Abrahame Mosakoli mpe moninga na Nzambe
MAMPINGA masangani na bakonzi minei bautaki na ebimelo na ntango makatisi Efalata. Malandi nzela na mokonzi, na est na lobwaku na Yordani. Na boleki, babundisi mpe balongi Barefaimi, Bazuzimi, Baemimi mpe Baholi. (Genese 14:5, 6) Na nsima mazongi moke mpe bakoteli eteni na mokili Neguebe, na nse na yango nyonso.
Mokano na basoda oyo ezali nini? Mokili polele na Yordani oyo bango bakoteli, ezali esobe oyo ezingami na ngambo moko na Transjordanie (est ya mokili Yordani) mpe na ngambo mosusu na région ebengami Négueb. (Genese 13:10) Esika yango, bafandi na bamboka mitano, Sodome, Gomore, Adima, Seboimi na Beela, bazalaki na bomoi ezangi mitungisi mpe bazalaki na bozwi mingi. (Ezekiele 16:49, 50) Nsima na kozala basaleli na Kedolaomele, mokonzi na Elame, oyo azali komonana ete akambaki mampinga masangani, bakonzi wana mitano batombokaki. Sikawa, na kozanga lisungi na baoyo bazingi bango, basengeli kozongisa monoko epai na ye. Kedolaomele na baoyo bazalaki na ye elongo balongi na etumba yango mpe bazwi nzela molai mpo na kozonga, bazalaki na biloko ebele oyo babotolaki.
Kati na bakangami ezalaki na mobali moko ya sembo nkombo na ye Lota. Azalaki mwana na ndeko na Abrahame, oyo afandaki mosika mingi te, na mboka na ngomba na Hébron. Ntango kaka Abrahame ayokaki nsango ya mabe, asangisaki kati na mibali na ye bilombe 318. Na molende nyonso, mpe na lisalisi na bato mosusu zongazonga, balandaki bakonzi minei mpe bakwelaki mampinga na bango na butu. Banguna bakimaki. Lota mpe libota na ye babikisamaki elongo na bakangami mosusu mpe na biloko.
Tozali na bantina na kondima lisolo oyo ekomami na kati na Genese mokapo 14? Lisolo oyo ezali lisapo mpamba mpo na kokomisa moto oyo azali nkoko na mabota mingi, kotia Bayuda na kati, amonana lokola elombe na ekolo? Tokoloba nini mpo na makambo mosusu malekaki na bomoi na Abrahame?
Makanisi na bakonzi na mangomba
Na ebandeli na ekeke ya 19, téolojié luthérien Peter von Bohlen alobaki ete Abrahame azalaki bobele moto na lisapo mpe ete lisolo ya etumba oyo ekambamaki na Kedolaomele ezalaki na moboko ata moko te na kati na makambo na kala. Mpo na profesere Julius Wellhausen akomaki: “Tozali ata na nsango moko te kati na lisolo na bato mpo na bankoko (patriarches).” Apesaki likanisi oyo: “Mbala mosusu ezali malamu kotalela [Abrahame] lokola lisapo.”
Batéolojié anglais balandaki se makanisi ya bandeko na bango Ba allemands. “Masolo minene na Genese mpo na bankoko (patriarches) makomi ya kala mingi mpe mazali bobele lisapo lokola lisapo na . . . mokonzi Arthur”, yoka maloba makomaki Stopford Brooke kati na mokanda na ye Kondimana na kala mpe bomoi na sika (angl.) “Genese . . . ezali kopesa biso likanisi oyo ekoki te mpe ya lokuta mpo na bomoi mpe bomoto na bankoko (patriarches)”, yoka maloba na John Ckolenso, évêque anglican ya Natal colonie ya kala ya Ba anglais. Abakisaki: “Ekoki kosalema te, kondima bindimela na moko kati na masolo oyo.”
Kotiola motindo oyo epanzani lokola mpota mabe oyo ekolyaka nzoto. (2 Timote 2:17) Na mikolo na biso, bamilió na basambeli bazali kozwa lisusu na bozito te masolo na ntina na bomoi na bankoko (patriarches). Nzokande, mpo na koyokisa nsoni monene epai na batéolojié ya boklisto na mokili oyo, bato oyo bandimaka Nzambe te bazali sikawa koloba ete kotiola oyo bazali kotiola Biblia elekisi ndelo. Na ndakisa, tozali kotanga kati na Bol’shaia Sovetskaia Entsiklopediia (Encyclopédie monene ya soviétique): “Na bambula oyo eleki, batalelaki lisusu makanisi mingi oyo mazali kotiola Biblia na kongengisama na bokundoli na sika, mingimingi kobanda na masolo oyo epesami na ‘biloko oyo bazali kokuta na nse ya mabelé na ntina etali Biblia’. Masolo mosusu na Biblia oyo mazalaki kotalelama lokola masapo . . . mamonani sikawa ete mazali na moboko kati na lisolo na bato.” Totalela lolenge oyo bokundoli na biloko na nse na mabelé engengisi lisolo ya bomoi na Abrahame.
Ulu na Bakaladi
Engebene Biblia, Abrahame akolaki na mboka “Ulu na mokili na Bakaladi”. (Genese 11:27-31; 15:7) Na boumeli na bikeke mingi, esika mboka Ulu ezalaki eyebanaki te. Batyoli bakanisaki ete ekokaki kozala mwa mboka moke mpenza mpe ezangi ntina, oyo mbala mosusu ezalaki mpe te. Nzokande, na kokamwa, eyei komonana kozanga ntembe ete mboka moko ya kala ekundolamaki kati na Babilone epai moko mpe mai monene oyo babengaka golfe persique epai mosusu, mboka ya kala ya Ulu ezalaki wana. Ebele na biloko bisalemi na mabelé biye bikundolamaki na esika yango bizali komonisa polele ete Ulu ezalaki centre na mombongo mpo na bato ebele mpe bato bautaki bipai na bipai. Na ntango na Abrahame, engumba yango ezalaki ata na biteyelo bipai bazalaki kolakisa bana kokoma mpe kotanga.
Lisusu, boluki na nse na mabelé oyo esalamaki na Ulu emonisi ete batongi ndako bayebaki lolenge mingi na botongi bandako. Bato na misala na maboko bazalaki kosala babiju kitoko, biloko na kobetela miziki, bambeli na wolo ya kitoko. Bato oyo balukaka biloko ya kala na nse ya mabelé, bamonaki ete bandako mingi na mboka wana ya kala ezalaki na batiyo esalemi na mabelé ya bikeko matumbami, batiyo mpo na kolekisa bosoto na nse ya ndako mpe komema yango kino na mabulu minene oyo makokaki kozala na 12 mètres na mozindo.
Bokundoli oyo nyonso ememi bayekoli mingi na Biblia na kotalela Abrahame na lolenge mosusu ya sika. “Tozalaki kokanisa ete Abrahame azalaki bobele mobali oyo azalaki kofanda na nse na bahema, kasi toyei komona ete azalaki kofanda mbala mosusu kati na ndako moko ya brike oyo ezalaki na biloko nyonso mpe na kati na ville”, yoka maloba makomaki Sir Leonard Woolley kati na mokanda na ye Ndenge ya sika ya kotalela makambo na kala (Angl.) “Archéologue Alan Millard alobaki kati na mokanda na ye Bozwi na ntango na Biblia (Angl.) ete Abrahame atikaki engumba moko oyo ezalaki na nyonso, oyo ezalaki kopesa bolamu mpe kimya, mpo na kozala moto oyo azali kotambolatambola lokola moto mpamba!”
Etumba na Kedolaomele
Tokoloba nini mpo na bolongi na Abrahame likolo na Kedolaomele, mokonzi na Elama? Na ebandeli ya ekeke ya 19, makambo mingi mayebanaki te mpo na Baelama. Batyoli na Biblia bazalaki koboya kondima ete Elama ezalaki na bopusi likoló na Babilone, soko mpe likoló na Palestine. Kasi lelo oyo Baelama bazali kotalelama ndenge mosusu. Arkeoloji emonisi polele ete ezalaki libota moko makasi mpo na kobunda. Mokanda moko (Funk & Wagnalls Standard Reference Encyclopedia) elobi mpo na libota yango ete: “Baelama babomaki mboka Ulu pene na 1950 liboso na ntango na biso, . . . Bazalaki mpe na bopusi mingi likoló na bakonzi na Babilone.”
Lisusu, bakutaki bankombo na mikonzi na Baelama likoló na bikomeli na kala. Makomami mosusu mabandi na liloba “Kudur”, oyo ezali kokundola “Kedola”. Nzambe-mwasi moko ya lokumu na Baelama abengamaki Lagamar, nkombo oyo ekokani na “Laomele”. Bakomi na makambo na kala bandimi sika oyo ete Kedolaomele azalaki solo mokonzi, oyo nkombo elimboli mbala mosusu “mosaleli na Lagamar”. Bikomeli mingi na bato na Babilone bizali na bakombo oyo ezali na boyokani na nkombo ya mikonzi oyo basanganaki elongo mpo na etumba: Tudhula (Tidala), Eri-aku (Alioka) mpe Kudur-lahmil (Kedolaomele) (Genese 14:1). Kati na mokanda Mabombami na emoniseli ya bonzambe (angl.), A. Custance abakisi: “Kobakisa na bakombo oyo, makambo mosusu mazali komonana ete mazali na boyokani na makambo malekaki na Babilone ntango Baelama batelemisaki bokonzi na bango wana . . . Bikomeli oyo bizali kondimisa Makomami kino batyoli na Biblia basalaki nyonso bakokaki mpo na kolongola motuya na yango.”
Bongo ezalaki boni mpo na etumba na bakonzi minei? Makambo na arkeoloji oyo mauti na Transjordanie mpe Négueb mazali komonisa likambo yango polele? Ee. Kati na mokanda na ye L’Archéologie en lsraël (Angl.), profesere Yohanan Aharoni alobeli mpo na kolimwa ya sivilizatio moko oyo ezalaki liboso na Bayisraele, oyo ezalaki na bato mingi katikati na région Transjordanie mpe région ya Négueb pene na mobu 2 000 liboso na ntango na biso”. Ba archéologues mosusu batii kolimwa yango pene na mobu 1 900 liboso na ntango na biso. “Banzungu esalemi na mabelé oyo esalamaki na ntango wana oyo ezwamaki na région ya Négueb mpe na région ya Transjordanie ekokani mpe ezali matatoli oyo mazali kolakisa nsuka moko ya pwasa mpe ya nsomo ya sivilizatio yango”, elobi Harold Stigers kati na mokanda Commentaire sur la Genese (Angl.). Ata baoyo bazali kotyola Biblia bandimi likambo wana, tozwa ndakisa maloba na John Van Seters mazwami na mokanda na ye Abrahame kati na Lisolo mpe bonkoko (Angl.): “Motuna oyo etikali ezali ya koyeba bato yango bakendaki wapi, soki solo bakendaki esika moko, na nsuka na ntango wana.”
Genese mokapo 14 elimboli mbala mosusu likambo yango. Engebene mitango na Biblia, Abrahame akomaki na Kanana na mobu 1943 liboso na ntango na biso. Etumba oyo ekambamaki na Kedolaomele esalamaki mwa moke nsima. Bobele na kati na ekeke yango, nsima Nzambe abomaki na nzela na móto bamboka mabe ya Sodome na Gomore, likambo yango ebongolaki libela mokili polele na Yordani oyo kala ezalaki kobota mingi. (Genese 13:10-13; 19:24, 25) Banguna kouta bipai mosusu bakokaki lisusu kolula mokili yango te.
Bandakisa mosusu mingi ekoki kotangama mpo na komonisa ete archéologie ezali kondimisa Makomami na kongengisaka makambo mosusu matali bomoi na Abrahame. Kasi arkeoloji ezali na bandelo na yango. Bilembo mosusu oyo ezali kopesa bizali mbala mingi polele te mpe ezali bato na kozanga kokoka nde bazali kopesa ndimbola na bilembo yango.
Litatoli ya solo koleka
Ezali litatoli na Mozalisi na moto, Jéhovah Nzambe, nde ezali kopesa elembo makasi koleka ete ya solo Abrahame azalaki na bomoi. Na Nzembo 105:9-15, Nzambe alobeli mpo na Abrahame na Yisaka mpe Yakobo lokola “basakoli” na ye. Koleka mbula nkoto nsima na liwa na Abrahame, Jéhovah Nzambe alobelaki lisusu mpo na nkoko yango na monoko na basakoli misato, abengaki ye ete azali “moninga” na ye. (Yisaya 41:8; 51:2; Yilimia 38:26; Ezekiele 33:24) Bobele bongo, Yesu Klisto atangaki Abrahame lokola ndakisa. Na bomoi na ye na likoló liboso ya kozala moto, Mwana na Nzambe azalaki ye moko motatoli na boyokani oyo Tata na ye azalaki na yango na Abrahame. Akokaki bongo koloba boye epai na Bayuda: “’Soko bozali bana na Abrahame, bosala misala na Abrahame! Kasi sasaipi boluki koboma ngai, moto oyo ayebisi bino makambo na solo mayoki ngai epai na Nzambe. Abrahame asalaki bongo te. Abrahame tata na bino, asepelaki komona mokolo na ngai, amonaki yango mpe ayokaki esengo.’ Na bongo Bayuda balobi na ye ete: ‘Ozali naino na bilanga ntuku mitano te, mpe omonaki Abrahame?’ Yesu alobi na bango ete: ‘Solo solo nalobi na bino ete, Naino ezalaki Abrahame te, ngai nazali.”’—Yoane 8:39, 40, 56-58.
Litatoli na Bato mibale baleki minene kati na molongo epesi biso elonga malamu koleka mpo na kondima oyo nyonso Biblia elobi na ntina na Abrahame. (Yoane 17:5, 17) Atako Biblia ezali kotanga Abrahame lokola ndakisa, ezali kokumisa ye te lokola elombe moko na libota. Ezali yango emonisami na lisolo na bolongi na ye likoló na bakonzi minei basangani. Ntango Abrahame azongaki na etumba, ayambamaki na Melikisedeke, mokonzi na Saleme, oyo ayebisaki ye ete: “Tika ete Nzambe Oyo-Aleki-Likolo asanzolama, oyo apesi bayini na ye na maboko na yo!” Akumisaki nde Jéhovah mpo na bolongi oyo.—Genese 14:18-20.
Kasi, biso tokomona mosika te bolongi monene: oyo bobele Nzambe na nkembo akolonga likoló na “bakonzi na mokili mobimba” na ntango na etumba na molongo mobimba oyo ebengami Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Na ntango yango ekokokana mobimba elaka oyo Nzambe apesaki na Abrahame, mosakoli na ye mpe moninga na ye: “Na nzela na libota na yo mabota nyonso na nse makopambolama.” Bamilió na bato basili komeka matomba oyo. Yo mpe okoki kozala kati na bango, ndenge elimbolami na masolo oyo ezali na nkasa 8 kino 18 na zulunalo oyo.—Genese 22:18.
[Karte/Bililingi na lokasa 5]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Grande mer
LE NÉGUEB
Damas
Haran
Euphrate
Tigre
Ur
ÉLAM
Golfe Persique
[Karte]
Damas
Dan
RÉPHAÏM
ZUZIM
Sichem
Béthel
District du Jourdain
Mer Salée
Hébron
LE NÉGUEB
Route royale
ÉMIM
Gomorrhe
Sodome
HORITES
[Bililingi]
Abrahame atosaki na kobima na Ulu, mboka moko etondaki na bozwi
Biloko ndenge na ndenge oyo bizwamaki na mboka Ulu:
1. Mbeli mpe ebombelo na yango ya wolo
2. Dalapo ya Ulu
3. Motó ya ngombe ya wolo ezwamaki na kati na ebeteli ya miziki babengi harpe
4. Bijoux
5. Ekoti ekembisami na biloko kitoko
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photos: Avec l’aimable autorisation du British Museum