LOYEMBO 91
Mosala makasi tosali na bolingo
Ya Papye
1. Yehova tosepeli;
Tokumisi nkombo na yo
Mpo na mapamboli, lokumu,
Opesi biso.
Ozalaki na biso
N’ebandeli tii na nsuka.
Ndako etɛlɛmi, esili;
Yo nde mosungi.
(MONDIMO)
Yehova, ezali lokumu
Kotonga ndako mpo na yo.
Tiká tókoba kosalela yo libela,
Tókumisa yo na nyonso.
2. Totongaki n’esengo,
Tozwi mpe baninga mingi!
Makambo tomoni, tokobosana
Yango te!
Elimo santu na yo
Esungaki biso mpenza.
Tosepeli mingi lokola
Ozwi lokumu!
(MONDIMO)
Yehova, ezali lokumu
Kotonga ndako mpo na yo.
Tiká tókoba kosalela yo libela,
Tókumisa yo na nyonso.
(Talá mpe Nz. 116:1; 147:1; Rom. 15:6.)