko boumela!”—Baebele 13:1.
6. Na ndimbola nini tokoki koloba ete Yesu apesaki na bayekoli na ye “lilako na sika”?
6 Yesu asengaki bayekoli na ye bazala na bolingo motindo yango. Mpo ete alobaki: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete: bolinganaka, bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozali na bolingo [kati na bino].” (Yoane 13:34, 35) Ezali wana “lilako na sika”, mpo ezali kosenga likambo monene koleka Mobeko na Moïse, ovo elobaki ete: “Okolinga mozalani na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18) “Lilako na sika” ezali kosenga mingi koleka kolinga mozalani lokola yo moko. Ezali kosenga bolingo oyo ezali koluka matomba te, bolingo oyo ekoki kotinda moto akufa mpo na moto mosusu. Bomoi mpe liwa ya Yesu ezali ndakisa mpo na bolingo motindo yango. Tertullien alobeli elembo yango oyo ezali komonisa boklisto ya solo ntango atangi makambo oyo bapakano bazali koloba mpo na baklisto: “Botala, ndenge balingani bamoko na bamosusu . . . ndenge bazali kondima kokufa bamoko mpo na bamosusu.”—Apologétique, mokapo XXXIX, 7.
7. Ndenge nini bolingo na bandeko emonanaki nsima na Pantekote ya mobu 33?
7 Bolingo na bandeko emonanaki polele kati na baoyo bakomaki bayekoli na Yesu nsima ya Pantekote ya mobu 33. Ezali mpo na yango mingi na baoyo babatisamaki sika oyo bautaki mosika balekisaki mikolo mingi na Yelusaleme ete bateyama likoló na bibongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na lobiko na nzela ya Klisto. Na yango, “bandimi nyonso bazalaki na esika moko, na lisangá, batekisi bilanga na bango mpe biloko mosusu mpe bakaboli yango na bato nyonso lokola ezalaki bango na bosenga”.—Misala 2:43-47; 4:32-37.
8. Nini ezali komonisa ete bolingo ya bandeko ezali epai ya ba Témoins de Jéhovah?
8 Na eleko na biso, bolingo yango ya bondeko ezali kati na ba Témoins de Jéhovah. Na bongo, nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, liyoki yango epusaki basaleli ya Nzambe na kobanda kampanye ya kokabola biloko, kampanye oyo eumelaki mbula mibale na ndambo. Batemwe ya Canada, ya Etats-Unis, ya Suède, ya Suisse mpe mikili mosusu bapesaki makabo ya bilamba mpe mbongo mpo na kosomba bilei, oyo nyonso mpo na bandeko na bango baoyo bafandaki na mikili oyo bitumba ekotaki: lokola Allemagne, Angleterre, Autriche, Belgique, Bulgarie, Chine, Danemark, Finlande, France, Grèce, Hongrie, Italie, Norvège, Pays-Bas, Philippines, Pologne, Roumanie mpe Tchécoslovaquie. Wana ezali bobele ndakisa moko kati na bandakisa mosusu, mpamba te na mikolo mileki basaleli na Nzambe balakisaki bolingo motindo moko epai na baklisto oyo bazwaki mpasi mpo na koningana ya mabelé na mokili ya Pérou mpe Mexique, na baoyo bazwaki mpasi mpo na mopepe makasi na mokili ya Jamaïque mpe makama mosusu ya ndenge wana oyo mazali kobima na bipai mosusu na mokili. Na lolenge yango mpe balolenge mosusu, basaleli ya Jéhovah bazali kosala ete ‘bolingo na bango mpo na bandeko boumela”.
Tozala bayambi na bapaya
9. (a) Ezaleli nini ya boklisto elobelami na Baebele 13:2? (b) Na mabaku nini bamosusu “bayambaki baanzelu” wana bayebaki te?
9 Ntoma Paulo atangi ezaleli mosusu ezali komonisama na baoyo bazali kolanda ndakisa ya Klisto, baoyo ‘bazali kosala mosala na bulee na nsomo mpe na botosi’, mpe baoyo Jéhovah azali kosalisa. Alobaki: “Bobosana te komonisa bapaya boboto. Mpo ete na motindo yango, bamosusu bayambaki baanzelu wana bayebaki te.” (Baebele 13:2) Nani “ayambaki baanzelu” wana eyebaki ye te? Moko kati na bango, ezali Abrahame nkoko na libota, ntango ayambaki baanzelu misato. (Genese 18:1-22) Na nsima, mibale kati na bango bakendaki na Sodome; Lot, mwana ya ndeko na Abrahame, ayambaki bango epai na ye wana ayebaki bango soko moke te. Nzokande, liboso ete balala, ndako ya Lot ezingamaki na etuluku monene na bato, “bilenge mpe banuni”. Basengaki ete Lot akoka kobimisela bango bapaya na ye, mpo ete basangana na bango, kasi Lot aboyaki makasi. Atako ayebaki te, Lot ayambaki baanzelu, baoyo basalisaki ye nsima, ye mpe bana na ye ya basi, na kobika na liwa ntango ‘Jéhovah anokisaki sufulu mpe moto na likoló na Sodome na Gomore longwa na makoló’.—Genese 19:1-26.
10. Matomba nini baklisto oyo bazali bayambi na bapaya bazali kozwa?
10 Baklisto oyo bazali bayambi na bapaya bazali kozwa matomba mingi. Bazali koyoka masolo kitoko oyo bapaya bazali koyebisa bango mpe bazali kozwa matomba ya elimo na kofanda na bango esika moko. Lokola basaleli mingi ya Jéhovah baoyo bazali koyamba bakengeli ya zongazonga lelo, Gayo akumisamaki mpo ayambaki bandeko baklisto, “ata bango bapaya”, na boboto nyonso. (3 Yoane 1, 5-8) Koyamba bapaya ezali ezaleli moko ya ntina mpo na koponama lokola nkulutu. (1 Timoté 3:2; Tite 1:7, 8) Tobosana mpe te ete Yesu alakaki matomba, na nzela ya Bokonzi, epai na “bampate” oyo bakosala malamu epai na “bandeko” na ye bapakolami na komimonisa bayambi epai na bango.—Matai 25:34-40.
Tokanisa baoyo bazali konyokwama
11. Mpo na nini toli ekomami na Baebele 13:3 ezalaki na ntina mpenza?
11 Baoyo balingi kozwa lisalisi ya Jéhovah mpe ‘kosalela ye mosala na bulee, na kobanga mpe na nsomo’ basengeli kobosana te baninga na bango baoyo bazali konyokwama. Ntoma Paulo azalaki komitya na esika na baklisto oyo bazalaki konyokwama mpe bazalaki koyika mpiko na komekama. Mwa ntango moke liboso, bayekoli bapalanganaki mpo na monyokoli, mpe moninga na ye ya mosala Timoté asilaki kokangwa na boloko. (Baebele 13:23; Misala 11:19-21) Ezalaki mpe na bamisionere baklisto baoyo bazalaki kosakola na bateritware mpe bazalaki kosala masangá to kolendisa elimo na masangá oyo masalamaki. Lokola kati na bandeko mibali mpe basi baoyo bazalaki kotambola boye mingi bazalaki Bayuda te, baklisto mosusu baoyo bautaki na lingomba ya Bayuda bazalaki mbala mosusu komitungisa mingi te mpo na bango. Na ntina yango toli oyo ebongaki: “Bokanisa bango bazali kati na boloko lokola ete bokangami na bango esika moko, bokanisa mpe bango ba- nyokolami mpo ete bino bozali naino na nzoto.”—Baebele 13:3.
12. Ndenge nini tokoki kokanisa bandeko na biso oyo bazali konyokwama?
12 Baebele “bayokelaki bakangami mawa’”, kasi basengelaki kobosana te baninga na bango oyo ya sembo, ezala ete bazalaki Bayuda to bato na mabota mosusu. (Baebele 10:34) Ezali ndenge nini mpo na biso? Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kokanisela baklisto oyo bazali konyokwama? Na ntango mosusu, ezali malamu kokomela bakonzi ya Leta mikanda, mpo na kosalisa baninga na biso oyo bazali na boloko mpo na kondima na bango kati na mikili oyo epai kuna mosala ya kosakola Bokonzi epekisami. Mingimingi tosengeli kokanisela baklisto yango kati na mabondeli, na kotangaka bankombo na bango soki likoki ezali. Minyokoli na bango mizali kotungisa biso mingi, mpe Jéhovah ayokaka mabondeli oyo mazali kouta na motema, mabondeli oyo tozali kosala mpo na bango. (Nzembo 65:2; Baefese 6:17-20) Ata soki tozali na bango kati na boloko te, ezali lokola tokangami esika moko na bango mpe ete tokoki kosalisa bango mpe kolendisa bango. Ya solo, baklisto bapakolami na elimo bazali koyoka mpasi na motema mpo na konyokwama oyo baninga na bango bapakolami na elimo bazali mpe kozwa. (Tala 1 Bakolinti 12:19-26) Bobele bongo, bazali komitungisa mpo na baninga na bango baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé, baoyo mpe bazali konyokwama na lolenge nyonso ya minyokoli. Esengeli bongo koyoka mawa motindo yango, mpo ete tozali “na nzoto” ya bomoto mpe ete, lokola basambeli ya Jéhovah, tokoki biso mpe mokolo mosusu komona mpasi mpe konyokwama.—1 Petelo 5:6-11.
Libala esengeli kokumisama
13. Makanisi nini ya ntina mazwami na maloba ya ntoma Paulo makomami na Baebele 13:4?
13 Soki tolingi kolanda ndakisa ya Klisto mpe ‘kosalela Jéhovah na mosala na bulee, na kobanga mpe na nsomo’, tosengeli, na makambo mingi, komitungisa mpo na bamosusu. Nsima na koloba ete: “bino bozali naino na nzoto”, ntoma Paulo alobi mpo na ekanganeli oyo ezali kotalela mosuni, oyo ezali na boyokani na nzoto, mpe oyo ezali kopesa na baklisto libaku ya komonisa limemya na bango epai na bamosusu. (Baebele 13:3) Ntoma Paulo alendisi Baebele na maloba oyo: “Tika ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te, mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (Baebele 13:4) Lokola pite epalanganaki mingi na Boyangeli ya Rome, toli oyo ebongaki mpenza. Na eleko na biso, baklisto basengeli mpe kotalela toli yango, mpo ete bizaleli na mokili bisili kobeba mingi - lisusu, mbula na mbula, bankoto na baklisto bazali kobimisama na lisangá mpo na pite.
14. Mpo na yo, mpo na nini libala esengeli kokumisama?
14 Ba Esséniens bazalaki kati na baoyo bazalaki kokumisa libala te, na ntango ya Paulo. Mibali yango bazalaki mingimingi kolapa ndai mpo na kotikala minzemba, lokola yango ezali komonana lelo kati na mangomba mosusu, epai kuna bazali komikosa na kokanisa ete moto oyo azali monzemba aleki bulee moto oyo abala. Nzokande, maloba na ntoma Paulo epai na Baebele mamonisi polele ete libala ezali ebongiseli ya lokumu. Naomi, mpo na ye, amonisaki limemya mingi mpo na libala na kotombelaka, Luta mpe Orpa, basi ya bana na ye, bango mibale basi bakufeli mibali, likambo oyo: “Tika ete Jéhovah apesa bino likabo ete bozwa kopema moto na moto na ndako na mobali na ye!” (Luta 1:9) Ye moko ntoma Paulo asakolaki ete ‘na ntango na nsuka, bamosusu bakopengwa longwa na kondima mpe bakopekisa libala’.—1 Timote 4:1-5.
15. Bato na pite mpe bato na ekobo oyo balobelami na Baebele 13:4 bazali banani, mpe ndenge nini Nzambe akosambisa bango?
15 Baebele oyo, na ntango ya kala, bazalaki na nse ya Mibeko, kasi bandimamaki na kati ya kondimana na sika, bayebaki mobeko oyo: “Okosala ekobo te.” (Exode 20:14) Ata bongo, bazalaki kobika kati na mokili moko ya mbindo mpe bazalaki na mposa ya likebisi oyo: “Tika ete . .. kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te, mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” Kati na bato na pite tokokuta bato oyo babali te kasi bazali kosangisa nzoto. Moto na ekobo, azali moto oyo asila kobala kasi azali kosangisa nzoto elongo na moto mosusu oyo azali mobalani na ye te; ezali ndenge yango nde bazali kotya mbindo na mbeto ya libala. Lokola bato na pite mpe bato na ekobo basengeli kosambisama makasi na Nzambe, baoyo bamipesi na misala na mbindo bakondimama soki moke te na Yelusaleme ya sika, engumba na likoló; bakoki mpe te kozwa bomoi ya seko na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi. (Emoniseli 21:1, 2, 8; 1 Bakolinti 6:9, 10) Likebisi ya kozanga kotya mbindo na mbeto ya libala ezali kotalela mpe mobali na mwasi oyo babalani, mpo na koyeba ete kosangisa nzoto na lolenge elongobani te ezali na esika na yango te kati na libala, kasi kosangisa nzoto na lolenge malamu ezali mbindo te.—Tala La Tour de Garde ya 15 juin 1983, pages 27 kino 31.
Tosepela na biloko bizali na biso
16, 17. Tozali kotanga nini na Baebele 13:5, mpe mpo na nini Baebele bazalaki na mposa ya toli yango?
16 Soki tolandi Ndakisa na biso mpe ‘tozali kosala mosala na bulee kati na kobanga mpe na nsomo’, kotyaka elikya ete Jéhovah azali mosungi na biso, tokosepela na oyo tozali na yango. Koluka mingi biloko ya mosuni ezali lisenginya oyo baklisto basengeli kokima. Baebele bazwaki toli oyo: “Ezaleli na bino ezanga mposa na mosolo; bosepela na biloko bizali na bino. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te!’” (Baebele 13:5) Mpo na nini Baebele bazalaki na mposa ya toli yango?
17 Mbala mosusu likambo etali mbongo ezalaki mpenza kotungisa Baebele, mpamba te bazalaki kokanisa “nzala monene” oyo engalaki na nse na boyangeli ya mokonzi Claude, na mobu 41 kino 54. Nzala yango engalaki makasi kino baklisto ya mikili misusu batindaki biloko ya kolya epai na bandeko na bango oyo bazalaki na Yuda. (Misala 11:28, 29) Engebene mokomi na masolo ya bato Moyuda Josèphe, nzala eumelaki soko mbula misato, mpe ekotisaki Yuda mpe Yelusaleme na kokelela makasi.-Lisolo ya kala ya Bayuda, mokanda XX, mokapo 2, paragrafe 6; mokapo 3, paragrafe 1.
18. Liteya nini tokoki kozwa na toli oyo ezwami na Baebele 13:5?
18 Tokoki kozwa liteya na toli oyo? Ee, mpo ete ata tozali babola ndenge nini tosengeli te kozala na bolingo ya mosolo to komitungisa mingi mpo na yango. Na esika ya komitungisa, mbala mosusu kino na kolula, biloko oyo tozali na yango mposa na mosuni, tosengeli nde ‘kosepela na biloko bizali na biso’. Yesu alobaki: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye, mpe biloko oyo nyonso ekobakisama na bino.” (Matai 6:25-34) Alakisaki mpe ete tosengeli kosala makasi mpo na kozala liboso ‘bazwi epai na Nzambe’, mpo ete ‘bomoi na biso ezali kati na motuya na biloko bizali na biso te’. (Luka 12:13-21) Soki mposa ya mosolo etye ezalela na biso ya elimo na likama, tolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki na Baebele mpe tomikundola ete ‘ezaleli na moto na kobanga Nzambe mpe kosepela na biloko bizali na biso’ ezali “litomba monene”.—1 Timoté 6:6-8.
Totya elikya epai na Jéhovah
19. Elikya nini Nzambe apesaki na Yosua, mpe yango esengeli kopesa biso mayoki nini?
19 Lokola tozali bayekoli ya Klisto baoyo bazali kosala nyonso mpo na ‘kosala mosala na bulee, na kobanga mpe na nsomo’, tosengeli kotya elikya na biso na mosolo te, kasi epai na Tata na biso ya likoló oyo lisalisi na ye eleki ntina. Ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini, tosengeli komikundola maloba oyo na kolendisa: “Nakotika yo soko moke te, nakosundola yo mpe te!” (Baebele 13:5) Awa ntoma Paulo asaleli maloba oyo Nzambe alobaki epai ya Yosua: “Nakotika yo te mpe nakolongwa na yo te.” (Yosua 1:5; tala Deteronome 31:6, 8) Jéhovah atikaki Yosua soko moke te, mpe akotika biso te soki totii elikya epai na ye.
20. (a) Texte ya mbula mpo na 1990 ezali na mokapo nini? (b) Tosengeli kolanda kosala nini kozanga kobanga moto?
20 Lisalisi ekoki kokwea te oyo Jéhovah azali kopesa na Batemwe na ye ekokumisama na boumeli ya basanza oyo ekolanda, mpamba te texte ya mbula 1990 ekozala: “‘Bozala na molende mpe boloba: “Jéhovah azali mosungi na ngai.’” Maloba oyo mazwami na Baebele 13:6, epai wapi ntoma Paulo azali kotanga mokomi na nzembo mpe alobi epai na Baebele ete: “Boye biso toyebi kozala na molende awa elobi biso ete: ‘Jéhovah azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akosala ngai nini?’” (Nzembo 118:6) Ata tonyokwami, tozali na kobanga te, mpamba te banguna na biso bakoki kosala te oyo Nzambe apesi nzela te. (Nzembo 27:1) Soki esengeli tokufa mpo na bosembo na biso, tozali na elikya ya lisekwa. (Misala 24:15) Na yango, tolanda ntango nyonso ndakisa na biso na ‘kosalaka mosala na bulee, na kobanga mpe na nsomo’, kozalaka na elikya ete Jéhovah azali mosungi na biso.
Bozongeli
◻ Mpo na nini Baebele oyo bakomaki baklisto bazalaki mpenzampenza na mposa ya lisalisi ya Jéhovah?
◻ Basaleli ya Jéhovah bazali kosala nini mpo ete “bolingo na bango mpo na bandeko” eumela?
◻ Mpo na nini tosengeli kozala bayambi na bapaya?
◻ Tosengeli kosala nini mpo na kokanisa bandeko na biso baoyo bazali konyokwama?
◻ Mpo na nini libala esengeli kokumisama?