Paradis: elikya ebongi kotyela motema atako moto atombokelaki Nzambe
1. Nsima na mikolo, esika nini tozali komona mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso, mpe na esika ya lolenge nini?
Mikolo milekaki. Mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso bazali lisusu bolumbu te, kozanga ete bayoka nsoni, kasi balati bilamba milai ya mposo na nyama. Bauti kobima na Edene, elanga ya kokoka, mpe bakutani na mabelé ya lolenge mosusu: mabelé mazangi kotimolama oyo ndelo na yango ezalaki komonana te. Lokola ezali komonana polele, lipamboli na Nzambe ezali na esika yango te. Liboso na bango, ezali bobele matiti na nsende mpe nkamba na nzube. Basengelaki nde koyangela mabelé, boye te? Ee; kasi sikawa mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso bazali na esika oyo ezangi kotimolama mpo na likanisi ya kokolisa elanga na Edene te.
2. Mpo na nini mobali mpe mwasi bazali komeka kozonga te kati na paradis?
2 Liboso na ezingelo oyo ekeseni mpenza na oyo bazalaki na yango kala, mpo na nini bazali kozonga na paradis te? Ezali mpasi te na koloba, kasi tala oyo ezali nsima na bango, na ekotelo ya elanga: bakeluba, bikelamu oyo bamonaki naino te, ata kati na paradis, mpe mopanga na mɔ́to oyo ezalaki kobaluka kozanga kotelema. Mobali mpe mwasi bazalaki lisusu na libaku moko te ya kozonga kati na paradis mpe kotikala na bomoi.—Genese 3:24.
3. Likambo nini elekaki mpo ete makambo matali bomoi ya babalani na liboso mabongwana kino na motindo oyo?
3 Na bongo likambo nini elekaki? Likambo moko te ya mpasi koleka oyo sianse esengelaki kotikala na mobulungano kino bankoto na mibu, kasi likambo petee ya moke mpo na kolimbola. Mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso basengelaki kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki bango mokolo ya libala na bango, mokumba oyo ezalaki kofungolela bango bilikya kitoko, soki nde bakotosa Tata na bango ya likolo ata kati na makambo mike. Botosi na bango ya kokoka emekamaki na epekiseli se moko etali bilei: basengelaki te kolia mbuma na “nzete na koyeba malamu mpe mabe”. (Genese 2:16, 17) Soki basali na boyokani te elongo na mobeko yango ya Nzambe, bakokufa solo. Ezali yango nde Adam, lokola mosakoli na Nzambe, alobaki epai na mwasi na ye, moto oyo azalaki elenge mingi koleka ye. Kasi, likambo ya kokamwa, nahash moko, to nyoka, abimisaki ntembe mpo na bosolo na likambo oyo Nzambe alobaki na Adam ntango apekisaki ye na kolia mbuma na “nzete na koyeba malamu mpe mabe”. Nyoka akosaki mwasi na kondimisaka ye ete soki abuki mobeko na Nzambe mpe alei mbuma yango oyo epekisami akokoma lokola Nzambe mpe akotambwisama lisusu na Nzambe te mpe akobanda koyeba ye moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.—Genese 3:1-5.
Lisolo ya solo mpenza
4, 5. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete lisolo oyo ezali kolobela lolenge oyo nyoka akosaki mwasi ya liboso ezali lisolo ya makanisi mpamba te?
4 Lisolo oyo ezali solo mpenza? Ekokani na lisolo ya makanisi mpamba, na lisapo oyo ezangi moboko mpe, oyo eboyami na eleko na biso epai na moto nyonso oyo ayekoli mingi? Yango ezalaki te likanisi ya mokomi oyo andimami oyo bato mingi batangi makomi na ye, ntoma moko oyo aponamaki na ntina mpenza oyo ayebaki bosolo ya makomi na ye.’ Na lisangá ya baklisto mikóló bafandaki na Korinti, centre ya bato na mayele, ntoma wana, Paulo, akomaki: “Kasi lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye, nabangi ete makanisi na bino makopengwa longwa na sembo mpe mpeto mpo na Klisto.”—2 Bakolinti 11:3.
5 Ezali mwa mpasi mpo na kondima ete Paulo azali kolobela lisolo oyo euti na lisapo, oyo ezwamaki na makanisi mpamba mpo na kondimisa likanisi oyo alingaki koyebisa epai na Bakolinti wana oyo bayebaki masapo ya bopakano na greke. Kotangaka Makomami na liebele mapemami na Nzambe, oyo abiangaki yango “liloba na Nzambe”, ntoma Paulo andimaki ete “nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye”. (1 Batesalonike 2:13) Epai mosusu, kati na mokanda moko oyo atindelaki mokengeli moklisto moko oyo apesamelaki mokumba ya koteya “lolenge na maloba sembo”, ntoma Paulo akomaki: “Adam asalamaki liboso mpe Eva na nsima. Adam mpe azimbisamaki te kasi mwasi azimbisami mpe akwei na lisumu.”—2 Timote 1:13; 1 Timote 2:13, 14.
6. (a) Na nini lisumu ya Adam ekeseni na oyo ya mwasi na ye? (b) Mpo na nini tokoki kondimisama ete mwasi abimisaki kati na makanisi na ye moko te lisolo etali nyoka?
6 Koloba ete mwasi azimbisamaki na nyoka, ezali lisolo ya makanisi mpamba te, kasi ezali likambo ya solo lokola mpe na mbeba nyonso ya nsomo ebimi mpo na kozanga botosi oyo ye amonisaki na koliaka mbuma epekisami. Nsima na kobuka bongo mobeko na Nzambe, abendaki mobali na ye na kosala lokola ye, kasi soki mobali aliaki mbuma, ezali te mpo ete ye mpe akosamaki. (Genese 3:6) Tala na maloba nini bango mibale basambaki liboso na Nzambe na ntina na libunga na bango: “Mobali alobaki ete, ‘Mwasi oyo yo opesaki ete azala na ngai, apesi ngai mbuma na nzete yango. Ngai mpe nalei.’ Jéhovah Nzambe alobaki na mwasi ete, ‘Osali bongo mpo na nini?’ Mwasi alobaki ete, ‘Nyoka akosi ngai, mpe nalei.’ (Genese 3:12, 13) Mwasi alobaki lokuta te mpo na nahash, to nyoka, mpe Jéhovah Nzambe atalelaki ndimbola na ye te lokola lisolo ya makanisi mpamba. Asalaki liboso na nyoka yango lokola epai na esaleli oyo epesaki nzela na kokosa mwasi mpo na komema ye na kobuka mobeko oyo apesaki, Ye, Mozalisi na ye mpe Nzambe na ye. Mbele ekokaki kozala nsoni mpo na Nzambe kosolola elongo na nyoka moko ya lisapo mpamba.
7. (a) Na maloba nini lisolo ya Biblia ezali koyebisa lisambisi oyo Nzambe alobaki epai na nyoka? (b) Ndenge nini nyoka oyo akosaki mwasi ya liboso akoki kokosa biso, biso mpe lokola? (Lobela mpe note.)
7 Tala na maloba nini lisolo ya Biblia ezali koyebisa lisambisi oyo Nzambe alobaki mpo na nyoka kati na elanga ya Edene: “Bongo Jéhovah Nzambe alobelaki nyoka ete, ‘Mpo ete yo osali likambo oyo, olakami mabe na koleka bibwele nyonso mpe nyama na lisobe nyonso; okotambola na libumu na yo, mpe okolia mabele mikolo nyonso na bomoi na yo. Nakotia likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo, mpe okoswa litindi na ye.’ (Genese 3:14, 15) Tribinale nyonso ya malamu esambisaka na kotalela makambo oyo masalemi mpenzampenza mpe etalelaka na likebi nyonso bilembeteli oyo bizali na moboko ya solo, kasi masapo te. Jéhovah Nzambe asalaki lokola zoba te na kolobaka ekateli na ye mpo na kokweisa nyoka ya lokuta. Te, akweisaki ekelamu ya solo oyo azalaki na makambo ya kozongisa epai na ye. Ekozala likambo ya kosekisa te, kasi likama, soki nyoka bobele moko, oyo akosi biso na komemaka biso na kokanisa ete ye azalaka na ye na bomoi te, ete ezali bobele lisapo mpamba mpe ete azali na ye mobandisi ya mbeba moko te awa na mabeléa.
8. Lisambisi nini Nzambe alobaki epai na mwasi, mpe mpasi nini yango ekomemela bana na ye ya basi mpe bankoko na ye ya basi?
8 Lisolo ezali koyebisa ete Nzambe andimaki maloba ya mwasi engebene yango nyoka azalaki mpenzampenza. Etangami boye: “Alobaki na mwasi ete, ‘Nakobakisa mpasi na yo na kobota; okobota bana na mpasi, nde okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likolo na yo.’ (Genese 3:16) Nzambe alobaki te mpasi ya motindo boye epai na mwasi ntango apambolaki libala na ye elongo na Adam, na maloba oyo: “Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili.” (Genese 1:28) Mokumba wana epambolami oyo epesamaki epai na babalani ya kokoka ezalaki koyebisa ete mwasi akokumba zemi mingi, kasi akobota kozanga kooka mpasi makasi ata mpe mobali na ye akonyokola ye te. Lisambisi oyo elobamaki likoló na mwasi azangi botosi esengelaki kozwa bana na ye ya basi mpe bankoko na ye ya mike ya basi, libota na libota.
Lisambisi oyo elobamaki likoló na Adam ezali kokumisa mobeko na Nzambe
9, 10. (a) Likebisi nini Nzambe ayebisaki yango polele epai na Adam, mpe, soki Nzambe akokokisa etumbu motindo yango, mbele mpasi nini yango ekokaki kobimisa? (b) Lisambisi nini Nzambe alobaki epai na Adam?
9 Kasi likambo nini ezalaki uta ntango yango kozela mwasi, mpe mobali oyo ye abendaki na kosangana na ye kati na bobuki mobeko? Nzambe ayebisaki polele epai na mobali yango: “Nde mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe okoki kolia te. Mpamba te mokolo okolia yango okokufa solo.” (Genese 2:17) Nzambe, Mosambisi, asengelaki kokamata ekateli moko ya makasi boye bobele mpo na ntina moko ete Adam aliaki mbuma? Kanisa na likambo oyo kokokisama ya ekateli motindo wana ekolimbola? Ekolongola epai na Adam mpe Eva elikya kitoko oyo epesamelaki bango mokolo ya libala na bango: kotondisa mabelé mobimba na bakitani na bango, na libota na bato ya kokoka oyo bakofanda na kimya mpe mpo na libela kati na paradis ya mabelé, mpe baoyo bakobatela mpo na libela bolenge na bango mpe boyokani ya kimya elongo na Nzambe na bango mpe Tata na bango ya likoló. Solosolo mpenza, Nzambe akondima te ete mokano na ye ya kitoko epai na bato mpe epai na efandelo na bango ya mabelé ekweisama na kokokisaka mbala moko etumbu ya liwa likoló na bankoko ya yambo ya bato. Kasi tala ekateli na ye ya nguya mpe ya polele lokola yango ekomami kati na Biblia:
10 “Mpo ete oyoki monoko na mwasi na yo, mpe ete osili kolia mbuma na nzete epekisaki ngai yo ete, “Okolia yango te”, mokili elakami mabe na ntina na yo. Okolia na yango na mawa mikolo nyonso na bomoi na yo. Ekobimisela yo [nzube mpe matiti na nsende] mpe okolia [nkasa ya zamba]. Na milunge na elongi na yo okolia kwanga, kino ntango ekozonga yo kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, mpamba te ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.’”—Genese 3:17-19.
11. Makambo nini matali botosi mamonisi bosolo ya lisambisi na Nzambe oyo elobamaki epai na Adam?
11 Lisambisi oyo elimbolaki ete moto akozwa etumbu ya liwa,” ezala ata nini yango ekobimisa likoló na mokano ya Nzambe, mokano oyo ezalaki kokana ete paradis ezipa mabelé mobimba mpe etonda na mibali mpe basi ya kokoka; bango bakofanda elongo kati na bolingo mpe na kimya, bakolona elanga yango mpe bakobatela yango libela na libela. Mobali ayokaki mongongo ya mwasi na ye na esika ya koyoka mongongo na Nzambe, oyo apekisaki ye kolia mbuma na “nzete na koyeba malamu mpe mabe”. Nzokande, mpo na koloba solo, soki ye moko atosaki te na mongongo na Nzambe na ye mpe Mozalisi na ye, akoteya bana na ye ete batosa yango? Ndakisa na ye mbele ekobenda bato na kotosa Jéhovah Nzambe?—Tala 1 Samwele 15:22.
12, 13. (a) Likambo nini lisumu ya Adam ekokaki kobimisa likoló na bana na ye? (b) Mpo na nini Adam azalaki na lotomo ya kofanda libela te kati na Paradis, to mpe esika mosusu na mabelé?
12 Bana ya Adam mbele bakozala na makoki ya kotosa mpenzampenza mobeko ya Nzambe, lokola ye moko azalaki na makoki ya kosala yango ntango azalaki moto ya kokoka? Na ntina na mibeko mitali kobota, mbele akolekisa te epai na bana na ye bolembu na ye, ezalela na ye ya kozanga botosi na mongongo na Nzambe mpe na koyoka mongongo mosusu? Lisolo na bato epesi eyano na mituna oyo.—Baloma 5:12.
