Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ll eteni 5 nk. 12-13
  • Na mpela monene​—Banani bayokaki? Banani bayokaki te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na mpela monene​—Banani bayokaki? Banani bayokaki te?
  • Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Masolo mosusu
  • Masuwa ya Noa
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Eteni 5
    Yoká Nzambe
  • Noa atongi masuwa
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
ll eteni 5 nk. 12-13

ETENI 5

Na mpela monene​—Banani bayokaki? Banani bayokaki te?

Bato mingi na ntango ya Noa bazalaki kosala makambo ya mabe. Ebandeli 6:5

Baanzelu ya mabe balati nzoto ya bomoto mpe bakutani na basi

Adama ná Eva babotaki bana, mpe bato bakómaki mingi na mabele. Na nsima, baanzelu mosusu balandaki Satana na botomboki na ye.

Bayaki na mabele, mpe balataki nzoto ya bato mpo bábala basi. Basi yango babotaki bana oyo bazalaki bilombe, mobulu mpe makasi.

Mwasi moko atomboli bebe mpo mwana moko azali kobɛta ye; Banefilime, bana ya baanzelu mabe, bazali kosala mobulu

Mokili etondaki na bato oyo bazalaki kosala makambo ya mabe. Biblia elobi ete “mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe makanisi nyonso ya motema ya moto ezalaki kaka mabe ntango nyonso.”

Noa ayokelaki Nzambe mpe atongaki masuwa. Ebandeli 6:13, 14, 18, 19, 22

Noa azali koyoka Nzambe

Noa azalaki moto malamu. Yehova ayebisaki Noa ete akoboma bato mabe na mpela monene.

Noa mpe libota na ye bazali kotonga masuwa

Nzambe ayebisaki lisusu Noa atonga masuwa moko ya monene, mpe akɔtisa na kati libota na ye mpe banyama ya lolenge nyonso.

Noa azali kokebisa bato mpo na mpela oyo ezali koya kasi bazali kosɛka

Noa akebisaki bato ete mpela ekoya, kasi bayokaki te. Bato mosusu basɛkaki Noa; basusu bayinaki ye.

Noa mpe bato ya libota na ye bazali kosangisa banyama mpo na kokɔta na masuwa

Ntango masuwa esilaki, Noa akɔtisaki banyama na kati.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto