Bilenge, bozali kokola na elimo?
“Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bamona polele ete ozali kotambola liboso.”—1 TIMOTE 4:15.
1, 2. Kokola na elimo elimboli nini mpe elimboli nini te?
KOKOLA na elimo elimboli nini? Elimboli komekola Yesu mpe Timote, oyo batyaki makambo ya elimo na esika ya liboso kati na bomoi na bango. Soki ozali kokola na elimo, okoyeba eloko nini olingi kosala na bomoi na yo. Okoloba te: “Nakokanisa malamumalamu mpo na mosala ya Jéhovah ntango nakokoma mokolo.” Te, okosalela ye uta sikawa!
2 Epai mosusu, kokola na elimo elimboli te kozala lokola sango to komikangisa na ndako bobele mpo na kotanga. Elimboli mpe te koboya makambo nyonso ya esengo mpe masano elongo na baninga. (Yoane 2:1-10) Jéhovah azali Nzambe ya esengo, mpe alingi ete bana na ye awa na mabelé bazala na esengo. Na yango, tokoki kosala masano to konyolisa nzoto, na bokatikati, wana ezali biso kondimama na Nzambe.—1 Timote 1:11; 4:8.
Monisa yango na batisimo
3. Ekoki kozala ete Timote ezwaki batisimo na mbula boni?
3 Ntango elenge azali komibongisa mpo na batisimo, mpe na nsima azwi batisimo yango emonisi ete azali kokola na elimo. Soki, lokola ekanisamaka, Timote akokisaki naino mbula 20 te ntango abandaki kolanda ntoma Paulo na mosala na ye ya missionnaire, elingi koloba ete boye azwaki batisimo na mbula zomi na nsambo to zomi na mitano. Ateyamaki na Biblia uta bomwana na ye, mpe ntango boyekoli na ye mpe bososoli na ye ekokaki, akakatanaki te mpo na kozwa batisimo.—2 Timote 3:15.
4. Motuna nini moto moko atunaki yango na Filipe? Atako autaki koyeba bobele na libaku wana, nani azali Klisto, mpo na nini Filipe andimaki lisengi na ye?
4 Bino bilenge baoyo bozali koteyama na Biblia, bosila komituna: “Nini ezali kopekisa ngai na kobatisama?” Na ekeke ya liboso, moyekoli moko na Makomami, oyo autaki kolakisama na ntina na Klisto, atunaki motuna oyo. Ya solo, azalaki naino na boyebi mobimba te ya mokano ya Nzambe, kasi azalaki na botondi mozindo mpo na maye ye ayebaki. Na yango, eloko moko ekokaki kopekisa Filipe te mpo na kobatisa ye.—Misala 8:26-39.
5. Masengami nini osengeli kokokisa yango liboso ya kozwa batisimo?
5 Nini ezali kopekisa yo kobatisama? Mpo na kokokisa masengami na yango, esengeli ete oyeba naino ntina nyonso ya batisimo mpe ozala solo na mposa ya kosalela Jéhovah mpo ete olingi ye. Osengeli mpe komipesa epai na ye kati na libondeli. Epai mosusu, esengeli na yo kotosa masengami nyonso ya bizaleli malamu oyo Nzambe azali kosenga, mpe ozala ete osili kobanda kosakola kondima na yo epai na bazalani na yo. Soko okokisi masengami oyo, ebongi ete okola liboso koleka mpe ozwa batisimo.—Matai 28:19, 20; Misala 2:38.
6. Batisimo esengeli kokokisama na nini, mpe esengeli kolandama na nini?
6 Ya solo, soki ozwi batisimo omonisi ete ozali kokola na elimo, kasi kobosana te ete batisimo ezali bobele ebandeli. Lokola omipesi epai na Jéhovah, okomi mopaya kati na mokili oyo enuni mpe etambwisami na Satana; eloko yo osali, ezali lokola ete opesi kandidatire na yo mpo na bomoi ya seko kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, mpe batisimo ezali molulu ya polele na miso ya batemwe. (Yoane 12:31; Baebele 11:13) Na nsima, osengeli kotosa ndai na yo na ndenge opesi bomoto na yo epai na Jéhovah, mpo ete ozwa likabo ya Nzambe, yango bomoi na seko.—Baloma 6:23.
Monisa yango na etamboli na yo
7. Ndenge nini ezaleli na yo epai na makambo na mokili ezali komonisa soki ozali kokola na elimo to te?
7 Ezaleli na yo epai na makambo na mokili ekomonisa soki ozali kokola na elimo to ozali kokola te. Makambo yango nini? Na ndakisa elateli ya bongo na bongo, komela drogue, kosala pite, bafilme ya bolumbu, miziki ya mbindo, maloba ya nsoni, mabina mabe, lolendo ya ekolo, bongo na bongo. (1 Yoane 2:16; Baefese 5:3-5) Bilenge, bino mpenza bosengeli kokeba. Bobosana te ete ezaleli na bino epai na makambo oyo ekomonisa santé nini ozali na yango na elimo.—Masese 20:11.
8. Mpo na nini bilenge mosusu bazali kokakatana mpo na kozwa batisimo?
8 Satana alukaka kotalisa makambo ya mokili lokola ete ezali kitoko mingi. Elenge moko ya mibu 15 alobaka mokolo mosusu: “Ndenge makambo na pite mpe drogue ezali kolakisama mingi na télévision, ekomi komonana na miso ya bato ete ezali makambo mabongi to normales.” Bazali koseka bilenge oyo bazali kolanda banzela ya mokili te, kolobaka na bango ete bazali kozanga biloko kitoko. Yo moko, ozalaka ntango mosusu na mayoki motindo oyo. Ezali yango emonani epai na bilenge mosusu na lisangá ya boklisto; bazali bongo kokakatana. Na ndakisa, ntango batunaki epai na elenge moko soki azali na likanisi ya kozwa batisimo, azongisaki: “Sikoyo te, mpo nakoki kosala likambo moko ya mabe mpe bakobimisa ngai na lisangá.” Nzokande, moto akoki kolanda nzela mibale te soki mpe kokakatana libela. Mosakoli moko ya Nzambe alobaka kala: “Soko Jéhovah azali Nzambe ya solo, bolanda ye; nde soko Bala, bolanda ye.”—1 Mikonzi 18:21.
9. Soki ozali kokola na elimo, okobatelama na nini?
9 Mpo na koloba solo, soko oboyi banzela ya mokili, eloko okozanga ezali bobele mitungisi. Yoka maloba ya mwasi moko: “Nazalaki na mawa mingi mpe mposa ya bomoi esilaki ngai, nsima na kotalela makambo nazalaki kosala. Namiyokisaki nsoni mpe namizimbisaki, ngai moko mpe mwana oyo nabotaki.” Ya solo, mokili oyo ya Satana, ata ezali kongenga, ezali bobele mpo na kokosa miso. Ezali na motuya moko te. Banzela ya mokili ezali kobimisa bobele matomba mabe lokola bazemi ya balabala, mabala mazali kokufa, bamaladi mabe ezali kouta na pite, mawa mpe mpasi na lolenge nyonso. Na yango, yoka toli, kola na elimo. “Pengwa na makambo mabe, sala makambo malamu.”—1 Petelo 3:11.
10. Toli nini mpe bandakisa nini elenge oyo ezali kokola na elimo ekolanda yango?
10 Elenge mobali to elenge mwasi oyo azali kokola na elimo akolanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Bozala bana mike kati na makambo mabe nde bokoma mikolo kati na makanisi.” (1 Bakolinti 14:20) Na ntembe te elenge Timote asalelaki toli oyo. Tokoki kokanisa ata moke te ete Timote akokaki kotambola nzela moko na bilenge ya mobulu mpe baninga ya mokili na ntango na ye. Baninga na ye bazalaki basaleli na Nzambe, lokola ye. (Masese 13:20) Landa ndakisa na ye. Soki omekami na kosala likambo mabe, omituna motuna oyo: Timote to Yesu mbele bakokaki kosala bongo?
Monisa yango na koyekolaka Biblia
11. Makambo nini bilenge oyo bazali kolanda mokili bazali komona yango te, mpe ndenge nini yo okoki komona yango polele ntango nyonso?
11 Lisolo moko eutaki na ltalie mpe ebimisamaki na zulunalo moko ya monoko ya Anglais (World Press Review) elobaki boye: “Mokolo na mokolo bilenge bazali kobungisa esengo mpe elikya; moto azali te mpo na kolakela bango mikolo malamu na ntango ezali koya mpo ete bakoka kozwa mpiko.” Lokola bakufa miso, bato kati na mokili oyo etambwisami na Satana bazali komona mokili ya sika te oyo elakami na Nzambe soki mpe avenire kitoko ezali liboso na bato babongi kofanda kati na yango. (2 Bakolinti 4:4; Masese 29:18; 2 Petelo 3:13) Nzokande, na nzela na boyekoli Biblia mokolo na mokolo, bilenge oyo bazali kokola na elimo bazali komona makambo oyo nyonso polele liboso na bango.
12. (a) Mpo na kozwa boyebi ya Nzambe, esengeli koluka yango ndenge nini? (b) Mpo na nini ebongi totya molende mpo na kozwa boyebi yango?
12 Mokili ya sika elakami na Nzambe ezali solo mpo na yo? Ekoki kozala solo, kasi esengeli na yo mpenza kotya milende mpo na yango. Esengeli na yo kokolisa mposa makasi ya kozwa mayele na Biblia, na motindo boye ete “oluka yango lokola mbongo mpe oluka yango ntango nyonso lokola mabanga ya ntalo”. (Masese 2:1-6) Nini epusaka moluki na mabanga ya ntalo ete alanda kotimola, ata na boumeli ya mbula mingi? Ezali mpo na mposa makasi na bozwi oyo libanga ya ntalo ekomemela ye. Nzokande, boyebi eleki bozwi ya mokili. Yesu alobaki: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Soki ondimi solo maloba oyo ya Yesu, okoyekola Biblia mikolo nyonso, mpe yango ekopesa yo bolamu boleki mabanga ya ntalo.—Masese 3:13-18.
13. Mpo na oyo etali boyekoli, bilenge oyo bazali kokola malamu na elimo bakolanda toli nini epesami awa?
13 Okomona ete wana ekoleka yo koyekola, mposa na yo ya bilei ya elimo ekobakisama mpe koleka. Zala moyekoli malamu. Kosuka te bobele na kotya bilembo na nse ya biyano; tanga mpe mikapo ya Biblia oyo mipesami, na nsima luka ba versets mosusu ekokani na yango na kosalelaka Biblia oyo ezali na mitindani to references. Okoki mpe koluka mikapo misusu na lisalisi ya ba lndex ya la Societe. Luka komona na nini makanisi mapesami matali yo mpe ndenge nini okoki kosalela yango. Loba makambo ozali koyekola epai na baoyo bazingi yo. Yango ekokoma makasi makambo mosusu kati na elimo na yo mpe ekolendisa bamosusu ete bango mpe balukaka makambo kati na mikanda. Soki okomipesa na boyekoli, okolanda toli oyo epesamaki na elenge Timote: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bamona polele ete ozali kotambola liboso.”—1 Timote 4:15; 2 Timote 2:15
Monisa yango na makita mpe na mosala ya kosakola
14. Okoki kosala nini mpo ete osepela mingi na makita ya boklisto, mpe ndenge nini okoki koyikisa mpiko na bato mosusu oyo bazali koyangana na yango?
14 Ntango ozali koyekola Biblia na esengo mpe ozali kobongisa malamu makita ya boklisto, yango ezali kokoma kitoko mingi mpo na yo. (Nzembo 122:1; Baebele 2:12) Okosepela lisusu mingi koleka soki okanisi ete okokoka kopesa biyano na masolo oyo masalemaka na mituna mpe biyano; epai mosusu, okokoka kosala mikumba na Eteyelo ya mosala ya bonzambe. Kasi na makita, tokoki, na ndenge mosusu, kosalela toli oyo ezali kotinda biso ete “toyikisana mpiko” mpe “tolendisana na bolingo mpe na misala malamu.” (Baebele 10:24, 25) Na ndakisa, olukaka kolobana na bayangani mosusu? Maloba ya boboto lokola “Mbote! Nasepeli mpo na komona yo!” to “Boni, ozali malamu?” ekoki kozala elendiseli moko monene, mingimingi soki euti na bilenge
15. Ndenge nini okoki kopesa lisalisi na yo na misala ndenge na ndenge, mpe mpo na nini ezali malamu ete tobosana ndakisa ya Klisto te?
15 Na kati na lisangá mosala ezalaka mingi. Okoki kosangana na yango? Na ntembe te elenge Timote boye asalelaki Paulo misala mingikotindama noki epai na bandeko mosusu, kokenda kosombela ye biloko, kokenda kotikela ye mikanda, bongo na bongo. Soki yo obandi naino kopesa lisalisi na yo te, ebongi okenda kosolola na bankulutu mpo na koyebisa bango ete ozali na mposa ya kopesa lisalisi na yo na misala ya lisangá. Mbala mosusu bakotinda yo kotikela bandeko nkasa ya mikumba na makita, kokombola salle to kosala mosala mosusu esengeli. Omikundola ete Klisto asukolaki makolo ya bayekoli na ye; mpo na moto oyo azali kokola na elimo, mosala ya mpambampamba ezali te.—Yoane 13:4, 5.
16. Engebene zulunalo moko ya bakatolike, baklisto bazali na mokumba ya kosala mosala nini?
16 Na kotalela makambo mazali koleka na mangomba mosusu, tokoki solo kozala na botondi mpo na formation oyo tozali kozwa na makita ya boklisto. Yango ezali kosalisa biso ete tokokisa mosala moleki ntina kati na misala nyonso, yango mosala ya kosakola. Kati na zulunalo U.S. Catholic ya sanza ya septembre na mbula eleki, Kenneth Guentert alobaki boye: “Ngai nakolaki na eleko oyo bazalaki kopekisa bakatolike ete batanga Biblia te, mpo bakoki kokuta kuna na kati makambo oyo ekobulunganisa bangona ndakisa bakoki kokanisa ete baklisto basengeli kokenda kobetela bazalani na bango ndako mpo na komeka kobongwanisa bango.” Abakisaki: “Boyebi ete nazali moluli na likanisi oyo te; nzokande ntango tozali kotanga Kondimana ya Sika, tokomona ete esengeli kosala boye.”—Matai 10:11-13; Luka 10:1-6; Misala 20:20, 21.
17. Okoki kosala nini mpo ete mosala ya kosakola esepelisa yo koleka?
17 Ee, baklisto ya liboso bazalaki kosakola ndako na ndako, mpe, na ntembe te, bilenge lokola Timote boye bazalaki kosangana na mosala yango esika moko na mikolo na bango. Nzokande, lelo oyo, bamoko bazali kosepela na mosala yango te. Mpo na ntina nini? Ntango mosusu mpo bazwaki formation malamu te. Mpamba te, ata mpo na lisano, moto akosepela kosala yango soki ayebi lisano yango malamu. Bobele bongo mpo na mosala ya kosakola. Soki oyebi malamu kosalela Biblia mpe kobimisa masolo kitoko kati na yango, mosala ya kosakola ekokoma elengi mingi mpo na yo, mingimingi wana ekokutana yo na moto oyo azali koyokamela yo mpe yo okoki kosopela ye boyebi ya Biblia oyo ezali komema na bomoi. Na yango, kola na elimo! Yekola mpo omesena kolakisa nsango malamu ndako na ndako. Tuna toli epai na baninga na yo baklisto. Senga na Jéhovah ete asalisa yo.—Luka 11:13.
Monisa yango na boyokani na yo elongo na mikolo
18. Yesu mpe Timote bazalaki koluka lolenge nini ya boyokani elongo na mikolo?
18 Wana ezalaki ye bobele na mbula 12, Yesu azalaki kosepela kofanda esika moko na mikolo mpo na kolobana makambo na elimo elongo na bango. Mokolo moko, baboti na ye “bakutaki ye na temple, afandi katikati na milakisi, koyokaka bango mpe kotunaka bango”. (Luka 2:46) Ezali se ndenge moko mpo na Timote. Ntango ntoma Paulo mpe baninga na ye bakomaki na Lusutula, na ntembe te Timote asepelaki kofanda esika moko na bango mpe atyaki likebi mingi na mateya na bango. Azalaki na boyokani malamu elongo na bandeko ya lisangá na ye, mpe bango bazalaki na esengo mpo na kotyela ye maboko.—Misala 16:1-3.
19. Mpo na ntina nini mpenza Paulo aponaki Timote ete nzala moninga ma ye na mobembo, mpe lisalisi nini Timote apesaki ye?
19 Ya solo, Timote azalaki na bolingo malamu ya kosalela bazalani misala ya mosuni, kasi soki Paulo aponaki ye ete azala moninga na ye ya mobembo, ezali mingimingi mpo azalaki na likoki ya kokokisa bamposa na bango ya elimo. Na ndakisa, ntango bibele na bato batombokelaki Paulo, ye alongwaki na Tesalonike, kasi atindelaki bango elenge Timote mpo na kolendisa bayekoli ya sika. Na yango, atako Timote azalaki kosepela kofanda esika moko na mikolo mpe koteyama na bango, azalaki mpe kosepela kosalisa bango solosolo na elimo.—Misala 17:1-10; 1 Batesaloniki 3:1-3.
20. Okosala nini na mayele, mpe misala nini okoki kosalela mibange?
20 Na mayele, bomekola Yesu mpe Timote, na komonisaka ete bozali na mposa na kozwa litomba na expérience mpe na boyebi ya mikolo. Luka kozala esika moko na bango mpe tuna bango mituna. Kasi monisa mpe ete ozali kokola na elimo, na kopesaka bango lisalisi na yo. Oyebi mibange to ba-andikapé oyo bakosepela ete ekenda kosombela bango biloko to kosalela bango misala misusu? Mbala mosusu bazali bobele na mposa ete okenda kotala bango mpo na kotangela bango mokanda moko mpe kosolola na bango mpo na bisengo ozali kokutana na yango kati na mosala ya kosakola.
Mokumba ya baboti mpe ya baklisto mosusu
21. Mokumba ya baboti ezali na ntina nini, mpe esengeli ete basalaka nini?
21 Kolongono ya elimo ya bilenge etali mingimingi liteya mpe ndakisa oyo baboti na bango bazali kopesa bango (Masese 22:6) Baboti na Yesu bazalaki bato bakobangaka Nzambe; na ntembe te Yesu azwaki litomba mingi na etambwiseli oyo bazalaki kotambwisa ye na yango. (Luka 2:51, 52) Mpo na Timote, mbele toyebi ye te na ndenge toyebeli ye lelo, soki mama na ye mpe nkoko na ye bateyaki ye te. (2 Timote 1:5; 3:15) Bana basengeli koteyama ntango nyonso kati na Biblia! Baboti, ezali yango bozali kosala? To bozali nde na bopoto na likambo oyo?
22. (a) Ntango baboti bazali kopesa motuya mingi na boyekoli ya Biblia, yango ezali na bopusi nini likolo na bana? (b) Baboti baklisto basengeli kotya mikano nini liboso na bana na bango?
22 Elenge mobali moko asalaka na siège mondial ya ba Témoins de Jéhovah alimbolaki ete boyekoli ya Biblia poso na poso elongo na bana ezalaki ntango nyonso momeseno kati na libota na bango. Abakisi ete, “mikolo misusu, papa alambaki mingi nsima na kouta na mosala, kasi ata bongo boyekoli ezalaki kosalama, mpe yango emonisaki epai na biso bana ete ezali makambo na ntina mingi.” Baboti, soki bino moko bozali kopesa motuya mingi te na makambo na elimo, bana na bino mpe bakomona yango na motuya mingi te. Na yango, bolendisa bango ete bamityela mikano malamu liboso na bango mpo na kokoma ba pionniers, ba missionnaires, to basali na Béthel. Bosalisa bango bakanga ntina ete kosalela Jéhovah ekosuka te, nzokande bakompanyi ya mokili ekosuka.—Tala 1 Samwele 1:26-28.
23. Ndenge nini bandeko mosusu kati na lisangá bakoki kosalisa bilenge ete bakola na elimo?
23 Bandeko mosusu kati na lisangá bakoki mpe kosalisa bilenge ete bakola na elimo. Omipesa mokumba ya kosolola na bango liboso to nsima na makita. Meka mpe kokotisa bango kati na baprograme na yo mosusu. Na ndakisa, nkulutu moko akoki kosenga nzela na baboti ya elenge moko mpo ete elenge yango akenda na ye elongo kati na lisangá moko mosusu epai akokenda kosala disikulu, to mpe kobima na ye elongo mpo na kotambola kati na etuluku elongo na bandeko mosusu. (Yobo 31:16-18) Eloko ya moke, ntango mosusu ekobimisaka matomba minene. Mokolo moko, wana ezalaki ye kosala disikulu, sirkwi moko amonaki ete elenge mobali moko azalaki koyoka ye na likebi nyonso, kasi azalaki na Biblia te; na bongo, apesaki ye Biblia moko nsima na likita. Likabo yango esimbaki motema ya mwana, nde koleka lisusu mpo na ndenge sirkwi amibanzabanzaki mpo na ye. Mbula koleka 30, lelo oyo ye moko azali nkulutu, azali ntango nyonso komikundola na esengo nyonso likebi ya bolingo mingi oyo sirkwi amonisaki epai na ye.
24. Tosepeli na koyeba nini, mpe nini esengeli kozala ekateli na biso?
24 Ezali likambo na esengo mingi na komona ete bankama na bibele na “bilenge mibali lokola matanga na londende” bazalaki kosakola nsango ya Bokonzi oyo ezali kokitisa mitema ya bato, mpe epai mosusu ebele na bilenge basi bazali lokola “limpinga monene oyo ezali kosakola nsango malamu”. Tika ete bango nyonso batya etingya na kokola na elimo, mpe tika ete biso banso tosalisa bango na nzela yango!—Nzembo 110:3; 68:11.
Bozongeli
◻ Nini ekoki kosalisa elenge moklisto na koyeba ntango nini asengeli kozwa batisimo?
◻ Ndenge nini etamboli ya elenge moklisto ekomonisa soki azali kokola na elimo to te?
◻ Nini ekoki kosalisa bilenge na kosangana na esengo nyonso na makita mpe na mosala ya kosakola?
◻ Boyokani nini bilenge basengeli kozala na yango elongo na mikolo kati na lisangá?
◻ Ndenge nini baboti mpe baklisto mikolo bakoki kosalisa bilenge?
[Elilingi na lokasa 16]
Nini ezali kopekisa yo na kozwa batisimo?