Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/4 nk. 14-19
  • Ntango na kosambisa na Nzambe eyei

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango na kosambisa na Nzambe eyei
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndimbola na kobeta na kelelo
  • Bazongisami na bomoi kati na elimo mpo na kosakola na mokili mobimba
  • Bokonzi esalemi
  • Oyo likoló na ye nkanda ya Nzambe ekokwea liboso
  • Jéhovah akweisi bitumbu likoló na boklisto ya lokuta
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Nsango esakolami na baanzelu mpo na eleko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/4 nk. 14-19

Ntango na kosambisa na Nzambe eyei

“Banga Nzambe mpe pesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei.”​—EMONISELI 14:7.

1. Nini ezali kati na mikapo ya liboso ya Emoniseli?

MOKANDA na Emoniseli ezali na bisakweli ya kokamwa oyo bizali kokokana na mikolo na biso. Lisolo oyo touti kosilisa etangaki mwa mosusu na yango, mingimingi kofungolama ya bilembo motoba ya elilingi. Kofungwama na yango emonisaki kotambola ya bafandi na mpunda minei na boumeli ya “mikolo ya nsuka” oyo tozali kobika na yango. (2 Timote 3:1; Emoniseli 6:1-8) Bobele kofungwama yango epesaki mpe ndimbola likoló na baoyo bakoyangela elongo na Klisto kati na makoló mpe likoló na babiki ya “bolozi monene” oyo bakofanda seko na mabelé. Kofungwama ya bilembo wana motoba emonisi polele ete “‘elaka” ya Nzambe mpo na koboma bato mabe “ebelemi”.​—Emoniseli 1:3; 7:4, 9-17.

2. Kelelo nsambo ya elilingi oyo elobelami na mokapo 8 ya Emoniseli esengeli kobenda likebi na biso likoló na nini?

2 Kasi elembo moko etikali naino, ezali oyo ya nsambo. Emoniseli 8:2 elobi na biso makambo mabimisami nsima na bofungwami na yango. Totangi boye: “Namonaki baanze nsambo baoyo bakotelemaka liboso na Nzambe, mpe makelelo nsambo mapesami na bango.” Mpe na verset 6: “Baanze yango nsambo baoyo bazalaki na makelelo yango nsambo babongisi yango mpo na kobeta.” Na kala, ntango wana Biblia ezalaki naino kokomama, bazalaki kobeta kelelo mpo na kosakola makambo ya ntina mingi. Bobele bongo, kobeta kelelo nsambo ezali kobenda likebi likoló na makambo ya ntina mingi mpo na eleko na biso. Mpe ntango baanze bazali kobeta kelelo, awa na mabelé ba Témoins bazali kosala noki mpo na kosakola bansango ya ntina ebimisami na kobeta ya kelelo mokomoko.

Ndimbola na kobeta na kelelo

3. Kobetama ya kelelo nsambo ezali elilingi ya nini?

3 Kobeta na kelelo oyo ezali kokundola biso bitumbu oyo Jéhovah ayeisaki likoló na Ezipito ya kala. Bitumbu yango bikokisaki ekateli ya Jéhovah likoló na bokonzi wana elekaki makasi na mokili mobimba na ntango wana mpe likoló na losambo na yango ya lokuta; nde epai mosusu bobele bitumbu yango, epesaki nzela na libota ya Nzambe ete esikwama. Bobele bongo, kobeta na kelelo na Emoniseli ezali bitumbu bisopami na eleko na biso, ya mbala oyo likoló na mokili mobimba ya Satana mpe likoló na mangomba na yango ya lokuta. Ezali bitumbu ya mosuni te, kasi ezali nde bansango mabe oyo ezali koyebisa bikateli ya Jéhovah. Bitumbu yango bizali mpe kobongisa kosikwama ya basaleli ya Nzambe.

4. Ndenge nini kelelo nsambo ebetamaki na eleko na biso?

4 Na boyokani na kelelo oyo nsambo ebetami, bikateli makasi bikamatamaki mpo na kotelemela mokili ya Satana mpe bikateli yango bisakolamaki na makita nsambo ya mbula na mbula mpe ya sipesiale, oyo basaleli ya Jéhovah basalaki kobanda na 1922 kino na 1928. Yango ebimisamaki lokola mokanda mpe bamilió mingi na yango ekabolamaki epai na bato. Nzokande, kokabolama ya bansango oyo ya móto esukaki na bambula wana te; elandanaki na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka. Lelo, kosakolama yango eyei makasi koleka liboso, mpamba te bamilió na bato kati na “ebele monene” basangisi mingongo na bango na oyo ya etuluku moke ya baklisto bapakolami oyo babandaki kosakola nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. (Emoniseli 7:9) Mbula na mbula, motuya mozali ntango nyonso kobakisama ya bamilió ya ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola na makasi koleka ete mokili ya Satana ekoki kobika te.

5. “Ndambo na misato” na mokili likoló na yango ekateli na Nzambe ekokisami liboso elimboli nini? Mpo na nini?

5 Emoniseli 8:6-12 eyokisi mongongo ya kelelo minei ya liboso. Matandala, móto mpe makila ebwakami na mokili mpe ebebisi “ndambo na misato” na mokili. Mpo na nini ekateli na Nzambe ekweli naino “ndambo na misato” na mokili? Mpamba te atako mokili mobimba ya Satana ezali mabe na miso na Nzambe, ezali na eteni moko na yango eleki mabe. Yango wapi? Ezali oyo elati nkombo ya Klisto, elingi koloba boklisto ya mokili oyo. Ntango nsango ya bikateli na Nzambe ezwaki boklisto ya mokili oyo nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bonene ya mikili nyonso na yango ezalaki soko ndambo na misato na mokili.

6. Mpo na nini Jéhovah azwi ekateli ete boklisto ya mokili oyo ekobomama?

6 Mangomba ya boklisto ya mokili oyo ezali mbuma ya mibu 1900 ya lipengwi, to kotika pembeni boklisto ya solo, oyo Yesu mpe bayekoli na ye basakolaki. (Matai 13:24-30; Misala 20:29, 30) Bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bazali komibenga balakisi ya makambo ya boklisto, kasi mateya na bango mazali mosika na solo oyo ezwami na Biblia, mpe etamboli na bango ya mbindo ezali ntango nyonso kobwaka nsoni likoló na nkombo na Nzambe. Esili koyebana ete bazali na nyongo na makila masopamaki na boumeli ya bitumba ya ntango na biso oyo bango bapesaki maboko. Boklisto ya mokili oyo esangani mpenza na mokili oyo etambwisami na Satana. Yango wana nsango makasi mpe ya mabe ezali kokomela ye uta na Jéhovah, nsango oyo ezali komonisa ete boklisto ya mokili ekoki soko moke te kondimama na Nzambe. Jéhovah asili kotika boklisto ya mokili oyo kokende na libebi lokola atikaka libota ya Bayuda na ekeke ya liboso.​—Matai 23:38.

Bazongisami na bomoi kati na elimo mpo na kosakola na mokili mobimba

7, 8. (a) Engebene mokapo 9 ya Emoniseli, kobetama ya kelelo ya mitano emonisaki nini? (b) Mayoyo mazali elilingi ya banani?

7 Emoniseli 9:1 elobi ete anzelu ya mitano abeti kelelo, mpe emonaneli emonisi ete monzoto moko ekweaki na mabelé. Monzoto wana azali na fungola ya libulu moko, libulu yango etondi na mayoyo makangamaki wana. Monzoto yango ezali bongo Yesu Klisto, Mokonzi oyo Jéhovah asili kopona mpe asili kofanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na makolo. Mayoyo elakisi basaleli na Nzambe oyo banyokwamaki mpe bazalaki lokola babomami, na 1918, ntango batambwisi na misala na bango bakangamaki na boloko. Kasi Klisto, oyo asili kopesamela nguya lokola Mokonzi kuna na likoló, asikolaki bango mpo ete bazongela mosala na bango ya kosakola polele na mokili mobimba. Bakonzi na mangomba bayokaki nsoni, bango oyo balukaki koboma mosala ya kosakola.​—Matai 24:14.

8 Tala oyo Emoniseli 9:7 elobi na ntina na mayoyo yango: “Motindo na mayoyo yango ezalaki lokola bambalata (mpunda monene) babongisami mpo na etumba. Na mitó na bango lokola mitole na motindo na wolo, mpe bilongi na bango lokola bilongi na bato.” Verset 10 ebakisi: “Mikondo (mokondo ezali mokila) na bango lokola mikondo na bankoto (nkoto ezali scorpion) na koswa.” Mayoyo yango ezali elilingi na batikali kati na batuki na libula na Bokonzi bazongisamaki na bomoi, bazali kosangana lisusu na etumba ya elimo kobanda na 1919. Na makasi oyo bautaki kozwa sika, bazali kosakola nsango ya móto ya bikateli na Nzambe, mingimingi mpo na kotemela boklisto ya mokili oyo esili kobeba.

9, 10. (a) Kobetama ya kelelo ya motoba ebimisaki nini? (b) Makiasi na makiasi ya bambalata ezali mpe elilingi ya banani?

9 Ekomi sikawa ngala ya anzelu ya motoba mpo na kobeta kelelo. (Emoniseli 9:13) Kelelo oyo ezali mpo na kosakola kobima ya mampinga ya bafandi na mbalata to mpunda. Verset 16 eyebisi biso motuya na yango: Makiasi kiasi mbala mibale, elingi koloba milió nkama mibale(200 000 000). Versets 17 mpe 19 elimboli biso motindo na yango: “Mitó na bambalata lokola mitó na bankosi, mpe na minoko na bango ebimi moto, na molinga, na sufulu mokondo na bango lokola banyoka. Mampinga yango bazali kotambola nsima na Mokonzi, Klisto Yesu. Oyo nde nsomo!

10 Bambalata oyo na nguya mingi elakisi nini? Lokola motuya na bango ezali bamilió, bakoki kozala bobele elilingi ya batikali te, oyo motuya na bango ezali soko 8 800 lelo na mokili mobimba. Makiasi kiasi na bambalata oyo esangisi mpe ebele monene oyo elobelami na mokapo 7 ya Emoniseli, oyo bazali kolikya kozala na bomoi ya seko na mabelé. Kati na Biblia, liloba makiasi (myriade) elakisaka mbala mingi motuya moko monene mingi, eyebani ndelo te. Na motindo yango, bambalata oyo na elilingi elakisi baklisto bapakolami, bakisa lisusu bamilió ya ebele monene ya bampate mosusu oyo motuya na bango ezali se kobakisama mpe na mongongo na nguya bazali kolanda mosala ya kosakola ebandamaki na batikali bapakolami oyo bazali lokola mayoyo.​—Yoane 10:16.

11. Elakisi nini ete ’nguya na bambalata ezali na minoko na bango’, mpe ndenge nini bazali kozokisa na mikondo na bango’?

11 Na Emoniseli 9:19 totangi boye: Nguya na bambalata ezali na minoko na bango mpe na [mikondo na bango] bakozokisaka. Elakisi nini ete nguya ezali na minoko na bango? Na ntina boye ete uta bambula mingi, na nzela na Eteyelo ya mosala ya bonzambe mpe na makita mosusu, basaleli na Nzambe bazali koyekola kosakola na mpiko nyonso bikateli ya Nzambe. Ndenge nini bazali kozokisa na mikila to mikondo na bango ya elilingi? Na ntina boye ete basili kokabola bamiliare ya mikanda mikolimbolaka Biblia kati na mokili, bazali bongo kotika nsima na bango nsango na móto epesameli mokili na Satana. Na miso na banguna na bango, mampinga oyo na bambalata mazali lokola makasi na makasi.

12. Mayoyo mpe bambalata basengeli kolanda kosala nini mpe mosala na bango ezali kosala nini likoló na bato?

12 Mayoyo mpe bambalata ya elilingi basengeli bongo kosakola bikateli na Nzambe na makasi koleka mpe na kongenga koleka, awa ezali biso kobelema na mokolo na kobukanisa. Mpo na bato na motema sembo, nsango oyo ezali nsango eleki malamu kati na nyonso. Kasi mpo na baoyo basepeli na mokili na Satana, ezali nsango mabe, mpamba te bikateli yango bizali koyebisa ete etikali moke mokili oyo bango balingi mingi ekobomama.

13. Mawa ya misato oyo ebimi nsima na kobetama ya kelelo ya nsambo etali nini, mpe na ntina nini ebengami ete “mawa?

13 Mayoyo oyo mazali kobebisa biloko na mokili mpe mampinga na bambalata ebengami ete mawa ya liboso mpe mawa ya mibale kati na “mawa misato oyo Nzambe akani yango. (Emoniseli 9:12; 11:14) Wapi “mawa ya misato? Tala oyo elobami na Emoniseli 10:7: Wana anzelu na nsambo akobeta kelelo na ye, na mikoló yango, libombami na Nzambe likosila kokoka lokola esakolaki ye na basakoli, baombo na ye. Libombami oyo na bulee ezali mpo na libota ya ndaka, elakamaki mpo na mbala ya liboso na Edene. (Genese 3:15) “Libota ezali Yesu, kasi esangisi mpe baklisto bapakolami oyo basangani na ye esika moko mpe bakozala mikonzi elongo na ye kuna na likoló. Libombami na bulee etali bongo Bokonzi na Nzambe na likoló. Bokonzi yango ekotinda mawa ya misato oyo Nzambe asili kokana yango, mpamba te ekokokisa bikateli nyonso ya Nzambe likoló na mokili oyo ya Satana mpo na koboma yango.

Bokonzi esalemi

14. Kobetama ya kelelo ya nsambo engebene Emoniseli 11:15 esakoli nini?

14 Mpe tala likambo oyo monene! Emoniseli 11:15 elobi: “Mwanze na nsambo abetaki kelelo mpe mingongo makasi kati na likoló milobi ete, Bokonzi na mokili oyo esili kokoma Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela. Ee, esakolami ete Bokonzi na Nzambe mpe na Klisto esalamaki na makoló na 1914. Ntango batikali bapakolami bazongisamaki na bomoi na elimo nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bapalanganisaki nsango yango.

15. Likambo nini epesaki ebandeli ya sika na mosala ya kosakola Bokonzi na 1922?

15 Na assemblée oyo basaleli na Jéhovah basalaki yango na Cédar Point na 1922, kuna na Etats-Unis, maloba oyo ya ntina mingi mayebisamaki epai na bankoto na bato oyo bazalaki wana. “Oyo ezali mokolo eleki monene kati na nyonso. Tala, Mokonzi azali koyangela. Bino bozali basakoli na ye. Yango wana: Bosakola, bosakola, bosakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye!” Maloba oyo mapesaki ebandeli mpo na mosala monene ya kosakola Bokonzi polele, esangisaki mpe kati na yango bikateli bisakolamaki na baanzelu nsambo oyo bazali kobeta kelelo. Lelo oyo, basaleli ya Jéhovah, oyo bazali soki milió misato na ndambo kati na masangá koleka 57 000 na mokili, bazali kotya molende nyonso kati na mosala oyo ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba. Ee, bazali solo makiasi na makiasi!

16. Engebene mokapo 12 ya Emoniseli, likambo nini monene etali likoló mpe mabelé ebimisami na kobetama na kelelo ya nsambo?

16 Kasi anzelu ya nsambo azali na makambo mosusu ya koyebisa. Na Emoniseli 12:7, totangi ete “etumba ebimaki kati na likoló”. Verset 9 elobeli ndenge Klisto, Mokonzi, asukisi etumba yango. Totangi boye: “Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanze na ye mpe babwakami na ye elongo.” Verset 12 ebakisi: “Bosepela, e likoló, mpe bino bafandi wana!” ’Ee, makoló masukwamaki na bopusi mabe, mpe likambo yango epesaki esengo monene epai na baanzelu ya sembo. Kasi yango elimboli nini mpo na bato? Bobele verset oyo moko epesi maloba oyo: “Mawa na mokili, mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na elaka mokuse.”

17. Mpo na nini biyangeli ya mokili bilakisami na motindo na “nyama na yauli” kati na mokapo 13 ya Emoniseli?

17 Emoniseli 12:3 elakisi Satana lokola ‘dalagona monene na mitó nsambo mpe na maseke zomi’; nyama na nsomo mpe mobomi. Ezali ye abimisi “nyama na yauli”, bikonzi na politike na mabelé oyo bilobelami na mokapo 13, versets 1 mpe 2. Nyama yango ezali mpe na mitó nsambo mpe na maseke zomi, lokola Satana. Verset 2 elobi: “Dalagona [Satana] apesi na nyama nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, na bokonzi na ye monene. ”Bikonzi na politike bikokani solo na nyama, mpamba te soki tokamati bobele ekeke oyo ya ntuku mibale, tokomona ete bato koleka 100 milió basili kokufa mpo na bitumba oyo mabota bazali kobunda.

18. Nyama na maseke mibale oyo elobelami na Emoniseli 13:11 elakisi nini, mpe ndenge nini tokoki koyeba nyama yango na misala na ye?

18 Mokapo 13 ya Emoniseli elobeli ‘nyama mosusu ebimi na mabelé; ezali na maseke mibale lokola mwana na mpate, kasi ezali koloba lokola dalagona’. (Verset 11) Nyama oyo ya maseke mibale elakisi bokonzi ya Anglo-Amerike, bikonzi mibale bisangani esika moko. Bokonzi yango ezali lokola mwana na mpate, mpo bazali koloba ete bango bakosalaka mabe na bato te mpe bazali lolenge na boyangeli eleki malamu. Kasi bazali koloba lokola dalagona, lokola Satana, mpe babengami ete “nyama na yauli mosusu”, mpo ete bazali kosalela bokonzi na bango na motindo na nyama. Ezali kokanela bato, ezali kopusa bato mpe ata kosalela bibundeli mbala nyonso oyo lolenge na boyangeli na yango endimami te. Ezali komema bato epai na Bokonzi na Nzambe te, ezali nde kokotisa bango na boombo na nse na mokili oyo etambwisami na Satana. Yango wana verset 14 elobi ete: “Azali kozimbisa bafandi na mokili.”

19, 20. (a) Bosembo ya basaleli ya Jéhovah emonisi nini? (b) Ndenge nini toyebi ete batikali bapakolami bakolonga mokili ya Satana?

19 Ezali likama ya kozala na bomoi na mokili oyo etambwisami na Satana, mingimingi mpo na baoyo, kotosaka etinda oyo Yesu apesaki na baklisto ya solo, basangani na mokili te. (Yoane 17:16) Yango wana, na mokili mobimba, lokola basaleli na Nzambe bazali sembo mpe na bomoko, mpe balandi kokumisa Jéhovah mpe banzela na ye ya sembo, likambo yango emonisi nguya monene na Nzambe mpe mapamboli oyo azali kopesa bango. Bazali kotikala sembo ata liboso na botemeli makasi, liboso na monyokoli, mpe ata liboso na kufa.

20 Satana azali kobundisa mpenzampenza batikali bapakolami mpamba te bango bakozala mikonzi elongo na Klisto. Kasi mokapo 14 ya Emoniseli elakisi ete bapakolami, oyo motuya na bango ezali 144 000 bakolonga mpe bakosangana esika moko na Klisto, mpo na kozala mikonzi elongo na ye. Bakangami sembo epai na Nkolo na bango, mpamba te totangi boye na verset 4: “Bango bakolandaka Mwana na Mpate ata akei epai wapi. Minyokoli makasi oyo Satana ayeisi epai na bango ebebisi bosembo na bango oyo te.

Oyo likoló na ye nkanda ya Nzambe ekokwea liboso

21, 22. (a) Maloba nini ya baanzelu tozali kokuta yango na Emoniseli 14:7, 8? (b) Mpo na nini anzelu moko asakoli ete Babilone ekwei, nzokande ezali naino kino lelo?

21 Engebene Emoniseli 14:7, anzelu moko asakoli ete: “Banga Nzambe mpe pesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei. Bosambela ye oyo asalaki likoló, na nse, na mai monene, na mitó na mai.” Nani oyo nkanda na Nzambe ekokwea naino likoló na ye? Verset 8 eyanoli: “Mwanze mosusu na mibale alandaki, koloba ete, Ekwei! Babilone monene ekwei! oyo asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye.” Awa, mpo na mbala ya liboso, Emoniseli elobeli “Babilone Monene”, elingi koloba mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba.

22 Lokola mangomba mazali naino na bopusi bipai binso na mokili, mpo na nini anzelu alobi ete Babilone Monene esili kokwea? Nini elekaki na mobu 539 liboso na ntango na biso, ntango Babilone ya kala ekweaki nzokande ebomamaki nyonso te? Basaleli na Jéhovah oyo bazalaki na boombo bazongaki na mokili na bango mbula mibale na nsima mpe kuna bazongelaki losambo ya solo. Bobele bongo, likambo oyo ete kobanda na 1919 basaleli na Nzambe bazongelaki mosala na bango mpe bazwaki bolamu mingi na elimo ezali elembo ya polele ete na miso na Jéhovah Babilone Monene ekweaki na mbula wana. Nzambe azwelaki yango ekateli ete ekobomama nyee na mikolo mizali koya.

23. (a) Nini emonisi ete Babilone Monene ekobomama? (b) Bisakweli mosusu nini tokotalela yango na Mosenzeli ezali koya?

23 Lokola elembo ete Babilone ya ntango na biso ekobomama nyee, tozali komona uta sikawa ete ezali na mikakatano mingi. Bipai binso, kobeba na yango, pite kati na yango, moyibi mpe komikotisa na makambo ya politike, mabe oyo nyonso masili kobimisama polele. Na mikili mingi na Mpoto, bobele bato moke nde bazali naino kokende na bandako-nzambe. Na mikili mingi ya socialiste, bazali kotalela makambo ya Nzambe ete ezali mpo na kolalisa miso ya bato ete babosana mikakatano na bango. Babilone ya lelo etiolami mpe na miso na baoyo nyonso bazali na mposa na Liloba na solo na Nzambe. Etikali na ye se azela kobomama na ye. Ee, “ntango ebelemi” oyo makambo minene makoningisa mokili. Masolo ya boyekoli ya Mosenzeli oyo ekolanda ekolimbola bisakweli ya Emoniseli oyo bilobeli kufa ebelemi ya “mwasi na pite”; elingi koloba mangomba mpe kufa ya mokili mobimba oyo etambwisami na Satana.

Bozongeli

◻ Kobetama na kelelo nsambo oyo elobelami kobanda na mokapo 8 ya Emoniseli esakoli nini mpo na eleko na biso.

◻ Mpo na nini ekateli na Nzambe ekweli liboso boklisto ya mokili oyo?

◻ Ndenge nini mosala ya kosakola ya batikali bapakolami mpe ya “ebele monene” elakisami na mokapo 9 ya Emoniseli?

◻ Maloba ya Emoniseli 11:15; malimboli nini mpo na likolo mpe mabele?

◻ Na boyokani na Emoniseli 14:8, na ndimbola nini Babilone ekweaki na 1919, mpe kokwea na yango elimboli nini mpo na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto