Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/4 nk. 10-15
  • Bilenge, bokosala nini na bomoi na bino?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge, bokosala nini na bomoi na bino?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baoyo bato na mokili bazali kolanda
  • Toli oyo ebongi kolandama
  • Bandakisa ebongi kolandama
  • Zala na bomoi mpo na mokili ya sika elakami na Nzambe
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Timote—Amilengelaki mpe azalaki na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bilenge​—Bólanda mikano oyo ekumisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/4 nk. 10-15

Bilenge, bokosala nini na bomoi na bino?

“Baoyo bazali na bomoi babika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.”​—2 BAKOLINTI 5:15.

1. Na maloba nini bamoko bamonisaki botondi na bango, mpe mpo na nini?

MERCI! Nazali na bomoi mpo na yo!” Oyo ezali maloba bato mosusu balobaki epai na baoyo babikisaki bango na likama ya kozika na ndako to ya kozinda na mai. Ezali mpe na maloba oyo bilenge baklisto bamonisaki botondi na bango na baboti na bango. Bazalaki kotondo bango bobele mpo na bomoi ya mosuni te oyo bazwaki epai na bango, kasi lisusu mpe mingimingi mpo na likebi mpe liteya ya bolingo mingi oyo etyaki bango na nzela ezali “komema na elaka etikelaki ye biso, ete bomoi na seko.”​—1 Yoane 2:25.

2. Makambo nini ebongi bilenge batalela yango mpo na kozwa ekateli soki bakosala nini na bomoi na bango?

2 Na bolingo na ye, Jéhovah Nzambe atii bomoi ya seko, “bomoi ya solo” liboso na mokomoko na biso. “Alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye ete akufela biso mpo na masumu na biso.” (1 Timote 6:19; 1 Yoane 4:10) Tokanisa lisusu na bolingo oyo Mwana na ye Yesu amonisaki na ndenge andimaki kokufa na mpasi makasi mpo ete biso tozwa bomoi ya seko. (Yoane 15:13) Nsima na kotalela makambo oyo, motuna mozali kotunama; Okosala nini na bomoi na yo?

3. Mbala mingi, na moboko nini bato bazwaka ekateli mpo na oyo bakosala na bomoi na bango?

3 Motuna oyo, na maloba oyo to na maloba mosusu, ezali mbala mingi kotunama na bilenge, na bato oyo bazali komibanzabanza mpo na avenire na bango. Nini ekosalisa yo mpo na eyano na yo? Bobele makambo oyo yo moko olingaka? Okolanda likanisi na bato oyo balingi komona yo okoma moto monene kati na mokili? To okozwa nde ekateli yo moko mpo na oyo okosala na bomoi na yo na kotalelaka mikano mileki kotombwama? Tokanisa lisusu maloba oyo mapemami na Nzambe: “Akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi babika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.” (2 Bakolinti 5:15) Ee, ezali esengo kozala na bomoi oyo ezali komonisa botondi na biso mpo na makambo oyo Yesu Klisto mpe Tata na ye ya likolo basalaki mpo na biso!

Baoyo bato na mokili bazali kolanda

4. Bilenge balingaka kolanda lolenge nini ya bato kati na bomoi?

4 Kasi bato motindo nini bazali na lokumu lelo, baoyo bilenge mingi bazali kolanda bango lokola ndakisa na bango? Ezali bazwi mpe bato bayebani mingi, atako bizaleli na bango bizali mabe, boye te? Soki okoti na bachambres ya bilenge mingi, lolenge nini ya bafoto okomona na mur? Mbala mingi bafoto ya ba mizisié, bato basalaka sinema to babeti ndembo soko mpe masano mosusu. Ebele na bilenge balukaka kokoma lokola bato wana, to kobalana na moto moko kitoko lokola bango. Boni mpo na yo? Ozali kozela nini na bomoi?

5, 6. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete kokoma moto monene kati na mokili ekopesaka esengo ya solo te? (b) Ndenge nini tokoki kozwa esengo ya solo?

5 Soki okomi lokola moko na bato oyo bayebani mingi na mokili, mpo na yango okanisi ete okozala na bolamu mpe esengo na solo? Moko kati na basi basalaka sinema na Hollywood mpe ayebani mingi alobaki mokolo mosusu: “Nasili kozwa mosolo mingi mpe biloko na mosuni na lolenge nyonso. Kasi yango ezali na motuya moko te. Esika tofandi etondi na baminganga oyo bakosalisaka makanisi ya bato, mabala mingi mazali kokufa mpe bana mingi bazali kotiola baboti na bango.”​—Mosakoli 5:10; 1 Timote 6:10.

6 Elenge mwasi moko ayebanaki mingi mpo na masano, naino ezalaki ye mwana ya kelasi, mpe azwaki mbano na 1981 mpo ete alongaki kurse ya 10 kilometres mpo na bana basi na New York, alingaki komiboma mpo ete amonaki ntina ya bomoi te. Na nsima akomaki boye: “Nayekoli makambo mingi kati na bomoi na basanza eleki. Na ndakisa nayekoli ete tokoki kozwa esengo te na myango oyo bato mingi bazali kosalela mpo na kokoma na ezaleli ya kokoka mpe kolonga. Mpo na ngai, ata nazalaki mwana mwasi ya mayele mingi na kelasi, championne ya kurse ya makolo to elenge mwasi kitoko ememelaki ngai esengo te.” Bato basengeli koyeba ete esengo ya solo ekozwama bobele soki bazali na boyokani elongo na Nzambe, oyo bobele ye azali na likoki ya kopesa kimya mpe bolamu ya solo.​—Nzembo 23:1, 6; 16:11.

7. Esengo ya solo ekoki kozwama na kokota bakelasi milai?

7 Ezali polele ete osengeli te koluka komekola baoyo bazali kobeta moty na mokano bobele moko ya kozwa nkembo mpe bozwi. Ata bakomi na mikanda na mokili bamonisi ete kokoma moto monene na mokili ekopesaka esengo ya solo te. Bill Reel, mokomi na makambo na zulunalo akomaki boye: Ozwi dipolome na Université mpe ozali komona ete avenire na yo ebongi. Nde na mawa, bilikya na yo mingi bikokokisama te. Nalingi kolembisa bino te, nzokande esengeli na bino boyeba solo: Ntango bokozwa biloko oyo bozali kolula, soko nde bokokoka kozwa yango, mpe ntango bokolonga na mikano oyo bosili komityela liboso, soki nde bakokoka solo kolonga na yango, ata bongo esengo na bino ekokokisama te. Mpamba te, bobele esika ezali yo kokanisa ete olongi, okomona ete ozangi, okozala na mawa na esika ete ozala na esengo, okozala na motema likolo na esika ete ozala na kimya.”​—New York Daily News, 26 mai 1983.

8. Mpo na ntina mosusu nini ezali likambo ya mayele te na koluka kokoma moto monene kati na mokili?

8 Kasi biso baoyo tozali kokanga ntina na makambo mazali koleka na mokili engebene bisakweli ya Biblia, tozali na bantina mosusu ekoki kopekisa biso ete toboma nzoto te mpo na koluka kokoma moto monene kati na mokili. (Matai 24:3-14) Tozali lokola bato bazali komona liboso ya ndako moko libaya moko bakomi: “Etikali mwa basanza kompanyi oyo ekokangama.” Nani akokende koluka mosala na kompanyi motindo oyo? Moto te! Mpe baoyo bazalaki kosala kuna uta kala, soki bazali na mayele, bakobanda libela koluka mosala epai mosusu. Ezali se ndenge moko mpo na bibongiseli nyonso ya mokili; ezali lokola libaya etyami liboso na yango ete “Etikali moke ekokangama!” Ee, Biblia eyebisi biso polele ete “mokili ezali koleka”. (1 Yoane 2:17) Soki tozali na mayele, tokomekola te bato oyo bakangami makasi na mokili.

Toli oyo ebongi kolandama

9. Bato mosusu oyo bakanisi ete bazali koluka bolamu ya bilenge, bapesaka bango toli nini engebene banzela ya mokili?

9 Bomoi na yo ekoki kopusama bobele na bato ya lokumu te, kasi lisusu na baboti mpe na baninga oyo, bakoki koloba ete “balingi bolamu na yo”. “Osengeli kobongisa bomoi na yo”; ezali toli oyo bamoko bazali kopesa na bilenge mpo na kolanda kelasi na Université ete bazwa mosala ya mbongo mingi. Bazali koloba ete “Luka, mokomi moko na Biblia, azalaki monganga, mpe ntoma Paulo akotaki kelasi mingi epai ya Gamaliele, molakisi ya Mibeko.” (Bakolose 4:14; Misala 5:34; 22:3) Kasi totalela naino malamumalamu batoli oyo.

10. Ndakisa nini Luka mpe Paulo batikelaki biso, mpe tokoki koloba nini mpo na misala oyo basalaki liboso na kokoma baklisto?

10 Monganga Luka ayikisaki mpiko ata na moto moko te ete aluka kokota kelasi monene lokola ye akotaki. Na esika ete asala bongo, akomaki nde lisolo ya bomoi ya Yesu mpe ya bantoma na ye mpo na komonisa yango epai na bango ete ezali ndakisa ya kolanda. Emonani ete ayekolaki mosala ya monganga liboso ya kokoma moyekoli ya Klisto. Nde na nsima, apesaki na mosala na ye ya boklisto esika ya liboso kati na bomoi na ye. Paulo se ndenge moko. Na esika ete ayikisa mpiko na bamosusu bamekola ye lokola ye amekolaki Gamaliele, akomaki nde boye: “Bozala bamekoli na ngai, lokola ngai nazali komekola Klisto.” Paulo azalaki kopesa motuya mingi na boyebi etali Klisto, yango wana, engebene maloba na ye moko azalaki kotalela mikano na ye nyonso ya kala “lokola bosoto”.​—1 Bakolinti 11:1; Bafilipi 3:8.

11. (a) Petelo alobaki nini na Yesu, mpe mpo na nini? (b) Yesu azongisaki nini?

11 Kobosana te ete, ata bato oyo balingi yo, bakoki kopesa yo batoli ya mabe mpo ete bazali kolanda bobele mayoki. Na yango, ntango Yesu ayebisaki na bayekoli na ye bampasi akozwa na Yelusaleme na nsuka na mosala na ye, ntoma Petelo alobaki na ye: “Soko moke te, Nkolo! Oyo ekokomela yo te!” Petelo alingaki Yesu mingi; akokaki kosepela te komona ye anyokwama. Nde ata bongo Yesu apamelaki ye, mpo ayebaki ete mpo na kokokisa mokano na Nzambe esengelaki na ye komona mpasi mpe kobomama na maboko ya banguna na ye.​—Matai 16:21-23.

12. Bato mosusu, ata bakanisi ete bazali na mikano malamu, bapesaka toli nini epai na bilenge, mpe mpo na nini?

12 Bobele bongo, baboti to baninga bakoki kolembisa yo ntango olingi kopona mosala ya Nzambe. Na kolandaka mayoki na bango, bakoki kokakatana, na esika ete bayikisa yo mpiko na kokota na mosala ya pionnier, ya missionnaire to kosala na Béthel. Mbala mosusu bazali koloba: “Mpo na nini olingi kobala te mpe kozala na ndako na yo moko pembeni na biso?” To lisusu: “Oyebi ete mosala na Béthel ezali makasi. Fanda na yo penepene na biso.” Bazali koloba lokola ndenge Petelo alukaki kolembisa Yesu.

13. (a) Petelo alobaki nini mpo na lolenge ebongi na biso komonela makambo? (b) Kozala moklisto ya solo esengi lisusu nini?

13 Ntango mosusu, ata basaleli na Jéhovah bazalaka na mposa ya kobongisa makanisi na bango. Ezalaki bongo mpo na Petelo oyo, nsima na kosembola makanisi na ye, akomaki boye: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, mpo ete Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bolanda matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Mpo na kozala na bomoi ya solo ya boklisto, esengeli toyekola komipimela biloko mosusu mpe kondima mpasi. Ezali likambo na petee te, kasi ezali yango oyo biso baklisto tobyangami na yango. Kondima yango elimboli “kozala lisusu na bomoi mpo na biso moko te, kasi mpo na ye oyo akufi mpo na biso”. (2 Bakolinti 5:15) Soki tokolanda ntango nyonso ndakisa malamu, tokokoka kopesa bomoi na biso na mosala ya Nzambe.

Bandakisa ebongi kolandama

14. Ndakisa nini Yesu atikelaki biso?

14 Ndakisa eleki monene oyo ebongi kolandama, ezali oyo ya Yesu. Lokola azalaki moto ya kokoka, mbele akokaki kokoma oyo aleki monene kati na basali nyonso na masano, oyo aleki bamizisié nyonso, oyo aleki baminganga nyonso, oyo aleki bamagistrats nyonso, bongo na bongo. Kasi, na bolenge na ye, alukaki ntango nyonso kosepelisa Tata na ye ya likolo. (Luka 2:42-49) Na nsima alobaki: “Ekoki na ngai kosakola nsango malamu na Bokonzi na Nzambe na mboka mosusu lokola, mpo ete natindami na likambo yango.” (Luka 4:43) Na mbula eleki, mokanda moko ebimisamaki na zulunalo ya makambo ya losambo Ministry elobaki boye: “Nkolo na biso azalaki na momeseno ya kotika naino bibele, na nsima Azalaki kokende ndako na ndako koluka milimo. Esengo na ye ezalaki koloba na moto mokomoko. Wana nde akokaki kosopela ye solo nyonso bolingo na Nzambe.”​—Luka 10:1-16.

15. (a) Mpo na nini kosakola ndako na ndako ezali likambo na petee te? (b) Nini emonisi ete mosala ya ndako na ndako oyo bilenge bazali kosala ezali kobimisa matomba malamu?

15 Ya solo, kosakola ndako na ndako ezali likambo na petee te. Esengeli koyekola Biblia ntango nyonso mpo na kosimba ntina na nsango malamu na Bokonzi, mpe koyeba kobongisa masolo malamu. Epai mosusu, mosala yango ezali kosenga mpiko to kuraje, mpamba te bato mingi bazali koyamba biso te, mpe bamosusu bazali ata kobengana biso. Nzokande, bino bilenge boyeba ete mosala oyo bozali kokokisa ndako na ndako ezali kobimisa matomba malamu, lokola elobaki yango zulunalo La Voce, kati na lisolo moko oyo mobandisi na yango akomaki boye: “Mpo na ngai, nazali kokumisa ba Témoins de Jéhovah, mpo ete bazali kotalaka bato na bandako na bango.” Abakisi: “Baoyo nayebi bazali na limemya mingi; bazali na nzoto kitoko mpe mingi na bango bazali bilenge. Bonzenga mpe bolenge ekoyambamaka malamu epai na bato, wana ezali biso kosalela yango.”

16. (a) Bilenge baklisto babongi kokumisama mpo na misala nini oyo bazali kosala? (b) Kokesena nini ezali kati na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah mpe mangomba ya mokili mpo na oyo etali kokokisa mosala eleki ntina na mokili?

16 Bilenge, bino baoyo bokamati Klisto lokola ndakisa na bino, bobongi solo kokumisama! Na Etats-Unis, bilenge koleka 12 000 oyo bakokisi naino mibu 26 te bazali ba pionniers, mpe na mikili misusu, bibele mingi ya bilenge bazali kosala mosala oyo moko. (Nzembo 110:3) Mosala mosusu eleki oyo ezali te. Ata mokomi na zulunalo oyo touti kotanga alobaki: “Na miso na Nzambe, mosala moleki ntina na mokili ezali oyo ya kotala bato ndako na ndako​—koluka milimo.” Abakisi lisusu: “Bokanisi boni? Na meko nini bino na ngai tozali kosangana na mosala oyo? Kati na zulunalo MINISTRY natanga naino mingi te ete bazali kolobela mpo na mosala oyo.” Yango wana biso tosengeli kozala na esengo awa ezali biso kosala elongo na lisangá oyo ezali kolobela mingi ntina ya komekola ndakisa ya Yesu na kosakolaka nsango malamu.

17. Timote asalaki nini naino ezalaki ye mwana, mpe nini emonisi ete azalaki naino elenge na eleko yango?

17 Lokola bato oyo ozali kolula bakopusa mingi lolenge oyo okosalela bomoi na yo, kanisa lisusu na ndakisa ya ntina mingi oyo elenge Timote apesaki. Ye abotamaki mwa ntango moke liboso na kufa na Yesu; na yango, azalaki bobele elenge ntango atikaki libota na ye mpo na kolanda ntoma Paulo kati na mobembo na ye ya mibale na mosala ya missionnaire. Mwa basanza na nsima, bibele na bato batombokelaki Paulo mpe Silasi; yango wana bango bakimaki kolongwa na Tesalonike, kasi basilaki kozalisa mwa bayekoli wana. (Misala 16:1-3; 17:1-10, 13-15) Mwa ntango moke nsima na yango, Paulo atindaka Timote kati na teritware wana na makama mpo na kolendisa bayekoli wana kati na komekama na bango. (1 Batesaloniki 3:1-3) Mbala mosusu Timote akokisaki naino mbula ntuku mibale te na eleko yango, mpamba te nsima na mbula 12 soko 14, Paulo alobaki lisusu mpo na “bolenge na ye”. (1 Timote 4:12) Ozali na esengo te na komona elenge mobali na mpiko boye mpe na motema malamu?

18. Mpo na nini Paulo akanaki kotinda Timote epai na Bakolinti?

18 Mbula mitano nsima na kotinda Timoté na Tesalonike mpo na kolendisa bandeko, ekomaki Paulo na Efese, akomelaki Bakolinti maloba oyo: “Bongo nalombi bino ete bozala bamekoli na ngai. Yango wana, nazali kotindela bino Timote . . . ye akokanisela bino mpo na nzela na ngai kati na Klisto Yesu. Nakolakisaka bongo na bipai nyonso na masangá nyonso.” (1 Bakolinti 4:16, 17) Lokola asilaki kosala mbula mitano elongo na Paulo, elenge Timote ayebaki malamu eteyeli ya Paulo. Ayebaki ndenge Paulo asakolaki nsango malamu na Baefese, mpe ndenge ateyaki bango “na bisika na bato nyonso mpe ndako na ndako”. (Misala 20:20, 21) Mpo ete amesenaki malamu na bametode oyo ya kosakola, Timote akokaki mpenza kosalisa masangá mingi.

19. Paulo alobaki nini na Timote koleka mbula zomi nsima wana babandaki kosala elongo?

19 Mbula mitano to motoba eleki, mpe Paulo azali na boloko na Rome. Timote, ye moko auti kobima na boloko azali na ye elongo. (Baebele 13:23) Kanisa ndenge likambo elekaki: Kosalelaka mbala mosusu Timote lokola sekretere, Paulo azali kotinda Timote ete akomela Bafilipi mokanda. Koponaka maloba mabongi, alobi boye: “Nazali kolikya kati na Nkolo Yesu ete natindela bino Timote nokinoki . . . Nazali na moto mosusu lokola ye te; “akokanisa mpo na makambo na bino solo. . . . Nde boyebi ezaleli malamu na ye ete asalamaki na ngai mosala mpo na nsango malamu lokola mwana esika moko na tata.”​—Filemo 1:1; 2:19-22.

20. Mpo na nini ndakisa ya Timote ebongi mpenza mpo na bilenge?

20 Na ntembe te, elenge Timote atikaki ndakisa moko malamu mingi! Azalaki moninga ya sembo mpo na Paulo, mpo ete anyokwamaki na ye esika moko kati na mimekamo nyonso, kosungaka ye kati na mosala ya kosakola, mpe kondimaka kosala ata epai wapi. Atikaki baboti na ye mpe makambo oyo makokaki kosepelisa ye na ndako ya baboti na ye; kasi bisengo azwaki na mosala ya Nzambe elekaki nyonso wana! Ya solo, Timote ”azalaki na bomoi lisusu mpo na ye moko te, kasi mpo na Klisto, oyo akufelaki ye”. (2 Bakolinti 5:15) Ozali kooka mposa ya komekola ndakisa na ye?

Zala na bomoi mpo na mokili ya sika elakami na Nzambe

21. Mpo na nini tokoki koloba ete Timote azalaki elenge moko ya elimo?

21 Timote azalaki solo kobika mpo na mokili ya sika elakami na Nzambe. Na esika ete atalela bobele makambo na sikawa, azalaki kosalela bomoi na ye na motindo boye ete akoka kozwa bolamu ya seko. (Matai 6:19-21) Tata na ye, mogreke oyo, ekoki kozala ete azalaki mondimi te, mbala mosusu asengaki ye ete akota kelasi milai mpe aluka kokoma moto monene. Kasi mpo na liteya malamu azwaki na mama na ye mpe na nkoko na ye, Timote aponaki misala ya boklisto mpo na bomoi na ye. Alandaki mikano ya elimo, mpe emonani ete atikalaki monzemba ntango mwa mingi mpe akolaki kino akokaki kokoma moninga ya mosala ya ntoma Paulo.​—2 Timote 1:5.

22. Ndenge nini brochure L’école elimboli bomoi ya bilenge oyo bazali kolanda ndakisa ya Timote?

22 Boni mpo na yo? Okosalela bolenge na yo motindo moko na Timote? Ezali lolenge wana na bomoi elobelami kati na brochure L”école et les Témoins de Jéhovah wana ezali yango koloba na ntina na bilenge Batemwe: “Mokano na bango ya liboso ezali ete bakoma ba ministre malamu ya Nzambe, mpe basepeli na lisalisi oyo eteyelo ekoki kopesa bango. Na ntina yango, bazali kopona kokota kelasi oyo ekobongisa bango na kozwa mosala oyo bakoki kobikela kati na mokili ya lelo. Yango wana mingi na bango bazali kokota école professionnelle to école technique. Nsima na kosilisa kelasi na bango, balingi kozwa mosala oyo ekotikela bango ntango mpo na kokokisa mokano ya bomoi na bango: mosala ya kosakola.”

23. Mpo na nini esengeli kozala likambo ya mpasi te na bilenge baklisto na koyanola na motuna oyo: Nakosala nini na bomoi na ngai?

23 Soki ozali solo na botondi mpo na maye nyonso Jéhovah Nzambe mpe Mwana na ye basalaki mpo na yo, ekoki kozala na yo mpasi te mpo na koyanola na motuna oyo: Nakosala nini na bomoi na ngai? Na esika ete ozala na bomoi mpo na yo moko, mpo na bisengo na yo moko, okozala nde na bomoi mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Na ndakisa ya Timote, bomoi na yo ekomonisa ete ozali solo moto ya elimo.

Bozongeli

◻ Mpo na nini bilenge baklisto basengeli koluka te kokoma moto monene kati na mokili?

◻ Toli nini ya mabe bamoko bapesaka na bilenge baklisto, kasi eyano oyo Yesu apesaki na Petelo elakisi biso nini?

◻ Ndakisa nini Yesu mpe Timote batikelaki bilenge baklisto“?

◻ Kozala moto ya elimo elimboli nini?

[Elilingi na lokasa 12]

Luka, atako azalaki monganga, atyaki mosala ya boklisto na esika ya liboso kati na bomoi na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto