LOYEMBO 29
Tófingisa nkombo na biso te
Ya Papye
1.. Ee Yehova, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,
Oza’ sembo, bolingo nsuka te.
Bwanya mpe solo eutá nde na yo,
Na likoló, Mokonzi Monene.
Mosala na yo ezali kitoko;
Elɛngi koteya bato solo.
(MONDIMO)
Kozala Batatoli n’o, lokumu.
Tófingisa te nkombo na biso!
2. Kosakola elongo na bandeko
Ekolisi bomoko, bolingo.
Koteya ná bizaleli kitoko
Ebakisi nde lokumu na yo.
Tata, toyebani na nkombo na yo,
Tolingi te kosambwisa yango.
(MONDIMO)
Kozala Batatoli n’o, lokumu.
Tófingisa te nkombo na biso!
(Talá mpe Mib. 32:4; Nz. 43:3; Dan. 2:20, 21.)