Kokwea na mwasi na pite mpe na mbindo
“Ekwei! Babilone monene ekwei! oyo asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye.—EMONISELI 14:8
Lisolo oyo mpe mosusu oyo elandi yango ezali diskur ya nsuka epesamaki na masolo mazalaki na motó ya likambo “Elaka ebelemi ”, oyo esalamaki na 1988 na ba assemblées ya district “Boyengebene ya Nzambe”, [ba assemblées ya ba Témoins de Jéhovah.]
1. Nani “mwasi na pite” na bosoto mingi, mpe mpo na nini tosengeli koyeba ye?
MWASI NA PITE” mpe na mbindo: azali nani? Ntina ezali mpenza ya kolobela makambo na ye? Mikanda, cinéma, télévision mpe vidéo ezali kolakisa bililingi mingi ya pite, kino kopesa mposa ya kosanza, boye te? Ezali boye solo! Nzokande, awa tolingi kolobela ndumba mpamba te, kasi tolingi nde kolobela mwasi na pite oyo aleki bango nyonso, oyo ayokaka ata nsoni te mpe oyo azali mobomi monene na bato. Esili koleka mibu 4 800 uta ebandaki ye kosala kindumba na ye! Nzokande, tosengeli koyeba mwasi yango azali nani mpo tokoka komibatela. Na Emoniseli 14:8, anzelu moko abengi mwasi yango ya mbindo na nkombo “Babilone Monene” mpe alakisi ye ete azali mozimbisi na mabota. Lokola azali mwasi moko mabe, tozali na esengo na koyeba ete “elaka ebelemi” oyo Jéhovah akoyeisa etumbu oyo akatelaki ye.—Emoniseli 1:3.
2. Nkombo na mwasi na pite oyo eutaki wapi, mpe ndenge nini lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta ebotamaki?
2 Nkombo ya mwasi oyo ya pite euti na Babilone ya kala, mboka ya lolendo oyo etongamaki na Mésopotamie esili koleka mibu 4800, mboka oyo Nimirode atongaki yango, ye oyo azalaki “moluki makasi na nyama mpe motemeli na Jéhovah”. Ntango bato na Babilone babandaki kotonga ndako molai mpo na losambo ya lokuta, Jéhovah abulunganisaki monoko na bango mpe apanzaki bango kino na nsuka ya mokili. Bamemaki losambo na bango elongo, mpe na motindo yango lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta ebotamaki. Na ntembe te, nkombo BABILONE MONENE ebongi na lisangá yango. (Genese 10:8-10; 11:1-9) Na mikolo na biso lisusu, bindimeli mpe milulu ya mangomba ezali komonisa ete eutaki na makambo na bonkuku na Babilone. (Emoniseli 17:7) Babel, nkombo ya mboka yango na monoko na hébreu elimboli “Mobulu”. Yango ebongi solo na mangomba ya lokuta oyo etondi na mobulungano na makambo mazangi ntina!
3. (a) Babilone esimbaki libota ya Nzambe na boombo mbula boni, mpe kosalaka bongo akutanisaki bango na nini? (b) Ntango nini Babilone ekweaki, kasi mpo na nini ebomamaki na ntango yango te?
3 Babilone ya kala etelemaki nsima na mobulu wana mpe, nsima na kokweisa Asulia, na 632 liboso na ntango na biso, ekomaki Bokonzi makasi ya Misato kati na mokili mobimba engebene lisolo ya Biblia. Aumelaki na esika yango ntango molai mingi te, mbula nkama ekokaki te, kasi na boumeli ya eleko yango akangaki Yisraele, libota na Nzambe, na boombo mbula pene na 70. Ezali motindo yango Bayisraele bakomaki na Babilone, mboka etondaki na batempelo mpe bisambelo, kuna bato na Babilone bazalaki kosambela banzambe na bango mpe bilimu mabe, bazalaki kopesa losambo na mama mpe mwana, bazalaki kotala makambo makoya na nzela na myoto, kosambelaka banzambe oyo bango bandimaki ete bakoki kokufa te. Na mobu 539 liboso na ntango na biso, Bayisraele bazalaki naino na boombo kati na centre ya mokili mobimba ya losambo ya lokuta ntango Babilone ekweaki. Kasi ngonga mpo na kobomama na yango ekokaki naino te, mpe elandaki kozala mpo na bankolo na yango ya sika centre moko ya lokumu mingi na makambo ya losambo.
Lisangá ya mangomba na mokili mobimba
4. (a) Basakoli ya Jéhovah balobaki nini na ntina na Babilone, mpe nini ekomelaki mboka yango? (b) Babilone mosusu nini ezali naino, oyo ezali kobebisa bafandi na mokili?
4 Basakoli ya Jéhovah basakolaki ete engebene ekateli ya Nzambe Babilone esengelaki kokombama lokola “na kombo mpo na kotika yango mpamba”, “lokola Sodome mpe Gomore wana esili Nzambe kobuka bango”. Bisakweli yango bikokanaki na nsima? Ee, mpe ata kino na makambo na yango ya mikemike! Na elaka ekokaki, Babilone ya kala ebomamaki nyonso, ezalaki lisusu mboka oyo moto akokaki kofanda te, ekomaki nde efandelo na miselekete, na banyoka mpe banyama na zamba, lokola yango esilaki kosakolama. (Yisaya 13:9, 19-22; 14:23; Yilimia 50:35, 38-40) Nzokande, Babilone oyo mosusu, Babilone Monene, ezali naino. Awa ezali yango lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, ezali ntango nyonso koteya mateya ya Babilone ya ebandeli mpe komonisa elimo na yango ya lolendo. Ezali esaleli ya liboso na nzela na yango Satana azali koboma miso na bafandi na mokili, mpo ete bakoka kososola mikano na Jéhovah te oyo mitali Bokonzi na ye.—2 Bakolinti 4:3, 4.
5. (a) Mangomba nini mabimaki, ntango wana Babilone ezalaki naino Bokonzi makasi ya mokili mobimba, kasi mpo na nini Satana alongi te kotondisa mokili mobimba na losambo ya lokuta? (b) Ndenge nini asalelaki losambo ya lokuta nsima na kobotama ya lisangá ya boklisto?
5 Ezali mpe kati na ekeke ya motoba mpe ya libwa liboso na koya na Klisto, wana Babilone, Bokonzi makasi na mokili mobimba ezalaki na nkembo mingi, nde ntango wana mitindo oyo ya losambo mibimaki: hindouisme, bouddhisme, confucianisme mpe shintoïsme. Kasi Satana alongaki kotondisa mokili mobimba na losambo ya lokuta? Te, mpamba te na eleko wana mosika, mwa ndambo na ba témoins de Jéhovah balongwaki na Babilone mpe bazongaki na Yelusaleme mpo na kobandela lisusu losambo ya Jéhovah. Ezali nde motindo yango nsima na bikeke motoba, Bayuda na sembo bazalaki wana mpo na koyamba Masia, mpe bakomaki basangani ya liboso ya lisangá ya boklisto. Mangomba ya lokuta mabomisaki Mwana na Nzambe, na nsima makomaki esaleli ya Satana mpo na kobundisa losambo ya solo ya boklisto, ndenge Yesu mpe bantoma na ye basakolaki yango.—Matai 7:15; Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1.
6. (a) Ndenge nini Satana asili kobebisa mateya ya boklisto, mpe mateya nini mabotamaki oyo mazali koyokisa nsoni? b) Nini esili kokomela bankoto na bato oyo bazalaki kopesa motuya mingi na solo ezwami na Biblia na esika ya kondima mateya mautaki na Babilone?
6 Ezali mpenzampenza nsima na kobomama ya mibale ya Yelusaleme, oyo ebimaki na mobu 70 ya ntango na biso, nde ntango wana Satana asalelaki bantoma ya lokuta mpo na kobebisa mateya ya boklisto na kosangisaka kati na yango makambo na nkuku mautaki na Babilone mpe filozofi ya bagreke. Na esika ya kosambela “bobele Jéhovah”, Nzambe ya Biblia, bakomaki kosambela la Trinité, banzambe misato. (Deteronome 6:4; Malako 12:29; 1 Bakolinti 8:5, 6) Liteya oyo elobi ete molimo na moto ekufaka te, liteya eteyamaki na Platon, mofilozofe ya greke, ekotisamaki mpo na kobebisa mateya kitoko mazwami na Biblia mpe matali lisiko epesamaki na Klisto mpe lisekwa. Filozofi wana efungolaki nzela na endimeli ya lifelo ya móto mpe na epongelo. (Nzembo 89:48; Ezekiele 18:4, 20) Mateya oyo mazali koyokisa Nzambe nsoni mpe mazali kobangisa bato esali mingi mpo na kotondisa mosolo na basanduku ya Mangomba. Epai mosusu, na mikolo na monyokoli ebengamaki lnquisition mpe na eleko oyo mangomba ya protesta mabimaki, bakonzi na mangomba bazelaki te ete móto ya lifelo enyokola baoyo bandimaki solo ya Biblia na esika ya kondima mateya mautaki na Babilone. Bakatolike mpe baprotesta batumbaki na móto bankoto mingi na bato yango oyo bango bazalaki kobenga ete bapengwi. Kasi, lokola tokomona yango, bondumba ya Babilone Monene esuki bobele na mateya ya lokuta te!
Mokolo na kosambisa na Jéhovah
7. (a) Ntango nini mpe ndenge nini Jéhovah abandaki kozongisa solo ya moboko ya Biblia mpe komonisa polele mateya ya lokuta mautaki na Babilone? (b) Solo nini ya moboko ezwami na Biblia Bayekoli na Biblia bazongisaki yango?
7 Mokolo ezali oyo Jéhovah abongisaki mpo na kosambisa mwasi oyo ya pite! (Baebele 10:30) Eleko moko ya bobongisi nzela ebandaki na bambula 1870, ntango Jéhovah atindaki “ntoma” na ye (“messager”), etuluku ya bato ya sembo bayekoli ya Biblia, mpo na kobimisa lisusu solo ya moboko ya Makomami mpe komonisa mateya ya lokuta mautaki na Babilone. (Malaki 3:1a) Liboke ya bato oyo bazalaki lokola “ntoma” bandimaki maloba oyo ya esakweli makomami na Emoniseli 4:11: “Jéhovah, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” “Ntoma” oyo abatelaki mpe na molende nyonso motuya na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola biso bato. Lisiko yango ezali liboso mpo na “etonga moke” oyo bakoyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye na likoló, mpe na nsima ezali mpo na bankama na bamilió na bato oyo bakozala na bomoi ya seko na mabelé oyo makobongwana paradis, kati na bango mingi bakozala basekwi. (Luka 12:32; 1 Yoane 2:2; Misala 24:15) Ee, Bayekoli ya Biblia bazongisaki solo oyo nyonso ya moboko, mpe na elobeli ya elilingi, ‘babomaki móto ya lifelo’ ya minyokoli ya seko, liteya oyo eutaki na Babilonea.
8. (a) Ndenge nini bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo bamekaki kolimwisa Bayekoli na Biblia na ntango na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba? (b) Nini ekomelaki zuzi oyo aboyaki kobimisa na boloko bandeko mwambe batambwisi ya la Société Watch Tower?
8 Na boumeli ya bambula ntuku minei, Bayekoli ya Biblia basakolaki na molende ete 1914 ekozala nsuka ya ntango ya Bapakano. Lokola basakolaki yango, na mbula wana makambo mabimaki oyo maningisaki mokili, kati na yango oyo elekaki monene ezalaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo, eteni ya liboso ya Babilone Monene, bamekaki kosalela mobulu ebimisamaki na etumba ya mokili mobimba, mpo na kolimwisa Bayekoli wana ya Biblia bayebanaki mpo na bosolo na bango! Na 1918, bakonzi na mangomba balongaki kokangisa na boloko bandeko mwambe oyo bazalaki kotambwisa mosala ya la Société Watch Tower, na nzela na bifundeli ya lokuta ete bazali bazimbisi. Kasi nsima na sanza libwa, bato yango babimisamaki na boloko mpe na nsima lisusu, balongolaki bifundeli nyonso bizalaki likoló na bango. Martin Manton, zuzi monene ya Amerike oyo aboyaki kobimisa Bayekoli oyo ya Biblia na boloko, na nsima azwaki medaye ebengami “Chevalier de l’Ordre de Saint Grégoire le Grand” na maboko ya pape Pie XI. Nzokande, nkembo na ye ezalaki ya ntango mokuse, mpamba te na 1939 bakatelaki ye boloko ya mbula mibale esika moko na amande moko monene. Mpo na nini? Mpamba te ntango azalaki kosambisa makambo ya dossiers motoba asengaki kanyaka mpe azwaki motuya mobimba ya 186 000 dollars.
9. Na maloba nini esakweli ya Malaki elimbolaki makambo makomelaki libota ya Jéhovah, mpe kosambisa ebandaki bongo na banani?
9 Lokola touti koloba yango, libota ya Jéhovah ekotaki na eleko ya komekama makasi na 1918. Esakweli ya Malaki 3:1-3 elandi kolimbola makambo mazalaki kosalema: “Nkolo [Jéhovah] oyo bino bozali koluka ye akoya pwasa na Tempelo na ye, ntoma na kondimana [ya Abrahame] oyo bino bozali kosepela mpo na ye, tala azali koya”, [Yesu]. Ee, Jéhovah ayaki elongo na Klisto mpo na kosambisa. Na nsima Jéhovah atuni: “Nani akoyikela mokolo na koya na ye mpiko? Nani akotelema wana ekomonana ye? Mpo ete azali lokola móto na mopetoli-na-ebende mpe lokola sabuni na batuti na bilamba.” Engebene 1 Petelo 4:17, kosambisa esengeli kobanda na bato oyo bazali komitanga ete bazali basangani na “ndako na Nzambe”. Baklisto ya solo bamekamaki bongo mpe bapetolamaki mpo na mosala ya Jéhovah.
“BINO BATO NA NGAI BOBIMA NA YE”!
10. Ekateli nini ya Nzambe ekwelaki boklisto ya mokili oyo mpe mangomba nyonso ya lokuta na 1919, mpe elimbolaki nini mpo na Babilone Monene?
10 Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo, eteni eleki mabe na Babilone Monene, bakokaki te kotelema na mokolo na kosambisa na Jéhovah. Bakonzi na mangomba babebisaki makasi bilamba na bango na kosanganaka na etumba ya mokili mobimba mpe na konyokolaka baklisto ya solo. (Yilimia 2:34) Na esika ete bayamba Bokonzi na Klisto oyo eutaki kobotama sika kuna na likoló, bayambaki nde Société des Nations, lisangá ya bomoto, oyo bango babengaki yango ete ezali “Bokonzi ya Nzambe awa na mabelé na lolenge ya politike”. Uta 1919, emonanaki polele ete Jéhovah asambisaki mpe akweisaki boklisto ya mokili oyo, mpe mangomba nyonso ya lokuta. Babilone Monene esilaki kokwea, esengeli kobomama! Ntango ekokaki mpo na bato nyonso oyo balingi solo mpe boyengebene ete batosa etinda oyo ekomamaki na mosakoli Yilimia (51:45): “Bato na ngai, bobima longwa na kati na ye, moto na moto abikisa bomoi na ye, longwa na nkanda makasi na Jéhovah.”
11, 12. (a) Anzelu moko alobaki nini na Emoniseli 17:1, 2 na ntina na ekateli ezwami likoló na Babilone Monene? (b) Mai mingi” likoló na yango mwasi na pite afandi ezali nini, mpe ndenge nini “alangwisi” bafandi na mokili na “vinyo na pite na ye?”
11 Babilone Monene ekwei! Kasi ebomami naino te. Lisangá oyo ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba ezali naino na maboko ya Satana lokola esaleli ya nguya mpo na kokosa bato. Nzambe abombeli ye nini? Tofungola Biblia na biso na Emoniseli 17:1, 2. Awa anzelu moko alobi epai na ntoma Yoane, mpe na nsima na ntoma Yoane epai na baoyo, na mikolo na biso, bazali koyekola bisakweli; alobi boye: “Yaka, nakotalisa yo ekateli ekatameli mwasi monene na pite, oyo afandi likoló na mai mingi, oyo bakonzi ya mokili basali na ye pite, mpe bafandi na mokili balangwi vinyo na pite na ye.” “Mai mingi” elakisi bibele na bato na yikiyiki, oyo mwasi monene na pite azali konyokola bango uta kala. Engebene esakweli, “bafandi na mokili” balangwi vinyo na ye. Bazali komela mateya ya lokuta ya Babilone Monene mpe bazali kolanda banzela na ye ya nsoni, banzela ya mokili. Yango wana bazali kotengatenga lokola ete balangwi vinyo moko mabe.
12 Na Yakobo 4:4 tozali kotanga: “Bino [basi na pite], boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe?” Nzokande, na ekeke ya ntuku mibale, mangomba, mpe mingimingi mangomba ya boklisto ya mokili oyo, bazali koluka kozala baninga ya mokili. Bakonzi na mangomba bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Jéhovah te; bazali mpe kobebisa mitinda ya bizaleli malamu milakisami na Biblia, batiki nzela na bandimi na bango ete batambola ndenge balingi, lokola ekotambolaka mokili. Bakonzi na mangomba bazali mpe kosala pite na mosuni, pite oyo Paulo akweisaki yango polele na maloba oyo: “Bomizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsoni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakozwa libula na bokonzi na Nzambe te. Bamosusu na bino bozalaki bongo. Kasi bosili kosukwama.”—1 Bakolinti 6:9-11.
‘Bazali kolala na bosoto’
13, 14. (a) Bandakisa nini emonisi ete bakonzi na mangomba ‘basukwami te’ na mikolo na biso? (b) Nini elobamaki na likita moko ya bakonzi na Lingomba ya anglikane na ntina na mibali oyo bakosanganaka na mibali, mpe, engebene journaliste moko, ebongi kobenga Lingomba yango na nkombo nini? (c) Maloba nini ya ntoma Petelo tokoki kosalela yango mpo na bakonzi na mangomba bapengwi?
13 Na eleko na biso, bakonzi na mangomba ‘basukwami’? Totalela na ndakisa makambo mazali koleka na Grande-Bretagne, mokili oyo kala lingomba ya misioni epalanganaki mingi kuna. Na Novembre 1987, ntango wana premier ministre ya Grande-Bretagne azalaki kosenga na bakonzi na mangomba ete basala makasi mpo na kolakisa bizaleli malamu epai na bato, pasteur moko ya lingomba ya Anglikane alobaki boye: “Mibali oyo bakosanganaka na mibali bazali na lotomo lokola bato nyonso, ya kokokisa bamposa ya nzoto na bango; tosengeli koluka oyo ezali malamu kati na yango mpe koyikisa bango mpiko [ba homosexuels] ete bazala sembo moko epai na mosusu.” Tala lisusu makambo makomamaki kati na zulunalo moko ebimaki na Londres: “Na seminaire moko ya Anglikane, kosangana mibali na mibali engalaki mingi, yango wana balakisi na séminaire mosusu bapekisaki bana-kelasi na bango ete bakendaka kuna te.” Ankete moko emonisaki ete “na quartier moko ya Londres, koleka katikati ya bakonzi na mangomba bazali koluka kosangana mibali na mibali”. Na likita moko ya bakonzi na mangomba (synode), 95 % ya bakonzi na Lingomba ya Anglikane na Grande-Bretagne balobaki ete pite mpe ekobo ezali masumu, kasi kosangana mibali na mibali ezali lisumu te, ezali bobele kozanga kokokisa lisengami. Na ntina yango, journaliste moko alobaki ete ebongi malamu babanda kobenga Lingomba yango ete Sodome mpe Gomore. Zulunalo mosusu ebimaka na Londres elobaki ete: “Bato na Grande-Bretagne bazali kokamwa mingi na komona mbuma mabe na libota oyo ezali kotosa lisusu mibeko te.”
14 Na boumeli ya bambula, ekomi polele ete maloba oyo ya ntoma Petelo makoki kotangama mpo na bakonzi na mangomba oyo bapengwi: “Ekweli bango pelamoko na lisese na solo lilobi ete, Mbwa azongi kolia biloko bisili ye kosanza; mpe ete, Ngulu asukoli mai mpe akei kolala na bosoto.’—2 Petelo 2:22.
15. (a) Yebisa ndenge bizaleli bibebi kati na mangomba nyonso ya boklisto ya mokili oyo? (b) Nani azali na ngambo monene na mabe oyo nyonso?
15 Epai na epai kati na boklisto ya mokili oyo, mpe toloba ete na mokili mobimba, tozali komona ndenge bizaleli malamu bizali kokwea. Na mikili misusu, bato mingi bazali komona lisusu ntina ya kobala te, mpe baoyo bazali kobala bakanisi te ete basengeli kotikala sembo epai na mobalani. Babalani mingi te bazali kokomisa mabala na bango, mpe ata kati na baoyo bakomisi, mabala mingi mazali kosuka na divorce. Na Etats-Unis, motuya ya mabala mazali kokufa mbula na mbula ebakisami mbala misato na boumeli ya mibu 25 oyo mileki; lelo oyo eleki milió moko. Na Grande-Bretagne, motuya ya mabala makufi ebakisami mbala minei na boumeli ya mibu 20, kolongwa na 41 000 kino na 175 000 kati na 1965 mpe 1985. Minzemba bazali kosepela kofanda esika moko na baninga na bango minzemba, mibali na mibali, basi na basi to mibali na basi, lokola babalani mpe mingi bazali ntango nyonso kosanzé mosangani. Bazali komilela mpo na bamaladi oyo ekozwamaka na pite, lokola SIDA, nde ata bongo, batiki te, balandi komipesa na bosoto nyonso na pite. Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bazali kopesa bitumbu te epai na bandimi na bango oyo bazali kosalaka mabe oyo. Lokola bazali kokanga miso na makambo na bosoto, bazali na ndambo na mokumba kati na mbeba nyonso oyo tozali komona.—Yilimia 5:29-31.
16. (a) Nini emonisi ete Babilone Monene esili kokwea, mpe maloba nini anzelu alobi na ntina na yango engebene Emoniseli 18:2? (b) Baoyo nyonso balingi kobika na kufa ya mokili ya lelo basengeli kosala nini?
16 Bizaleli mabe oyo tozali komona etondi kati na mangomba ya lokuta na mokili mobimba emonisi polele ete Babilone Monene esili kokwea. Nzambe asili kosambisa yango mpe azweli yango ekateli ete ekobomama. Ntina wana anzelu moko angangaki na mongongo makasi maloba oyo makomami na Emoniseli 18:2: “Ekwei! Babilone monene ekwei! Esili kokoma efandelo na bilimu mabe, ebombamelo na bilimu na mbindo nyonso mpe ebombamelo na bandeke nyonso na mbindo bayinami:” Bato nyonso oyo balingi kobika na kufa na mokili basengeli kolanda uta sikawa toli oyo epesami na verset 4: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.”! Ee, esengeli kobima na mangomba ya lokuta mpo na kobika na “bolozi monene”, oyo esili kobelema. (Emoniseli 7:14) Kasi, lokola tokomona yango, esuki bobele wana te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Le 1er Novembre 1903, na nsuka ya kolandana ya masolo ya ntembe oyo masalemaki kati na charles Russell mpe E. Eaton na Carnegie Hall ya Pittsburgh (Etats-Unis), moko na bakonzi ya mangomba oyo azalaki wana andimaki elonga ya Russell mpe alobaki na ye: “Nazali na esengo ya komona yo kosopa mai likoló na lifelo mpo na koboma móto na yango.
[Etanda na lokasa 6]
BAKONZI YA MANGOMBA MPE MAKAMBO MATALI KOSANGISA NZOTO
“Baboti, bapiskologe, bapolisié mpe ba avoka bazali koyebisa ete na Etats-Unis bankama na bana babebisaki bango na basango ya katolike na boumeli ya mibu mitano mileki bazali sikawa konyokwama makasi kati na mayoki.”-Akron Beacon Journal, 3 Janvier 1988.
“Na Etats-Unis, Lingomba na katolike efutaki bamilió ya badollars epai na baboti oyo bazali kofunda basango ete babebisaki bana na bango na kosanganaka na bango na makasi. Atako bongo, ezaleli ekomi mpenza mabe koleka kino ete, engebene ba avoka mingi mpe baboti oyo mpasi motindo wana ezwaki bango, Lingomba ezipi miso likoló na makambo yango mpe bazali konyata yango.”—The Miami Herald, 3 janvier 1988.
[Bililingi na lokasa 4]
Banzambe misatomisato-ya Ezipito ya kala mpe ya boklisto ya mokili oyo.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée Saint-Rémi, Reims, Photo J. Terrisse
Musée du Louvre, Paris
[Elilingi na lokasa 7]
Biblia ezali kokokanisa bakonzi na mangomba basali na pite na ngulu oyo asukoli kasi azongi kolala na bosoto.