Mobulu ekoki kopekisa nsango malamu te
MOKOLO MOKO na février eleki, mokili na Venezuela eyebisaki mwango na yango ya sika mpo na makambo matali nkita, oyo bazalaki kozela uta mikolo mingi. Ntalo na biloko na kolya lokola miliki, fufu mpe limpa ebutaki na 100% kino koleka; ntalo ya essence to pétrole ebutaki na 90%. Ba kompanyi oyo ezali na ba bus epesamelaki nzela na kobutisa tiké kino 30%. Mboka eninganaki. Mpe na mbala moko eyano epesamaki: na lundi 27 février, mobulu ebimaki bipai binso.
Kobebisama na biloko mpe koyiba elandanaki kino mardi na ntongo. Na bisika mingi, makelele na mindoki ezalaki koyokana. Bilenge na mikolo bazalaki kosopana na babalabala, kobukaka biloko nyonso oyo bazalaki kokuta na nzela mpe nsima na bango putulu nde etikalaki.
Nsima na midi, président asakolaki ete mobulu ekoti na mboka mpe lotomo nyonso na bato ndenge ezali na kati ya buku na mibeko etyami naino pembeni mpo na mikolo zomi. Bato bapekisamaki kobima na bandako mpe kotambola kobanda 18 heures kino 6 heures ya ntongo. Mokolo na misato, ministre ya Défense asakolaki ete basoda bakobanda kokanga kino etinda ya sika. Basoda basalelaki nguya na bango mpo na kosala nyonso balingi kati na babalabala, kokota na bandako kozanga ndingisa mpe kokanga bato to kolukaluka biloko kati na bandako. Zulunalo moko oyo ebimaka mokolo na mokolo ekomaki ete “Bato nkama mibale bakufi mpe bato nkoto bazoki na mikolo misato oyo na mobulu.
Masangá na ba Témoins de Jéhovah makomaki ndenge nini na boumeli na mobulu oyo? Batemwe bazwaki etinda ya kozala na bokengi mpe kokima bisika oyo bizalaki na mobulu, kobongola bangonga ya makita na bango na kotalela bangonga oyo basoda bakobanda kotambola, mpe kosala bituluku te mpo na kosakola. Ata bongo, kosakolama na nsango malamu ekendeki se liboso.—Matai 24:14; 28:19, 20.
Mobali ya ndeko mwasi moklisto oyo azali mondimi te apekisaki ye ete abima na ndako te, mpo amonaki ete ezalaki likama na kobima mpo na kokende kosakola. Ndeko mwasi ayebisaki ye ete: “Ozali koyeba te ete nazali na mokumba ya kokokisa. Lokola olobi boye, nakoyekola Biblia elongo na yo!”
Uta mibu 22 mwasi oyo azali Témoin de Jéhovah, ezalaki mbala ya liboso ete mobali na ye andima koyekola Biblia. Kasi alobaki na ye boye: “Nandimi, soki nde olaki ngai ete okobima te. Mpe soki okotuna ngai mituna te ntango tozali koyekola. Okotanga bobele kotanga esili.” Ata bongo, moklisto oyo ya mwasi ayekolaki Biblia elongo na mobali na ye na boumeli ya ngonga moko na ndambo. Nsima na yango, ayebisaki, na mai na miso ete: “Ezalaki boyekoli moko kitoko, oyo naino natambwisa te kati na mibu 22 ovo nazali na solo.”
Epai mosusu, moklisto moko ya mwasi oyo azali pionnier permanent azalaki kokomba liboso ya ndako wana emonaki ye moto moko kobelema penepene na ye: ezalaki mwasi moko, oyo mingimingi, azalaki koyokela Batemwe te ntango bazalaki koleka epai na ye. Alobaki: “Mikolo oyo namoni ata Temwe moko te kosakola. Kolobela ngai te ete bokosakola lisusu te!”
Moklisto oyo ya mwasi alimbolaki epai na mwasi oyo ete batiki kosakola ndako na ndako bobele na ntango ya mobulu. Abakisaki: “Kasi mokolo ekoya oyo tokosakola lisusu te epai na bato, mpe yango ekozala nde nsuka ya mokili. Wana ezali yo na likoki, osengeli kondima boyekoli ya Biblia na ndako na yo.”
Mwasi yango atunaki nokinoki: “Mokolo nini tokoki kokutana?” Mpe bayokanaki mpo na boyekoli ya Biblia.
Ezali esengo, mpo ete mobulu esilaki, likambo yango nde epesaki nzela ete makambo ya mboka makoka kozonga ndenge na yango ya kala. Kasi, na bileko motindo oyo ya komekama, ezali elendiseli na koyeba ete nsima na mwa ntango moke mokili na sika ekoya, mokili moko ya kimya mpe ezangi mobulu. Liloba na Nzambe esakoli likambo oyo: “Engebene elaka na ye, tozali kozela makoló na sika mpe mabélé na sika kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13, MN) Lisusu, ntango nyonso oyo Jéhovah akopesa nzela, Ba Témoins de Jéhovah bakolandela kosakola nsango malamu na Bokonzi.
[Bililingi na lokasa 31]
Mobulu epekisaki mosala ya kosakola te.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photographie des Publicaciones Capriles, Caracas, Venezuela.