Biloko na motuya na evanzile ya Matai
JEHOVAH NZAMBE apemisaki Matai, mokongoli na mpako na kala, mpo ete akoma lisolo kitoko etali kobotama, bomoi, liwa mpe kosekwa ya Yesu. Engebene ba notes ezwami na nse na mikanda mosusu oyo mikomama liboso na ekeke ya 10, emonisi ete Evanzile yango ekomamaki mbula soko 8 nsima na kozonga na Yesu na likoló (penepene na mobu 41). Makanisi oyo makeseni te na makambo oyo mazwami na lisolo yango, mpo ete na nsuka na lisolo na ye ntoma Matai alobeli lolenge oyo Yesu apesaki mokumba ya kozalisa bayekoli na mobu 33 mpe azali kolobela te mpo na kobebisama na Yelusaleme na ba Romains na mobu 70.
Kati na mokanda na ye, Historia Ecclesiastica (Lisolo ya lingomba), Eusèbe, mokomi na masolo ya kala na ekeke ya 4, azali kotanga Papias mpe lrénée, na ekeke na mibale, mpe Origène, na ekeke na misato, oyo, bango nyonso balongisi Matai lokola mokomi na Evanzile yango mpe bandimisi ete akomaki yango na monoko ya hébreu. Mokanda yango ekomamaki na monoko ya araméen te? Te, engebene mikanda oyo etangami na George Howard, profesere ya histoire ya lingomba na université ya Géorgie, mpo na mikanda yango akomi: “Likanisi wana euti mingi na likanisi oyo ete monoko na hébreu ezalaki kolobelama te na Palestine na mikolo na Yesu, ete araméen nde ezwaki esika na yango. Bokundoli na mikolo mileki ya mikanda ya mer Morte, oyo mingi na yango ekomami na monoko ya hébreu, mpe bokundoli mosusu na Palestine ya mikanda mosusu na monoko ya hébreu na ntango ya Yesu emonisi sikawa ete monoko ya hébreu esalelamaki mingi na ekeke ya liboso.” Ezali komonana lokola Matai akomaki Evanzile na ye mpo na baklisto oyo bazalaki kosolola monoko ya hébreu, kasi mbala mosusu abongolaki yango mpe na monoko ya greke.
Tozali kolendisa yo na kotanga Evanzile ya Matai. Na kotalela moko na makambo na motuya mazwami na kati na lisolo oyo, totalela ndenge nini masolo na bato mangengisi yango.
Kobotama na Yesu mpe ebandeli na mosala na ye
Evanzile ya Matai ebandi na mokanda na bankoko na Yesu mpe kobotama na ye. Na ntango Malia azwaki zemi, fiansé na ye, Yosefe, “akanaki kolongola ye na nkuku” (1:19). Kasi ndenge nini yango ekokaki kosalema mpo ete bazalaki bobele bafiansé? Ezali mpo ete na Bayuda, mwasi oyo alakami libala (to fiansé) azalaki kotalelama lokola mwasi oyo asili kobala. Soki akokaki kosangisa nzoto na mobali mosusu, bakokaki kobeta ye mabanga lokola mwasi asali ekobo. (Deteronome 22:23-29) Lokola fiansaye (elaka ya libala) ezalaki ndai, Yosefe akanaki kolongola Malia, atako molulu moko esalamaki naino te mpo na kobalisa bango.
Mikapo ya liboso ya Evanzile na Matai ezali na Lisolo likoló na ngomba, oyo Yesu apesaki. Klisto akebisi bayoki na ye ete oyo nyonso akoloba na ndeko na ye “zoba” akozala na likambo na “Koyangana-na-mikolo” [Tribunal suprême]. (5:22) Koloba ndenge wana epai na ndeko na yo elimboli ozali komona ye lokola kizengi oyo azali na mayele te.
Kasi “Koyangana-na-mikolo” [to Tribunal suprême] ezalaki nini? Ezalaki oyo bazalaki kobenga Sanhédrin, ezalaki na Yelusaleme mpe esangisaki bato 71. Masengami ezalaki nini mpo na kozala mosangani na yango? Tala oyo tozali kotanga mpo na likambo yango kati na Cyclopedia ya McClintock mpe Strong: “Moto oyo asengi kozala moko na basangani na Sanhédrin asengelaki kozala na bizaleli malamu mpe moto na nzoto malamu, asengelaki kozala na mbula ekoki, kozala molai, kitoko, mozwi, mpe moto atanga mingi . . . Moto asengelaki koyeba minoko mingi . . . Mpo na bokeseni na bamosusu, mibangé, bato babongwanaki na kolanda lingomba na Bayuda, mikube mpe Banetinime bakokaki kondimama te; to baoyo bazalaki na bana te, mpo ete bakokaki kokanga ntina te na makambo matali mabota . . .; to mibali oyo bazali na kokitana moko te na nganga na Nzambe, Molewi to mwana na Yisraele moko. . . . Moto oyo asengi kozala moko na basangani na Sanhédrin Monene asengelaki mingimingi kozala naino mosambisi kati na mboka na ye ya kobotama, azala asila kotindama na Sanhédrin ya moke . . ., nsima azala oyo asili kokota na Sanhédrin moke ya mibale . . . liboso ya kondimama kati na baoyo ntuku nsambo na moko.
Na yango, engebene Yesu, “oyo alobi na ndeko na ye zoba” azali na ngambo ndenge moko na moto oyo asambisami mpe bakateli ye etumbu ya liwa na Cour suprême ya Bayuda. Tala likanisi oyo ekoki kopekisa biso kofinga to kotuka bandeko. Tobatela lolemo na biso mpo ete tozwa etumbu te na tribinale monene koleka, liboso na Jéhovah, “Mosambisi na mokili mobimba”.—Genese 18:25; Yakobo 3:2-12.
Yesu: molakisi malamu mingi
Evanzile oyo emonisi lisusu Yesu lokola molakisi oyo azali na makoki ya kopesa biyano na mayele na mituna. Na ndakisa, na ntango batunaki ye mpo na nini bayekoli na ye bazali kokila bilei te, apesaki ntina mpo na yango (9:14-17). Bayekoli na ye bakokaki kokila bilei te naino ye azalaki na bomoi. Kasi, lokola asakolaki yango, bakilaki bilei mpe balelaki ntango akufaki, mpo bayebaki te mpo na nini likambo yango epesamelaki nzela. Kasi, nsima ya kozwa elimo santu na mokolo na Pantekote, bangengisamaki mpe batikaki kokila bilei oyo ezalaki elembo ya mawa.
Kaka na lisolo yango, Yesu abakisi ete moto akoki kobamba elamba ya kala na eteni ya elamba ya sika te, mpamba te eteni ya sika ekobendabenda elamba ya kala mpe ekopasula yango koleka. Amonisaki lisusu ete moto akoki kotia vinu ya sika na ngóto ya kala te. Ngóto esalamaki na mposo na nyama, oyo batongi yango malamu, batiki kaka nsonge ya lokolo. Na kofulisa vinu ya sika ezali kobimisa gaz karbonike, oyo soki etondi na kati ekokaki kopasola ngóto ya kala mpe esili kokauka. Ndenge moko, solo oyo eteyamaki na Klisto ezalaki na nguya mingi mpo na lingomba ya Bayuda oyo ezalaki ya kala mpe ekokaki kobongisama te. Esika mosusu, Yesu amekaki te kotonga to koumelisa ebongiseli ya lingomba oyo ekomaki ya kala, na makambo na yango lokola kokila bilei mpe milulu mosusu. Kasi Nzambe asalelaki ye mpo na kotelemisa ebongiseli na sika na losambo. Ntembe ezali te, tosengeli soko moke te kopesa maboko na ebongiseli na mangomba masangani (mouvements œcuménique) to kosimba lingomba ya lokuta mpo na komeka koumelisa yango.
Tolanda batoli ya Mwana na Nzambe
Ndenge Matai alobi yango na kati na lisolo na ye mpo na kobongwana, Nzambe alobaki mpo na Yesu ete azali Mwana na ye oyo ye andimaki mpe alobaki ete tosengeli koyokela ye (17:5). Na yango tosengeli kolanda batoli nyonso ya Klisto. Na ndakisa, alobi ete ekoki kozala malamu mingi mpo na oyo abetisi libaku na moto oyo andimeli ye akangama libanga na nkingo mpe abwakama na mai mozindo (18:6). Libanga oyo azalaki kolobela ezalaki ndenge nini? Libanga moke te, kasi libanga oyo ezalaki na 1,20 to 1,50 mètre longwa nsuka moko kino nsuka mosusu, mpe oyo na lisalisi na nyama na mosala ya kotuta libanga yango ezalaki kobaluka likolo na libanga mosusu ya monene koleka. Moko te akokaki kobika soki babwaki ye na kati na mai na kilo motindo boye ekangami na nkingo. Na yango, Yesu apesi biso toli ya kobetisa libaku te epai na moko na bayekoli na ye. Na likanisi bobele yango, ntoma Paulo akomaki: ’‘Malamu koboya kolia nyama mpe komela vinu mpe kosala likambo nini lizali kotutisa ndeko na yo libaku.”—Baloma 14:21.
Mwana na Nzambe apesaki batoli mosusu na mayele ntango azalaki kolakela mabe likolo na Bafalisai, mpe alobaki ete bakokani na mayita mapakolami mpembe (23:27, 28). Momeseno ezalaki kosenga ete bapakola mpembe na mayita mpo ete soki moto asimbi yango kozanga koyeba azala mbindo te. Na kolobelaka mpo na momeseno yango, Yesu amonisaki ete Bakomeli na Bafalisai bazalaki komonana libanda ete bazali na boyengebene, kasi na kati ”batondaki na bokosi mpe botioli mobeko”. Soki toyoki toli euti na maloba oyo, tokokima ezaleli ya kobomba mabe mpe tokozala na “kondima ezangi bokosi”.—1 Timoté 1:5; Masese 3:32; 2 Timoté 1:5.
Ndakisa na bosembo
Nsima na koyebisa esakweli na Yesu oyo etali ‘elembo ya koya na ye’ (présence), Matai akomi ete akabamaki, nsima akangamaki, asambisamaki, abomamaki mpe asekwisamaki. Likolo na nzete, Yesu aboyaki vinu etiami bololo, yango ezali na makasi lokola drogue (27:34). Basi bazalaki na momeseno ya kopesa vinu motindo wana na basali mabe oyo bazalaki konyokwama likolo na nzete na kufa mpo na kokitisa mpasi na bango. Malako 15:23 elobi ete vinu yango “esangisamaki na mola (to mire)”, mpo na kopesa yango elengi kitoko. Vinu oyo Klisto aboyaki emonani ete esangisamaki na fiel (ezali nkisi na kolangwisa mpe na bololo mingi) mpe mola (mire) (nkisi ya kopesa elengi mpe solo kitoko). Na nsuka na bomoi na ye awa na mabele, Yesu alingaki te komela drogue to kolangwa. Alingaki kotikala sembo kino liwa na lolenge oyo ebongi na koyoka mpasi. Kolandaka Ye Ndakisa na biso, tosengeli kosala nyonso ebongi mpo na kotikala sembo liboso na Jéhovah Nzambe!—Nzembo 26:1, 11.