Sanza ya 11
Mwalomingo, 1 sanza ya 11
Nakokanga nkanda mpo na libela te.—Yir. 3:12.
Bankulutu basalaka makasi bámekola motema mawa ya Yehova ntango bazali kosolola na moto oyo alongolamá na lisangá. Na ndakisa, Yehova azalaki kozela te ete bato ya Yisraele oyo bazalaki kobuka mibeko na ye bábongola motema liboso ete asalisa bango. Kasi, ye nde azalaki kosalisa bango liboso kutu bámonisa ata moke ete babongoli motema. Yehova amonisaki ndenge azali na motema mawa mingi ntango ayebisaki mosakoli Hosea azongela mwasi na ye, oyo azalaki naino kosala lisumu. (Hos. 3:1; Mal. 3:7) Mpo na komekola Yehova, bankulutu balingaka ete mosumuki azonga na lisangá, mpe basalaka ete yango ezala pɛtɛɛ mpo na ye kosala yango. Na ndakisa ya Yesu ya mwana oyo abungaki nzela, tata “apotaki mbangu, ayambaki [mwana na] ye makasi mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto.” (Luka 15:20) Tósimba ete tata yango azelaki te ete mwana na ye aya kosɛnga bolimbisi. Kasi, ye nde akendaki liboso, ndenge tata nyonso ya bolingo akoki kosala. w24.08 28 par. 7-8
Mwayambo, 2 sanza ya 11
Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo apesaka bato nyonso na motema mobimba, mpe alukaka mabunga te.—Yak. 1:5; msl.
Ndenge maloba ya mokapo ya lelo emonisi yango, Yehova abombaka te bwanya na ye kaka mpo na ye moko. Asepelaka kopesa yango mpe basusu. Vɛrsɛ elobi mpe ete ntango Yehova apesaka bwanya, “apamelaka te,” to “alukaka mabunga te.” Alukaka ata moke te kosala ete tóyoka mabe mpo tondimi ete tozali na mposa ya litambwisi na ye. Kutu, alendisi biso tóluka bwanya na ye. (Mas. 2:1-6) Bongo biso? Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kopesa basusu bwanya? (Nz. 32:8) Basaleli ya Yehova bazwaka mabaku mingi ya koyebisa basusu makambo oyo bayebi. Na ndakisa, mbala mingi tolakisaka bato ya sika ndenge ya kosakola. Na motema molai nyonso, bankulutu basalisaka basaleli na misala mpe bandeko mibali oyo bazwá batisimo báyekola ndenge ya kokokisa mikumba na lisangá. Mpe bandeko oyo bayebi malamu mosala ya botongi mpe ya kobatela bandako basalisaka na kopesa basusu formasyo na mosala ya kotonga mpe kobatela bandako ya losambo. w24.09 28-29 par. 11-12
Mwamibale, 3 sanza ya 11
Bokómaki bandeko na biso ya bolingo.—1 Tes. 2:8.
Ndeko mobali, mpo okóma nkulutu, osengeli “kozala moto oyo afundami na likambo moko te,” elingi koloba, bandeko ya lisangá balobaka malamu mpo na yo mpo etamboli na yo ezali malamu. (1 Tim. 3:2) Lisusu, osengeli kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu. Bato oyo bazali bandimi te bakoki kotyola bindimeli na yo ya bokristo, kasi basengeli kozala ata na ntina moko te ya kotyela bosembo to etamboli na yo ntembe. (Dan. 6:4, 5) Omituna boye, ‘Nazali na nkombo malamu na kati mpe na libándá ya lisangá?’ Soki ozali “moto oyo alingaka makambo ya malamu,” okoluka makambo ya malamu epai ya basusu mpe okopesa bango longonya mpo na bizaleli na bango. (Tito 1:8) Okozala mpe na esengo ya kosalela basusu bolamu, koleka ata oyo basɛngi yo. Mpo na nini ezaleli yango ezali mpenza na ntina mpo na bankulutu? Mpo esalisaka bango bápesa ntango na bango mingi mpo na kobatela lisangá mpe kokokisa mikumba mosusu. (1 Pe. 5:1-3) Kasi, esengo oyo bayokaka na kosalela basusu eleki mosika makambo oyo bamipimelaka.—Mis. 20:35. w24.11 20 par. 3; 21 par. 4-5
Mwamisato, 4 sanza ya 11
Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.—Mis 20:35.
Basaleli na misala basalaka misala ya ntina na lisangá. Na ntembe te ntoma Paulo azalaki kosepela na bandeko yango ya sembo. Na ndakisa, ntango akomelaki bakristo ya Filipi, alobaki polele ete bápesa basaleli na misala mbote elongo na bankulutu. (Flp. 1:1) Bázala bilenge to mikóló, bandeko mibali oyo bazwá batisimo bayokaka esengo mingi soki bazali basaleli na misala. Na ndakisa, Devan azalaki na mbula 18 ntango atyamaki mosaleli na misala. Mpe ndeko mobali moko na nkombo Luis atyamaki mosaleli na misala ntango azalaki na mbula mwa moke koleka 50. Amonisi mayoki oyo bandeko mingi bazalaka na yango ntango alobaki: “Namonaka ete ezali libaku malamu kosala lokola mosaleli na misala, mingimingi ntango nakanisaka bolingo nyonso oyo lisangá emoniselá ngai!” Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo mpe ozali naino mosaleli na misala te, mpo na nini te omityela mokano yango? w24.11 14 par. 1-3
Mwaminei, 5 sanza ya 11
Nabondeli yo, Ee Yehova, . . . kobosana te ete . . . nasalaki makambo oyo ezali malamu na miso na yo.—2 Bak. 20:3.
Ntango Ezekiasi mokonzi ya Yuda azalaki na mbula 39, abɛlaki maladi moko makasi. Mosakoli Yisaya ayebisaki Ezekiasi nsango ya Yehova ete maladi yango ekoboma ye. (2 Bak. 20:1) Emonanaki ete elikya ezali te mpo na Ezekiasi. Lokola nsango yango epesaki ye mawa makasi, Ezekiasi alelaki mingi mpenza. Abondelaki Yehova asalisa ye. Yehova ayokaki mawa mpo na mai ya miso oyo Ezekiasi atangisaki ntango azalaki kobondela ye, mpe na boboto nyonso ayebisaki ye: “Nayoki libondeli na yo. Namoni mai ya miso na yo. Talá, nazali kobikisa yo na maladi oyo.” Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova amoniselaki Ezekiasi motema mawa, mpe alakaki ete akobakisa molai ya bomoi na ye mpe akobikisa Yerusaleme na mabɔkɔ ya bato ya Asiri. (2 Bak. 20:4-6) Ozali na maladi oyo ezali kotinda yo omona lokola elikya ezali te? Bondelá Yehova, ata na mai ya miso. Biblia elobi ete “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso” akobɔndisa biso na mikakatano na biso nyonso.—2 Ko. 1:3, 4. w24.12 24 par. 15-17
Mwamitano, 6 sanza ya 11
Nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala, ya bato ya sembo mpe ya bato oyo bazangi bosembo.—Mis. 24:15.
Ekozala esengo koyamba baoyo bakosekwa! Kanisá mpe esengo oyo okozala na yango ntango okoyekola biloko mingi oyo Yehova akelá. (Nz. 104:24; Yis. 11:9) Oyo eleki nyonso, kanisá esengo ya kosambela Yehova kozanga komiyoka ete osengeli kosɛnga bolimbisi mpo na mabe oyo osali. Okotya mapamboli wana pembeni mpo ozwa “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu” lelo oyo? (Ebr. 11:25) Soki moke te! Mapamboli wana eleki mosika eloko nyonso oyo tokoki komipimela na mokili oyo lelo. Kobosana te, Paradiso awa na mabele ekozala ntango nyonso elikya te. Nsukansuka ekokóma likambo ya solo, tokozala wana. Nyonso wana elingaki kosalema te soki Yehova alingaki biso mingi te, mpe apesaki te likabo ya Mwana na ye! w25.01 29 par. 12
Mwapɔsɔ, 7 sanza ya 11
Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?—Mit. 11:23.
Moize azali moko ya bato ya kondima makasi oyo mokanda ya Baebre elobeli. (Ebr. 3:2-5; 11:23-25) Kondima ya Moize ezalaki bindimelá te, mpo Nzambe apesaki bato bilei mpe mai na ndenge ya likamwisi na esobe wana ekauká. (Kob. 15:22-25; Nz. 78:23-25) Nzokande, atako Moize azalaki na kondima makasi, soki mbula moko nsima ya kosikola Yisraele na ndenge ya likamwisi, atyaki ntembe na likoki ya Yehova ya kopesa bato na Ye mosuni. Moize azalaki komona te ndenge oyo Yehova akokaki kopesa mosuni ebele mpo bamilio ya bato oyo bazalaki na esobe bálya mpe bátonda. Na yango, Yehova atunaki Moize ete: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?” (Mit. 11:21-23) Na maloba mosusu, Yehova azalaki kotuna Moize: ‘Ozali mpenza kokanisa ete nakokoka kosala te oyo nalobi?’ w25.03 26 par. 1-2
Mwalomingo, 8 sanza ya 11
[Nzambe] amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu.—2 Pe. 2:5.
Tosengeli komona ete lisolo ya Mpela ezali na ndimbola ya elilingi? Te. Mpo na nini? Mpo eloko moko te na kati ya Biblia epesi biso nzela ya komona yango bongo. Yesu akokanisaki mikolo ya Noa na ntango ya kozala na ye, kasi alobaki te ete Mpela ezalaki na ndimbola ya elilingi, ete moto mokomoko mpe likambo mokomoko oyo esalemaki ezali elilingi ya eloko moko boye. Yesu alobaki mpe te ete ndenge Nzambe akangaki porte ya masuwa ezali na ndimbola moko ya elilingi. Noa asalaki nini ntango ayokaki nsango ya lisambisi ya Yehova? Amonisaki kondima na ye na ndenge atongaki masuwa. (Ebr. 11:7; 1 Pe. 3:20) Ndenge moko mpe, bato oyo bayoki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe basengeli komonisa kondima mpe kosalela makambo oyo bayoki. (Mis. 3:17-20) Petro abengaki Noa “mosakoli ya bosembo.” Lelo oyo, tozali kosala makasi tósakwela bato na mokili mobimba, mpe tosalaka makasi tózala na molende na mosala ya kosakola. Kasi, ata soki tosali makasi ndenge nini, tokokoka te koyebisa moto mokomoko oyo azali awa na mabele nsango malamu liboso nsuka eya. w24.05 9-10 par. 3-5
Mwayambo, 9 sanza ya 11
Akumisaka baoyo babangaka Yehova.—Nz. 15:4.
Tosengeli kolukaka mabaku ya komonisela baninga ya Yehova boboto mpe limemya. (Rom. 12:10) Ndenge nini? Na kotalela Nzembo 15:4, lolenge ya liboso ezali ete “ntango [mopaya na hema ya Yehova] alaki likambo moko, akokisaka yango, ata soki ekoki kobimisela ye mokakatano.” Kozanga kokokisa makambo oyo tolaki ekoki mpenza kopesa basusu mpasi. (Mat. 5:37) Na ndakisa, Yehova azelaka ete bapaya na ye bátosa elako oyo basalaki mokolo ya libala. Asepelaka mpe ntango baboti basalaka nyonso mpo na kokokisa makambo oyo balaki bana na bango. Kolinga Nzambe mpe bazalani na biso ekotinda biso tósalaka nyonso oyo tokoki mpo na kokokisa maloba na biso. Lolenge mosusu ya kokumisa baninga ya Nzambe ezali ya kozala moyambi-bapaya mpe lobɔkɔ pɛtɛɛ. (Rom. 12:13) Kolekisa ntango elongo na bandeko na biso ekosalisa biso tókómisa lisusu boninga na biso makasi elongo na bango mpe elongo na Yehova. Longola yango, soki tozali koyamba bapaya, tozali komekola Yehova. w24.06 12 par. 15-16
Mwamibale, 10 sanza ya 11
Moto, mowei mpamba azali nani mpo okanisa ye?—Nz. 8:4.
Yehova amonisaka solo epai bato ya komikitisa. (Mat. 11:25) Na komikitisa nyonso, tondimaki básalisa biso tóyeba solo. (Mis. 8:30, 31) Kasi, tosengeli kokeba ete tókóma na lolendo te. Lolendo ekoki kotinda biso tóbanda kokanisa ete lolenge na biso ya kotalela makambo ezali solo kaka lokola mitinda ya Biblia mpe litambwisi oyo eutaka na ebongiseli ya Yehova. Mpo na kobatela komikitisa na biso, tosengeli kobosanaka te ete tozali mpenza moke liboso ya bonene ya Yehova. (Nz. 8:3, 4) Tokoki mpe kobondela mpo Yehova asalisa biso tózala na motema ya komitikisa, oyo endimaka koteyama. Yehova akosalisa biso tólekisa makanisi na ye, oyo apesi biso na nzela ya Liloba na ye mpe ebongiseli na ye, liboso ya makanisi na biso. Ntango ozali kotánga Biblia, luká makambo oyo emonisi ete Yehova alingaka ezaleli ya komikitisa mpe ayinaka lolendo, komikumisa mpe lofundo. Mpe salá makasi mpenza obatela komikitisa soki ozwi mokumba oyo epesi yo mwa bokonzi to mpe esali ete oyebana. w24.07 10 par. 8-9
Mwamisato, 11 sanza ya 11
Oyo ya moke akokóma nkóto mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya. Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.—Yis. 60:22.
Kobanda na 1919, Yesu asalelaka etuluku moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na kobongisa mosala ya kosakola mpe kopesa bayekoli na ye bilei ya elimo. (Luka 12:42) Ezali polele ete Yehova azali kopambola mosala ya etuluku yango. (Yis. 65:13, 14) Soki tozalaki na ebongiseli te, tolingaki kokoka te kosala mosala oyo Yesu apesaki biso. (Mat. 28:19, 20) Na ndakisa, kanisá soki bazalaki kopesa biso teritware te; moto nyonso akokaki kosakola epai nyonso oyo alingi. Basakoli mosusu balingaki kosakola kaka na bateritware moko mbala na mbala, kasi bateritware mosusu elingaki kotikala kaka bongo, moto asakolá kuna te. Ozali na ndakisa mosusu oyo emonisi matomba oyo tozwaka ndenge tosalaka makambo na molɔngɔ? Ndenge kaka Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo básalaka makambo na molɔngɔ ntango azalaki awa na mabele, asalaka mpe bongo mpo na biso lelo oyo. w24.04 8-9 par. 2-4
Mwaminei, 12 sanza ya 11
Soki obandi kosala makambo ya malamu, nakondima yo te? Kasi soki osali makambo ya malamu te, lisumu ebatami na porte, mpe ezali na mposa ya kokonza yo.—Eba. 4:7.
Kaina azalaki mwana mobali ya liboso ya Adama ná Eva. Asangolaki mposa ya kosala masumu epai ya baboti na ye. Lisusu, Biblia elobi mpo na ye ete: “Misala na ye moko ezalaki mabe.” (1 Yoa. 3:12) Mbala mosusu yango wana Yehova “andimaki ata moke te Kaina ná likabo na ye” ntango apesaki mbeka. Na esika abongola bizaleli na ye, “Kaina asilikaki makasi, mpe ayokaki mabe mpenza.” Yehova asalaki nini? Asololaki na Kaina. (Eba. 4:3-7) Simbá ete Yehova asololaki na Kaina na boboto, apesaki ye elikya, mpe akebisaki ye ete nkanda ekoki kotinda ye asala lisumu. Likambo ya mawa, Kaina aboyaki koyoka. Atikaki te ete Yehova asalisa ye abongola motema. Lokola Kaina ayokaki te, Yehova atikaki nde koluka kosalisa basumuki mosusu bábongola motema? Soki moke te! w24.08 10 par. 8
Mwamitano, 13 sanza ya 11
Osengeli kopona bomoi mpo ozala na bomoi.—Mib. 30:19.
Amonisaki ete Bayisraele bakoki kozala malamu mpenza na mikolo ezali koya. Na lipamboli ya Yehova, Bayisraele bakokaki kofanda ntango molai na mokili oyo Nzambe alakaki bango. Mokili yango ezalaki kitoko mpenza, etondi na mbuma! Moize alobelaki yango na maloba oyo: “Bingumba minene mpe kitoko oyo botongaki te, bandako oyo etondi na biloko nyonso ya kitoko, oyo bosalaki mpo na yango te, mabulu mpo na kobomba mai, oyo botimolaki te, bilanga ya vinyo mpe nzete ya olive oyo bolonaki te.” (Mib. 6:10, 11) Moize apesaki mpe Bayisraele likebisi. Mpo bákoba kofanda na mokili yango ya kitoko, basengelaki kokoba kotosa mibeko ya Yehova. Moize alendisaki bango ‘bápona bomoi’: báyokaka Yehova mpe ‘bákangama na ye.’ (Mib. 30:20) Kasi, Bayisraele baboyaki Yehova. Na yango, Nzambe apesaki nzela ete bato ya Asiri mpe na nsima bato ya Babilone bálonga bango mpe bámema bango na mboka mopaya.—2 Bak. 17:6-8, 13, 14; 2 Nt. 36:15-17, 20. w24.11 9 par. 5-6
Mwapɔsɔ, 14 sanza ya 11
Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.—Yoa. 6:44.
Bakristo mingi ya nkombo mpamba bamonaka ete bakozwa lobiko kaka soki bandimeli Yesu lokola mobikisi na bango. (Yoa. 6:29) Nzokande na kati ya ebele ya bato na Galile, bato mosusu oyo liboso bandimelaki Yesu basundolaki ye. Bato mingi na kati ya ebele ya bato oyo Yesu aleisaki basepelaki kolanda ye kaka soki azali kopesa bango oyo bazalaki koluka. Bazalaki kosepela na makamwisi ya kobikisa bango, bilei ya ofele, to mateya oyo eyokanaki na makanisi na bango. Kasi, Yesu amonisaki ete esɛngaki kosala likambo mosusu mpo na kozala moyekoli na ye ya solosolo. Ayaki na mabele kaka mpo na kokokisa bamposa ya bato ya mosuni te. Bato basengelaki kondima libyangi na ye ya ‘koya epai na ye,’ elingi koloba kondima mpe kotosa makambo nyonso oyo ateyaki.—Yoa. 5:40. w24.12 12 par. 12-13
Mwalomingo, 15 sanza ya 11
Mibali, bókoba kolinga basi na bino, kaka ndenge Kristo alingaki lisangá.—Ef. 5:25.
Nini ekoki kosalisa mobali atika konyokola mwasi to kosala ye makambo na kozanga limemya? Asengeli kosala makasi amekola Yesu. Ndenge oyo azalaki kosalela bayekoli na ye makambo ezali ndakisa mpo na ndenge oyo mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo. Tótalela makambo oyo mibali bakoki koyekola na ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bantoma na ye makambo mpe koloba na bango. Yesu azalaki kosalela bantoma na ye makambo na boboto mpe na limemya. Alukaki ata mokolo moko te konyokola bango to kokonza bango. Yesu amonaki te ete asengeli kolakisa bango bokonzi na ye na nko. Kasi, asalelaki bango na komikitisa nyonso. (Yoa. 13:12-17) Ayebisaki bayekoli na ye: “Bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa, mpe bokopema.” (Mat. 11:28-30) Simbá ete Yesu azalaki na ezaleli ya boboto. Kozala na boboto ezali bolɛmbu te. Kutu, emonisaka nde ete moto azali na makasi ya komonisa komipekisa. Ntango batumoli ye, moto ya boboto abatelaka kimya na ye mpe apekisaka mayoki na ye. w25.01 10 par. 10-11
Mwayambo, 16 sanza ya 11
Na nyonso oyo okosala tyelá Yehova motema.—Mas. 16:3.
Lokola nsuka ya mokili oyo ezali se kopusana, mikakatano ya mbongo ekoki kokóma lisusu makasi. Yikiyiki na makambo ya politiki, bitumba, makama oyo ebimaka yango moko, to maladi oyo epalanganaka ekoki kobimisa biso mbongo oyo tokanaki te to kosala ete tóbungisa mosala na biso, biloko na biso to ndako na biso. Nini ekoki kosalisa biso tózwa bikateli oyo ekomonisa ete totyeli lobɔkɔ ya Yehova motema? Likambo ya libosoliboso mpe ya malamu ya kosala ezali koyebisa Yehova mitungisi na yo. Sɛngá ye apesa yo bwanya oyo osengeli na yango mpo ozwa bikateli ya malamu mpe kimya ya motema mpo otika “kozala motema likolólikoló” mpo na likambo na yo. (Luka 12:29-31) Bondelá ye mpenza asalisa yo oyekola kosepela na biloko ya kobikela oyo ozali na yango. (1 Tim. 6:7, 8) Salá bolukiluki na mikanda na biso mpo ozwa makanisi mpo na ndenge ya kolonga mikakatano ya mbongo. Masolo mpe bavideo ya jw.org oyo elobeli mikakatano ya mbongo esalisi bato mingi. w25.03 28-29 par. 10-11
Mwamibale, 17 sanza ya 11
Nzambe amonisi ngai ete nasengeli kobenga moto ata moko te bosɔtɔ to mbindo.—Mis. 10:28.
Ntango ekokaki mpo bato ya bikólo oyo bakatami ngɛnga te bákɔta na ekólo ya Nzambe. Ntoma Petro azwaki mokumba ya kosakwela Korneyi, oyo azalaki na kati ya bato ya liboso ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo. Lokola Bayuda bazalaki na boyokani mpenza te na bato ya bikólo, esengelaki kosalisa Petro abongisa makanisi na ye mpo akoka kosakwela bango. Ntango Petro asosolaki mokano ya Nzambe na likambo yango, abongolaki lolenge na ye ya kotalela makambo. Na yango, ntango Korneyi atindaki bato bábenga ye, Petro akendaki “kozanga kotya ntembe.” (Mis. 10:29) Asakwelaki Korneyi ná bato ya libota na ye, mpe bazwaki batisimo. (Mis. 10:21-23, 34, 35, 44-48) Bambula na nsima, Petro alendisaki bakristo ‘bázalaka na bomoko na makanisi.’ (1 Pe. 3:8, msl.) Biso basaleli ya Yehova tokoki kozala na bomoko na makanisi soki tozali komekola makanisi ya Yehova ndenge emonisami na Liloba na ye. w25.03 9-10 par. 7-8
Mwamisato, 18 sanza ya 11
Bótika te ete mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya ebungisa bino nzela.—Ebr. 13:9.
Makanisi ya bato ya mokili ezali se kokesana mingi mpenza na ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo. (Mas. 17:15) Na yango, tosengeli kokolisa mpenza likoki na biso ya koyeba komona makanisi oyo batɛmɛli basalelaka mpo na kolɛmbisa biso nzoto to ata kobungisa biso nzela; soki toyebi makanisi yango, tosengeli kobwaka yango. Ekozala malamu tótya likebi na toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo Baebre, ete básala makasi bákóma bato oyo bakɔmɛli na elimo. Yango elimboli kokóma na boyebi mozindo ya mateya ya solo mpe kondima ndenge oyo Yehova atalelaka makambo. Tosengeli kokoba kosala yango ata nsima ya komipesa mpe kozwa batisimo. Ata soki tosali bambula mingi na kati ya solo, biso nyonso tosengeli kotángaka mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. (Nz. 1:2) Kozala na programɛ malamu ya koyekola biso moko ekosalisa biso tókómisa makasi ezaleli oyo Paulo alobelaki mingi na mokanda na ye epai ya Baebre: kondima.—Ebr. 11:1, 6. w24.09 10 par. 7-8
Mwaminei, 19 sanza ya 11
Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.—Yak. 4:8.
Soki Yehova azali mpenza Moto ya solo na miso na biso, ekozala mpasi te mpo tótikala sembo epai na ye. Ezalaki bongo mpo na Yozefe. Aboyaki na mpiko nyonso kosala pite. Nzambe azalaki Moto ya solo mpo na ye, mpe alingaki te koyokisa Ye mpasi. (Eba. 39:9) Mpo Yehova azala Moto ya solo na miso na biso, tosengeli kozwaka ntango ya kobondela ye mpe koyekola Liloba na ye. Na ndenge yango boninga na biso na ye ekokóma makasi. Lokola Yozefe, ntango tozali na boninga makasi na Yehova, tokolinga kosala ata eloko moko te oyo ekoyokisa Ye mpasi. Baoyo babosanaka ete Yehova azali Nzambe ya bomoi bazangaka mbala mingi bosembo epai na ye. Tótalela likambo oyo ekómelaki Bayisraele ntango bazalaki na esobe. Bayebaki ete Yehova azali, kasi bakómaki komituna soki akokokisa bamposa na bango. (Kob. 17:2, 7) Yango wana na nsima, batombokelaki Nzambe. Ya solo, tolingi ata moke te kolanda ndakisa na bango ya kozanga botosi, ezali likebisi mpo na biso.—Ebr. 3:12. w24.06 24 par. 14-15
Mwamitano, 20 sanza ya 11
Miso ya Yehova ezali epai ya bato ya sembo, mpe matoi na ye eyokaka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.—Nz. 34:15.
Topusani mpenza na kati ya mikolo ya nsuka, mpe makambo oyo elelisaka ekokoba kobakisama. Yehova amonaka mai ya miso oyo totangisaka mpe epesaka ye mawa mingi. Atyaka likebi na mai ya miso nyonso oyo totangisaka. Na yango, ntango tokutani na makambo oyo epesi biso mawa, tósopela Yehova motema na biso na libondeli. Tóluka te kozala kaka biso moko mpe kokima bandeko na biso ya lisangá. Mpe tiká tókoba kozwa libɔndisi na maloba ya kokitisa motema oyo ezali na Biblia. Tótya motema ete soki tokobi koyika mpiko na bosembo, Yehova akopesa biso mbano. Apesi biso elaka ete ekozala na ntango moko oyo akopangwisa mai ya miso nyonso oyo totangisaka mpo na mawa, mpo basali biso mabe, to mpo tozali komona ete tozangi elikya. (Em. 21:4) Na ntango yango, tokobimisa mai ya miso, kasi kaka ya esengo. w24.12 20 par. 3; 25 par. 19
Mwapɔsɔ, 21 sanza ya 11
“Bino bozali batatoli na ngai,” yango nde liloba ya Yehova.—Yis. 43:12.
Yehova atye biso tózala Batatoli na ye, mpe alaki ete akosalisa biso tózala na mpiko. (Yis. 43:10, 11) Tótala kaka ndenge minei oyo asalaka yango. Ya liboso, Yesu azalaka elongo na biso ntango tozali kosakola nsango malamu. (Mat. 28:18-20) Ya mibale, Yehova atyá baanzelu mpo na kosalisa biso. (Em. 14:6) Ya misato, Yehova apesaka biso elimo santu na ye lokola mosungi mpo ezongisa na makanisi na biso makambo oyo toyekolaki. (Yoa. 14:25, 26) Ya minei, Yehova abongisá ete bandeko bábimaka na mosala ya kosakola elongo na biso. Na lisalisi ya Yehova mpe lisungi ya bandeko na biso ya bolingo, tozali na nyonso oyo esengeli mpo tókoba na mosala ya kosakola. Soki olɛmbi nzoto ntango ozali kokuta kaka bato moke na bandako, okoki komituna boye: ‘Bato ya teritware na ngai bazali wapi na ngonga oyo?’ (Mis. 16:13) ‘Bakei mosala to kosomba biloko?’ Soki ezali bongo, mbala mosusu okomona bato ebele soki okei kosakola na balabala. w24.04 17 par. 10-11
Mwalomingo, 22 sanza ya 11
Soki moto ayebi te kokamba libota na ye moko, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?—1 Tim. 3:5.
Soki ozali tata ya libota mpe olingi kokóma nkulutu, bakotalela mpe ndakisa oyo libota na yo epesaka. Na yango, osengeli kozala “moto oyo akambaka libota na ye moko na ndenge ya malamu mpenza.” Osengeli kozala moto oyo ayebani lokola mokonzi ya libota ya bolingo mpe oyo abatelaka yango malamu. Yango esangisi kosala losambo na kati ya libota, kosalisa bato nyonso ya libota báyanganaka na makita mpe bábimaka na mosala ya kosakola. Soki ozali tata ya libota, bana na yo oyo bakómi naino mikóló te basengeli kozala “bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te.” (1 Tim. 3:4) Osengeli koteya mpe kopesa bango formasyo na bolingo. Ya solo, bakosepela kosɛka mpe kosakana lokola bana nyonso. Kasi lokola oteyaka bango malamu, bakozala na botosi, na limemya epai ya basusu, mpe na etamboli ya malamu. Lisusu, osengeli kosalisa bana na yo bázala na boyokani malamu na Yehova, bálandaka mitinda ya Biblia mpe bákola tii na kozwa batisimo. w24.11 22 par. 10-11
Mwayambo, 23 sanza ya 11
Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo apesi bomoi na ye mpo na baninga na ye.—Yoa. 15:13.
Soki tomipesi mingi na mosala ya Yehova, tokomona mpe ndenge akosalisa biso mingi, mpe ekosala ete tókóma kotyela ye lisusu motema mingi koleka. (1 Ko. 3:9) Kasi, kobosana te, Yehova akokanisaka te oyo osalaka mpo na ye na oyo basusu basalaka mpo na ye; atalaka nde oyo ezali na motema na yo. Asepelaka ntango amoni ete motema na yo ezali na botɔndi mpo na likabo na ye ya motuya: lisiko. (1 Sa. 16:7; Mrk. 12:41-44) Ezali kaka na nzela ya lisiko nde masumu na biso ezali kolimbisama, tozali na boninga na Yehova, mpe tozali na elikya ya bomoi ya seko. Tiká ete tómonisaka ntango nyonso botɔndi na bolingo ya Yehova, oyo etindaki ye apesa biso mapamboli wana. (1 Yoa. 4:19) Tiká mpe ete tómonisaka botɔndi mpo na Yesu, mpo alingaki biso mingi mpe apesaki bomoi na ye mpo na biso! w25.01 31 par. 16-18
Mwamibale, 24 sanza ya 11
Natungisamaki mokolo mobimba.—Nz. 73:14.
Talá ndenge mokomi ya Nzembo 73 amiyokaki. Amonaki lokola ete basusu bazali na bomoi ya malamu, ya bozwi, oyo ezangá mitungisi. (Nz. 73:3-5, 12) Wana azalaki kotala bango mpe ndenge ezalaki komonana lokola bazali kolonga na bomoi, amonaki ete milende oyo asalaki mpo na kosalela Yehova ezalaki na ntina te. ‘Atungisamaki mokolo mobimba’ mpo azalaki na makanisi oyo elɛmbisaka nzoto. (Nz. 73:13, 14) Asalaki nini mpo na mayoki yango? Mokomi ya nzembo akendaki na esika ya kimya, na tempelo ya Yehova. (Nz. 73:16-18) Kuna, makanisi na ye ezongaki na molɔngɔ. Asosolaki ete ata soki bomoi ya basusu ezalaki komonana lokola ezangi mikakatano, bazalaki na avenire te. Lokola atalelaki makambo ndenge wana, azwaki kimya ya makanisi, mpe ayebaki ete kotya makambo ya elimo na esika ya liboso nde eleki malamu. Na yango, akómaki lisusu na ekateli makasi ya kokoba kosalela Yehova.—Nz. 73:23-28. w24.10 27 par. 11-12
Mwamisato, 25 sanza ya 11
Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.—Nz. 83:18.
Yehova aponi biso tózala “batatoli” na ye. (Yis. 43:10-12) Eleki mwa bambula, mokanda moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi elobaki boye: “Lokumu eleki monene oyo tokoki kozala na yango ezali ya kobengama Batatoli ya Yehova.” Mpo na nini ezali lokumu monene? Tótalela ndakisa moko. Soki esengeli moto moko azala motatoli to témoin na yo na tribinale, okopona moto oyo oyebi mpe oyo otyelaka motema, moto oyo litatoli na ye ekondimama. Ndenge Yehova aponi biso tózala Batatoli na ye emonisi ete ayebi biso malamu mpe ete atyelaka biso motema mpo tótatola ete azali Nzambe ya solo kaka moko. Tomonaka yango lokumu mpenza kozala Batatoli na ye, yango wana tosimbaka libaku nyonso mpo na koyebisa bato nkombo na ye mpe kotɛmɛla lokuta oyo elobamá mpo na ye. Ntango tozali kosala bongo, tozali kosala na boyokani na nkombo oyo tomemi na esengo nyonso, Batatoli ya Yehova!—Rom. 10:13-15. w24.05 18 par. 13
Mwaminei, 26 sanza ya 11
Abikisaki bato nyonso ya maladi.—Mat. 8:16.
Kosalela basusu ezalaki kopesa Yesu esengo mingi. Na libaku moko ntango Yesu azalaki kosalela ebele ya bato, asukaki kaka te na koteya bango. Akokisaki mpe mposa na bango ya mosuni. Asalaki likamwisi ya kokómisa bilei ebele mpe na nsima apesaki bayekoli na ye bákabola yango. (Mrk. 6:41) Na ndenge yango, ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kosalela basusu. Amonisaki bango mpe ete kosala makambo mpo na kosalisa basusu ezali na ntina mingi. Kanisá esengo oyo bantoma bayokaki elongo na Yesu ntango bazalaki kokabola bilei oyo Yesu akómisaki ebele na ndenge ya likamwisi, tii ntango bato “nyonso balyaki mpe batondaki”! (Mrk. 6:42) Nzokande, Yesu atyaki bolamu ya basusu liboso ya bamposa na ye kaka na libaku wana te. Asalelaki bomoi na ye mobimba awa na mabele mpo na kosalela basusu. (Mat. 4:23) Yesu azalaki koyoka esengo mingi na koteya basusu mpe na kokokisa bamposa na bango na komikitisa nyonso. w24.11 16 par. 10-11
Mwamitano, 27 sanza ya 11
Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.—2 Tim. 3:1.
Wana makambo na “mikolo ya nsuka” oyo ezali se kobeba, na ntembe te tokozwa lisusu mabaku ebele ya kosalisana. Tokoki mpe kosalisa bango bázala na makanisi oyo ebongi mpe bátikala makasi na elimo. Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya koyamba bango na esengo ntango bayei na makita. Na yango, ntango bandeko bayei na makita, tósalaka nyonso oyo tokoki mpo bámiyoka ete tolingaka bango, bázwa makasi, mpe bámiyoka ete babatelami. Bankulutu bakoki kozala ekimelo epai ya bandeko oyo bazali koyika mpiko na makama to mikakatano. Na ntango ya makama oyo ebimaka yango moko mpe na makambo oyo esɛngaka lisalisi ya monganga nokinoki, bankulutu bazwaka bibongiseli oyo esengeli mpo na kosalisa. Basalisaka mpe bandeko na batoli ya Biblia. Bandeko ya lisangá bakobanga te kosolola na nkulutu moko soki bayebi ete azalaka boboto, amityaka na esika ya basusu, mpe ayokaka basusu na likebi. Bizaleli ya ndenge wana esalisaka bandeko bámiyoka ete balingaka bango; na bongo ezalaka mpasi te mpo básalela toli ya Biblia oyo nkulutu akoki kopesa.—1 Tes. 2:7, 8, 11. w24.06 29 par. 12-13
Mwapɔsɔ, 28 sanza ya 11
Moto oyo abombaki kutu Mwana na ye te.—Rom. 8:32.
Tókanisa te ete lokola Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, azalaka na mayoki te! Biso bato tozalaka na mayoki mpo Yehova akelá biso na elilingi na ye; yango emonisi ete ye mpe azalaka na mayoki. Biblia elobi mpo na Nzambe ete ‘ayokaki motema mpasi’ mpe ‘ayokaki mawa.’ (Nz. 78:40, 41) Na ntembe te Yehova ayokaki mpasi ntango amonaki ndenge bato oyo babangaka Nzambe te banyokolaki Mwana na ye tii babomaki ye! Lisiko eteyaka biso ete moto moko te alingaka biso mingi lokola Yehova, ezala bandeko to baninga na biso ya motema mpenza. (Rom. 8:32, 38, 39) Na ntembe te, Yehova alingaka biso mpe mingi koleka ndenge oyo tomilingaka biso moko. Olingaka kozala na bomoi libela na libela? Yehova alingi bongo mpo na yo koleka. Olingaka ete masumu na yo elimbisama? Yehova alingaka kolimbisa yo koleka. Asɛngi kaka ete tóndima lisiko, likabo ya motuya oyo apesá; tómonisa kondima mpe botosi. Lisiko ezali eloko oyo emonisaka mpenza bolingo monene ya Nzambe.—Mos. 3:11. w25.01 22-23 par. 8-9
Mwalomingo, 29 sanza ya 11
Bókoba koluka koyeba malamu eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.—Ef. 5:10.
Biso nyonso tozwaka bikateli mosusu na kolanda oyo tozali komona na miso mpe koyoka. Kasi miso mpe matoi na biso ekoki kokosa biso. Ata soki ekosi biso te, soki totambolaka kaka na komona, nsukansuka tokosala likambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe to na toli na ye. (Mos. 11:9; Mat. 24:37-39) Kasi, soki tozali kotambola na kondima, tokobanda kozwa mingi bikateli oyo ‘endimami na Nkolo.’ Kolanda toli ya Nzambe ekopesa biso kimya ya motema mpe esengo ya solosolo. (Nz. 16:8, 9; Yis. 48:17, 18) Mpe soki tokobi kotambola na kondima, tokozwa bomoi ya seko. (2 Ko. 4:18) Ndenge nini okoki koyeba soki otambolaka na kondima to na komona? Mpo na kozwa eyano, omituna boye: Makambo nini natalelaka mpo na kozwa bikateli? Natalelaka kaka makambo oyo miso ezali komona? To natyelaka Yehova motema mpe nalandaka toli na ye? w25.03 20-21 par. 3-4
Mwayambo, 30 sanza ya 11
Bózala na kimya kati na bino.—1 Tes. 5:13.
Mokomoko na biso akoki kosala mwa eloko mpo paradiso ya elimo ebenda bato mosusu. Tokoki kosala yango soki tomekoli Yehova. Abendaka bato na ebongiseli na ye na makasi te. Kasi, ‘abendaka’ bato epai na ye na boboto. (Yoa. 6:44; Yir. 31:3) Ntango bato ya mitema sembo bayekoli koyeba bolingo ya Yehova mpe bizaleli na ye ya kitoko, bayokaka mbala moko mposa ya kopusana penepene na ye. Ndenge nini tokoki kobenda bato na paradiso ya elimo na nzela ya bizaleli na biso ya malamu mpe etamboli na biso? Lolenge moko ezali ya kosalela bandeko na biso makambo na bolingo mpe boboto. Ntango bato ya sika bayei na makita na biso, tolingaka bámona makambo oyo ekotinda bango báloba lokola bato oyo bazalaki bandimi te, oyo emonani ete bayaki na makita na Korinti ya kala. Balobaki boye: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.” (1 Ko. 14:24, 25; Zek. 8:23) Na yango, tosengeli kokoba kosalela toli oyo ezali na mokapo ya lelo. w24.04 23-24 par. 16-17