Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 6 nk. 14-15
  • Mpela monene eteyi biso nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpela monene eteyi biso nini?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Eteni 6
    Yoká Nzambe
  • Likebisi ya ntango ya kala
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Na mpela monene​—Banani bayokaki? Banani bayokaki te?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Ntina oyo Nzambe asepelaki na Noa mpe ntina oyo tosengeli kokeba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 6 nk. 14-15

ETENI 6

Mpela monene eteyi biso nini?

Nzambe abomaki bato mabe, kasi abikisaki Noa mpe libota na ye. Ebandeli 7:11, 12, 23

Masuwa likoló ya mai, bato mabe bazali kozinda, baanzelu ya mabe bazali kotika nzoto na bango ya mosuni

Mbula ebɛtaki mikolo 40, butu moi, mpe mai ezipaki mabele mobimba. Bato nyonso ya mabe bakufaki.

Baanzelu wana batomboki batikaki nzoto na bango ya mosuni mpe bakómaki bademo.

Noa, libota na ye, ná banyama babimi na masuwa, monama emonani na likoló

Bato oyo bazalaki na kati ya masuwa babikaki. Atako Noa ná libota na ye bakufaki na nsima, Nzambe akozongisa bango lisusu na bomoi mpe bakokufa lisusu te.

Nzambe akoboma lisusu bato mabe mpe akobikisa bato ya malamu. Matai 24:37-39

Satana mpe bademo na ye basalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kokosa bato

Satana mpe bademo bazali kokoba kokosa bato.

Lelo oyo, kaka ndenge ezalaki na ntango ya Noa, bato mingi baboyaka kotosa Yehova. Mosika te, Yehova akoboma bato nyonso ya mabe.​—2 Petro 2:5, 6.

Batatoli ya Yehova bazali kosalela Biblia mpo na koteya mobali moko; mobali moko azali kotánga Biblia

Bato mosusu bazali lokola Noa. Bayokaka Nzambe mpe basalaka oyo alobaka; bato yango ezali Batatoli ya Yehova.

  • Poná nzela oyo ezali komema na bomoi.​—Matai 7:13, 14.

  • Bato mabe bakobomama; bato ya komikitisa bakozala na kimya.​—Nzembo 37:10, 11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto