Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/11 nk. 26-29
  • Kobuka mbuma kati na mokili ya glase mpe ya mbula mpembe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobuka mbuma kati na mokili ya glase mpe ya mbula mpembe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Ebandeli
  • Basali mosusu bakomi
  • Kobuka mbuma!
  • Vizite kati na teritware ya ba Groenlandais
  • Kobuka mbuma elandani
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/11 nk. 26-29

Kobuka mbuma kati na mokili ya glase mpe ya mbula mpembe

GROENLAND, oyo ezali esanga monene koleka kati na mokili, ezali mpenza-mpenza mokili na glase mpe na mbula mpembe. Eteni monene na esanga oyo na molai pene na 2 700 kilomètres ezali na nord ya cercle arctique, ezipami na baglase oyo ezali na bonene ya 1 500 mètres. Eteni mosusu nyonso oyo etikali ezipami na mbula mpembe sanza mitano kino mwambe na mbula, to koleka. Elobami ete bato ya liboso oyo bakotaki na mokili oyo mpo na koyeba yango bapesaki esanga oyo nkombo ya Groenland (Terre verte) mpo na kobenda bato baya kofanda na mokili oyo. Ezali solo ete na ntango mokuse na elanga, bisika mosusu na libongo bibongi na komema nkombo oyo.

Na sanza ya Mars kino Juin, baglase oyo ezali pembeni na mai na nord-est ezali kobukanabukana mpe ezali kosala mabokemaboke ya baglase makasi ekangami. Baglase oyo elandani lokola ngombangomba pembeni na mai na ngambo ya est, ekokatisaka mpe Cap Farvel mpe ekomata na eteni ya pembeni na mai na ouest, yango nde ezali kopekisa masuwa koleka na boumeli na basanza mingi. Na hivers (ntango na malili mingi) la mer ezali kobongwana na kozala glase mingimingi pembenipembeni na esanga, kokabolaka bongo bisika oyo bato bafandi na la mer. Glase ezali mpenza koyangela kobanda na mabelé, na mai mpe na lolenge na bomoi na bafandi na esanga. Kobuka malamu mbuma na mokili oyo ezali komonana ete ezali mpasi.

Ebandeli

Uta bikeke mingi na mokili Groenland, bato oyo babiangami Baeskimo bazali kobika na mosala na koboma banyama. Na 1721, misionere ya lingomba na ba luthériens Hans Egede akomaki na mokili oyo. Nsima, lingomba ebiangami Frères moraves ebandaki kosala mosala mingi kati na bato oyo bauta bipai mosusu mpo na kofanda na esanga oyo. Bamisionere na bango mosusu babongolaki mikanda misusu ya Biblia na lokota na Baeskimo, na kobatelaka nkombo ya solo ya Nzambe, Jéhovah. Kasi, kobanda mbula 1900, Lingomba ya ba luthérien oyo euta na mokili ya Danemark ezalaki lingomba bobele moko na Groenland.

Esanga ezalaki naino na nse na boyangeli ya Danemark wana, na 1953, bambongwana minene esalamaki. Constitution (Buku na mibeko mizali kotambwisa mboka) ya sika ya Leta ya Danemark oyo ebandaki kosalelama na mbula wana epesaki nzela lisusu na mokili ya Groenland mpo na bituluku mosusu na mangomba bikoka kozala longola lingomba na ba luthériens. Na yango, na Janvier 1955, ba Témoins de Jéhovah mibale ya mboka Danemark bakomaki na mboka Groenland mpo na kozala bamisionere kuna. Teritware na bango ezalaki mabelé oyo ezalaki na 2 000 kilomètres na libongo ya sud-ouest, kuna epai eteni monene na ba Groenlandais bazali kofanda, elingi koloba bato to bafandi 27 000 bango nyonso babomi na nyama to babomi na mbisi.

Kristen Lauritsen, moko na batemwe oyo mibale, alobi: “Toyebaki ata moke te monoko ya Groenland; kasi, tozalaki na mposa makasi ya koteya ba Groenlandais, solo ya Liloba na Nzambe. Tozalaki na mwa batrakte na monoko ya eskimo, mpe brochure ‘Nsango malamu na Bokonzi’ ekomaki nsima na mbula ya liboso.” Ndenge nini basakoli oyo bakokisaki mokumba na bango?

“Na ebandeli, tozalaki kosalela ba cartes oyo tokomaki mpo na koyebisa ntina ya vizite na biso. Kasi, na nsima, tosimbaki mwa maloba na motó. Kouta engumba moko kino mosusu ezalaki kosalama ntango nyonso na masuwa, kasi masuwa ezalaki koya ntango nyonso te, mpe ngonga mpo na kokoma mpe kokenda ezalaki koyebana mpenza te. Mbala mingi tozalaki na kotungisama na mposa ya kosanza mpo na mbonge ya ebale. Tozalaki lisusu na mikakatano mpo na kolala. Mbala mingi, tosengelaki kolala kati na hema oyo tozalaki komema ntango nyonso elongo na biloko mosusu.

Ata bongo ezalaki na makambo mosusu oyo ezalaki kokitisa bampasi oyo. Ba Groenlandais bazali bato malamu mpe bayambi na bapaya. Na bonkoko na bango bandimaka Nzambe mpe bazali komemya Makomami Mosantu. Pene na mabota nyonso bazali na Biblia mobimba kati na monoko ya mboka na bango. Kristen alobi ete mokolo moko elenge mwasi ya moke ayaki esika bazalaki mpe apesaki bango mokanda moke oyo ezalaki na makomi oyo: “Soki naino boyebi epai bokolala te, bokoki koya kolala epai na biso.” Libota na elenge mwasi yango lisalisaki mpe batemwe oyo mibale na kozwa esika mpo na kolakisa film ya la Société.

Basali mosusu bakomi

Na 1961, mabota batikaki Danemark mpo na koya kofanda na Groenland, mpo na kopesa maboko epai oyo mposa ya batemwe ezalaki mingi. Batyaki milende mingi oyo tokoki kokumisa mpo na koyekola monoko ya eskimo, monoko oyo ezali mpasi mingi, mpe kondima kofanda mosika na baninga na bango baklisto. Mabota yango bazalaki kosala ntango nyonso makita; kondima na bango ezalaki makasi mpe mosala na bango na boklisto ezalaki ya molende. Milende na bango mizalaki mpamba te, mpo ete, na mbula yango masanga mibale mabotamaki na Groenland, moko na Nuuk (Godthab), oyo ezali capitale, mpe mosusu na Qaqortoq (Julianehab), mosika na sud. Batemwe basepelaki na koyoka ete ba Groenlandais oyo bakendaki kofanda na Scandinavie babatisamaki.

Na mibu 1970 babalani mingi oyo bazalaki ba pionniers spéciaux bakomaki, bilenge mpe na molende, elendiseli mpenza mpo na kopusa liboso mosala na kopesa litatoli. Na 1973, Mosenzeli mpe mokanda Solo oyo ekoki komema na bomoi na seko ezwamaki sikawa na monoko ya eskimo. Elongo na bozwi oyo na maboko, ba pionniers batambolaki bisika nyonso ya libongo na mai, na bingumba minene mpe bamboka mike, kolonaka mingi nkona ya solo. Mpo na mbala ya yambo, mosala na kosakola ekomaki na bisika oyo bizalaki mosika mingi pembenipembeni na mai mpe zingazinga na Ammassalik (Angmagssalike). Yango ezalaki solo esengo mpo na mbula wana, ntango Mogroenlandais ya liboso ayambaki solo kati na mboka na ye.

Kobuka mbuma!

Wana mikanda na sika mizalaki kobima na monoko na mboka, mikanda mingi mizalaki kokabolama. Na ndakisa, wana babalani mibale bazalaki kosakola na teritware oyo epesami na moto te, mbala mingi na mwa baposo bazalaki kokabola mikanda 300 kino 400, ba brochure ebele mpe baperiodike 1000, mpe bazalaki kozwa ba abonema 60 kino 70.

Batemwe balonaki mpe basopaki mayi kino ‘Nzambe akolisaki’ epai na bankolo mboka mpe bato ya Danemark oyo bayaki kofanda na Groenland. (1 Bakolinti 3:5-7) Lelo oyo, basakoli 117 bapalangani kati na mboka oyo ya glase mpe ya mbula mpembe bakabwani kati na masanga nsambo mpe bituluku ya mikemike. Toyeba mwa baloni mbuma oyo na molende.

Vizite kati na teritware ya ba Groenlandais

Tobanda na lisangá oyo ezali mwa mosika na sud, oyo ya Qaqortoq (Julianehab). Mabota mitano batikaki mboka Danemark mpo na kosala kati na engumba oyo. Mingi na bango basalaki makasi mpo na koyekola lokota ya kieskimo, mpo bakoka kopesa litatoli epai na ba Groenlandais oyo bazali koyoka lokoto ya danois te. Flemming, tata ya libota mpe pionnier (mosakoli na Bokonzi na ntango nyonso) kati na lisangá ya Qaqortoq, alobi boye: “Teritware na biso ezali monene. Bamboka na babomi mbisi mpe babokoli na bampate ezali mingi, bamboka yango etongamitongami na bisika mingi oyo mai ekoti lokola litimbo pembenipembeni na mai na sud.” Mpo na kokende kotala bafandi na bisika oyo na mosika, batemwe, na kosalelaka babwato na bango oyo ezali na masini, bazali kotambola bantaka oyo ekoki kokoma kino 650 kilomètres.

Nsima na ngonga misato na kokatisa kati na bisika kitoko oyo mai ekoti lokola litimbo, tozali kokoma na lisangá mosusu, na Narssaq. Awa, libota ezali bobele moko oyo ezali na basakoli na Bokonzi minei. Atako bazali mosika, bakoki koyikisana mpiko na elimo na nzela na boyekoli mpe na kosangana ntango nyonso na makita lokola mpe kati na mosala na kosakola.

Sikawa tokoti na masuwa oyo na elanga, elekaka poso na poso. Nsima na mobembo ya ngonga 24, tokomi na Paamiut (Frederikshab) epai batemwe zomi bazali. Ata bongo, katikati na nzela, tolekaki mboka moko epai batemwe bobele mibale bazalaki kofanda. Ane Marie azali moko na bango. Azali na mwana mobali na Nuuk oyo ayambaki solo esili koleka mwa bambula, mpe azalaki kopesa ye litatoli na nzela ya telefone mpe ya mikanda. Ane Marie azalaki kosepela na makambo oyo mwana na ye azalaki koyebisa ye. Azalaki kotanga mikanda oyo azalaki kozwa na lokota ya eskimo mpe na koyokaka maloba oyo matyami na ba cassettes ya Batemwe groenlandais baoyo bazalaki koyebisa makambo oyo bakutanaki na yango, ayambaki solo. Wana ezalaki ye na mibu koleka 60 mpe kozanga lisalisi na lisangá na esika yango, alongaki kotika komela likaya, ezalela oyo esilaki koumela mibu 50, atikaki kokumisa Noël mpe bafeti mosusu mpe abandaki koyebisa solo kati na mboka nyonso. Milende na ye mpe ndakisa na ye ya malamu ebimisaki matomba ya malamu: etuluku moko ya bato pene na zomi ezali koyangana mbala na mbala mpo na koyekola Biblia mpe koyoka maloba oyo matyami na ba cassettes mpo na makita ya boklisto.

Tolongwe Paamiut mpo na kokende na Nuuk, engumba-mokonzi, nsima na kokatisa la mer na mbonge makasi na boumeli na ngonga 14. Kati na engumba oyo na bafandi 13 000, ezali na lisangá na basakoli 43, oyo basakoli koleka ndambo na misato bazali ba Groenlandais. Makita ya poso na poso mazali koselama ndambo na lokota ya danois mpe na lokota ya kieskimo, yango nde ezali kosenga milende makasi na bituluku nyonso mibale.

Tozongi lisusu na masuwa, oyo ememi biso mbala oyo na Maniitsoq (Sukkertoppen), nsima na ngonga mwambe na mobembo. Awa, mabota minei mautaki Danemark bazali kosala elongo na mwa basakoli ba groenlandais. Na ville, batambolaki bisika nyonso kati na teritware oyo mpe bakabolaki mikanda mingi na koyekola Biblia kino ndako moko kati na bandako mibale ezali na Mokanda mpo na masolo ya Biblia na lokota ya eskimo. Lisusu, na lisalisi na babwato na bango oyo ezali na moteur, bazali kobongisa ntango nyonso mibembo mpo na komema litatoli kati na bamboka mosusu oyo ezali mosika.

Sikawa topusani pene na nord, mpe tokotelema na Sisimiut (Holsteinsborg), nsima ya ngonga zomi. Lisangá esalami na mabota mitano na ba danois mpe mwa basakoli bafandi na mboka. Uta Sisimiut, ba pionniers spéciaux mibale mobali na mwasi na ye bazali kokende mbala na mbala na libongo na est. Esengeli na bango kosala ndambo na ngonga na hélicoptère kino na aéroport, nsima bakosala ngoga mibale na pepo likoló na etando monene na glase, mpe kozwa hélicoptère mosusu mpo na kokatisa esika mai ekoti lokola litimbo kino na Ammassalik, libongo ya est. Kuna, moto azali kokamwa na komona ndenge mboka ezali, bangomba epasukipasuki mpe na molai mingi oyo baglase ezali mingi na ebandeli na ngomba. Bato bazali koyoka malamu nsango na Bokonzi, kasi mpo na sikawa bazali mingi te oyo bazali koyamba solo.

Nsima na kozonga moke na mpepo mpo na koleka ngambo mosusu likoló na baglase ebele, tokomi na esika ya nsuka kati na mobembo na biso, Ilulissat (Jakobshavn), epai lisangá oyo ezali mosika mingi kuna na nord. Ilulissat ezali liloba na eskimo oyo elimboli “iceberg” (ngomba na baglase), mpe ezali ya solo. Esika oyo ezali kobimisa baglase mingi koleka kuna na Nord ezali mosika te, mpe bangomba na baglase ezali komonana na mai mpe na bisika oyo mai emikotisi kati na mokili. Likambo yango ezali ya kokamwisa mpe kitoko mpo na kotala. Lisangá ya molende na Ilulissat esalami na mabota motoba ya ba danois mpe ba groenlandais mibale mobali na mwasi na ye. Longola ville na zingazinga ya esika oyo mai emikotisi na mokili kuna na Disko, bazali na teritware oyo ezali mbala mosusu esika na mokili oyo ekei mosika mingi na nord epai yango Batemwe bazali kosakola, mpo esika wana ekei kino mboka Kullorsuaq (Mosapi na Diable), penepene na 75° na esika eleki likoló na Nord.

Ba pionniers spéciaux ya Ilulissat bazali kokende mbala nyonso na régió oyo ezali mosika mingi mpo na komema nsango na solo epai na bafandi ya Upernavik mpe Uummannag. Tala oyo Bo na Helen bamonaki: “Bisika oyo minene na nord bitikali paradis moko oyo esimbami naino te. Bato, oyo bafandi mosika mosika, bazali kobika na mosala na koboma banyama koleka koboma bambisi. Bato bazali na bomoi ezangi mindondo, mpe bazali komitungisa mingi te mpo na makambo na bomoi na lobi. Bato mingi bazali kosepela na makambo na elimo. Bazali koyoka na bolingo nyonso nsango oyo tomemeli bango.” Ntango nde ekoyebisa soko bato oyo na motema na mpate bakosangana na “etonga” bobele moko ya solo oyo ezali kotambwisama na “mobateli na mpate moko”, Yesu Klisto.​—Yoane 10:16.

Ba pionniers danois nde bazalaki kosala na régió oyo; kasi, bazalaki na film vidéo oyo esalamaki na ba groenlandais mwambe na engumba Nuuk mpe oyo ezali kopesa likanisi mpo na bindimeli mpe lolenge na bomoi ya ba Témoins de Jéhovah. Ba pionniers basalelaki likambo yango na mosala ya kosakola ndako na ndako, yango nde epesaki nzela epai na bato na kosolola mpe na kotuna mituna mingi; bazalaki kotuna mingi, mpo na nini tokumisaka Noël te mpe tobatisaka bana babotami sika te. Tobakisa ete soko mikanda 200 mizwamaki na boumeli na poso minei oyo na mobembo tolobeli kino awa.

Kobuka mbuma elandani

Atako makambo mingi mazali mpasi mpe lokota mosusu, kobuka mbuma na Bokonzi ezali kolandana. Ba groenlandais mingi bazali koyekola lokota ya danois mpo na kolanda makambo nyonso ezali kolobama na makita na lisangá na bango. Kasi, mbala mingi makita mazali kosalema na monoko ya eskimo, kopesaka likoki mingi epai na bato mingi mpo na kolya bilei na elimo.

Na ndakisa, atako masolo na assemblée ya district na 1988, “Boyengebene na Nzambe”, mapesamaki na lokota ya danois na engumba Nuuk, pene na lisolo moko kati na masolo misato ebongolamaki na lokota ya eskimo. Assemblée oyo esangisaki bato 163. Batemwe oyo bautaki na Ilulissat (lisangá ya Nord) mpe na Qaqortoq (oyo ya Sud) basalaki bango nyonso mobembo ya mikolo mibale. Bato minei bazwaki batisimo na assemblée yango.

Bilikya bizali malamu mpo na kobuka lisusu mbuma na mikolo mizali koya? Bilikya bizali malamu mingi! Na 1989, tozalaki na esengo na kotanga bato 205 na Elambo, ekaniseli na liwa na Klisto. Sikawa, Batemwe ya Groenland bazali kotambwisa boyekoli na Biblia koleka 100 na bandako na bato. Ee, Jéhovah azali kopambola mingi mosala ya basali na ye kati na mokili ya glase mpe ya mbula mpembe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto