Yoka makambo oyo elimo ezali koloba na masangá!
Bankasa 8 kino 19 ezali kozongela maloba ya masolo mibale ya liboso oyo epesamaki na moto ya likambo “Elaka esili kobelama” mpe elobamaki na 1988 na ba assemblées de district “Boyengebene ya Nzambe” oyo esalamaki na ba Témoins de Jéhovah.”
“Oyo azali na litoyi ayoka yango elobi elimo na masangá!”—EMONISELI 3:22.
1. Maloba nini ya Emoniseli ezali nsango malamu na eleko na biso oyo ya molili? “Esakweli” mpe “elaka” oyo elobelami awa ezali nini?
ESILI koleka mwa bambula, na Etats-Unis, moyekoli moko na bizaleli na bato to sociologue alobaki ete na mokili yango bato bazali na bonsomi koleka, kasi bazali mpenza na esengo te. Abakisaki ete, “bato bazali komona ete bolamu ezali kokima liboso na bango. Paradis oyo bakanisaki ete bakozwa esalemi te, bazali bobele na esobe”. Maloba na ntoma Yoane makomami na Emoniseli 1:3 mazali solo nsango malamu, mpamba te malakisi biso ndenge nini tokoki kozwa bolamu. Yoane akomaki: Esengo na motangi mpe na bayoki na maloba na esakweli oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango, mpo ete elaka ezali penepene.” “Kosakola” to esakweli oyo elobelami awa na Yoane ekomami kati na mokanda na Emoniseli. Mpe “elaka” ezali eleko mosusu te bobele ntango oyo esakweli ya Emoniseli esengeli kokoka. Maloba na Yoane mazali na ntina monene mpo na biso lelo.
2. Likoló na nini Yoane asengelaki komituna pene na nsuka na ekeke ya liboso?
2 Koleka mibu 60 liboso ya kokoma mokanda ya Emoniseli, Yoane amonaki ntango lisangá ya boklisto ya bapakolami na elimo esalemaki na mokolo na Pantekote. Na mobu 96, lisangá yango esilaki kokola mingi. Na ebandeli, ezalaki na basangani 120, nzokande nsima na bambula mingi esilaki kokola makasi kino ekomaki lisangá monene na mokili mobimba. Kasi mikakatano mizalaki kobima. Lokola Yesu, Paulo mpe Petelo basakolaki yango, lipengwi mpe mangomba mikemike ebandaki kobima, mpe Yoane na ntembe te boye amitunaki soki nyonso wana ekozala boni na ntango ezali koya.—Matai 13:24-30, 36-43; Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1-3.
3. Bimonaneli oyo Yoane azwaki mpo akomaki Emoniseli bindimisaki nini?
3 Kanisa bongo esengo na ye ntango azwaki “emoniseli na Yesu Klisto, epesaki Nzambe ye mpo na kotalisa baombo na ye makambo makobima noki”. (Emoniseli 1:1) Na nzela na ebele na bimonaneli kitoko mingi, Yoane akangaki ntina ete mikano na Jéhovah mikokokana solo mpenza, mpe ete mpiko ya baklisto ya sembo ekopesamela mbano kitoko. Azwaki mpe epai na Yesu nsango mpo na kotinda yango na masangá nsambo. Yango ezalaki toli ya nsuka oyo Yesu ye mpenza apesaki yango na baklisto liboso na koya na ye kati na nkembo ya Bokonzi.
Masangá nsambo
4. (a) Wapi mokumba na masangá na sembo na boklisto? (b) Elakisi nini likambo oyo ete bankulutu, bapakolami na elimo, bazali lokola myoto nsambo kati na loboko mobali ya Klisto?
4 Masangá nsambo ya baklisto bapakolami malakisamaki na bitemelo na miinda nsambo, mpe bankulutu na masanga yango ya bapakolami na elimo, balakisamaki na myoto nsambo kati na loboko mobali na Klisto. (Emoniseli 1:12, 13) Na nzela na bililingi oyo, Yoane akangaki ntina ete masanga na sembo na boklisto masengeli komema kongenga, lokola bitemelo na miinda ezali kongenga makasi kati na mokili oyo ezali na molili. (Matai 5:14-16) Kosimbaka bankulutu kati na loboko na ye na mobali, Yesu amonisaki na wana ete azali kotambwisa bango, azali kokamba bango.
5. Na eleko ya Yoane, nsango etindamaki na masangá nsambo ezalaki mpo na banani?
5 Yesu alobaki na Yoane: “Mpo na yango ezali yo komona, okoma yango kati na buku, mpe tinda yango na masangá oyo nsambo, na Efese, na Sumulana, na Pelegamo, na Twatila, na Salade, na Filadelefi, na Laodikya.” (Emoniseli 1:11) Masangá yango mazalaki solo na ntango ya Yoane, mpe na ntembe te ntango ntoma Yoane asilisaki kokoma Emoniseli, boye lisangá moko na moko ezwaki mokanda yango. Kasi tala oyo elobami kati na Dictionnaire de la Bible (Angl.) ekomamaki na Hastings; ye alobi boye na ntina na Emoniseli: “Kati na K[ondimana] na S[ika] ezali na mokanda mosusu te oyo bosolo na yango eyebanaki polele epai na bato nyonso na ekeke ya mibale.” Na bongo mokanda na Emoniseli eyebanaki mpe etangamaki bobele na masanga nsambo te, nde lisusu epai na baklisto mingi lisusu oyo bazalaki na mposa na koyekola maloba na esakweli oyo. Na ntembe te, toli na Yesu etalaki baklisto nyonso bapakolami.
6, 7. (a) Maloba ya Emoniseli matali eleko nini mpenzampenza, mpe ndenge nini toyebi yango? (b) Na mikolo na biso, myoto nsambo mpe masangá nsambo elakisi nini?
6 Kasi nsango oyo etindamaki na masangá nsambo esengelaki kozala na ntina mingi lisusu koleka. Na Emoniseli 1:10, Yoane alobi boye na ntina yango: “Nazalaki kati na elimo na mokolo na Nkolo.” Eteni oyo ezali moko na mafungola ya Emoniseli. Elakisi biso ete esakweli oyo etali libosoliboso “mokolo na Nkolo”, oyo ebandaki ntango Yesu azwaki bokonzi na 1914. Ezali yango endimisami na bansango oyo Yesu atindaki yango na masangá nsambo. Tozali kokuta maloba lokola oyo, matindamaki na Pelegamo: “Nakoya epai na yo noki.” (Emoniseli 2:16; 3:3, 11) Nsima na mobu 96 ya ntango na biso, Yesu ‘ayaki’ te na lolenge ya ntina mpenza kino ntango azwaki bokonzi na 1914. (Misala 1:9-11) Na nsima, mpo na kokokisa Malaki 3:1, ‘ayaki’ lisusu na temple na 1918 mpo na kobanda mosala na ye ya kosambisa liboso ndako na Nzambe. (1 Petelo 4:17) ‘Akoya’ lisusu, na mikolo misili kobelema, ntango “akopesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu Klisto”.—2 Batesalonike 1:7, 8; Matai 24:42-44.
7 Na yango, tokangi ntina ete masangá nsambo elakisi masangá nyonso ya baklisto bapakolami nsima na 1914, mpe myoto nsambo elakisi bankulutu nyonso, bapakolami na elimo oyo bazali kati na masangá yango. Epai mosusu, bankulutu oyo bazali na molongo ya “bampate mosusu”, bango mpe bazali kati na loboko mobali to na nse na bokonzi na Yesu Klisto. (Yoane 10:16) Mpe toli epesami na masangá nsambo etali solo masangá nyonso na libota na Nzambe lelo na mokili, bakisa oyo esalemi na baklisto oyo elikya na bango ezali ya bomoi ya seko awa na mabelé.
8. Na ezalela nini Yesu akutaki baoyo bazalaki komibenga baklisto ntango ayaki kotala bango na 1918?
8 Ntango Yesu ayaki kotala baoyo nyonso bazalaki komibenga baklisto na 1918, akutaki na mabelé baklisto bapakolami oyo bazalaki kotya molende mpo na kotosa maloba na esakweli oyo. Uta bambula 1870, basilaki kokebisa bazalani na bango ete 1914 ekozala mbula moko ya ntina mingi. Banyokwamaki makasi na boklisto ya mokili oyo na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe na 1918 mosala na bango ebomamaki, mpamba te batambwisi ya la Société Watch Tower bakangamaki na boloko, nsima wana bafundaki bango na bifundeli ya lokuta. Mpe ekateli na bango ya kotosa maloba na Yesu oyo matindamaki na masangá nsambo emonisaki bango polele ete bazali baklisto oyo bamemi kongenga kati na mokili oyo ya molili, mpe bamosusu lokola bango bazalaki te. Batikali yango bazali lelo kelasi ya Yoane, oyo ezali naino na bomoi mpo na komona kokokisama na makambo mingi makomami na Emoniseli mpe mpo na kosangana na kokokisa yango.
Toli mpe makumisi
9, 10. (a) Kokokisama ya maloba nini ya Yesu epesaki esengo monene na baklisto na mikoló na biso? Limbola.
9 Na Emoniseli 3:8 Yesu alobi na lisangá ya Filadelefi: “Nayebi misala na yo. Tala, nasili kotya ekuke polele liboso na yo, oyo moto te akoki kokanga yango; mpo ete ata ozali na nguya moke, obateli maloba na ngai, mpe owangani nkombo na ngai te.” Emonani lokola ete baklisto na Filadelefi bazalaki baklisto ya molende, mpe sikawa, ekuke efungwamaki liboso na bango; libaku epesamelaki bango ya kokota na mosala ya litomba mingi.
10 Na mikolo na biso, nsango oyo moko epesi esengo mingi na basaleli na Nzambe. Nsima na minyokoli oyo bazwaki na 1918, babongisamaki lisusu na elimo, mpe na 1919 Yesu afungwelaki bango ekuke, libaku malamu ya mosala. Balekaki na ekuke yango na kondimaka mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai na mabota nyonso. Lokola elimo ya Jéhovah ezalaki likoló na bango, eloko moko te ekokaki kopekisa mosala yango, mpe baklisto oyo ya sembo bazwaki libaku monene ya kokokisa eteni moko ya ntina ya elembo ya kozonga ya Yesu. (Matai 24:3, 14) Na nzela na mosala ya kosakola oyo bakokisaki yango na bosembo nyonso, batikali kati na ba 144 000 baponamaki mpe batyamaki bilembo, mpe “ebele monene” esili koyanganisama. (Emoniseli 7:1-3, 9) Oyo nde esengo mpo na basaleli na Nzambe!
11. Ndenge nini bapengwi bamekaki kobebisa lisangá ya Jéhovah na eleko ya Yoane? Ezali na bato bameki kosala mpe bongo na mikoló na biso?
11 Eloko moko ekokaki kobebisa esengo yango? Ezangaki te. Na ndakisa, atako bazalaki na mpiko malamu, bankulutu na lisangá ya Pelegamo bakokaki te kobatela lisangá yango ete mateya ya lingomba ya Banikolaite ekotela yango te. (Emoniseli 2:15) Bopusi mabe ya kosala mangomba mikemike ebandaki kokota na lisangá. Bobele bongo, na mikolo na nsuka oyo tozali kobika na yango, bamoko basili kopengwa mpe bameki kobebisa lisangá ya Jéhovah. Bankulutu bazali kosala nyonso mpo na kotelemela bato motindo wana, nzokande ata bongo mua bandeko mosusu basili kozimbisama. Topesa nzela te na bapengwi ete babakola esengo na biso!
12. (a) Bopusi nini ekokani na oyo ya Balama to ya Yezabele? (b) Na eleko na biso, Satana azali komeka kokotisa bopusi motindo yango kati na lisangá ya boklisto?
12 Yesu akebisaki mpe lisangá ya Pelegamo mpo na baoyo “bakangami na mateya na Balama”. (Emoniseli 2:14) Mateya yango ezalaki nini? Moto moko kuna na Pelegamo azalaki kobebisa baklisto ndenge Balama azalaki kobebisa Bayisraele kati na esobe, na ndenge atyelaki bango libaku ete ‘balia mbeka na bikeko mpe basala pite’. (Mituya 25:1-5; 31:8) Yesu akebisaki lisangá ya Twatila mpo na “mwasi moko Yezabele”, oyo azalaki kozimbisa baklisto ‘ete basala pite mpe balya biloko bipesami na bikeko’. (Emoniseli 2:20) Satana azali komeka lelo kozimbisa baklisto lokola esalaki yango Balama to Yezabele kati na lisangá ya boklisto? Azali solo kozimbisa, mpamba te mbula nyonso, bato soko 40 000 bazali kobimisama na lisangá, mingi na bango mpo na pite. Oyo nde mawa! Mibali oyo bakokani na Balama mpe basi oyo bakokani na Yezabele batombokelaki bankulutu mpe balukaki kobebisa lisangá. Tika ete tokoka koboya na makasi na biso nyonso bopusi oyo ya mabel!—1 Bakolinti 6:18; 1 Yoane 5:21.
13. (a) Na maloba nini Yesu amonisi ete asepelaka soko moke te na baoyo bazali mpio te móto te? (b) Mpo na nini baklisto na Laodikya bazalaki mpio te moto te, mpe ndenge nini tokoki kopengola ete tokokana na bango te?
13 Na Emoniseli 3:15, 16, Yesu alobi na anzelu ya lisangá ya Laodikya: “Nayebi misala na yo ete yo mpio te, yo moto mpe te. Mposa na ngai ete ozala mpio soko moto! Bongo awa ezali yo mwa moto moke, nde na moto te, na mpio mpe te, etikali moke nakosanza yo na monoko na ngai.” Yesu amonisi awa ete asepelaka soko moke te na moto oyo azali mpio te moto te. Abakisi maloba oyo: “Ozali koloba ete, Ngai mozwi, nasili kozwa mosolo mingi, nazali na bosenga na eloko te.” Ee, mposa ya bozwi ekweisaki baklisto ya Laodikya. Bazalaki koluka komisepelisa bango moko mpe bakomaki na goigoi. Kasi Yesu alobeli lisangá yango ete: ‘Oyebi te ete yo moto na bolozi, na makambo na mawa, mobola, na miso makufi, na bolumbu.’ (Emoniseli 3:17) Boni mpo na biso, tolingi komonana ‘bato na bolozi, bato na makambo na mawa, babola, bato bakufa miso mpe bato na bolumbu’ na miso na Yesu? Soko moke te! Na yango, tobunda na makasi na biso nyonso mpo na kotelemela mposa ya bozwi mpe ezaleli ya kofanda mpio te moto te.—1 Timote 6:9-12.
Toyika mpiko kino na nsuka
14. (a) Minyokoli nini lisangá ya Sumulana ezwaki? (b) Minyokoli yango mikokani na minyokoli ya banani lelo?
14 Lisangá ya Sumulana ezalaki lokola oyo ya Laodikya te. Yesu alobaki na lisangá yango: “Nayebi monyoko na yo, na bobola na yo, kasi ozali mozwi. Nayebi mpe kotuka na bango bakolobaka ete bazali Bayuda, nde bazali bongo te kasi bazali lingomba na Satana. Banga bolozi bokozwa yo te. Tala, Satana alingi kobwaka bamosusu na bino kati na boloko ete bomekama, mpe bokozwa monyoko mikolo zomi.” (Emoniseli 2:8-10) Ezali makambo baklisto bazali kokutana na yango lelo. Ata bazala bapakolami to “bampate mosusu”, bango mpe bazali koyika mpiko na botemeli makasi oyo ezali kouta na “lingomba na Satana” ya mikolo na biso, boklisto ya mokili oyo. Uta Etumba ya Liboso ya mokili mobimba kino na mikolo na biso, bibele na mibali, basi mpe bana babetamaki, batyamaki na boloko, banyokwamaki, babebisamaki to babomamaki mpo ete babatelaki bosembo na bango.
15, 16. (a) Mpo na nini baklisto bapakolami bakoki kozala na esengo ata bazali konyokwama? (b) Elikya nini ya esengo ezali mpe liboso ya “bampate mosusu”?
15 Bolozi motindo oyo ekoki kopesa esengo epai na ye oyo azali koyikela yango mpiko? Monyokoli ezali solo eloko ya mpasi. Kasi, lokola bantoma, baklisto ya sembo oyo bazali koyika mpiko kati na komekama bazali kooka esengo mozindo soki bakanisi ete “batangami babongi na kozwa nsoni mpo na nkombo na [Yesu]”. (Misala 5:41) ‘Mpe bazali kobatela esengo na bango, ata banguna na bango basali bango nini, mpo bayebi ete ”ntango ebelemi oyo bosembo na bango ekopesamela mbano, mpe ekozala solo mbano monene! Yesu alobaki na moklisto mokomoko na Sumuluna: “Zala sembo [ata] kino na kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.” (Emoniseli 2:10) Mpe na baoyo ya Salade alobaki: “Mpo na molongi, ye akolatisama bongo na bilamba mpembe, mpe nakoboma nkombo na ye na buku na bomoi te.”—Emoniseli 3:5.
16 Ya solo, bilaka yango bitali mpenzampenza baklisto bapakolami. Ezali kokundola bango mbano oyo ezali kozela bango: bomoi ya libela na libela kuna na makoló. Kasi bilaka oyo moko bizali mpe kolendisa “bampate mosusu”. Jéhovah abombeli bango mpe mbano, soki nde bakomonisa molende mpe mpiko. Bazali na elikya kitoko ya kozwa bomoi ya seko kati na paradis na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi na Klisto. Ezali motindo yango bakoyeba Paradis oyo mokili ya lelo bakotikala koyeba yango te.
17. Na maloba nini Yesu asukisaki nsango mokomoko oyo atindaki, mpe maloba yango malimboli nini mpo na biso?
17 Yesu asukisaki nsango na ye mokomoko na masangá nsambo na maloba oyo: “Oyo azali na litoi ayoka yango elobi elimo na masangá!” (Emoniseli 3:22) Ee, esengeli na biso koyoka maloba na Mobateli na mpate mokonzi mpe kotosa yango. Tosengeli kokima bosoto mpe lipengwi, mpe kobatela molende na biso. Soki tokosala boye nde tokozwa mbano. Ekateli na biso ya kosala boye ekolendisama na meko oyo tokopusana mosika kati na boyekoli na biso na mokanda na Emoniseli.
Mokanda mokangami na bilembo nsambo
18. Eloko nini Yesu azwaki kuna na likoló? (b) Na mikolo na biso, kotambola ya bampunda misato kati na minei oyo elobelami na Emoniseli mokapo 6, elimboli nini?
18 Na ndakisa, na mokapo ya 4 mpe ya 5, Yoane azwaki emonaneli ya kokamwa ya efandelo ya Jéhovah kuna na likoló. Mwana na mpate na Nzambe, Yesu Klisto, azali wana, mpe azwi mokanda moko mokangami na bilembo nsambo. Na mokapo 6, Yesu afungoli, mokomoko, motoba kati na bilembo yango nsambo. Efungoli ye elembo ya liboso, mpunda mpembe ebimi mpe mofandi na yango. Bapesi ye motole mpe abimi mpo na “kolonga mpe kolonga lisusu”. (Emoniseli 6:2) Mofandi na mpunda wana ezali Yesu, Mokonzi autaki kozwa bokonzi na ye sika. Mokolo ya Nkolo ebandaki na 1914, ntango wana Yesu abandaki kotambola lokola Mokonzi na bolongi. Efungolaki ye bilembo misato bilandaki, mpunda mosusu misato ebimaki elongo na bafandi na yango. Ezali bilembo ya nsomo bilakisi bitumba na mabelé, nzala, mpe kufa ebimisami na makambo mingi, na ndakisa na maladi mabe. Endimisi esakweli monene ya Yesu engebene yango koya na ye kati na nguya ya bokonzi ekotyama elembo awa na mabelé na bitumba minene, na nzala, na koningana na mabelé mpe na makama mosusu. (Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:10, 11) Na ntembe te, soki balingi koyika mpiko na makambo na mpasi mingi boye, baklisto basengeli kotosa maloba oyo Yesu atindaki yango na masangá nsambo.
19. (a) Na kozonga na Klisto, baklisto ya sembo bapakolami oyo basila kokufa bazwi mbano nini? (b) Kofungwama ya elembo ya motoba esakolaki makambo nini ya nsomo? Yango etindi bato na kotuna motuna nini?
19 Na bofungoli elembo ya mitano eyebisameli biso likambo moko oyo esalami kuna na likoló, na kozanga komonana. Baklisto bapakolami oyo bakufaki mpo na kondima na bango bazwi moto na moto elamba molai ya pembe. Lokola emonani polele ete Klisto asili kozonga, elakisi ete lisekwa ya likoló esili kobanda. (1 Batesalonike 4:14-17; Emoniseli 3:5) Na nsima elembo ya motoba efungwami, mpe “mabelé”, elingi koloba biloko mabe ya ntango oyo etambwisami na Satana, “mabelé” yango eningisami na koningana moko monene. (2 Bakolinti 4:4) “Likoló“, elingi koloba bokonzi ya bato oyo bazwi yango na Satana, elingami lokola kimbundi moko ya kala, oyo ekoki bobele na kobwakama. Na nsomo nyonso, batomboki bazali kobelela na ngomba na mabanga ete: “Kwea na likoló na biso, mpe bomba biso na miso na Mofandi na kiti na bokonzi, mpe na nkele na Mwana na Mpate, mpo ete mokolo monene na nkele na bango eyei, mpe nani akoki kotelema?”—Emoniseli 6:13, 14, 16, 17.
20. Nani akokoka kotelema ngwi na mokolo monene na nkanda na Jéhovah mpe na Mwana na Mpate?
20 Na bongo, nani mpenza akokoka kotelema? Yesu asilaki koyanola na motuna oyo: Baoyo bazali ‘koyoka makambo oyo elimo ezali koloba na masangá bakotelema ngwi na mokolo wana ya nkele monene ya Nzambe. Na nsima Yoane ayoki ete baoyo na nsima kati na baklisto 144 000 bapakolami batyami bilembo mpo na kobika na “bolozi monene”. (Emoniseli 7:1-3, 14) Kasi ntango ekoki mpo na kofungola elembo ya nsambo na mokanda yango. Bimonaneli mosusu ya kokamwa bipesami na Yoane, mpe biso tozwi yango na nsima na Yoane. Lisolo elandi ekolobela mosusu kati na bimonaneli yango.
Bozongeli
◻ Wapi esika na Yesu na kati na bankulutu ya lisangá?
◻ Mikakatano nini bankulutu ya Pelegamo mpe ya Twatila bakutanaki na yango? Masangá na mikolo na biso ezali kozwa mikakatano ya motindo moko?
◻ Libunga nini monene baklisto ya Laodikya basalaki, mpe ndenge nini tokoki kopengola ete tozongela libunga yango te?
◻ Minyokoli nini baklisto bayikeli yango mpiko na ekeke oyo ya ntuku mibale, mpe bilaka nini ya Yesu esalisaki bango?
◻ Ndenge nini tokoki kosala mpo ete totelengana te lokola mabota bakotelengana kozanga elikya na Armagedon?
[Bililingi na lokasa 11]
Ndambo na baklisto ya sembo oyo banyokwamaki kati na ba camps de concentration to baboloko ya banazis.