Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 8 lok. 14
  • Banani bazali banguna ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bazali banguna ya Nzambe?
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yebá monguna na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Zábolo azali nani?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Etumba kati na mateya mauti na Nzambe mpe mateya ya bademó
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 8 lok. 14

Liteya 8

Banani bazali banguna ya Nzambe?

Monguna monene ya Nzambe ezali Satana Zabolo. Azali ekelamu ya elimo oyo atombokelaki Yehova. Satana azali ntango nyonso kobundisa Nzambe mpe konyokola bato. Satana azali ekelamu mabe. Azali mobuki lokuta mpe mobomi ya bato.​—Yoane 8:44.

Bikelamu mosusu ya elimo balandaki Satana na botomboki na ye. Biblia ezali kobenga bango bademo. Ndenge moko na Satana, bademo bazali banguna ya bato. Balingaka konyokola bato. (Matai 9:32, 33, NW;Matai 12:22, NW) Yehova akoboma Satana na bademo na ye mpo na libela. Batikali bobele na mwa ntango moke mpo na konyokola bato.​—Emoniseli 12:12.

Soki olingi kozala moninga ya Nzambe, osengeli te kosala makambo Satana alingaka ete osala. Satana na bademo bayinaka Yehova. Bazali banguna ya Nzambe, mpe balingaka kokómisa yo monguna ya Nzambe. Osengeli kopona nani olingi kosepelisa​—Satana to Yehova. Soki olingi bomoi ya seko, osengeli kopona kosala mokano ya Nzambe. Satana azali na mitambo mpe na banzela mingi mpo na kokosa bato. Azali kokosa bato ebele.​—Emoniseli 12:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto