Nani akondimama epai na Jéhovah?
“Bosalaka mpo na lobiko na bino . . . mpamba te Nzambe azali ye oyo, mpo ete asepeli na bino, azali kosala mosala kati na bino mpo ete bolinga mpe bosala.—BAFILIPI 2:12, 13.
1, 2. Na libaku nini Nzambe alobaki na Yesu ete andimi ye to asepeli na ye, mpe mpo na nini yango esengeli kolamusa likebi na biso?
Likambo yango elingaki kozala libongwani monene kati na lisolo na bato. Yoane Mobatisi azalaki kosakola nsango na Nzambe mpe azalaki kobatisa na mai bato oyo babongolaki motema. Mbala moko amonaki moto moko, oyo ye ayebaki ete azali moto na sembo, ayaki epai na ye; moto yango ezalaki Yesu. Atako asalaki lisumu moko te mpo akoka kobongola motema, Yesu asengaki ete abatisama ‘mpo na kokokisa makambo nyonso na sembo’.—Matai 3:1-15.
2 Na bopolo nyonso, Yoane andimaki kosala bongo, mpe nsima wana Yesu abimaki na mai, “Likolo efungwani mpe amoni elimo na Nzambe kokita lokola ebenga”. Likambo ya kokamwa koleka, “mongongo uta na likolo elobi ete, Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” (Matai 3:16, 17; Malako 1:11) Oyo nde liloba ya ntina mingi! Biso banso tolingaka kosepelisa moto oyo biso tozali na limemya mpo na ye. (Misala 6:3-6; 16:1, 2; Bafilipi 2:19-22; Matai 25:21) Kanisa naino ndenge okooka soko Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akoloba na yo ete: ‘Nasepeli na yo’!
3. Mituna nini mizali kotunama na ntina etali kondimama na Nzambe?
3 Lelo oyo, bato bazali, oyo Nzambe akoki kosepela na bango? Tokamata ndakisa ya moto oyo ‘azali na elikya te, azali na Nzambe te kati na mokili, atangolami mosika na bomoi na Nzambe’. (Baefese 2:12; 4:18) Akoki kobima na ezalela yango mpe kozwa bolamu ya kondimama na Jéhovah? Soki ee, ndenge nini? Totalela mituna yango. Nzambe alingaki koloba nini?
4. (a) Liloba na greke eudokéô oyo esalelami awa elimboli nini? (b) Mpo na nini ndenge liloba yango esalelami awa ezali na ntina mingi?
4 Mpo na kokoma maloba oyo ya Nzambe: “Nasepeli na ye ]Yesu]” ba Evanzile ezali kosalela verbe ya greke eudokéô. (Matai 3:17; Malako 1:11; Luka 3:22) Verbe yango elimboli “komona ete ekoki, kondima, kosepela na”, mpe nkombo oyo ebimi na yango ezali na ndimbola ya “boboto, bosepeli, bolamu, mposa”. Eudokéô etali bobele kondimama na Nzambe te. Ndakisa, baklisto na Makedonia “basepelaki” kokabola bozwi na bango elongo na bamosusu. (Baloma 10:1; 15:26; 2 Bakolinti 5:8; 1 Batesalonike 2:8; 3:1) Nzokande mpo na likambo tozali kolobela, ezali Nzambe nde asepelaki na Yesu to andimaki Yesu, kasi bato te. Liloba oyo esalelami mpo na Yesu bobele nsima na batisimo na ye. (Matai 17:5;2 Petelo 1:17) Na Luka 2:52, ezali liloba mosusu (kharis) nde esalelami, wana elobami ete, na bolenge na ye, liboso na kobatisama, Yesu azwaki “boboto” na miso na Nzambe mpe na bato.
5. (a) Nini emonisi ete bato bazangi kokoka bakoki kondimama na Nzambe to Nzambe akoki kosepela na bango? (b) Banani bato na bolingo malamu to “bato oyo Nzambe asepeli na bango”?
5 Biso bato, na ezalela na biso ya kozanga kokoka, tokoki kozala bato oyo Nzambe asepeli na bango to andimi bango? Tozali na esengo ya koyanola ete, ee. Ntango Yesu abotamaki, baanzelu balobaki: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likoló, mpe kimya na nse kati na bato oyo ye asepeli na bango [eudokias]!” (Luka 2:14) Na bolimboli ya liboso, engebene makomi na greke, baanzelu basakolaki na nzembo na bango lipamboli lizalaki liboso na “bato oyo [Nzambe] akani malamu mpo na bango” to “bato oyo Nzambe asepeli na bango”a. Professeur Hans Bietenhard akomaki na ntina na bosaleli na maloba en anthrôpoïs eudokias: “Liloba oyo elakisi bato oyo Nzambe asepeli na bango . . . Awa ezali mpo na bolingo malamu na bato te . . . . Etali nde bolingo malamu mpe boboto na Nzambe, bolingo bouti na ye moko ete amiponela libota moko mpo na kobikisa yango.” Na yango, lokola ba Témoins de Jéhovah bazali kolimbola yango uta kala, Luka 2:14 emonisi ete na komipesa na Nzambe mpe na kobatisama, bato bazangi kokoka bakoki kokoma bato oyo Nzambe akomonisa bango boboto, bato oyo Nzambe akosepela na bangob!
6. Tosengeli koyekola lisusu nini na likambo etali kondimama epai na Nzambe?
6 Na Ntembe te omoni likeseni nyonso kati na likambo ya kozala ‘monguna na Nzambe mpo ete ozali kotya makanisi na yo nyonso na misala mabe’, mpe kondimama lokola mosali elongo na Nzambe na sembo mpe na mayele. (Bakolose 1:21; Nzembo 15:1-5) Nzokande, ata tosepeli na koyeba ete bato bakoki kondimama epai na Nzambe to kosepelisa ye, mbala mosusu okolinga koyeba oyo yango esengi. Na ntina yango, tokoki koyekola makambo mingi na misala ya kala ya Nzambe.
Ayambaki baoyo bazalaki Bayisraele te
7. Tomoni nini kati na Exode 12:38 na ntina na ezalela na Nzambe?
7 Bikeke mingi liboso na koloba maloba makomami na Luka 2:14, Jéhovah ayambaki malamu bato bayaki epai na ye mpo na kosambela ye. Ya solo, azalaki na boyokani bobele na libota ya Yisraele, oyo emipesaki epai na ye. (Exode 19:5-8; 31:16, 17) Kasi tomikundola ete ntango Bayisraele basikwamaki na boombo na Ezipito, “ebele na bato ya ndenge na ndenge bakendaki na bango elongo”. (Exode 12:38) Mbala mosusu bato wana oyo bazalaki Bayisraele te bazalaki na boyokani elongo na libota ya Nzambe mpe bamonaki malozi oyo ekweilaki Baezipito. Bazwaki ekateli ya kolanda Bayisraele. Bamoko boye bandimaki makambo nyonso na losambo ya Bayuda.
8. Mitindo nini mibale ya bapaya bazalaki kofanda na Yisraele, mpe mpo na nini boyokani na Bayisraele elongo na mitindo oyo mibale ya bapaya ekesanaki?
8 Kondimana ya Mibeko emonisaki etelemelo ya baoyo bazali Bayisraele te, etelemelo na bango liboso na Nzambe mpe na libota na ye. Bapaya mosusu bazalaki bobele bafandi na Yisraele. Basengelaki kotosa mibeko minene ya mokili yango, ndakisa mibeko mipekisaki koboma moto mpe mibeko misengaki kotosa sabata. (Nehemia 13:16-21) Na esika ya kotalela bapaya wana lokola bandeko na ye, Moyisraele azalaki na mua bokengi wana ezalaki ye koloba na bango to kosala makambo mosusu elongo na bango, mpamba te bato yango bazalaki libota ya Nzambe te. Ndakisa, Bayisraele bazalaki na ndingisa te ya kosomba mpe kolya nyama ekamolami to ekufi yango moko, elingi koloba makila na yango mabimisami te, nzokande bapaya wana oyo bayambaki losambo ya Bayuda te, bakokaki kosomba mpe kolya. (Deteronome 14:21; Ezekiele 4:14) Nsima na bambula, bamoko kati na bapaya yango bakokaki komekola bapaya mosusu oyo bayambaki losambo ya Bayuda mpe bakatamaki ngenga. Bobele nsima na kosala boye nde bakokaki kobengama solo bandeko kati na losambo ya solo mpe basengelaki kotosa Mibeko nyonso ya Moïse. (Levitike 16:29; 17:10; 19:33, 34; 24:22) Luta, mwasi mouta na Moabe, mpe Namana, Mosulia oyo abelaki maladi ya maba, bazalaki bamoko kati na bato ya mabota mosusu oyo Nzambe andimaki bango to asepelaki na bango.—Matai 1:5; Luka 4:27.
9. Na maloba nini Salomo amonisaki ete Nzambe andimaki koyamba bapaya?
9 Na mikolo ya mokonzi Salomo, ezalaki mpe polele ete Nzambe andimaki koyamba bato ya mabota mosusu. Ntango afungolaki temple, Salomo abondelaki boye: “Lisusu mpo na mopaya oyo azali na libota na yo Yisraele te, kasi auti na mokili mosika mpo na nkombo na yo . . . soko akoya mpe akobondela na ndako oyo, bongo yoka kuna na lola . . . ete mabota nyonso na mokili bayeba nkombo na yo mpe batosa yo lokola libota na yo Yisraele.” (1 Mikonzi 8:41-43) Ee, Jéhovah azalaki koyoka mabondeli ya bapaya oyo bazalaki solo koluka ye. Bango mpe bakokaki koyekola mibeko na ye, kokata ngenga mpe kondimama mpenza lokola bato na ye bapambwami.
10. Bayuda, boye bazalaki kotalela motindo nini mokube na Etiopia, mpe likambo na kokatama ngenga ezwelaki moto yango bolamu nini?
10 Ezali yango mobali moko asalaki bikeke mingi na nsima; mobali yango azalaki mobateli na mosolo na Kandase, mokonzi-mwasi na Etiopia. Ntango ayokaki mbala ya liboso mpo na Bayuda mpe losambo na bango, na ntembe te lolenge na bomoi na ye mpe mitindo na ye ya kosambela ekokaki kondimama na Jéhovah te. Na yango, esengelaki na Bayuda ete bazala na boboto to na motema molai epai na mopaya yango oyo afandaki kati na bango, na kozelaka ete ayekola Mibeko ya Moïse mpo na koyeba makambo nini Nzambe asengi na ye. Emonani ete akolaki na nzela na losambo ya solo mpe asalaki mabongwani masengeli kati na bomoi na ye kino kokatisa ngenga. Na Misala 8:27, totangaka ete “akendaki na Yelusaleme mpo na kosambela.” (Exode 12:48, 49) Lisolo yango emonisi ete azalaki solo moto abongwani na losambo na Bayuda na makambo nyonso. Akokaki bongo kondima Masiya mpe kozala moko na bayekoli na bapakolami, kokokisaka bongo mokano na Nzambe emonisami mokemoke.
Bapakano mpe lisanga ya boklisto
11, 12. (a) Libongwani mosusu nini esalamaki kati na bomoi ya Moetiopia wana ntango abatisamaki? (b) Na nini libongwani yango eyokanaki na makambo makomami kati na Bafilipi 2:12, 13?
11 Yesu atindaka bayekoli na ye ete: “Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango, ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Moetiopia oyo touti kolobela, lokola abongwanaki na losambo ya Bayuda, ayebaki Jéhovah mpe ayebaki elimo santu. Yango wana, ntango Filipe asalisaki ye na kokanga ntina mpe na kondima ete Yesu azali Mwana na Nzambe mpe Masiya, Moetiopia wana azwaki batisimo. Akomaki bongo mosangani andimami kati na libota na Jéhovah, moyekoli na Klisto. Uta ntango yango, esengelaki na ye kozongisa monoko epai na Nzambe mpo na makambo na ye: esengelaki na ye ‘kotosa makambo nyonso matindamaki’ na baklisto. Kasi mokumba yango ezalaki na elikya kitoko liboso na yango: lobiko!
12 Na nsima, Paulo akomaki ete baklisto nyonso basengeli ‘kosalaka mpo na lobiko na bango na nsomo mpe na kolenga’. Likoki ezali mpo na yango, “mpamba te Nzambe azali ye oyo, mpo ete asepeli na bino [eudokias], azali kosala mosala kati na bino mpo ete bolinga mpe bosala.”—Bafilipi 2:12, 13.
13. Ezaleli ya baklisto ezalaki boni epai na baoyo baselingwaki te mpe bamibongisaki te na kozwa batisimo nokinoki lokola esalaki yango mokube Moetiopia?
13 Nzokande bato nyonso oyo bakutanaki na baklisto ya solo bazalaki na motema mobongi te mpe baselingwaki te lokola Moetiopia oyo mpo na kokoka kokola noki kino kozwa batisimo. Bamoko oyo bazalaki Bayuda te soko mpe bato babongwani na losambo na Bayuda, bayebaki eloko moko te na ntina na Jéhovah mpe na banzela na ye; bizaleli na bango biyokanaki te na boyengebene na Nzambe. Baklisto balingaki kotalela bango ndenge nini? Balingaki kolanda ndakisa ya Yesu. Yesu alakisaki bato ete batika kosala masumu. (Yoane 5:14) Nzokande, azalaki na boboto mpo na basali na masumu oyo bayaki epai na ye mpe bazalaki na mposa ya kobongola bizaleli na bango mpo na kolanda nzela ya Nzambe.—Luka 15:1-7.
14, 15. Longola baklisto bapakolami, bato nini lisusu bazalaki koyangana na makita mazalaki kosalema na Kolinti, mpe na nini bokoli na bango na elimo ekesenaki?
14 Maloba na Paulo na ntina na makita mabongisamaki na Kolinti mamonisi polele ete baklisto bazalaki na boboto mpe motema molai epai na bato oyo bazalaki naino koyekola kosalela makabo ya bikamwiseli mapesamaki na elimo santu mpe oyo mamonisaki ete baklisto bandimami na Nzambe, Paulo alobeli mpo na “bandimi” mpe “bato bazangi kondima” to “bapakano”. (1 Bakolinti 14:22) “Bandimi” bazalaki baoyo bandimaki Klisto mpe bazwaki batisimo. (Misala 8:13; 16:31-34) “Bato mingi na Bakolinti bayaki, bandimi, mpe babatisami.”—Misala 18:8.
15 Engebene 1 Bakolinti 14:24, ‘bato bazangi kondima to bato bameseni na makambo na biso te’ bazalaki mpe koyangana na makita mazalaki kosalema na Kolinti mpe bazalaki koyambama malamu’‘.c Bango nyonso bakolaki na motindo moko te mpo na oyo etalaki koyekola mpe kosalela Liloba na Nzambe. Ekoki kozala ete bamosusu bazalaki naino kosalaka masumu. Nzokande, bamosusu bazalaki na kondima ekoki, basilaki kosala mabongwani kati na bomoi na bango, mpe, liboso ya kozwa batisimo, babandaki koloba na bazalani na bango makambo bayekolaki.
16. Litomba nini bato yango bakokaki kozwa na koyangana esika moko na baklisto na makita ya lisangá?
16 Ya solo, bato wana oyo bazwaki naino batisimo te, moko te kati na bango azalaki kobika “kati na Nkolo”. (1 Bakolinti 7:39) Kala soki bakolisaki mimeseno mabe na bizaleli mpe na elimo, na ntembe te esengelaki na bango mua ntango mpo na koyokanisa bomoi na bango na mibeko ya Nzambe. Na kozelaka, soki bazalaki koluka te kobebisa bopeto ya lisangá mpe kokweisa kondima ya bandeko kati na lisangá, bakokaki koyambama malamu. Makambo bazalaki komona mpe koyoka na makita makokaki ‘kopamela bango’, mpamba te ‘makambo mabombami na motema na bango mazalaki komonisama polele’.—1 Bakolinti 14:23-25; 2 Bakolinti 6:14.
Bandimami na Nzambe mpo na lobiko
17. Motindo nini maloba makomami na Luka 2:14 mamonanaki solo na ekeke ya liboso?
17 Mpo na mosala na kosakola polele oyo baklisto babatisami bazalaki kosala, bankoto mingi na bato bazwaki boyebi na nsango malamu na ekeke ya liboso. Bandimaki makambo bayokaki, babongolaki motema mpo na etamboli na bango ya kala mpe bazwaki batisimo, “koyambolaka polele kondima na bango”. (Baloma 10:10-15; Misala 2:41-44; 5:14; Bakolose 1:23) Baoyo babatisamaki na eleko yango bandimamaki solo epai na Jéhovah, mpamba te ye apakolaki bango na elimo santu, na motindo yango atangaki bango ete bazali bana na ye na elimo. Ntoma Paulo akomaki: “Akanaki liboso mpo na biso ete tozala bana na ye pelamoko esepeli ye [eudokian] na mokano na ye.” (Baefese 1:5) Na motindo yango, na ekeke ya liboso, maloba oyo baanzelu basakolaki ntango Yesu abotamaki, maloba yango mamonanaki ete mazali solo: “Kimya na nse kati na bato oyo ye asepeli na bango.”—Luka 2:14.
18. Mpo na nini baklisto bapakolami basengelaki te kokanisa ete basili kondimama libela epai na Nzambe?
18 Mpo na kobatela kimya yango, ‘bato oyo Nzambe asepeli na bango’ basengeli ‘kosalaka mpo na lobiko na bango na nsomo mpe na kolenga’. (Bafilipi 2:12) Ezalaki likambo na petee te, mpamba te bazalaki ntango nyonso bato bazangi kokoka. Esengeli na bango kotelemela masenginya mpe makambo nyonso makokaki kopusa bango na kosala mabe. Soki bazongeli kosalaka masumu, mbele bakondimama lisusu na Nzambe te. Na bolingo nyonso, Jéhovah aponaki bongo babateli na mpate na elimo, mpo na kosalisa mpe mpo na kobatela masangá.—1 Petelo 5:2, 3.
19, 20. Bibongiseli nini Nzambe asili kokamata mpo ete baklisto babatisami balanda kozala basaleli na ye bandimami?
19 Bankulutu kati na masangá basengeli kosimba toli oyo ya Paulo na motema na bango: “Soko moto azwami na likambo, naino ye moko asosoli yango te, bino baoyo bozali na makoki na elimo, bomeka na bopolo nyonso kozongisa moto motindo wana na nzela malamu. Omikengela yo moko ete yo mpe omekama te!” (Bagalatia 6:1) Tomoni ete nsima na kozwa ekateli ya ntina mpo na kobatisama, moto andimi bongo mokumba monene koleka, motindo moko na mopaya oyo andimaki losambo ya Bayuda mpe akatamaki ngenga. Ata bongo, soki moklisto abatisami asali lisumu, likoki ezalaki na ye ya kozwa lisalisi ya bolingo mingi epai na lisangá.
20 Kati na lisangá, bankulutu bakokaki kopesa lisalisi epai na moto nyonso oyo asali lisumu monene. Yuda akomaki: “Soko bamosusu bakotiana na bino ntembe, boyokela bango mawa; bobikisa bango kobotolaka bango na móto. Boyokela bango mawa kati na nsomo, koyinaka ata elamba na bango esili kobeba mpo na nzoto.” (Yuda 22, 23) Mosangani nyonso na lisangá oyo asili kobatisama, soki azwi lisalisi oyo, akoki kolanda kozala moto andimami na Jéhovah mpe kozala ntango nyonso na kimya oyo baanzelu basakolaki ntango Yesu abotamaki.
21, 22. Soki ndeko moko akomaki kosala masumu mpe aboyi kotika yango, meko nini esengelaki kokamatama mpo na ye, mpe bandeko ya sembo kati na lisangá basengelaki kosala nini?
21 Nzokande, mbala mosusu mosali na masumu aboyaki kobongola motema, atako bato ya boye bazalaki mingi mpenza te. Bankulutu basengelaki bongo kobimisa ye na lisangá mpo na kobatela lisangá peto mpe na libebi te. Esalemaki bongo na Kolinti ntango moklisto moko abatisami abongolaki bizaleli na ye te na pite oyo azalaki kosala. Paulo apesaki toli oyo epai na bandeko kati na lisangá: “Bosangana na bato na pite te. Nakanisaki te ete bokima bato na pite kati na mokili soko bato na bilulela soko miyibi soko basambeli na bikeko. Mpo ete soko bokimi bango boye, ekokoka na bino kolongwa na mokili! Nde nakomeli bino ete bosangana na moto moko te oyo abiangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko na bilulela, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangwi masangá, soko moyibi. Bolia esika moko na moto na ndenge yango te.”—1 Bakolinti 5:9-11.
22 Lokola moto wana na Kolinti asalaki litambe ya ntina mingi na ndenge azwaki batisimo, kokomaka bongo moto andimami na Nzambe mpe mosangani na lisangá, kobimisama na ye na lisangá ezalaki likambo monene mpenza. Paulo alimbolaki malamumalamu na baklisto ete batika kosangana na moto wana, mpamba te moto yango atikaki esika na ye ya mosaleli andimami na Nzambe. (Tala 2 Yoane 10, 11) Petelo akomaki boye na ntina na baklisto wana oyo babimisamaki na lisangá: “Mpo ete soko bayebaki nzela na boyengebene te, mbele eleki malamu na bango. Kasi eleki mabe mpo na bayebaki yango mpe bazongi nsima, kotika likabo na bulee lipesami epai na bango. Ekweli bango pelamoko na lisese na solo lilobi ete, Mbwa azongi kolia biloko bisili ye kosanza.”—2 Petelo 2:21, 22.
23. Na ekeke ya liboso, ezalela ya ntalo monene na baklisto liboso na Nzambe ezalaki boni?
23 Ya solo, Jéhovah akokaki lisusu te kondima bato motindo wana soko mpe kosepela na bango, mpamba te bato yango babimisamaki na lisangá mpo ete baboyaki kotika bizaleli na bango ya mabe. (Baebele 10:38; tala 1 Bakolinti 10:5) Atako bongo, emonani ete bato oyo bazalaki kobimisama na lisangá bazalaki mingi mpenza te. Ntalo monene na baoyo bazwaki “ngolu mpe kimya uta na Nzambe” mpe baoyo ‘ayambaki bango lokola bana na ye lokola esepelaki ye na mokano na ye’ batikalaki sembo.—Baefese 1:2, 5, 8-10.
24. Makambo nini tokotalela na lisolo ezali koya?
24 Ezali se ndenge moko na mikolo na biso. Nzokande, totaleia ndenge nini lelo tokoki kosalisa ‘baoyo bandimi te to bato oyo bameseni na makambo na biso te’ ete bandimama na Nzambe mpe eloko nini tokoki kosala mpo na bango soki ekomeli bango ete bapengwi na nzela ya sembo. Mituna oyo mikotalelama na lisolo oyo ezali kolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Bato oyo ye andimi bango”, Bible Segond; “bato oyo ye alingi bango”, Votre Bible.
c (l’apistos, ‘mondimi te’) mpe ....... (l’idiôtês, ‘moto azangi mayele’, ‘ye oyo azali koluka’) bango nyonso mibale batangami na molongo na bandimi te, na kokesena na baoyo babikisami mpe bazali basangani na Eklezia ya boklisto.”-The Expositor’s Bible Commentary, volume 10, page 275.
Bozongeli
◻ Engebene Makomami, uta ntango nini mpe na motindo nini bato bakoki kondimama na Nzambe to kosepelisa ye‘?
◻ Ndenge nini Nzambe azalaki kotalela bapaya oyo bazalaki kofanda kati na libota na ye, kasi mpo na nini Bayisraele basengelaki kozala na bokengi mpe na boboto to mpe motema molai epai na bato yango?
◻ Tokoki koloba boni na kotalela ete “bato bazangi kondima” bazalaki koyangana na makita ya boklisto na Kolinti?
◻ Bibongiseli nini Nzambe asili kokamata mpo na kosalisa baklisto babatisami ete bazala ntango nyonso basaleli na ye bandimami?