Loyembo 126
Mosala makasi na biso ya bolingo
Ya Papye
1. Yehova, ngong’ekoki;
Sika yo nde tobondeli.
Sol’opesi biso lokumu,
Tóloba nini!
Na mosala makasi,
Mapamboli n’o tomoni.
Mpe totɛlɛmisi ndak’oyo,
Yo nde osungi.
(MONDIMO)
Yehova, oyo nde libaku
Kotongela yo ndak’oyo.
Tiká tókoba kosalela yo libela,
Tókumisa yo na nyonso.
2. Talá bato y’esengo,
Tokómi baning’a solo!
Mpe tokobatela esengo
Seko na seko!
Nkolo, elimo na yo,
Esungi mpo na bomoko.
Nkombo na yo ezwi mpe nkembo;
Oyo nde mbano!
(MONDIMO)
Yehova, oyo nde libaku
Kotongela yo ndak’oyo.
Tiká tókoba kosalela yo libela,
Tókumisa yo na nyonso.
(Talá mpe Nz. 116:1; 147:1; Rom. 15:6.)