Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/7 lok. 1
  • Mpo na nini osengeli koyeba solo likoló na Abrahame

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli koyeba solo likoló na Abrahame
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Abrahama azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova abengaki ye “moninga na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Abrahama—Moto ya bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nzambe ameki Abrahama
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/7 lok. 1

Mpo na nini osengeli koyeba solo likoló na Abrahame

ABRAHAME: azali elombe na lisapo to mosakoli ya solo? Motuna oyo ezali na ntina? Lokola, engebene mitango ya Biblia, Abrahame azalaki na bomoi esili koleka pene na mibu 4 000, bato bakoki kokanisa ete ezali na ntina mingi te koyeba soki azalaki solo na bomoi to te.

Kasi tokanisa: ndambo na bato na mokili bazali kolanda lingomba oyo elobi ete endimi Abrahame. Na yango, na kotalela Encyclopédie britannique, Mokanda na mbula 1988, 32,9% na bato balobi bazali kolanda lingomba na boklisto, 17,2% lingomba na ba musulmans mpe 0,4% lingomba na Bayuda. Nzokande, Abrahame ayebani lokola moto ya ntina kati na mangomba oyo misato. Bandimi na bango baoyo bazali sembo bazali na lotomo ya kolinga koyeba soki bateyaki bango solo na ntina etali Abrahame. Bobele bongo, motuna oyo esengeli lisusu kosepelisa ata bandimi na mangomba mosusu to bato oyo bandimi ata lingomba moko te. Mpo na nini?

Mpo Biblia elobi ete Abrahame azalaki mosakoli. (Genese 20:7) Kati na Makomami, liloba oyo emonisi molobeli na Nzambe oyo azali koyebisa nsango epai na bazalani na ye. Nzokande, soko Abrahame azalaki mosakoli ya solo, bato nyonso bazali na likoki na kozwela litomba na kati, mpo ete nsango oyo ye azwaki ezalaki nsango malamu mpo na bato nyonso. (Bagalatia 3:8) Biblia eyebisi ete Nzambe apesaki na Abrahame elaka oyo: “Mpo na yo mabota nyonso na nse makopambolama.”​—Genese 12:3.

Ezali wana elaka na kokamwisa, mpe Nzambe azongelaki yango epai na Abrahame ekoki kozala mbala mibale na mabaku makeseni. (Genese 18:18; 22:18) Mpo ete elaka oyo ekokana, Nzambe na Abrahame akosekwisa ata bato na mabota oyo masila kolimwa. Bomoi ekozala solo na mapamboli mingi mpo na basekwi, mpo mingi kati na bango bakozonga na mabelé oyo ekokokana na Paradis na ebandeli oyo moto abungisaki. Na nsima, bakoyekola ndenge nini kozwa bomoi na seko.​—Genese 2:8, 9, 15-17; 3:17-23.

Nzokande, soko Abrahame azali bobele moto na lisapo, ntina ezali te na kondima elaka oyo na kokamwisa oyo bapesaki ye. Lisusu, soki bato bakoki kozala na elikya te kati na bilaka na Biblia, bamosusu bakoki koloba ete eleki malamu komipesa mobimba na bisengo na ntango oyo. Lokola ekomaki yango moko na baklisto ya liboso, “soko bakufi bakosekwa te, toliaka mpe tomelaka mpo ete tokokufa lobi!”​—1 Bakolinti 15:32.

Na yango, tozali na ntina nyonso na kotalela motuna mpo na koyeba soko Abrahame azali bobele elombe kati na lisapo to azalaki mosakoli ya solo. Mbala mosusu, okokamwa na koyoka makambo oyo bakonzi minene na mangomba balobaki mpo na ye na ekeke ya 19, nzokande, bobele na ntango yango boluki na biloko bizwamaka na nse na mabelé ekweisaki maloba na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto