Namoni boyokani ya mposo kati na mboka Afrique du Sud oyo ekabwani
Lisolo ya Merlyn Mehl
NAZALI moto ya Afrique du Sud, to na ebengeli mosusu oyo ebongi na mboka na biso, nazali moto moindo ya Afrique du Sud. Nazali mpe molakisi na université ya Cap ouest, eteyelo eleki monene oyo etondi na baindo kati na Afrique du Sud. Nazali na diplôme ya sciences physiques mpo na koteya. Nazali mpe lisusu Témoin de Jéhovah uta mibu 20. Na makambo oyo mibale, wapi oyo esalisaki ngai na komona boyokani kati na bato ya mposo ekeseni na mboka oyo etondi na kowelana mpe kozanga boyokani?
Bomwana na ngai na Afrique du Sud
Balobaka ete Cap, eteni na mabelé oyo ezwami na nsonge ya Afrique ya ngele, ezali eteni ya mabelé eleki kitoko ya mokili mobimba. Soki sanza ebimi, likoló oyo etondi na myoto ezalaka kitoko mpo na kotala yango. Nayebi lisusu ete na butu moko ya motindo yango, nalobaki epai na moninga na ngai: “Eloko nini ebombami nsima na nyonso wana? Ndimbola ezali mpenza; nzokande, awa na mabelé makambo mazali mpenza mabe. Ndenge nini bato bazali kokabwana? Mpo na nini kozanga boyengebene ezali?”
Moto oyo abotami na Afrique du Sud, akoyeba uta bomwana na ye eloko oyo babengi bokabwani ya mposo. Ezali komonana kati na makambo nyonso. Uta bomwana na bango, bato bazali kokabolama mpe kotalelama engebene mposo na bango. Engebene mibeko ya Afrique du Sud, libota na ngai ezali na molongo ya ba “métis”. Wana ezalaki biso bana, toyebaki ete Mindele bazalaki banyokoli, mpe biso tozalaki kati na banyokwami. Mpe wana tozalaki kokola, lokola tozalaki na boyokani moko te na mposo mosusu, tozangaki konfianse mpenza ata na moto moko, ezala na eteyelo to na mosala. Tozalaki komona lokola Mindele bazalaki na biloko bileki malamu: ndako, biloko to misala mikosalema na Leta mpe biteyelo. “Apartheid”, liloba oyo elimboli kokabola mposo, ekomaki liloba oyo toyinaki makasi koleka.
Nazalaki naino na école primaire ntango basengaki biso na makasi ete tolongwa na ndako oyo ndeko na ngai ya mwasi mpe ngai tobotamaki, na kartye esangisaki mindele mpe baindo. Ntina ezalaki ete mobeko ebimaki oyo etyaki ndelo na bisika ya kofanda mpo na bato ya mposo ekeseni. Tokendaki kofanda epai mosusu, esika toumelaki bambula mingi. Na nsima balobaki ete esika yango mpe ekomaki kartyé ya mindele, mpe tolongwaki wana lisusu.
Mpo na kozanga koyokana wana ezalaki komonana polele, baboti mpe balakisi na biso bazalaki kopusa biso ete tosala makasi na kelasi. Bazalaki koloba na biso boye: “Bomonisa Mindele ete bino mpe bokokani na bango” mpe likanisi yango ekotelaki ngai ntango nazalaki kokenda na kelasi. Ata nazalaki koloba mingi te, nalingaki koyekola. Nazalaki kolekisa ntango na ngai nyonso na kotanga mokanda nyonso oyo nazalaki kozwa. Yango wana, na nsuka ya bakelasi na ngai, nazalaki kati na bayekoli ya mboka na biso (Afrique du Sud) oyo bazwaki bapwɛ́ ya malamu koleka. Kozanga mikakatano, nakotaki na université. Lokola nazalaki kolinga science mpe matematike, naponaki kozanga kokakatana ete nalanda science, kati na yango fizike mpe matematike ezalaki mateya ya moboko.
Lokola na 1960, mbula oyo ngai nakotaki na université, mobeko etali kokabola bayekoli ya université engebene mposo na bango ebandaki, basengaki ngai na makasi ete nakenda na université oyo ebongisamaki mpo na mposo na ngai. Balobaki mingi mpo na bayekoli ya ba universités oyo ekabwani. Mbula nyonso oyo ezalaki koleka, nazalaki kozwa ekzamé na bapwɛ́ malamu mpenza “très bien”, mpe nakomaki kino na kelasi ya nsuka (metrize)-nabongisamaki mpenzampenza mpo na fizike nikleere. Milende na ngai mimonanaki polele mpamba te nazwaki esika na université ya Cap ouest mpe nazalaki moyekoli ya liboso ya métis oyo akotaki kuna.
Nzokande, ata bongo, nazalaki kosepela te. Nazwaki naino eyano te na motuna moleki monene ya bomoi: Ntina ya biloko nyonso oyo bizingi biso ezali nini? Ezali nde na eleko wana, nalobaki epai na moninga na ngai maloba oyo nayebisaki bino na ebandeli.
Biyano na mituna na ngai
Kino ntango yango, losambo ezalaki mpenza na esika monene te kati na bomoi na ngai. Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kokenda na ndako-nzambe ya misioni, mpe nazwaki libatisi na mbula 16. Kasi, mituna na ngai mizwaki eyano te. Lokola mbula ezalaki koleka, natikaki mokemoke kokenda na ndako-nzambe.
Bongo, mokolo mosusu, nakendaki kotala moninga moko ya université. Na lisalisi ya Biblia, Julia, mwasi na ye, amonisaki ngai ete eyano ezalaki mpo na makambo ya politike mpe bokabwani ya mposo oyo ezalaki na Afrique du Sud mpe, ata kati na mokili mobimba. Nakamwaki mpe nandimaki te. Kasi nazwaki brochure Raisons de croire en un monde nouveau. Ezongaki ngai na ndako, nabandaki kotanga yango, mpo na koyeba soki ezalaki kolobela nini.
Kino ngonga ya mibale ya ntongo, nazalaki se kotanga yango. Kati na brochure yango, namonaki makanisi ya polele mamonisi mpo na nini Biblia ezali koloba solo, mpo na nini tokoki kondimela bisakweli na yango, mpo na nini makambo mazali mabe kati na mokili, mpo na nini 1914 ezali date ya ntina mpe mpo na nini tokoki kolikya na kozalisama ya mokili ya sika ya sembo awa na mabelé. Ezalaki mpenza solo.
Mokolo elandaki, nazongaki epai ya moninga na ngai mpo na kosenga na mwasi na ye mikanda lokola oyo natangaki. Nazongaki na liboke ya mikanda mikolobelaka bindimeli ya moboko ya Biblia mpe oyo ekolimbolaka bisakweli ya mokanda na Danyele mpe Emoniseli, ndimbola ya mikolo motoba ya kozalisama, mpe makambo mosusu. Likambo ya ntina, mikanda yango mimonisaki ete eloko moko te kati na Biblia epesi nzela to endimi bokabwani ya mposo, mpamba te “Nzambe azali na koponapona te”. (Misala 10:34) Nasilisaki kotanga mikanda yango nyonso. Na nsuka, nazwaki biyano na mituna oyo ezalaki ntango nyonso kotungisa ngai. Na nsuka ya mbula mobimba ya boyekoli ya Biblia, nakomaki Témoin de Jéhovah mpe nabatisamaki le 21 Novembre 1967.
Lisangá ya ba Témoins de Jéhovah ezali na koponapona te mpe ezali kokota na politike te. Basangani na yango bazali mpo na boyangeli se moko, Bokonzi ya Nzambe. Mpo na bango, bato banso bazali se ndenge moko. Kasi, na Afrique du Sud, mwa mikakatano mizali mpo na likambo etali mposo. Lokola mobeko etye ndelo mpo na esika oyo bato ya mposo ekeseni basengeli kofanda, masangá mazali mpe kosangisa kati na yango bobele bato ya mposo moko oyo bafandi na esika wana. Yango wana, kati na lisangá ya Claremont oyo nazalaki kokende, basangani na yango mingi bazalaki ba métis. Mwa Mindele oyo bazalaki koya bazalaki to bamisionere, to bato oyo bapesameli mokumba.
Mbula mingi elekaki, kasi nabosanaki te makambo mibale oyo mamonisaki ngai ete ezali mpasi mpo na kotika makanisi matali kokabola mposo. Na ba Assemblées, na cafeterias, Mindele bazalaki kokota na molongo te, bazalaki kozwa bilei mpe bazalaki kokenda kolya pembeni, wana bamosusu bazalaki kotelema mpe kozela na molongo. Yango ezalaki kopesa ngai nkanda mpenza. Batemwe ya Mindele bazalaki mpe na momeseno ya kolakisa basi na bango boye: “Chérie, tala Merlyn. Azali koyekola Biblia” mpe: “Merlyn, tala mwasi na ngai, ndeko Songolo.” Bazalaki kobenga ngai na nkombo na ngai, nzokande ngai nasengelaki kobenga bango “soeur” to “frére”. Nasilikaki mingi.
Kasi nasosolaki. Tokanisaka ete moto azali na koponapona ezali nde moto mosusu kasi biso te, mpe mokakatano eutaka mpenzampenza na likambo yango. Lisusu, mboka oyo etangolami na mikili misusu lokola Afrique du Sud ezali mpenza na bopusi na bafandi na yango nyonso. Soko ezali solo ete Batemwe mosusu ya mindele babongolaki makanisi na bango mpo na lolenge ya kotalela bato ya mposo mosusu, ngai mpe nasengelaki kosala yango. Mpo na yango, Biblia epesi toli kitoko oyo: “Yoka nkanda noki na motema na yo te, mpamba te nkanda ekoumela na motema na bazoba.” (Mosakoli 7:9) Na yango, esengelaki na ngai komibatela mpo nazwa makanisi mabe te mpe komona te ete mabaku nyonso ya bandeko ezalaki mpo bazalaki koponapona.
Nasengeli mpe koloba ete uta mwa ntango makambo masili mpenza kobongwana kati na mboka. Na bambula eleki, Mindele mingi te bazalaki na ndingisa ya koyangana na makita ya losambo elongo na bato ya mposo mosusu, mpe basengelaki kolya na esika na bango. Kasi lelo oyo, ezali lisusu bongo te.
Kasi likambo eleki ntina, ezalaki boye ete namonaki lisangá ya bato oyo bazali kofanda elongo, baoyo bazali koyokana mpe baoyo bazali kobyangana bandeko, mpe yango ezalaki kouta na motema! Bazalaki na bindimeli makasi bizwami na mitinda ya Biblia. Na yango, ntango matata ebimi kati na bato ya mposo ekeseni - na Afrique du Sud yango ezali kosalema mingi - nakanisaka na makambo nyonso wana kozanga komibanzabanza. Wana bambula ezali koleka, nazali koyekola lolenge malamu ya kosalela mitinda ya Biblia mpe nazali kozwa kimya monene na motema mpo na makambo matali kokabola mposo. Kasi yango ezali kosenga milende!
Mosala ya pionnier
Nsima na batisimo na ngai, nayokaki mposa ya kokolisa mosala na ngai ya boklisto. Nazalaki monzemba mpe nazalaki na mikumba mingi te. Yango wana nakomaki pionnier permanent kobanda na le 1er Octobre 1968. Ekateli na ngai elobisaki bato mingi, mpamba te natikaki université mpe natikaki mosala oyo bato mingi bazalaki komona ete ezalaki mosala monene. Zulunalo moko elobelaki kolongwa na ngai na ndenge boye: “Moto moko ya mayele mingi akei kosakola Biblia”. Naumelaki te mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia zomi, elongo na mabota to elongo na moto moko na moko. Na Assemblée moko, bato mibale oyo bazalaki koyekola na ngai bazwaki batisimo; nsima na yango, minei babatisamaki, mpe na nsima nsambo mpe bongo na bongo.
Le 17 Septembre 1969, nabalaki Julia, moklisto mwasi oyo asalisaki ngai na koyeba solo. Elekaki mwa ntango, autaki koboma libala na ye ya kala mpo na bantina oyo endimami na mibeko ya Leta mpe na Biblia. Na ndenge yango, na mbala moko nakomaki na libota mpamba te Julia azalaki mama ya bana mibale ya mibali, John mpe Leon. Tozwaki ekateli ya kotikala ba pionniers, mpe yango ezalaki ebandeli malamu mpo na bana mpe esalisaki ngai na kolonga na libala yango.
Ezalaki esengo mpo na kozala mosaleli ya Nzambe na ebandeli ya bambula 1970, lokola emonisi yango makambo malandi. Na mosala ya ndako na ndako, tokutanaki na mwasi moko nkombo na ye Annabel. Andimaki kozanga kokakatana mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe Biblia. (Nsima na yango, toyaki koyeba ete asombaki mikanda yango na mbongo nyonso oyo etikalaki na ye, mpe asengaki na moteki miliki ete azonga na poso oyo elandaki mpo na kozwa mosolo na ye!) Uta ebandeli, azalaki kobongisa malamu mpenza boyekoli na ye, atako azalaki na mwana moke oyo azalaki kotungisa ye. Abandaki mpe kosolola na libota na ye mpo na makambo oyo azalaki koyekola. Billy, mobali na ye, aumelaki te mpo na kokenda elongo na ye na makita ya boklisto. Annabel azalaki nkulutu ya bana mitano. Baboti na bango baponaki bankombo na bango na kolandaka alfabé. Ndeko na ye ya mwasi Beattie abandaki koyekola; Charlie mpe mwasi na ye batikalaki nsima te; Daphne, ye mpe, asepelaki na solo; mpe na nsuka, Edna mpe mobali na ye balandaki ndakisa yango. Eleki bambula mingi sikawa, libota mobimba ezali kosalela Nzambe na bosembo nyonso. Mibali bazali sikawa bankulutu to basaleli na misala, mpe mingi kati na basi basili kosala mosala ya pionnier.
Tosengeli mpe koloba mpo na Stanley. Tokutanaki na mobali yango na mosala ya ndako na ndako, mokolo moko ya Lundi. Mpio ezalaki makasi. Azalaki moto ya nsuka oyo tosengelaki kotala. Ayambaki biso malamu! Mwasi na ye akotisaki biso na ndako, mpe tomonaki ete tozalaki liboso ya moto moko atondi na limemya. Autaki mpe kobondela mpo ete azwa lisalisi ya kokanga ntina ya makambo mazali na Biblia. Lisolo na biso ya liboso elobelaki mpo na liteya ya Bosato. Nsima ya ngonga moko, emonanaki ete andimaki. Na poso oyo elandaki, ayambaki biso na maloba oyo: “Bozali mpenza na elonga. Natangaki ‘Kondimana na Sika’ uta ebandeli kino nsuka; balobeli Bosato te. Nakendaki kotala pasteur mpo na kotuna ye mpo na nini akosaki ngai. Aboyaki kokutana na ngai; na bongo nazongisaki ba enveloppes oyo nazalaki kosalela mpo na kozwa mabonza na ndako nzambe.” Stanley asalaki makambo nyonso wana kozanga ete azwa ata mokanda na biso moko! Alingaki koyangana na makita mpe tolakaki ye ete tokokenda kozwa ye. Kasi, mokolo ya Lomingo oyo toyokanaki, tokomaki na retard ya minutes mitano. Stanley asilaki komata na vélo na ye mpe abandaki kokenda na likita! Alobaki na biso: “Nakanisaki ete bobosanaki”. Ayekolaki elongo na biso mbala misato na poso, mpe abatisamaki sanza misato na nsima ya bokutani na biso. Uta bambula mingi, azali kosalela Nzambe na molende oyo azalaki na yango na ebandeli.
Julia mpe ngai tozalaki na esengo ya komona ete na boumeli ya bambula tosalisaki bato 50 na kokoma ba Témoins de Jéhovah.
Nazongeli mosala ya mosuni
Nsima na mbula minei ya mosala na pionnier, tozangaki mosolo. Bomoi ekomaki mpasi mpe bana bazalaki kokola. Na mawa nyonso, tozwaki ekateli ya kotika mosala ya pionnier. Ezalaki na Septembre 1972. Bongo na nsima? Mbula moko na nsima, le 1er Janvier 1974, ntango mosala emonanaki, nazongaki kotangisa na université. Nayekolaki lisusu komesana na makambo mingi mpe nazalaki kosala makasi mpo nalemba te. Kasi na lisalisi ya Julia, nalongaki komesana na ezalela wana ya sika. Ezalaki na biso litomba mpo na kotikala makasi mpenza kati na mosala ya kosakola mpe kati na lisangá, mpe na koluka “liboso bokonzi ya Nzambe”.—Matai 6:33.
Lokola balakisi nyonso ya université basengeli kosala bolukiluki, motuna moko mozalaki kotungisa ngai: Nasengelaki kozongela fizike nikleere? Nazalaki mpenza komona mabe mpo na komipesa na lolenge oyo ya bolukiluki, mpamba te longola mosala na ngai na université, nazalaki kosalela ntango na ngai mpo na koteya epai na bato solo ya Biblia. Nazalaki komona ntina te ya komipesa na bolukiluki oyo ezangi litomba. Epai mosusu, bolukiluki na ngai kati na fizike ekokaki kosalelama mpo na bibundeli, mpe yango elingaki kokotisa ngai na makambo ya mokili.—Yisaya 2:2-4.
Na Afrique du Sud, université lokola oyo ya Cap ouest ezali na bayekoli mingi oyo babengami ete “batikali nsima”. Babongisami malamu te mpo na kokota na université, mpo bateyami malamu te to bazangi makambo mosusu. Mingimingi, bazali na mayele, kasi bazali kozwa likoki te ya kosalela yango. Na boumeli ya bambula 13 oyo euti koleka, kati na mosala na ngai na université, nayekolaki mobulungano oyo ezali epai na bayekoli wana, mpe nabimisaki myango ya koteya ekeseni. Bolukiluki yango epesaki ngai nzela ya kozwa diplôme ya doctorat na fizike mpo na bateyi, mpe ebakisaki ngai grade ya moteyi. Sikawa, ba universités ya Etats-Unis mpe ya lsraël bazali kosala elongo kati na bolukiluki. Ezali esengo na kokokisa matomba na bango na bametode ya koteya oyo esalelami epai na ba Témoins de Jéhovah.
“Koyekola na lisalisi ya bato mosusu” ezali liteya oyo ekolisamaki na professeur Reuven Feuerstein mpe basangani na ye. Engebene liteya yango, bana bazali kokolisa makoki na bango ya kokanisa, bobele na makambo oyo bazali komona te, kasi lisusu na lisalisi ya moto oyo azali koteya bango. Kozanga moto yango, bakokolisa te mayele na bango na ndenge esengeli.
Ba Témoins de Jéhovah bazali kobenda likebi mingi likoló na mokumba ya baboti lokola bateyi ya liboso ya mwana. Baboti ba Témoins de Jéhovah bazali kolekisa ntango mingi na kotalela elongo na bango mikanda mitondi na bililingi oyo mizali kolimbola Biblia, na kotunaka bango na makambo oyo bazali komona mpe kosalisa bango na kokanga ntina ya masolo ya Biblia. Bazali kobenda likebi mingi likoló na boyekoli ya poso na poso, kasi lisusu likoló na ntina ya koyekola ntango nyonso, mingimingi mpo na oyo etali mitinda ya Biblia. (Deteronome 6:6-8) Bolukiluki ya professeur Feuerstein emonisi ete na metode yango baboti bazali kokolisa mpenza mayele epai na bana na bango.
Ezali mpe na liteya ebengami constructivisme. Engebene liteya yango, kolakisa to koteya moto ezali bobele likambo ya kopesa mayele te oyo euti epai na molakisi; kasi ezali nde moto na moto akomiteya uta na makambo oyo azali komona, oyo azali koyoka to oyo akutani na yango na bomoi na ye. Yango wana mpo na likambo moko, bato mibale bakoki kozwila yango makanisi makeseni. Mpo na koteyama malamu, esengeli moto ye moko ayekola.
Ezali yango mpenza ezali kosalema na makita ya ba Témoins de Jéhovah. Moyangani nyonso akobongisa malamu mateya oyo makotalelama. Na likita, bayoki babyangami na kopesa bakomantere likoló na masolo oyo mabongisami. Na ndenge yango, bato banso bakolendisama, bobele mpo na koloba makambo oyo bayekolaki te, kasi lisusu bakozwa litomba na makambo oyo baninga mosusu babongisaki.
Bokoli ya informatike kati na eteyelo eyambamaki lokola mwango ya koteya moyekoli mokomoko. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah basili kokola na likambo yango uta bambula mingi, na nzela ya boyekoli ya Biblia kati na bandako. Mwango yango ezali kosenga ete molakisi moko asalisa moto moko, ata bato mibale to misato, kasi mbala mingi bakoki koleka misato te, na koyekola lisolo moko ya Biblia na lisalisi ya mokanda. Moyekoli asengeli komibongisa malamu mpe asengeli koyeba lisolo. Alendisami na kolimbola makambo oyo azali kokanga ntina na yango, na paragrafe mokomoko, bongo na nsima bakoki kobimisa makanisi mosusu. Yango ekoki mpenza kobengama boyekoli ya Biblia ya moto na moto.
Lokola mitinda malamu ya koteya ezali kosalelama, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete motuya ya ba Témoins de Jéhovah ezali kokola nokinoki. Ya solo, bakotaka université te mpo na koyekola mitinda yango: mateya na bango ezali kouta na liziba eleki monene, ezali bongo Biblia.—Matai 28:19, 20; Yoane 6:45.
Koyokana kati na bato ya mposo ekeseni ezwi esika ya kowelana
Mbula 20 esili koleka uta nakomaki Témoin de Jéhovah. John mpe Leon, bana ya mwasi na ngai basili kokoma mikóló, basili kobatisama bango mibale mpe bazali kosalela Nzambe na bosembo nyonso. Na 1976, tobotaki mwana mobali, nkombo na ye Graeme, mpe tozali na esengo ya kobokola ye kati na solo. Libota na ngai epambolami mpamba te Julia akoki lisusu kozala pionnier, mpe ngai nazali kosala mosala ya pionnier auxiliaire mbala misato na mbula. Na mboka na biso, kowelana kati na bato ya mposo ekeseni ezali komonana na makomi oyo bazali kokoma na ba murs, mpe ezalela ya bato. Nzokande, na kowelana nyonso wana kati na bato ya mposo ekeseni, mirakle monene ezali kosalema. Lokola mibeko mpo na makita esili kolembisama, ba Témoins de Jéhovah bakoki sikawa koyangana na bonsomi, mingimingi na ntango ya ba Assemblées. Mpo na ngai, nazwaki esengo ya kopesa maboko na kobongisama ya bamoko kati na ba Assemblées oyo esangisi bato ya mposo ekeseni. Kokabolama ya mposo ezali komonana te kati na bato oyo mitinda mitombwami ya Biblia misili “kozipa bango miso” mpo na oyo etali mposo ya bato! Bato yango bazali komona mposo te, kasi bazali kosepela mpo na bazalani na bango.
Ba Témoins de Jéhovah bazali lelo oyo libota ya bandeko kati na mokili mobimba. Etikali moke, na ebongiseli na ye ya sika, Jéhovah “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te; na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te”. Lokola bamilió ya bandeko na ngai mibali mpe basi kati na mokili mobimba, nazali kozela na molende nyonso mokili yango ya sika, ya kitoko, ya sembo mpe ezangi bokabwani ya mposo.—Emoniseli 21:3-5.