Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/8 lok. 28
  • “Solo ekosikola bino”-mpe ekomemela bino bolamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Solo ekosikola bino”-mpe ekomemela bino bolamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/8 lok. 28

Masolo ya basakoli ya Bokonzi

“Solo ekosikola bino”-mpe ekomemela bino bolamu

Na MOKILI ya Grande-Bretagne, solo na Biblia esikolaki bato koleka 113 000, likoló na bango ba anglais mosusu bazali kobakisama mokolo na mokolo. Bato bazali komona mpenzampenza kokokisama ya maloba oyo na Yesu: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Bonsomi oyo ezali komema bolamu, yango elakisami na makambo oyo mamonanaki, oyo mamonisami awa na nse na filiale ya mokili ya Grande-Bretagne.

◻ Na ntango azalaki kosakola ndako na ndako, mwasi moko mobange aboyaki koyamba Penny epai na ye na kolobaka ete: “Nazali na mosala.” Na yango Penny ayebisaki ye ete akozonga. Nsima ya mwa mikolo, na ntango oyo amesana te kotala bato, Penny alekaki kotala bato oyo ye asololaki na bango, mpe kozanga kokanela abetaki porte ya mwasi oyo mobange. Afongolaki mpe akotisaki Penny. “Nayebaki ete okozonga, elobaki ye, mpe nazalaki kozela yo.” Basi oyo mibale basololaki mpo na elikya ya Bokonzi, mpe mwasi yango alobaki ete azali na mposa ete makambo yango masalama. Ya solo, azalaki na mibu 79 mpe mobali na ye akufaki esilaki koleka mbula misato. Lokola Lingomba na ye epesaki ye ata kobondisama moko te, azalaki lisusu na mposa ya kozala na bomoi te mpe alingaki bobele akufa. Nsima, ntango Penny abandaki koyekola Biblia elongo na ye, mwasi oyo ayebisaki ye ete akanisaki mpo na komiboma, ata soki ayebaki ete ezalaki mabe. Bongo abondelaki Nzambe mpo ete abondisa ye mpe asalisa ye na kozwa elikya. Moke moke, na lisalisi ya boyekoli ya Biblia, azwaki elikya mpe kondima ya mozindo mpe botondi epai na Jéhovah. Mwasi yango akataki boyokani nyonso na ye ya bomoi mobimba oyo alekisaki kati na Lingomba na ye ya kala, azwaki batisimo na mbula 80, mpe sikawa azali kosakola ntango nyonso na molende mingi. Solo ya Liloba na Nzambe esikolaki ye mpe epesaki ye esengo.

◻ Solo na ntina etali Bokonzi na Nzambe ezali kosikola na bikanganeli nyonso na lingomba ya lokuta. Ekoki mpe lisusu kobongola bomoto,mbongwana oyo ezali kokamwisa mbala mingi baoyo bazali komona yango mpe ezali kosalisa bango na kososola mpo na solo. Yango nde elakisami na lisolo lilandi:

Mokolo moko, elenge mwasi moko abetaki na porte ya Temwe moko mpe asengaki ye basala boyekoli ya Biblia. Mpo na nini lisengi oyo? Tala ndimbola: Baboti ya mwasi yango bazalaki koyekola Biblia elongo na Ba Témoins de Jéhovah; nzokande, mbongwana oyo boyekoli ememaki epai na bango, mingimingi epai na tata na ye, emonanaki polele kino elenge mwasi akamwaki mingi. Tata na ye, oyo azalaki komela 80 cigarettes na mokolo moko, atikaki libela komela ntango bayebisaki ye ete likambo yango ezalaki kosepelisa Jéhovah te. Nokinoki nsima, azongisaki epai ya bakonzi na ye ya mosala biloko mingi oyo ayibaki bango na boumeli ya mwa ntango. Mwana mwasi ya mobali wana amonaki ete mateya oyo mamemi mbongwana makasi epai na baboti na ye masengeli solo koyebana malamu. Sikawa, baboti bazwaki batisimo, mpe mwana mwasi na bango azali koyangana na makita nyonso.

Solo oyo Yesu asakolaki kala epesaki bolamu to esengo epai na baoyo touti kolobela mpe epai na mingi mosusu. Solo oyo na Biblia ekoki kosala bobele bongo epai na moto nyonso oyo andimi yango mpe asaleli yango kati na bomoi na ye.​—Nzembo 19:7, 8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto