Tosalisa bazalani na biso bayeba kosambela Nzambe
“Awa ekoingela mozangi kondima to moto ayebi makambo na biso te, . . makambo mabombami na motema na ye makomonana polele, mpe bongo akokwea na elongi na ye kosambela Nzambe.”—1 BAKOLINTI 14:24, 25.
1-3. Ndenge nini Bakolinti mingi basalisamaki mpo na kondimama epai na Nzambe?
NA BOUMELI ya mobembo na ye ya mibale ya misionere, ntoma Paulo afandaki na Kolinti mbula moko na ndambo. Na mboka yango, “azalaki bobele kolakisa Liloba, mpe kotatola”. Litomba nini emonanaki na mosala na ye? “Bato mingi na Bakolinti ‘bayoki, bandimi, mpe babatisami.” (Misala 18:5-11) Bakomaki “babulami . . . babengami ete bazala basantu”.—1 Bakolinti 1:2.
2 Na nsima, Apolo akomaki na Kolinti, mwa ntango moke nsima wana Prisile mpe Akila basalisaki ye, mpo ete “bakamati ye mpe balimboli na ye nzela na Nzambe na motindo eleki sembo”, ndakisa likambo ya batisimo. Moklisto yango akomaki bongo moto oyo Nzambe asepeli na ye, moto andimami na Nzambe. (Misala 18:24 kino 19:7) Apolo mpe asalisaki Bakolinti oyo, kala ‘bazalaki kosambela bikeko bikolobaka te’. (1 Bakolinti 12:2) Emonani ete bato yango bazalaki kosalisama na bandako na bango likoló na Biblia, kasi bakokaki mpe kobakisa boyebi na bango na koyanganaka na makita ya boklisto.—Misala 20:20; 1 Bakolinti 14:22-24.
3 Na nzela na mateya yango, Bakolinti mingi oyo kala bazalaki ‘bato bazangi kondima mpe bato bayebi makambo na biso te’ babendamaki epai na losambo na solo. Na ntembe te baklisto bazalaki na esengo mingi na komonaka mibali wana mpe basi wana kokola kino kozwa batisimo mpe kondimama na Nzambe. Ezali se ndenge moko na mikolo na biso.
Ndenge nini tokoki kosalisa ‘bato bazangi kondima mpe bato bayebi makambo na biso te’
4. Na mikolo na biso, motindo nini bato mingi basalisami lokola ezalaki bongo mpo na bato bazalaki bandimi te na Kolinti?
4 Na mikolo na biso se ndenge moko ba Témoins de Jéhovah bazali kotosa etinda ya Yesu ya ‘kozalisa bayekoli bato ya mabota nyonso, kobatisa bango.’ (Matai 28:19, 20) Nsima na kolona mbuma na solo kati na mitema na bato balingi koyoka, bazali kozonga mpo na kosopela yango mai. (1 Bakolinti 3:5-9; Matai 13:19, 23) Batemwe bayekolaka Biblia elongo na bazalani na bango kozanga kosenga mbongo; boyekoli yango esalemaka poso na poso na bandako ya bato yango mpo na kopesa biyano na mituna na bango mpe kolakisa bango solo ezwami na Biblia. Bazali mpe kobianga bango na koyangana na makita oyo bazali kosala, lokola ezalaki kosala yango “bato bazangi kondima” na ekeke ya liboso kati na lisangá ya Kolinti. Kasi ndenge nini ba Témoins de Jéhovah basengeli kotalela bato oyo bazali koyekola Biblia mpe bazali koyangana na makita?
5. Ndenge nini makomami na Biblia mazali kotinda biso ete tozala na bokengi kati na boyokani na biso elongo na bato mosusu?
5 Tozali kosepela na komona bato yango bazali kobelema epai na Nzambe, kasi tobosani te ete bakomi naino bandimi te mpe bazwi naino batisimo te. Tomikundola mpe mateya mibale oyo touti komona na lisolo ya liboso: 1) Bayisraele bazalaki na bokengi kati na boyokani na bango elongo na bapaya oyo, ata bazalaki kosangana na libota na Nzambe mpe bazalaki kotosa mibeko misusu, nzokande bayambaki naino losambo ya bayuda te kino kokatama ngenga, mpo na kokoma bandeko na bango ya losambo moko. 2) Baklisto ya Kolinti bazalaki na bokengi kati na boyokani na bango elongo na ’bato bazangi kondima mpe bato bayebi makambo na biso te’, mpo batosaki maloba oyo ya Paulo: “Bokangama na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima. Mpo ete, kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe?”—2 Bakolinti 6:14.
6. Ndenge nini baoyo bazali “bandimi te” bakoki “kopamelama” na makita, mpe kopamelama wana ezali ya motindo nini?
6 Na yango, ata tozali koyamba na esengo nyonso ‘bato bazangi kondima mpe bato bameseni na makambo na biso te’, toyebi ete bakokisi naino masengami ya Nzambe te. Lokola Biblia emonisi yango na 1 Bakolinti 14:24, 25, mbala mosusu bazali na mposa na ‘kososolama’, to mpe ‘kopamelama’, na makambo mazali bango koyekola. Ezali mpamela na nzela na kosambisama te; babengami te na miso ya komite ya kosambisa, mpamba te bakomi naino basangani ya lisanga te oyo basili kozwa batisimo. Nzokande, na makambo mazali bango koyekola, bato oyo ya sika bandimisami ete Nzambe aboi etamboli nyonso ya moimi mpe ya mbindo.
7. Bayekoli mingi ya Biblia balingaka kokola kino wapi, mpe mpo na nini?
7 Nsima na mikolo bato mingi oyo bazwi naino batisimo te balingi kokola, na esika ete basuka bobele koyokamela na makita ya lisanga. Maloba oyo ya Yesu mamonisi ntina mpo na yango: “Moyekoli aleki molakisi na ye te, nde moto na moto, oyo asili koyekola nyonso, akozala lokola molakisi na ye.” (Luka 6:40) Moyekoli na Biblia azali komona ete moto oyo azali koteya ye azali kopesa motuya mingi na mosala ya kosakola mpe azali kozwa esengo mingi na mosala yango. (Matai 24:14) Lokola kondima na ye ezali kokola, moto oyo azali koyekola solo ezwami na Biblia mpe azali koyangana na makita akoki komona ete maloba oyo malandi matali mpe ye: “Kitoko boni likoló na ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu na kosepela, ye oyo akosakola kobikisama.” (Yisaya 52:7; Baloma 10:13-15) Ata azwi naino batisimo te, mbala mosusu alingi kobanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi esika moko na lisanga ya ba Témoins de Jéhovah.
8, 9. (a) Tosengeli kosala nini soki moyekoli moko ya Biblia alingi kobanda kobima na mosala ya kosakola? (b) Ntango bankulutu mibale bakei kosolola elongo na moto oyo alingi kobanda kosakola basengeli kosala nini? (c) Mosakoli ya sika andimi komema mokumba nini?
8 Ntango Temwe oyo azali koyekola Biblia na moto motindo wana amoni ete moto yango akomi na mposa ya kosangana na mosala ya kosakola, akoyebisa yango na mokengeli-mokambi. Ye akosenga na bankulutu mibale ete bakende kosolola na moyekoli wana ya Biblia esika moko na ndeko oyo ayekolaka na ye. Bankulutu basepelaka ntango moto amonisi mposa ya kosalela Nzambe. Bakoluka te ete azala na boyebi na makambo nyonso lokola ezali epai na bandeko babatisami mpe baumeli kati na solo, mpe mingi esengami epai na bango. Nzokande, bankulutu bakoluka koyeba soki moyekoli yango azali na boyebi ekoki ya mateya mazwami na Biblia mpe asili koyokanisa bomoi na ye na mibeko ya Nzambe liboso liboso ete akoka kotangama lokola mosakoli kati na lisanga. Mpo na bantina oyo, bankulutu mibale bakosolola elongo na moto oyo alingi kokoma mosakoli, esika moko na Temwe oyo ayekolaka na yea.
9 Bankulutu oyo mibale bakoyebisa na moyekoli ete soki akokisi masengami mpo na kosangana na mosala ya kosakola mpe soki abandi kosangana na mosala yango, akoki kopesa rapor ya mosala na ye. Na ntango yango fiche ekofungwama na nkombo na ye mpe ekotyama esika moko na bafiche ya bandeko mosusu. Yango ekomonisa ete akoti na lisanga ya ba Témoins de Jéhovah, oyo etambwisami na Nzambe mpe alingi kotosa makambo nyonso masengami na lisanga yango (ndenge esengami na baoyo nyonso bapesaka rapor). Na lisolo wana, bakopesa ye mpe batoli ezwami na Biblia, lokola oyo tokoki kokuta na nkasa 98 kino 100 ya mokanda Lisangá mpo na kokokisa mosala ya Nzambeb. Ekozala mpe libaku malamu mpo ete moyekoli akoka kozwa mokanda yango.
10. (a) Ndenge nini mosakoli azwi naino batisimo te akoki kolanda kokola, mpe na mokano nini? (b) Mpo na nini liloba “compagnon agréé” ebongi lisusu te? (Tala mazali na nse ya paragrafe 12)
10 Moto nyonso oyo akokisi masengami mpo na kozala mosakoli abatisami naino te ya nsango malamu azali na nzela mpo na kokoma ‘moto oyo Nzambe akosepela na ye”c. (Luka 2:14) Ata amipesi naino te mpe azwi naino batisimo te, akoki kobanda kopesa rapor ya mosala na ye ya kosakola elongo na bamilió ya basakoli oyo ‘bazali kosakola liloba na Nzambe’ na molende nyonso kati na mokili mobimba. (Misala 13:5; 17:3; 26:22, 23) Liyebisi ekoki kopesama na lisanga ete songolo azali mosakoli ya sika azwi naino batisimo te. Na nsima ekosengela na ye ete alanda koyekola Biblia, kosangana na makita, kosalela makambo mazali ye koyekola mpe koyebisa yango na bazalani na ye. Mosika te akolinga kozwa batisimo; ntango yango akokoma moto andimami na Nzambe (agréé) mpe akozwa “elembo” mpo na kobika.—Ezekiele 9:4-6.
Lisalisi soki lisumu esalemi
11. Lisanga esalaka nini soki moko oyo asili kozwa batisimo asali lisumu monene?
11 Na lisolo ya liboso, tolobaki mpo na lisalisi oyo tokoki kopesa na moklisto abatisami oyo asali lisumu monene. (Baebele 12:9-13) Tomonaki ete, engebene Biblia, soki abongoli motema te, lisanga ekobwaka ye libanda, mpe bandeko bakotika kolobisa ye soki mpe kosangana na ye esika moko. (1 Bakolinti 5:11-13; 2 Yoane 9-11; 2 Batesalonike 2:11, 12) Kasi tokosala nini soki mosakoli oyo azwi naino batisimo te asali lisumu monene?
12. (a) Mpo na nini tosengeli kosalisa mpe kozala na mawa epai na basakoli babatisami naino te oyo basali lisumu? (b) Luka 12:48 elobi nini mpo na mokumba ya mosumuki?
12 Yuda ayikisaki mpiko na lisanga ete bazala na mawa epai na baklisto bapakolami oyo bakomaki kobeta ntembe to basalaki lisumu, soki nde baklisto yango babongolaki solo motema na bango. (Yuda 22, 23; tala lisusu 2 Bakolinti 7:10) Na koleka, ebongi lisusu koyokela mawa moto azwi naino batisimo te oyo asali lisumu mpe abongoli motema. (Misala 3:19) Ebongi solo koyokela ye mawa, mpamba te azwi naino misisa te na bomoi ya moklisto. Mbala mosusu ayekoli naino likanisi na Nzambe te na ntina na makambo mosusu. Asololi naino na bankulutu te mituna oyo mibongisami liboso ya kozwa batisimo, mpe azwi naino te ekateli ya ntina ya kozwa batisimo. Epai mosusu, Yesu alobaki ete “soko mingi epesami na moto, mingi ekolukama epai na ye”. (Luka 12:48) Na yango, mingi esengami epai na bandeko bazwi batisimo, mpamba te bango bazali na boyebi mingi mpe na matomba mingi, bazali bongo na mokumba monene.—Yakobo 4:17; Luka 15:1-7; 1 Bakolinti 13:11.
13. Soki mosumuki oyo azwi naino batisimo te abuki mobeko ya Nzambe, bankulutu bakosala nini mpo na kosalisa ye?
13 Na boyokani na toli ya Paulo, baklisto oyo bazali na makoki ya elimo bazali na mposa ya kosalisa mosakoli nyonso azwi naino batisimo te oyo anyati litambe mabe, naino ye moko asosoli yango te. (Tala Bagalatia 6:1.) Bankulutu bakoki kopona mibale kati na bango (mbala mosusu baoyo basololaki na moto yango liboso ete abanda kosakola) mpo na komeka kozongisa moto yango na nzela malamu, soki andimi lisalisi. Bakoluka te ete bapamela ye na maloba makasi, kasi bakoyokela ye mawa mpe bakolobela ye maloba malamu. (Nzembo 130:3) Mbala mingi, maloba na koyikisa mpiko mpe toli malamu ezwami na Makomami ekokoka kosalisa mosumuki ete abongola motema mpe kozongisa ye na nzela ya sembo.
14, 15. (a) Bakosala nini soki mosumuki abongoli solo motema na ye? (b) Na makambo mosusu, liyebisi nini mokuse ekoki kopesama na lisanga mpo koimaima ekoka kozala te?
14 Bankulutu mibale oyo baponamaki mpo na kosalisa mosumuki oyo azwi naino batisimo te bakopesa ye batoli ebongi na likambo na ye. Na makambo mosusu, bakoki kozwa ekateli ete mpo na mua mikolo to basanza, mosumuki aleka lisusu liboso te mpo na kosala badevware na Eteyelo ya mosala ya Nzambe, to atombola lisusu mosapi te mpo na koyanola mituna na makita. Mbala mosusu bakopekisa mpe ye ete abima lisusu na mosala ya kosakola te elongo na lisanga kino ntango akokola malamu na elimo. Soki na nsima bamoni ete akoki lisusu kosangana na mosala ya kosakola bakoyebisa ye. Soki lisumu yango eyebani na bato nyonso te mpo na bopeto ya lisanga, ntina ezali te ya kopesa liyebisi na lisanga.
15 Nzokande, bankulutu oyo mibale bakosala nini soki bamoni ete mosumuki oyo azwi naino batisimo te abongoli solo motema na ye, kasi etamboli na ye ya mabe eyebani na bato mingi to ekoya koyebana na nsima? Na likambo yango, bakoki koyebisa likambo yango na Comité de service ya lisanga, mpe comité bakobongisa mwa liyebisi mokuse na maloba oyo: “Bankulutu batalelaki likambo ya Songolo, mpe azali ntango nyonso mosakoli kati na lisangá na biso.” Lokola na makambo nyonso ya motindo oyo, bankulutu bakotalela soki ezali malamu ete nsima na mikolo to baposo kosala diskur mpo na kopesa toli na ntina etali lisumu oyo esalemaki.
16, 17. (a) Na makambo nini mibale liyebisi ya motindo mosusu ekoki kopesama na lisanga? (b) Liyebisi yango ekoloba nini?
16 Mbala mosusu mosakoli oyo azwi naino batisimo te azali kosalaka mabe mpe azali kotosa te toli nyonso bazali kopesa ye na bolingo, to mpe aboyi koyekola mpe ayebisi na bankulutu ete alingi lisusu kozala mosakoli te. Ebongi kosala nini na likambo motindo oyo? Meko ekoki kozwama te mpo na kobimisa bato motindo oyo na lisanga, mpamba te bandimamaki (agréés) na Nzambe te. Bakobimisaka na lisanga bobele ‘baoyo babengami bandeko’, elingi koloba baoyo basili kozwa batisimo, kasi bazali kosala mabe kozanga kobongola motema mpe etamboli. (1 Bakolinti 5:11) Elingi koloba ete tobandi kotala mabe bobele mpamba, kozanga kosala eloko te? Te.
17 Bankulutu bazali na mokumba ya ‘kobatela etonga ya Nzambe oyo epesami na maboko na bango’. (1 Petelo 5:2) Soki bankulutu mibale oyo bazali kopesa lisalisi na mosumuki oyo azwi naino batisimo te bamoni ete abongoli motema te mpe abongoli bizaleli te, na motindo boye ete akokisi lisusu masengami te mpo na kozala mosakoli, bakoyebisa yed. To soki mosakoli oyo azwi naino batisimo te alingi lisusu te kotangama lokola mosakoli, bakondima ekateli na ye. Na makambo oyo mibale, ekobonga ete Comité de service ya lisanga ebongisa liyebisi mpo na kotanga yango nsima na mwa mikolo na lisanga ete “Songolo azali lisusu mosakoli na nsango malamu te.”
18. (a) Nsima na liyebisi oyo, baklisto bakotalela nini mpo na koyeba ezaleli nini moto na moto akomekola? (b) Esengeli koboya lisolo nyonso elongo na bato babatisami te oyo basali lisumu monene?
18 Na nsima, ndenge nini Batemwe bakobanda kotalela moto wana oyo kala azalaki mosakoli azwi naino batisimo te kasi asili kotika kosakola? Liboso, azalaki moto azangi kondima oyo azalaki koyangana na makita. Na nsima amonisaki mposa ya kozala mosakoli ya nsango malamu, mpe akokisaki masengami mpo na yango. Lokola ezali lisusu bongo te, akomi na ye lisusu moto ya mokili. Biblia esengi te ete Batemwe batika kolobisa ye, mpamba te abimisamaki na lisanga tee. Nde ata bongo, baklisto bakolanda ndakisa ya Bayisraele na ndenge bazalaki kotalela bapaya kati na bango, oyo bakatamaki naino ngenga te; baklisto bakozala na bokengi kati na boyokani na bango elongo na moto wana ya mokili oyo azali mosambeli na Jéhovah te. Bokengi oyo ekobatela lisanga, mpamba te “mua mfulu moke” ekoki kobebisa yango. (1 Bakolinti 5:6) Na nsima, soki moto yango amonisi mposa ya solo ya koyekola Biblia, mpe soki bankulutu bamoni ete eloko moko epekisi ye te ete ayekola lisusu, boyekoli yango ekosalisa ye mbala mosusu na komona malamumalamu libaku malamu oyo epesameli biso ya kosambela Jéhovah elongo na libota na ye.—Nzembo 100.
19. Lisalisi nini bankulutu bakoki kopesa na nkuku mpo na makambo mosusu?
19 Soki bankulutu bamoni ete moto boye to moto boye akomi likama mpo na etonga, bakokebisa basangani ya lisanga oyo bakoki kokutana na likama yango, kasi bakopesa likebisi yango na nkuku. Na ndakisa, moto wana oyo azali lisusu mosakoli te, mbala mosusu azali elenge oyo amipesi na masanga mpe azali mosali pite. Ata basili koyebisa lisanga ete azali lisusu mosakoli te, mbala mosusu azali koluka kosangana na bilenge ya sembo kati na lisanga. Soki ezali bongo, bankulutu bakosolola na nkuku elongo na baboti ya bilenge oyo bamonani ete bazali na likama mpe mbala mosusu elongo na bilenge bango moko. (Baebele 12:15, 16; Misala 20:28-30) Atako emonanaka mpenzampenza te, nzokande, soki moto moko azali koya mpo na kotia mobulu na likita to azali kokanela bandeko, bankulutu bakopekisa ye kokota na esika ya makita mpe bakoyebisa ye ete soki akomikotisa na makasi, bakotalela likambo yango lokola ebengami na mibeko ya mboka ete violation de domicile.
Tosalisa bana ete basambela Nzambe
20. Lisalisi nini baboti baklisto bazali kopesa na bana na bango, mpe litomba nini ezali kozwama?
20 Engebene Biblia, baboti bazali na mokumba ya koteya bana na bango na nzela ya solo ya bonzambe. (Deteronome 6:4-9; 31:12, 13) Ba Témoins de Jéhovah bazali bongo koyikisa mpiko na baklisto uta kala ete bayekola Biblia kati na libota poso nyonso. Baboti baklisto basengeli koyikisa mpiko na bana na bango ete bakola kino komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo mpo ete bazala bato bandimami na Nzambe (agréés). (Masese 4:1-7) Na kati ya masanga tozali komona matomba kitoko ya milende na bango: ebele na bilenge ya sembo mpe na etamboli malamu, oyo balingi Jéhovah mpe bazali na mposa ya kosambela ye mpo na libela.
21-23. (a) Banani liboso bazali na mokumba ya kosembola mwana (mineur) oyo asali lisumu? (b) Bankulutu na lisanga bakosala nini na likambo motindo oyo?
21 Baboti baklisto bazali mpe na mokumba mpenza ya kopesa disipline mpe kosembola bana na bango, na kotyelaka bango na bolingo nyonso bipekiseli to kopesaka bango bitumbu oyo bamoni ete esengeli. (Baefese 6:4; Baebele 12:8, 9; Masese 3:11, 12; 22:15) Nzokande, soki mwana (mineur) oyo asili kokoma mosakoli kati na lisanga ata azwi naino batisimo te akomi na etamboli ya mbindo, bankulutu, oyo bazali kosenzela likoló na milimo na basangani na etonga, bazali na mokumba ya kotalela likambo yango.—Baebele 13:17.
22 Likambo na mwana motindo oyo ekotalelama ndenge moko lokola touti kolimbola na baparagrafe eleki. Bankulutu mibale bakoponama mpo na kotalela likambo yango. Mpo na kobanda, bakoki kotuna na baboti eloko nini elenge mosakoli asali, makanisi na ye ezali boni mpe meko nini ekamatamaki mpo na kosembola ye. (Tala Deteronome 21:18-21) Soki bankulutu oyo mibale bamoni ete baboti basili kobongisa likambo yango malamu, bakozala bobele kotunaka bango nsango ya matomba oyo bazali kozwa mpe kopesa bango batoli esika moko na makanisi mabongi kosalelama, bakisa mpe koyikisa bango mpiko na bolingo nyonso.
23 Nzokande, nsima na kosolola na baboti, mbala mosusu bankulutu bakomona ete babongisaki likambo yango malamu te mpe eleki malamu ete bakutana lisusu bango nyonso esika moko elongo na mwana (mineur) oyo akomi motomboki. Kozanga kobosana bandelo mpe mposa ya bilenge, bakengeli bakosala makasi mpo na koteya elenge mosakoli oyo azwi naino batisimo te, kasi bakosala yango na bopolo. (2 Timote 2:22-26) Na makambo mosusu, ekomonana polele ete mwana akokisi lisusu masengami te mpo na kozala mosakoli mpe esengeli kopesa liyebisi na ntina yango na lisanga.
24. (a) Ata mwana (mineur) asali lisumu, ebongi ete baboti na ye basala nini, mpe motindo nini bakosala yango? (b) Ndenge nini ebongiseli oyo ekoki kosalelama mpo na mwana (mineur) oyo abimisami na lisanga?
24 Na nsima, eloko nini baboti ya mwana (mineur) bakosala mpo na kosalisa ye ete azonga na nzela ya sembo? Bazali ntango nyonso na mokumba ya koteya mwana na bango atako akokisi lisusu masengami te mpo na kozala mosakoli (proclamateur non baptisé), mpe ata asili kobimisama na lisanga mpo asalaki lisumu nsima na kozwa batisimo. Lokola bakolanda kopesa ye bilei, bilamba mpe esika ya kolala, bakopesa ye mpe liteya mpe disipline engebene Liloba na Nzambe. (Masese 6:20-22; 29:17) Baboti oyo balingi mwana na bango mingi bakoki bongo kobongisa boyekoli ya Biblia na ndako elongo na mwana yango, ata asili kobimisama na lisanga.f Mbala mosusu akozwa litomba mingi na boyekoli yango soki esalemi bobele mpo na ye. To mpe bakoki kozwa ekateli ete alandaka boyekoli oyo ezali kosalema mpo na libota mobimba. Ata asili kopengwa na nzela ya sembo, balingi komona ye kozonga epai na Jéhovah, lokola esalaki yango mwana abunga oyo Yesu alobelaki kati na moko ya masese na ye.—Luka 15:11-24.
25. Mpo na nini lelo tozali na bolingo mpe na mposa ya kosalisa “baoyo bazali bandimi te”?
25 Ntina na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya ezali ya kosalisa bazalani na biso ete bakoma basambeli na esengo na Nzambe na solo. ‘Bato oyo bazali bandimi te mpe bato bameseni na makambo na biso te’, lokola ezalaki bongo na mboka Kolinti, bazalaki kopusama na ‘kongumbama mpe kosambela Nzambe, kolobaka ete: “Nzambe azali solo kati na bino.”’ (1 Bakolinti 14:25) Oyo nde esengo tozali na yango na mikolo na biso na komonaka motuya monene na bato bazali koya kosambela Nzambe! Ezali wana kokokisama kitoko na maloba na anzelu ete: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-likoló, mpe kimya na nse kati na bato oyo ye asepeli na bango [to bato oyo Nzambe andimi bango]!”—Luka 2:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moko na bankulutu mibale akozala mosangani ya Comité de service ya lisanga. Mosusu akoki kozala mokengeli oyo ayebi malamu moyekoli yango to ayebi malamu Témoin oyo azali koteya ye, na ndakisa motambwisi na boyekoli ya mokanda.
b Ebimisamaki na 1984 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
c Liboso tozalaki kobenga ete “compagnon agréé” moto oyo azwi naino batisimo te kasi akokisi masengami mpo na kosangana na mosala ya kosakola. Nzokande, ebengeli ebongi na moto yango ezali “proclamateur non baptisé”, mpamba te, engebene Biblia, mpo na kondimama na Nzambe (agréé) esengeli naino komipesa epai na ye na boyebi nyonso kozwa batisimo.
d Soki moto yango andimi ekateli oyo te, akoki kosenga ete likambo na ye ekoka kotalelama lisusu (délai ezali mikolo nsambo).
e Kala tozalaki koboya kolobana na bato bazwi naino batisimo te, oyo bazali na etamboli ya mbindo mpe bazali kobongola motema te mpe bizaleli na bango. Lokola touti kolimbola yango awa na likoló, epekisami te mpo na koloba na bango. Nzokande tosengeli ntango nyonso kolanda toli ekomami na 1 Bakolinti 15:33.
f Mpo na basangani ya libota na bango oyo bafandi na bango ndako moko te, baklisto bakotosa toli ezwami na Biblia ndenge elimbomaki na Mosenzeli ya 15 Novembre 1988 pages 20 kino 24 mpe ya 15 Septembre 1982, pages 14 kino 19.
Bozongeli
◻ Ndenge nini baklisto bazali kotalela bato oyo “bazali bandimi te” oyo bazali koyangana na makita?
◻ Soki moyekoli ya Biblia amonisi mposa ya kobanda kosakola, bankulutu basalaka nini, mpe mokumba nini moyekoli andimi uta ntango yango?
◻ Esengeli kosala nini soki mosakoli oyo azwi naino batisimo te asali lisumu monene?
◻ Ata soki mwana (mineur) oyo azali kofanda na ndako ya baboti asali lisumu monene, lisalisi nini baboti na ye mpe bankulutu bakoki kopesa ye?
[Elilingi na lokasa 16]
Ata azwi naino batisimo te moto nyonso akomi mosakoli asili kosala litambe monene epesi ye mikumba, na nzela oyo ekomema ye na kondimama na Nzambe.