13 Mobali wana oyo, kati na mokano bobele moko ya koluka kosepelisa ekelamu ya mosuni, atikaki komonisa botosi ya kokoka epai na Nzambe mpo na kolakisa bolingo na ye ya kokoka mpo na ye, azalaki na lotomo ya kofanda libela kati na Paradis, to mpe epai mosusu na mabelé? Ekozala mayele na kotika ye mpo na libela azala na bomoi awa na mabelé? Toloba ete apesamelaki ndingisa ya kofanda libela nsima ya kobuka mobeko; yango ekokumisa mobeko na Nzambe mpe akomonisa mpenza boyengebene na Ye ya kokoka, to, mbele, likambo yango ekopesa nzela na kotiolama ya mobeko na Ye mpe ekomonisa ete liloba na Ye ebongi te mpo na kotiela yango motema?
Babimisami na elanga ya Edene
14. Engebene lisolo ya Biblia, bikateli nini Nzambe akamataki mpo na Adam mpe mwasi na ye?
14 Lisolo na Biblia ezali koyebisa biso motindo Nzambe akataki makambo yango: “Jéhovah Nzambe asalaki kazaka na mposo na nyama mpo na Adam mpe mwasi na ye mpe alatisaki bango. Jéhovah Nzambe alobaki ete, ‘Awa moto akomi pelamoko na moko na biso, koyeba malamu mpe mabe; bongo na ntina ete atia loboko te kokwa mbuma na nzete na bomoi kolia yango mpe koumela na lobiko na lobiko-’ yango wana Jéhovah Nzambe abimisaki ye na elanga na Edene, mpo na kotimola mabelé wana ekamatamaki ye. Bongo ye abimisaki moto, mpe epai na ebimelo na ntango na elanga na Edene, atiaki bakeluba na mopanga na mɔ́to, mokobongwana bipai nyonso ete basenzela nzela na nzete na bomoi.”—Genese 3:21-24.
15. (a) Ndenge nini Nzambe atalelaki liyoki ya nsoni oyo Adam mpe mwasi na ye bayokaki na ntina na bolumbu na bango? (b) Ndenge nini babalani ya liboso babimisamaki na elanga ya Edene? (c) Kati na ezalela nini Adam mpe mwasi na ye bamimonaki kuna na libanda ya elanga ya Edene?
15 Nzambe Mosambisi atalelaki liyoki ya nsoni oyo basumuki Adam mpe mwasi na ye bazalaki sikawa koyoka mpo na bolumbu na bango. Na lolenge moko oyo eyebisami sikisiki te, apesaki bango bilamba milai ya mposo na nyama mpo na kolata na esika ya bilamba na makasa oyo bamitongelaki. (Genese 3:7) Bilamba wana ya mposo na nyama ekoumela mingi koleka mpe ekobatela bango malamu na nzube, na matiti na nsende na biloko mosusu oyo ekokaki kozokisa bango na libanda ya elanga na Edene. Lokola bakomaki na lisosoli ya mabe nsima na kosala lisumu, bamekaki komibomba katikati na banzete ya elanga na Edene mpo bakoka komonana na Jéhovah te. (Genese 3:8) Nsima na kopesa bango etumbu, Nzambe abenganaki bango na elanga na kobendaka bango na lolenge moko to mosusu ete babima kati na yango. Amemaki bango epai na ebimelo na moi, mpe bamimonaki moke na moke na libanda ya elanga, oyo ndingisa ya kokota kati na yango epekisamelaki bango makasi. Bakosala lisusu te mpo na kokolisa elanga yango mpe kokolisa makambo kitoko oyo mazalaki kati na paradis kino nsuka nyonso ya mokili. Sikawa, bakolia kwanga esalami longwa na matiti na zamba, nzokande yango ekopesa bango likoki te ya kobatela bomoi na bango mpo na libela. Bakozwa ndingisa te ya kosimba “nzete na bomoi”. Na boumeli ya mwa bambula -boni? Bayebaki yango te-bakosuka na kokufa.
Mokano na Jéhovah na ebandeli ekoki kokweisama te
16. Likambo nini oyo Nzambe akanaki te na kosala, mpe mpo na nini?
16 Na yango Nzambe azwaki mokano ya koboma mabelé, sanza, moi mpe minzoto kati na etumba ya molongo mobimba bobele mpo bikelamu mibale biuti na mputulu basaleli ye lisumu? Soki asalaki lolenge wana, yango elingaki kolimbola te ete mokano na ye ya lokumu esili kokweisama, nyonso wana bobele mpo na oyo nahash moko abimisaki? Nyoka ya mpamba akokaki mpenzampenza kobebisa mokano ya Nzambe? Mokano yango, Nzambe ayebisaki yango na Adam mpe Eva mokolo ya libala na bango ntango apambolaki bango mpe ayebisaki bango likambo oyo ezalaki mokano na ye epai na bango: ete batondisa mokili mobimba na libota na bato ya kokoka, bazala na bokonzi likoló na yango na kotombolaka yango na ezalela ya kokoka lokola oyo ya elanga na Edene mpe ete bato banso bayangela na kimya nyonso bikelamu ya mokili mpe ya mai oyo bizali na nse ya moto. Oyo emonaneli nini ya kokamwisa ya ezalela oyo esengelaki komonana, wana ekokokana mokano na Nzambe oyo na ntina na yango amilengelaki na boumeli ya mikolo motoba ya bozalisi, oyo moko na moko na yango ezali na bankoto ya mibu! Mokano oyo ya ntina monene ekokaki kotikama bobele mpo na nyoka mpe mpo na botomboki ya babalani ya liboso? Soki moke te!—Tala Yisaya 46:9-11.
17. Likambo nini oyo Nzambe akanaki kosala mpo na oyo etali mokolo ya nsambo, mpe ndenge nini mokolo yango ekosuka mpenza?
17 Mokolo ya nsambo, mokolo na kopema ya Jéhovah, ezalaki naino kolandana. Nzambe azwaki ekateli ya kopambola mokolo yango mpe kokomisa yango bulee. Akopesa nzela na likambo moko te na kokomisa yango mokolo oyo elakami mabe. Akotemela makambo nyonso ya mabe oyo mabimisami ata na nani, na lolenge oyo ete mokolo yango epambolama mpenza. Na nsuka ya mokolo yango, mabele mobimba makozala esika na bulee, Mokano na Nzambe ekokokana lokola na likoló, na libota na bato ya kokoka.—Tala Matai 6:10.
18, 19. Mpo na nini bakitani ya kozanga kokoka ya babalani na liboso oyo basalaki lisumu bakoki kozwa lisusu nguya? (b) Nimero ya nsima ya Mosenzeli ekolobela nini lisusu mingi koleka?
18 Nzambe azalaki kotungisama ata moke te kati na motema. Atikaki mokano na ye te. Azwaki ekateli ya komilongisa ye moko, ya komonisa ete tokoki solo kotiela ye motema, ete azali na mokano mpe azali kokokisa yango na mobimba na yango, likambo oyo ezali mpo na lokumu na ye. (Yisaya 45:18) Bakitani bazangi kokoka ya babalani ya liboso oyo basalaki lisumu bakoki kozwa lisusu nguya mpe kozala na elikya ete Nzambe akokokisa na bosembo nyonso mokano na ye ya ebandeli mpo na bolamu na bango ya seko. Lokola mokolo na kopema ya Nzambe ezali kokoba uta bankoto na mibu, eteni na yango ya ntina, oyo ekopambolama mpenza na Nzambe, esengeli kozala penepene. “Mpokwa” ya mokolo yango ya kopema ezali koleka, mpe “ntongo” esengeli koya. Ntango ekokoma kati na kokoka na yango mobimba mpe ekomonisa polele epai na bato banso kokokisama ya lokumu ya mokano na Nzambe oyo ekoki kobeba te, na bongo likoki ekozala mpo na kokoma: ‘Mpe mpokwa na ntongo ezalaki: oyo mokolo na nsambo.’ Oyo elikya nini kitoko!
19 Ezali likambo ya esengo mingi na kokanisa na makambo nyonso wana. Nimero ya nsima ya Mosenzeli ekolobela mingi lisusu avenire kitoko oyo ezali kozela bato na botosi, baoyo balingi mobeko na Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Emoniseli 12:9, Satan le Diable amonisami na “nyoka ya kalakala”, mpe, na Yoane 8:44, Yesu Klisto azali koloba mpo na ye lokola “tata na lokuta”.
Bozongeli
◻ Mpo na nini babalani ya liboso babungisaki paradis lokola efandelo na bango?
◻ Ndenge nini toyebi ete Eva akosamaki mpenza na nzela na nyoka?
◻ Etumbu nini Nzambe alobaki yango mpo na mwasi?
◻ Etumbu nini Nzambe alobaki yango mpo na Adam, mpe mpo na nini akumisaki mpenza mobeko na ye?
◻ Mpo na nini Nzambe atungisamaki te na motema mpo na oyo etali mokano na ye na ntina na mabelé, elingi koloba ete ekoma Paradis moko oyo etondi na bato ya kokoka?