Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es26 nk. 118-128
  • Sanza ya 12

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 12
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwamibale, 1 sanza ya 12
  • Mwamisato, 2 sanza ya 12
  • Mwaminei, 3 sanza ya 12
  • Mwamitano, 4 sanza ya 12
  • Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 12
  • Mwalomingo, 6 sanza ya 12
  • Mwayambo, 7 sanza ya 12
  • Mwamibale, 8 sanza ya 12
  • Mwamisato, 9 sanza ya 12
  • Mwaminei, 10 sanza ya 12
  • Mwamitano, 11 sanza ya 12
  • Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 12
  • Mwalomingo, 13 sanza ya 12
  • Mwayambo, 14 sanza ya 12
  • Mwamibale, 15 sanza ya 12
  • Mwamisato, 16 sanza ya 12
  • Mwaminei, 17 sanza ya 12
  • Mwamitano, 18 sanza ya 12
  • Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 12
  • Mwalomingo, 20 sanza ya 12
  • Mwayambo, 21 sanza ya 12
  • Mwamibale, 22 sanza ya 12
  • Mwamisato, 23 sanza ya 12
  • Mwaminei, 24 sanza ya 12
  • Mwamitano, 25 sanza ya 12
  • Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 12
  • Mwalomingo, 27 sanza ya 12
  • Mwayambo, 28 sanza ya 12
  • Mwamibale, 29 sanza ya 12
  • Mwamisato, 30 sanza ya 12
  • Mwaminei, 31 sanza ya 12
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2026
es26 nk. 118-128

Sanza ya 12

Mwamibale, 1 sanza ya 12

Afungolaki makanisi na bango mpo bákanga malamumalamu ntina ya Makomami.—Luka 24:45.

Bayekoli ya Yesu bandimaki Liloba ya Nzambe mpe bazalaki kosala makasi básalela yango na bomoi na bango. (Yoa. 17:6) Atako bongo, bazalaki koyeba te ntina oyo Yesu akufaki lokola mosali-mabe na nzete ya mpasi. Yesu amonaki ete bantembe oyo bazalaki na yango, emonisaki te ete bazalaki motema mabe; kasi ezalaki nde mpo bakangaki ntina malamu te. (Luka 9:​44, 45; Yoa. 20:9) Na yango, asalisaki bango bákanga ntina ya Makomami. Tótala ndenge oyo asalaki yango ntango abimelaki bayekoli mibale na nzela ya Emause. Yesu ayebisaki mibali yango mbala moko te soki azali nani. Kasi, atunaki bango mituna. Mpo na nini? Mbala mosusu mpo alingaki bábimisa oyo bazalaki na yango na makanisi mpe na motema. Mpe basalaki yango. Bayebisaki ye ete bazalaki kolikya ete Yesu akosikola Yisraele na monyoko ya Roma. (Luka 24:​18-27) Yesu asalelaki Makomami mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya likambo oyo esalemaki. Na nsima kaka na mpokwa wana, Yesu alekisaki ntango elongo na bayekoli mosusu mpe alimbolelaki bango mateya wana ya solo.—Luka 24:​33-48. w24.10 14 par. 9-10

Mwamisato, 2 sanza ya 12

Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ngai mpe nazali koloba makambo oyo.—Yoa. 8:28.

Yesu ayekolaki nini asengeli kosala mpe nini asengeli koloba epai ya Tata na ye na likoló. Na ndakisa ya Yesu, ebongiseli ya Yehova esalelaka Liloba ya Nzambe mpo na kosalisa biso tóyeba mabe ná malamu, mpe kopesa biso litambwisi. (2 Tim. 3:​16, 17) Bakundwelaka biso mbala na mbala ete tosengeli kotánga Liloba ya Nzambe mpe kosalela makambo oyo toyekoli. Tozwaka matomba mingi ntango toyekolaka Biblia na lisalisi ya mikanda ya moombo ya sembo. Na ndakisa, esalisaka biso tókokanisa mateya ya Biblia ná malako oyo euti na ebongiseli na biso. Ntango tomoni ete litambwisi oyo tozwi euti na Biblia, tokómaka kotyela ebongiseli ya Yehova motema mingi. (Rom. 12:2) Yesu asakolaki “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:​43, 44) Yesu atindaki mpe bayekoli na ye básakola Bokonzi yango. (Luka 9:​1, 2; 10:​8, 9) Lelo oyo, moto nyonso oyo azali na kati ya ebongiseli ya Yehova asakolaka nsango ya Bokonzi ata soki afandaka wapi. w24.04 9 par. 5-7

Mwaminei, 3 sanza ya 12

Tokosala makambo nyonso oyo opesi biso mitindo, mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso.—Yos. 1:16.

Kobá kotyela malako ya ebongiseli ya Yehova motema. Na Yisraele ya kala, Yehova asalelaki Moize mpe na nsima Yosua mpo na kopesa bato na Ye malako. (Yos. 1:17) Bayisraele bazalaki kozwa mapamboli ntango bazalaki kotalela mibali yango ete bazali bamonisi ya Yehova Nzambe. Bankama ya bambula na nsima, ntango lisangá ya bokristo efungwamaki, bantoma 12 nde bazalaki kopesa malako. (Mis. 8:​14, 15) Na nsima, etuluku yango esangisaki mpe bankulutu mosusu na Yerusaleme. Ntango bandeko bazalaki kolanda malako oyo euti epai ya mibali yango ya sembo, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.” (Mis. 16:​4, 5) Lelo oyo, biso mpe tozwaka mapamboli ntango tolandi litambwisi oyo ebongiseli ya Yehova epesi. w24.07 10 par. 10

Mwamitano, 4 sanza ya 12

Namoni Davidi mwana ya Yese, moto oyo azali kosepelisa motema na ngai.—Mis. 13:22.

Yehova alingaki Mokonzi Davidi mingi mpenza. Abengaki ye kutu “moto oyo azali kosepelisa motema na ngai.” Kasi, Davidi asalaki masumu ya minene, na ndakisa asalaki ekobo mpe abomaki moto. Na kotalela Mobeko ya Moize, Davidi asengelaki kokufa. (Lev. 20:10; Mit. 35:31) Kasi, na boboto na ye, Yehova alingaki kosalisa Davidi abongola motema. Atindaki mosakoli Natane akende epai ya Mokonzi Davidi, atako na ntango yango amonisaki naino ata moke te ete abongoli motema. Natane apesaki ndakisa moko mpo na kosimba motema ya Davidi. Ndakisa yango ekɔtaki Davidi mpe etindaki ye abongola motema. (2 Sa. 12:​1-14) Akomaki loyembo moko oyo eutaki na motema oyo emonisaki ete abongolaki motema. (Nz. 51, maloba oyo ezali likoló) Loyembo yango ebɔndisaka bato ebele ntango basali lisumu, mpe etindaka bango bábongola motema. Tosepelaka mpenza ndenge Yehova amonisaki bolingo mpe asalisaki mosaleli na ye Davidi abongola motema! w24.08 10 par. 9

Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 12

Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu, ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.—Rom. 12:2.

Bato mingi bayebi ete kobɔkɔla bana ezali mosala monene. Soki ozali moboti mpe ozali na mwana ya moke, topesi yo longonya mpo na mosala makasi oyo ozali kosala mpo na kosalisa ye akóma na kondima makasi epai ya Yehova. (Mib. 6:​6, 7) Ntango mwana azali kokola, akoki kobanda mpenza kotuna mituna mpo na bindimeli na biso oyo euti na Biblia, ata mpe mibeko ya Biblia oyo etali bizaleli ya mabe ná malamu. Na ebandeli, mbala mosusu okomitungisa mpo na mituna ya mwana na yo. Okoki kutu komona lokola nde mituna yango ezali kopekisa ye akóma na kondima makasi. Kasi, mpo na koloba solo, bana oyo bazali kokola basengeli kotuna mituna mpo bámindimisa makambo bango moko. (1 Ko. 13:11) Na yango, ntina ya kobanga ezali te. Ntango mwana azali kotuna mituna oyo euti na motema na ye na oyo etali bindimeli na biso, moná ete ozwi libaku ya kosalisa ye akolisa makoki na ye ya kokanisa. w24.12 14 par. 1-2

Mwalomingo, 6 sanza ya 12

Tozali . . . bato oyo bazali na kondima mpo na kobatela bomoi na biso.—Ebr. 10:39.

Esɛngaki bakristo Baebre bázala na kondima makasi mpo bábika na bolɔzi oyo ezalaki koya na Yudea. (Ebr. 10:​37, 38) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ntango bakomona mampinga ya basoda ezingi Yerusaleme, basengeli kokima na bangomba. Toli ya Yesu etalaki bakristo nyonso, ezala baoyo bafandaki na kati ya engumba to na bamboka ya pembenipembeni. (Luka 21:​20-24) Na ntango wana, soki banguna bayei kobundisa mboka, bato bazalaki kokima na kati ya engumba oyo ezalaki na bifelo lokola Yerusaleme mpo bábatelama. Kokima na bangomba emonanaki ete ezali likambo oyo ebongi te mpe esɛngaki kozala na kondima monene mpo na kosala yango. Bakristo Baebre basengelaki mpe kolanda litambwisi ya bandeko oyo Yesu azalaki kosalela mpo na kokamba lisangá. Ekoki kozala ete bandeko yango bapesaki malako ya sikisiki mpo na kosalisa moto nyonso na lisangá alanda etinda ya Yesu na ntango oyo ebongi mpe asala yango na molɔngɔ.—Ebr. 13:17. w24.09 10 par. 9-10

Mwayambo, 7 sanza ya 12

Apesaki makabo oyo ezali bato.—Ef. 4:8.

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, akokisaki malamu mpenza mosala oyo Tata na ye apesaki ye. (Yoa. 17:4) Kasi Yesu azalaki te na likanisi oyo elobaka ete, ‘Soki olingi likambo moko esalema malamu, yo moko salá yango.’ Apesaki basusu formasyo. Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kobatela bampate ya Yehova mpe ya kokamba mosala ya kosakola mpe ya koteya. Yesu azalaki kopesa bayekoli na ye toli ya polelepolele kasi na bolingo. Basusu bazalaki na ezaleli ya kotya ntembe, apesaki bango toli. (Luka 24:​25-27; Yoa. 20:27) Ayebisaki bango mpe ete basengeli kotya likebi mingi na mosala ya kobatela bampate ya Yehova na esika ya komipesa na mosala na bango ya mosuni. (Yoa. 21:15) Akundwelaki bango ete basengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na mikumba oyo basusu bakoki kozwa. (Yoa. 21:​20-22) Lisusu, asembolaki mwa makanisi ya libunga oyo bazalaki na yango mpo na Bokonzi mpe asalisaki bango bámipesa na mosala ya kosakola nsango malamu.—Mis. 1:​6-8. w24.10 15-16 par. 13-14

Mwamibale, 8 sanza ya 12

Bato ya sembo bakozwa mabele, mpe bakofanda wana mpo na libela.—Nz. 37:29.

Kotosa ekopesa biso bomoi. Ndenge moko na Bayisraele oyo bazalaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, mosika te biso mpe tokokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki; mosika te mabele ekokóma paradiso. (Yis. 35:1; Luka 23:43) Zabolo ná bademo na ye bakozala lisusu te. (Em. 20:​2, 3) Mangomba ya lokuta ekozala lisusu te mpo na komema bato mosika na Yehova. (Em. 17:16) Baguvɛrnema oyo ezali konyokola bana-mboka na bango ekozala lisusu te. (Em. 19:​19, 20) Batomboki bakozala te na paradiso. (Nz. 37:​10, 11) Bato nyonso oyo bakofanda na paradiso bakotosa mibeko ya sembo ya Yehova, mpe yango ekosala ete bomoko mpe kimya ezala. Na yango, bato bakolingana mpe bakotyelana motema. (Yis. 11:9) Tozali mpenza kozela ntango yango! Esuki wana te: soki tokobi kotosa Yehova, tokozala na bomoi na paradiso awa na mabele kaka bankama ya bambula te, kasi mpo na libela.—Yoa. 3:16. w24.11 9 par. 7

Mwamisato, 9 sanza ya 12

Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.—Mat. 24:14.

Esakweli oyo ezali na mokapo ya lelo ezali kokokisama na mikolo na biso na ndenge oyo esalemá naino te. Nsango ya Bokonzi ezali kobimisama na minɔkɔ koleka 1000, mpe bato mingi mpenza na mokili mobimba bakoki kozwa yango na nzela ya site jw.org. Kasi, Yesu ayebisaki mpe bayekoli na ye ete ‘bakosilisa te koleka na bingumba nyonso,’ to kosakwela moto nyonso, liboso ete aya. (Mat. 10:23; 25:​31-33) Maloba ya Yesu ekokokisama mpe na mikolo na biso. Lelo oyo, bamilio ya bato bafandi na bisika oyo bipekiseli ezali makasi mpo tósakola nsango malamu. Lisusu, bankama ya bana bazali kobotama nsima ya miniti mokomoko. Tozali kosala oyo tokoki mpo na koyebisa bato ya “bikólo nyonso, mabota nyonso, [mpe] minɔkɔ nyonso” nsango malamu. (Em. 14:6) Kasi likambo ya solo ezali ete tokokoka te koyebisa nsango malamu epai ya moto mokomoko awa na mabele liboso ete nsuka eya. w24.05 10 par. 6-7

Mwaminei, 10 sanza ya 12

Bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko.—Mat. 19:6.

Yesu azalaki kobɔndisa mpe kolendisa basusu na maloba na ye. Azalaki kokatela bayekoli na ye mangala te. (Luka 8:​47, 48) Azali mpenza ndakisa malamu mpo na mibali bakristo! Yesu ayebisaki mibali bátikala sembo epai ya basi na bango. Azongelaki maloba ya Tata na ye, ete mobali asengeli ‘kokangama na mwasi na ye.’ (Mat. 19:​4-6) Vɛrbɛ ya Grɛki na vɛrsɛ yango oyo ebongolami na “kokangama” elimboli mpenzampenza “kokanga na kole.” Na yango, boyokani ya mwasi ná mobali oyo babalani esengeli kozala makasi lokola nde bakangisami na kole. Soki boyokani yango ekatani, bango mibale bakomona mpasi. Mobali oyo akómi na boyokani makasi ndenge wana na mwasi na ye akoboya lolenge nyonso ya pornografi. Akolongola miso mbala moko mpo ‘atala te eloko oyo ezangi ntina.’ (Nz. 119:37) Kutu, akosala kondimana na miso na ye mpo atala te mwasi mosusu na ndenge ya koyoka ye mposa na esika ya mwasi na ye.—Yobo 31:1. w25.01 10 par. 12-13

Mwamitano, 11 sanza ya 12

Nzambe na biso . . . akolimbisa mpenza.—Yis. 55:7.

Ntango moto alimbisi moninga, eyebanaka mpenza te soki elimboli nini. Ndenge Yehova alimbisaka biso bato ya kozanga kokoka ekeseni mpenza na ndenge oyo tolimbisanaka biso na biso. Ndenge Yehova alimbisaka ekokani na mosusu te. Mokomi ya nzembo alobaki mpo na Yehova ete: “Olimbisaka mpenza, mpo bázala na nsɔmɔ na yo.” (Nz. 130:4) Ya solo, Yehova ‘alimbisaka mpenza’; kolimbisa ya solo ezalaka epai na ye. Ye nde amonisi biso soki kolimbisa elimboli mpenza nini. Na bisika mosusu, mpo na kolobela ndenge Yehova alimbisaka, bakomi ya Biblia basalelaki liloba moko ya Ebre oyo basalelá yango te mpo na kolobela kolimbisa ya bato. Ntango Yehova alimbisi moto, lisumu ya moto yango elongwe. Boyokani oyo ebebaki ezongi mpenza malamu. Kolimbisa ya Yehova ezalaka mobimba mpenza mpe akakatanaka te kosala yango. w25.02 8 par. 1-3

Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 12

Apesaki biso mitindo ya kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu.—Mis. 10:42.

Kolonga na mosala ya kosakola etaleli te ndenge oyo bato bazali koyoka biso. Mpo na nini? Mpo tosali oyo Yehova ná Mwana na ye balingi tósala: topesi litatoli. Ata soki tosololi na moto te, to ntango bato baboyi nsango na biso, tokoki kozala na esengo mpo toyebi ete tosepelisi Tata na biso ya likoló. (Mas. 27:11) Tokoki mpe kosepela ntango mosakoli moko azwi moto oyo asepeli na kati ya teritware na biso. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokanisaki mosala ya kosakola na mosala ya koluka mwana oyo abungi. Bato ebele bamipesaka na koluka mwana yango na bisika ndenge na ndenge. Ntango mwana amonani moto nyonso azalaka na ntina ya kosepela, kaka te moto oyo amonaki ye. Ndenge moko mpe, lisangá mobimba esalisaka na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Esɛngaka bandeko nyonso mpo na kosakola na teritware mobimba, mpe biso nyonso tosepelaka ntango moto ya sika abandi koyangana na makita. w24.04 18 par. 13-14

Mwalomingo, 13 sanza ya 12

Baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.—Mis 13:48.

Makambo ya malamu mpenza ezali liboso! Na lipamboli ya Yehova, tozali kolikya komona lisusu bato ebele bándima solo liboso bolɔzi monene ebanda. Lisusu, tozali na esengo ya koyeba ete mbala mosusu ata na ntango ya bolɔzi monene, bato mosusu ebele bakoki kokima mokili ya Satana mpe bakoya kosanzola Yehova elongo na biso. Kasi sikoyo, tozali na mosala ya kosala. Tozali na libaku malamu ya kosala likambo oyo ekozongelama lisusu te: kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mabele mobimba. Kaka na ntango yango, tosengeli kokoba kokebisa bato. Bato basengeli koyeba ete nsuka ya mokili oyo mabe ezali koya nokinoki. Tiká ete bolingo—bolingo mpo na nsango malamu, bolingo mpo na bato, mpe koleka nyonso, bolingo mpo na Yehova Nzambe mpe nkombo na ye—ekoba kotinda biso tósakola na mposa makasi, na lombangu, mpe na molende tii ntango Yehova akoloba ete: “Ekoki bongo!” w24.05 19 par. 14-16

Mwayambo, 14 sanza ya 12

Bólata komikitisa na boyokani na bino na basusu, mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.—1 Pe. 5:5.

Na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu ateyaki Petro ná bantoma mosusu liteya moko ya ntina na oyo etali komikitisa. Na ntembe te bantoma bakamwaki mpenza komona ye azali kosala mosala oyo basaleli nde bazalaki kosala. Yesu alongolaki bilamba na ye ya likoló, akangaki esumɛ na loketo na ye, atyaki mai na saani, mpe abandaki kosukola bango makolo. (Yoa. 13:​4, 5) Mbala mosusu ezwaki mwa ntango mpo na kosukola makolo ya bantoma nyonso 12—ata mpe ya Yudasi, oyo alingaki kotɛka ye. Kasi, na komikitisa nyonso, Yesu asalaki mosala yango tii na nsuka. Na nsima na motema molai nyonso, Yesu alobaki na bango: “Bokangi ntina ya likambo oyo nasali bino? Bobengaka ngai, ‘Moteyi’ mpe ‘Nkolo,’ mpe bolobaka solo, mpo nazali Moteyi mpe Nkolo. Na yango, soki ngai, Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo.”—Yoa. 13:​12-14. w25.03 10 par. 9-11

Mwamibale, 15 sanza ya 12

Okambaka ngai na toli na yo, mpe na nsima okomema ngai tii na nkembo.—Nz. 73:24.

Mokili ezali kosala ete ezala mpasi kotikala penepene na Yehova. Bato mingi bandimaka te ete Nzambe azalaka. Mbala mingi, emonanaka lokola ete baoyo batosaka Nzambe te bazali na bomoi ya malamu. Ntango tozali komona likambo yango, kondima na biso ekoki kokita. Atako tokowangana te ete Nzambe azalaka, tokoki kobanda komituna soki akosalisa biso. Mokomi ya nzembo 73 amiyokaki bongo na ntango moko boye. Amonaki ete zingazinga na ye, baoyo bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe te bazalaki na bomoi ya malamu. Na yango, akómaki komituna soki ezali na ntina kosalela Nzambe. (Nz. 73:​11-13) Nini esalisaki mokomi ya nzembo asembola makanisi na ye? Amanyolaki na oyo ekokómela baoyo babosanaka Yehova. (Nz. 73:​18, 19, 27) Akanisaki mpe matomba oyo kosalela Nzambe epesaka. Biso mpe tokoki kokanisaka mapamboli oyo Yehova apesi biso. w24.06 25 par. 16-17

Mwamisato, 16 sanza ya 12

Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino.—Ebr. 13:5.

Na ntango ya kala, basusu bazalaki kolyela bandeko na bango babola na ndenge bazalaki kosɛnga bango benefisi ntango badefisi bango mbongo. Lisusu, bazuzi mosusu bazalaki kondima kanyaka mpe ezalaki kotinda bango bákweisa baoyo basali likambo te. Yehova ayini makambo ya ndenge wana. (Ezk. 22:12) Ezali malamu tóyeba mpenza ndenge totalelaka mbongo. Omituna boye: ‘Makanisi na ngai ekendaka mbala mingi na mbongo mpe na biloko oyo ekoki kosomba? Soki nadefi mbongo, ekómaka kilo nafuta yango, mpo nazali kokanisa ete moto oyo adefisaki ngai azali na mposa na yango te? Soki nazali na mbongo namimonaka ete naleki basusu, kasi ezalaka mpasi nakabela bato? Nakanisaka ete ndeko boye to boye alingá biloko ya mokili kaka mpo azali na mbongo? Nalingaka kozala moninga ya bato ya mbongo mpe nakipaka mpenza te baoyo bazali babola?’ Tokobatela boninga na biso na Nzambe kaka soki bomoi na biso ezali na bolingo ya mbongo te. Soki tosali bongo, Yehova akotika biso soki moke te! w24.06 12-13 par. 17-18

Mwaminei, 17 sanza ya 12

Naboyi etamboli nyonso ya mabe, mpo nabatela liloba na yo.—Nz. 119:101.

Mpo na komibatela na komekama, tosengeli mpe kokolisa bamposa ya malamu. Soki toyekoli ‘koyina oyo ezali mabe mpe kolinga oyo ezali malamu,’ tokokóma na ekateli makasi ya kosala oyo ezali malamu. (Amo. 5:15) Bamposa ya malamu ekopesa mpe biso makasi ya kotikala ngwi soki tokutani na komekama. Tosengeli kokoba komipesa mingi na makambo ya elimo. Ntango tozali na makita to na mosala ya kosakola, tokolisaka nde mposa ya kosepelisa Yehova. (Mat. 28:​19, 20; Ebr. 10:​24, 25) Ntango tozali kotánga Biblia, koyekola yango mpe komanyola makambo oyo totángi, tokómaka mpenza kolinga oyo ezali malamu mpe koyina oyo ezali mabe. (Yos. 1:8; Nz. 1:​2, 3; 119:97) Tóbosana te, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bókoba . . . kobondela ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.” (Mat. 26:41) Na yango, tozali kopesa Yehova libaku ya kosalisa biso mpe kokómisa makasi ekateli na biso ya kosepelisa ye.—Yak. 4:8. w24.07 17-18 par. 14-16

Mwamitano, 18 sanza ya 12

Nakopesa yo bososoli mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.—Nz. 32:8.

Ezali malamu ete baoyo bazali kopesa basusu formasyo bámekola ndenge oyo Yehova apesaka basusu bwanya. Tóbosana te ete Yehova asepelaka kopesa basusu bwanya mingi. Ndenge moko mpe, ntango tozali kopesa basusu formasyo, tosengeli koyebisa mpe kolakisa bango makambo nyonso oyo toyebi. Tosengeli te kobomba boyebi ndambo mpo tozali kobanga ete lobilobi moto oyo azali kozwa formasyo azwa esika na biso. Tolobaka mpe te ete: ‘Ngai mpe bapesaki ngai formasyo te! Ye mpe abunda kaka ye moko.’ Makanisi ya ndenge wana ebongi te mpo na basaleli ya Yehova. Tosengeli nde kozala na esengo ya kopesa basusu kaka boyebi te, “kasi mpe bomoi na biso mpenza.” (1 Tes. 2:8) Tozalaka na elikya ete “bango mpe bakozala na makoki ya koteya bato mosusu.” (2 Tim. 2:​1, 2) Soki moto na moto na ngala na ye azali kolakisa basusu makambo oyo ayekolá, biso nyonso tokobanda koyoka esengo ya kopesa. w24.09 29 par. 12-13

Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 12

Tozali biteni ya nzoto, oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.—Rom. 12:5.

Soki omoni ete ozali te na makoki ya kokamwa, kolɛmba nzoto te. Na ntembe te ozali na bizaleli malamu oyo ekoki kosalisa lisangá. Okoki kotánga na likebi maloba ya Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 12:​12-30 mpe kobondela mpo na yango. Maloba ya Paulo emonisi polele ete, ndenge moko na basaleli mosusu nyonso ya Yehova, ozali na ntina mpe okoki kosalisa lisangá. Salá nyonso oyo okoki mpo na kosalela Yehova mpe kosalisa bandeko! Yebá ete bankulutu bakotalela makoki na yo liboso bápesa yo mosala moko boye. (Rom. 12:​4-8) Bakristo nyonso basengeli kopusana penepene na Yehova, koyoka esengo ya kopesa, mpe kozala ndakisa na oyo etali kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango. w24.11 17 par. 12-13

Mwalomingo, 20 sanza ya 12

Abandaki kobondela Yehova mpe kolela mingi mpenza.—1 Sa. 1:10.

Hana akutanaki na makambo ebele oyo esalaki ete abimisa mai ya miso mpo na mawa. Moko ya mikakatano na ye ezali ete azalaki na libala ya bombanda, mpe Penina, mwasi mosusu ya mobali na ye azalaki kolinga Hana te. Longola yango, Hana azalaki na mwana te, kasi Penina azalaki na bana ebele. (1 Sa. 1:​1, 2) Penina azalaki kotyola Hana ntango nyonso mpo azalaki ekomba. Hana atungisamaki mingi tii “azalaki kolela mpe koboya kolya,” mpe “ayokaki mpasi mingi na motema.” (1 Sa. 1:​6, 7, 10) Nini ebɔndisaki Hana? Likambo moko oyo esalisaki ye ezalaki ete akendaki na tabernakle kosambela Yehova. Kuna, asɛngaki Yehova boye: ‘Talá mpenza mpasi na ngai mosaleli na yo, mpe kanisá ngai.’ (1 Sa. 1:11) Yehova amonaki mpasi ya Hana, ayokaki kolela na ye, mpe na nsima apambolaki ye na ndenge asalisaki ye abota bana.—1 Sa. 1:​19, 20; 2:21. w24.12 21 par. 5-7

Mwayambo, 21 sanza ya 12

Nazalaki kolinga mingi bana ya bato.—Mas. 8:31.

Lisiko eteyaka mpe biso ete Yesu alingaka mpenza bato, mingimingi bayekoli na ye. (Yoa. 13:1) Na ndakisa, Yesu ayebaki ete makambo mosusu oyo akosala na mosala na ye awa na mabele ekozala mpasi mpenza, mingimingi liwa na ye ya mpasi. Atako bongo, ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, asalaki yango te tiká kaka asala. Kasi, amipesaki na motema mobimba na kosakola, koteya, mpe kosalela basusu. Ata na mokolo ya liwa na ye, Yesu azwaki ntango ya kosukola makolo ya bantoma na ye mpe na maloba na ye ya nsuka, alendisaki bango mpe apesaki bango malako. (Yoa. 13:​12-15) Mpe ntango azalaki na nzete ya mpasi, Yesu azwaki mwa miniti mpo na kopesa elikya na mosali-mabe oyo azalaki kokufa pene na ye, mpe azwaki bibongiseli mpo mama na ye abatelama. (Luka 23:​42, 43; Yoa. 19:​26, 27) Na yango, Yesu amonisaki bolingo mpenza kaka na ntango ya liwa na ye te, kasi na bomoi na ye mobimba awa na mabele. w25.01 23 par. 11

Mwamibale, 22 sanza ya 12

Andimaki etumbu mpo biso tózala na kimya, mpe tobiki mpo na bampota na ye.—Yis. 53:5.

Biblia esaleli maloba ya elilingi mpo na kosalisa biso tóyeba bonsomi oyo tozwaka ntango Yehova alimbisi biso. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tobendamaka na masumu, Biblia ebengi biso “baombo ya lisumu.” Kasi ntango Yehova alimbisi biso, tokómaka lokola baombo oyo ‘basikolami na lisumu.’ (Rom. 6:​17, 18; Em. 1:5) Ya solo, ntango Yehova alimbisi biso, epesaka biso esengo mpo toyokaka ete tolongwe na boombo. Na lisalisi ya mbeka ya lisiko oyo Yehova apesaki na nzela ya Mwana na ye, Biblia elobeli biso lokola bato oyo babiki. (1 Pe. 2:24) Lisiko esali ete boyokani na biso elongo na Yehova ezonga malamu; boyokani yango ebebaki mpo na maladi ya elimo, elingi koloba lisumu. Ndenge kaka moto oyo abiki na maladi asepelaka mpenza, biso mpe tosepelaka ntango tobiki na elimo mpe tozongi na boyokani malamu ná Yehova mpo alimbisi biso. w25.02 11 par. 16; 13 par. 17

Mwamisato, 23 sanza ya 12

Soki bokobi kosala makambo wana bokokwea ata moke te.—2 Pe. 1:10.

Na ndakisa ya batalanta, Yesu alobelaki baombo mibale oyo bazalaki sembo epai ya nkolo na bango, mpe moombo moko oyo azalaki sembo te. (Mat. 25:​14-30) Baombo mibale ya sembo bazali komonisa bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo. Nkolo, elingi koloba Yesu, abengi bango ‘báya kosepela elongo na nkolo na bango.’ Bazwaka mbano na bango ya bomoi na likoló, lisekwa ya liboso. (Mat. 25:​21, 23; Em. 20:5b) Nzokande, ndakisa mabe ya moombo ya gɔigɔi ezali likebisi mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na ndenge nini? Basengeli komonisa ete bazali makasi na mosala mpe na molende. Ndenge moko na ndakisa ya bangɔndɔ, na ndakisa ya batalanta, Yesu alingaki koloba te ete bakristo oyo batyami mafuta bakokóma gɔigɔi. Kasi, azalaki nde komonisa likambo oyo ekosalema soki babungisi molende na bango. Soki molende na bango esili, bakolonga te kobatela ‘kobengama na bango mpe koponama na bango,’ mpe bakozwa ndingisa te ya kokɔta na Bokonzi ya likoló. w24.09 22 par. 10; 23 par. 12-13

Mwaminei, 24 sanza ya 12

Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.—Flp. 1:10.

Biso nyonso tolingaka ete tózala na likoki ya kokokisa bamposa na biso mpe ya bato ya libota na biso. (Mos. 7:12; 1 Tim. 5:8) Na yango, ntango tozali kotalela mosala moko, mbala mingi, totalaka mpe mbongo oyo tokozwa, mpe yango ezali mabe te. Kasi, moto akoki kotambola na komona soki ataleli kaka mbongo. Soki tozali kotambola na kondima, tokotalela mpe soki mosala yango ekoki kosala nini na boninga na biso na Yehova. Tokoki komituna boye: ‘Mosala yango ekosɛnga nasala makambo oyo Yehova ayinaka?’ (Mas. 6:​16-19) ‘Ekobanda kozangisa ngai makita mpe mosala ya kosakola, mpe ekoki kokabola ngai na libota na ngai ntango molai?’ Soki oyanoli ɛɛ na mituna yango, ekozala likambo ya bwanya ondima mosala yango te, ata soki ezali mpasi kozwa mosala. Soki tozali kotambola na kondima, tokozwa bikateli oyo ekomonisa ete tondimi ete Yehova akokokisa bamposa na biso na lolenge moko boye.—Mat. 6:33; Ebr. 13:5. w25.03 21 par. 5-6

Mwamitano, 25 sanza ya 12

Bózala nde na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.—Ef. 4:32.

Tosengeli ntango nyonso kosala makasi tómonaka bandeko nyonso ndenge Yehova amonaka bango. Mpo na kosala bongo, tosengeli kotyaka likebi na bizaleli na bango ya malamu kasi te na mabunga na bango, oyo nsukansuka ekosila. Tokoki kosilisa na bolingo matata nyonso oyo ebimi kati na biso. Soki tozali kosala bongo, paradiso ya elimo ekobenda bato oyo balingaka ete basusu básalela bango makambo ya ndenge wana. Tiká ete tózala ntango nyonso na botɔndi mpo na paradiso oyo Yehova asaleli biso. Moto nyonso oyo alingi kozala makasi na elimo, alingi kozala na esengo, na kimya, mpe kozwa libateli asengeli kokɔta na paradiso ya elimo mpe kotikala wana! Kasi, tókeba mpo Satana asalaka nyonso mpo na kobimisa biso na paradiso yango. (1 Pe. 5:8; Em. 12:9) Tosengeli te kotika ye alonga. Tósala makasi mpenza mpo na kobatela kitoko, bopɛto, mpe kimya ya paradiso ya elimo. w24.04 24-25 par. 18-19

Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 12

Bókoba koluka liboso Bokonzi.—Mat. 6:33.

Baboti, bokoki kosalisa bana na bino bákolisa mposa ya kosalela Yehova na molende. Bóteya bana na bino na maloba mpe na misala ete makambo ya elimo, na ndakisa koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola ezali na ntina koleka makambo mosusu nyonso. Soki bozali kosala bongo te, bana bakoki kokanisa ete kozala Motatoli ya Yehova ezali kaka kozala na lingomba ya papa ná mama; bakozala mpenza te na boyokani na bango moko na Yehova. Na bongo, bakoki kotya losambo ya solo na esika ya mibale, to kutu kotika yango. Soki moto atiki kosalela Yehova, elikya esili mpo na ye? Te, mpo akoki kobongola motema mpe kozonga na losambo ya solo. Mpo asala yango, ekoki kosɛnga alona komikitisa mpe andima lisalisi ya bankulutu ya lisangá. (Yak. 5:14) Milende nyonso oyo akosala ekokokana te na matomba oyo akozwa soki azongeli boyokani malamu na Yehova! w24.07 24-25 par. 18-19

Mwalomingo, 27 sanza ya 12

Bókima pite!—1 Ko. 6:18.

Ndenge nini bokoki komibatela pɛto na eleko oyo bolingani? Wana bolingo na bino ezali kokola, moto na moto akobanda koyoka mposa ya moninga. Nini ekosalisa bino bóbatela bizaleli ya pɛto? Bóbɛtaka te masolo ya makambo ya mbindo, bózalaka kaka bino mibale te, mpe bóboya komɛla masanga mingi. (Ef. 5:3) Makambo wana ekoki kolamwisa bamposa ya nzoto mpe kolɛmbisa ekateli na bino ya kosala oyo ezali malamu. Ekozala likambo ya bwanya kosolola mbala na mbala mpo na bandelo oyo bokoki komityela mpo bómibatela pɛto. (Mas. 22:3) Bato oyo balingani bakoki komoniselana lolango na ndenge oyo ebongi wana boyokani na bango ekoli mpenza. Nzokande, soki bamposa ya nzoto na yo ekómi makasi, ekoki kokóma mpasi mpo okanisa malamu mpo na moto oyo bolingani na ye. (Loy. 1:2; 2:6) Komoniselana lolango ekoki mpe komema noki na etamboli ya mbindo. (Mas. 6:27) Yango wana, banda na ebandeli ya boyokani na bino, bólobela bandelo oyo bokomityela, na boyokani na mitinda ya Biblia.—1 Tes. 4:​3-7. w24.05 29 par. 10-11

Mwayambo, 28 sanza ya 12

Tiká ete liloba na bino ‘Ɛɛ’ ezala ɛɛ, ‘Te’ na bino, te.—Mat. 5:37.

Tolingaka ete basusu bátyela biso motema, mingimingi na bantango ya mpasi. (Mas. 17:17) Ndenge nini tokoki koyebana lokola bato oyo basusu bakoki kotyela motema? Tokoki kosala milende mpo na kozala ntango nyonso na bizaleli ya bonzambe, na ndakisa kokokisa maloba na biso mpe kosala makasi tótosaka ngonga. Bankulutu oyo bazali bato ya kotyela motema bazali lipamboli mpo na lisangá. Na ndenge nini? Basakoli basepelaka soki bayebi ntango babengi, bakozwa mbala moko bankulutu, na ndakisa mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola. Bandeko bamiyokaka mpe ete babatelami malamu ntango bayebi ete bankulutu bandimaka mbala moko kosalisa bango. Mpe ntango bankulutu bazali kopesa toli oyo euti na Biblia mpe na mikanda ya moombo ya sembo na esika ya kopesa makanisi na bango moko, bandeko batyelaka bango motema lisusu mingi. Lisusu, bandeko basepelaka mpe mingi kotya motema epai ya nkulutu oyo alobaka te makambo ya bato mpe oyo asalaka nyonso akokisa maloba na ye. w24.06 30 par. 14-15

Mwamibale, 29 sanza ya 12

Okopesa bango kimya ntango nyonso, mpo batyaka motema na bango epai na yo.—Yis. 26:3.

Lelo oyo, tokoki kozela te ete Yehova alongola mikakatano na biso nyonso na ndenge ya likamwisi, kasi toyebi ete akosunga biso. (Nz. 41:3) Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova apesaka biso makasi, bwanya, mpe kimya ya motema mpo tóyika mpiko. (Mas. 18:14; Flp. 4:13) Asungaka biso mpe na nzela ya elikya oyo apesi biso na Biblia, ete mokolo mosusu maladi ya ndenge nyonso ekozala lisusu te. (Yis. 33:24) Yehova akomisaki na Biblia maloba ya kokitisa motema oyo ekoki kopesa biso makasi ntango tokutani na makambo oyo epesaka mpasi mpe mawa. (Rom. 15:4) Ntango bazwaki ndeko mwasi moko na Afrika ya Wɛsti maladi ya kanser, ndeko mwasi yango azalaki kolela mingi. Alobi boye: “Vɛrsɛ moko oyo ezalaki kobɔndisa ngai mingi ezali Yisaya 26:3. . . . Vɛrsɛ wana emonisaka ngai ete Yehova akoki kopesa biso kimya ya motema oyo ekosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano oyo tokutani na yango.” Yo mpe ozalaka na vɛrsɛ oyo omonaka ete ekitisaka yo motema mingi ntango okutani na makambo ya mpasi mpenza, to mbala mosusu ozali komona ete elikya ezali te mpo na yango? w24.12 24 par. 17-18

Mwamisato, 30 sanza ya 12

Ntango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa; apotaki mbangu, ayambaki ye makasi mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto.—Luka 15:20.

Bankulutu basalaka makasi ya kolimbisa baoyo batiki Yehova. Balingaka ete bampate yango oyo babungi “bázonga na ndako.” (Luka 15:​22-24, 32) Esengo ezalaka na likoló mpe awa na mabele ntango mosumuki moko azongeli Yehova! (Luka 15:7) Emonani polele ete Yehova andimaka te ete basumuki oyo baboyi kobongola motema bátikala na kati ya lisangá. Kasi, apesaka basumuki mokɔngɔ libela te. Alingaka bázongela ye. Ndenge oyo Yehova amiyokaka mpo na basumuki oyo babongoli motema emonani na Hosea 14:4; elobi boye: “Nakobikisa kozanga bosembo na bango. Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli, mpo nkanda na ngai elongwe epai na bango.” Yango esengeli mpenza kotinda bankulutu báluka ata elembo ya moke oyo emonisi ete moto abandi kobongola motema. Esengeli mpe kotinda baoyo batiká Yehova bázongela ye noki mpenza. w24.08 28 par. 8-9

Mwaminei, 31 sanza ya 12

Bómonisa botɔndi.—Kol. 3:15.

Tóyeba ete bato mosusu bamonisaka botɔndi te mpo na likambo oyo tosaleli bango. Ekómaka ete topesaki basusu ntango, makasi, to biloko na biso, kasi na nsima tozali komituna soki bato yango bamoni makambo oyo tosaleli bango. Soki esalemi bongo, nini ekosalisa biso tóbungisa te esengo na biso mpe tólɛmba nzoto? Kanisá esengo na biso etaleli te ndenge oyo bato bakosala ntango tokabeli bango. (Mis. 20:35) Tokoki kopona koyoka esengo ya kopesa ata soki tomoni ete bato bazali na botɔndi te. Na ndenge nini? Kobosana te ete ozali komekola Yehova. Apesaka bato biloko ya malamu ezala bamonisi botɔndi to te. (Mat. 5:​43-48) Yehova alaki ete ntango biso mpe tozali kopesa “kozanga kozela ete bázongisela [biso] eloko . . . mbano na [biso] ekozala monene.” (Luka 6:35) “Eloko” oyo bakoki kozongisela biso ekoki kozala mpe matɔndi oyo moto apesi. Ezala moto apesi matɔndi to te, Yehova akofuta bolamu oyo tosalaka mpo na basusu, mpo tozali ‘kopesa na esengo.’—Mas. 19:17; 2 Ko. 9:7. w24.09 29 par. 14-16

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto