Evolisyo
Ndimbola: Liteya oyo elobaka ete eloko ya liboso oyo ekómaki na bomoi ebimaki na eloko moko boye oyo ezangá bomoi. Liteya yango elobaka ete eloko yango ezalaki kobota mbala na mbala, mpe biloko oyo ezalaki kobimisa ezalaki kobongwana mpe kokóma biloko ya bomoi ya mitindo ndenge na ndenge, mpe nsukansuka biloko yango ekómaki banyama mpe banzete ya ndenge nyonso oyo ebimá awa na mabele. Liteya yango elobaka ete nyonso wana esalemaki kaka yango moko, ete Mokeli azalaki te. Bato mosusu balukaka koyokanisa evolisyo ná makambo ya Nzambe; balobaka ete Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kokela biloko; ete na ebandeli azalisaki mwa biloko moko boye ya bomoi, bongo biloko mosusu ya bomoi lokola moto mpe nyama ebimaki na mwa biloko yango ya bomoi oyo Nzambe azalisaki na ebandeli, na nzela ya evolisyo. Biblia eteyaka bongo te.
Liteya ya evolisyo eyokani mpenza na siansi?
Mpo bato ya siansi bándima liteya moko boye basalelaka mayele oyo: Batalaka ndenge likambo moko ezali kosalema; mpe na kolanda likambo yango babimisaka liteya moko oyo ekoki mbala mosusu kozala solo; na nsima, basalaka makambo mosusu mpo na komona soki liteya yango ezali mpenza solo, mpe kotala soki makambo oyo liteya yango elobi ete ekoselama esalemi mpenza. Bato oyo bandimaka mpe bateyaka evolisyo basalelaka mpe mayele wana?
Robert Jastrow, moto ya astronomi, alobi boye: “[Bato ya siansi] bazali na mawa mpo bakoki kopesa eyano ya sikisiki na motuna yango te, mpo na makambo oyo bato ya shimi babimisaka balongá ata mokolo moko te kobimisa bomoi na eloko oyo ezangá bomoi. Bato ya siansi bayebi te ndenge likambo yango esalemaki.”—Au-delà du cerveau, 1982, lok. 19.
Loren Eiseley, moto ya evolisyo, andimaki boye: “Nsima ya kotyola bato ya teoloji mpo bandimaka masapo mpe makamwisi, bato ya siansi bango moko mpe bakwei na motambo ya kobimisa masapo, elingi koloba, bandimi ete eloko oyo balongi te kosala yango lelo, nsima ya milende mingi, esalemaki mpenza kalakala, na ebandeli ya mokili.”—L’immense voyage, lok. 186.
Zulunalo moko (New Scientist) elobi boye: “Bato mingi ya siansi, mingimingi bato ya evolisyo . . . bazali koloba ete liteya ya evolisyo ya Darwin eyokani mpenza na siansi te. . . . Mingi kati na bango ezali bato oyo bazali na badiplome mineneminene.”—25 Yuni 1981, lok. 828.
H. S. Lipson, moto ya mayele ya fiziki, alobaki boye: ‘Kozalisama nde eyokani na siansi. Nayebi ete likambo yango ezali likambo oyo bato ya mayele ya fiziki balingaka koyoka te, ata mpe ngai moko, kasi tosengeli te koboya liteya oyo tolingi te soki bilembeteli oyo emonani polele elongisi liteya yango.’—Physics Bulletin, 1980, Vol. 31, lok. 138.
Bato oyo bateyaka evolisyo bazalaka bango nyonso na likanisi moko? Mpe yango ekotinda yo otalela mateya na bango ndenge nini?
Na milulu ya mbula nkama moko ya mokanda ya Darwin (L’origine des espèces), babimisaki ebimeli ya sika ya mokanda yango (Londres, 1956), mpe maloba na yango ya ebandeli elobaki boye: “Ndenge toyebi yango, bato ya mayele ya bioloji bakabwani makasi, kaka mpo na mateya etali evolisyo te, kasi mpe mpo na lolenge oyo evolisyo esalemaki. Bokabwani ezali bongo mpamba te bilembeteli ezali mpenza te mpe ekoki kosilisa ntembe yango te. Na yango, ezali malamu mpe ebongi mpenza koyebisa bato oyo bazali bato ya siansi te ete bato ya siansi bazali koyokana te na ntina etali evolisyo.”—Maloba ya ebandeli ya W. R. Thompson, ntango azalaki mokambi ya Institut des études biologiques pour le Commonwealth, na Ottawa, Canada.
“Mbula nkama nsima ya liwa ya Darwin, tozwi naino ata mwa likanisi moko te oyo ekoki komonisa lolenge oyo evolisyo esalemaki mpenza—mpe na bambula oyo euti koleka, liteya yango ebimisi bantembe ya makasi mpenza. . . . Tokoki koloba ete ntembe ezali mpe makasi kati na bato ya evolisyo; etuluku na etuluku ezali kosɛnga ete bákɔtisa mbongwana na liteya yango.”—C. Booker (mokomi na zulunalo Times ya Londres), The Star (Johannesburg) ya 20 Aprili 1982, lok. 19.
Zulunalo moko (Discover) elobaki boye: “Evolisyo . . . ebundisami te kaka na bakristo oyo batingamaka mpenza na makanisi na bango, kasi bato mosusu ya siansi oyo bayebani mingi bazali mpe kotyela yango ntembe. Bokabwani ekómi makasi kati na bato oyo bayekolaka mikuwa ya banyama ya kala (paléontologistes).”—Ɔkɔtɔbɛ 1980, lok. 88.
Mikuwa ya banyama ya kala emonisi nini?
Darwin andimaki ete: “Soki bikelamu ndenge na ndenge . . . ebimaka pwasa, yango elingaki kokweisa liteya ya evolisyo.” (L’origine des espèces, 1983, Maspero, II, lok. 378.) Bilembeteli emonisi nde ete “bikelamu ndenge na ndenge” ebimaki pwasa, to emonisi ete makambo esalemaki malɛmbɛmalɛmbɛ, ndenge liteya ya evolisyo elobi?
Bato ya siansi bamoná ebele ya mikuwa ya banyama ya kala oyo ekoki kondimisa liteya yango?
Porter Kier, oyo asalaka na ebongiseli moko boye (Smithsonian Institution), alobi boye: “Okokuta ebele ya mikuwa ya banyama ya kala na bandako oyo babombaka biloko ya kala (musées) ya mokili mobimba, batyá yango na liste mpe bapesá yango nkombo.” (New Scientist ya 15 Yanuali 1981, lok. 129) Buku moko (Histoire de la terre) ebakisi mpe boye: “Bato oyo bayekolaka mikuwa ya banyama ya kala bakoki sikoyo kosalisa biso tómona polele ndenge bomoi ezalaki na bileko ya kalakala.”—Richard Carrington, Payot, 1956, lok. 51.
Mikuwa ya banyama ya kala emonisi mpenza nini?
Zulunalo moko (Bulletin ya Field Museum of Natural History ya Chicago) elobaki boye: “Liteya ya [evolisyo] ya Darwin esalelaka ntango nyonso bilembeteli oyo euti na mikuwa ya banyama ya kala, mpe ntembe ezali te ete bato mingi bakanisaka ete mikuwa yango elongisaka mpenza liteya oyo elobi ete bomoi ebandaki ndenge Darwin alobaki. Kasi ezali mpenzampenza bongo te. . . . Biloko ya kalakala oyo bakundolá na mabele emonisaki yango te mpe ezali komonisa te ete evolisyo esalemaki mokemoke mpe malɛmbɛmalɛmbɛ.”—Yanuali 1979, Vol. 50, No. 1, nk. 22, 23.
Buku moko (A View of Life) elobi boye: “Banda ebandeli ya eleko oyo babengi Cambrien tii mbula soki milio 10 na nsima, bituluku minene ya banyama oyo ezali na mokuwa ya mokɔngɔ te, ebimaki mpo na mbala ya liboso; ebimaki ebele mpe na ndenge moko ya kokamwa. Likambo yango emonaná naino te na mabele.”—(Californie, 1981) Salvador E. Luria, Stephen Jay Gould, Sam Singer, lok. 649.
Alfred Romer, moto oyo ayekolaka mikuwa ya banyama ya kala, akomaki boye: “Nsima ya eleko yango [eleko ya Cambrien], okokuta mipiko mineneminene ya mabele mpe esengelaki ete tómona bankɔkɔ ya banyama oyo ebimaki na eleko ya Cambrien. Kasi tozali komona banyama yango te; mipiko ya mabele yango ya kala ezali ata na elembeteli moko te oyo emonisi ete banyama ya ndenge wana ezalaki, mpe tokoki koloba ete likambo yango emonisi ete biloko ezalisamaki na ndenge ya kokamwa na ebandeli ya eleko ya Cambrien.”—Natural History, Ɔkɔtɔbɛ 1959, lok. 467.
Harold Coffin, moto oyo ayekolaka banyama, alobaki boye: “Soki evolisyo ebandaki na mwa biloko moko boye ya bomoi mpe yango ebimisaki biloko mosusu ya bomoi lokola moto mpe nyama, mbɛlɛ basilá komona bankɔkɔ ya bikelamu ya bomoi oyo ezalaki na eleko ya Cambrien; kasi naino bato ya siansi bamoná yango te mpe bandimi te ete bakomona yango. Soki totali kaka bilembeteli, mpe soki totali kaka biloko oyo bamoná mpenza na mabele, liteya oyo elobi ete biloko ya minene ya bomoi ekelamaki pwasa nde ebongi.”—Liberty, Sɛtɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ 1975, lok. 12.
Carl Sagan alobaki polele boye na buku na ye (Cosmos): “Mikuwa ya banyama ya kala endimisi likanisi oyo elobi ete Mokeli Monene azali.”—(New York, 1980), lok. 29.
Evolisyo ezali nde mbongwana ya pwasa mpe ya monene oyo esalemaki na kati ya biloko oyo ezalaka na kati ya baselile?
Zulunalo moko (Science Digest) elobi boye: “Bato oyo bakómá koteya evolisyo ndenge mosusu bandimi ete ekoki kozala ete mbongwana ya pwasa na kati ya biloko oyo ezalaka na kati ya baselile oyo epekisaka mosusu esala, nde likambo ya ntina mpenza oyo liteya na bango ezali koluka.” Kasi, kaka zulunalo yango elobi ete Colin Patterson, moto moko ya Angleterre oyo ayekolaka banyama, alobaki boye: “Makanisi ya ndenge na ndenge ekoki kopesama. Toyebi ata eloko moko te na ntina etali biloko yango oyo ezalaka na kati ya baselile oyo epekisaka mosusu esala.” (Febwali 1982, lok. 92) Na maloba mosusu, elembeteli moko te ezali kolongisa liteya wana.
Buku moko (The Encyclopedia Americana) endimi boye: “Lokola mbongwana mingi oyo esalemaka na kati ya nzoto ebebisaka yango, ezali mpasi koloba ete kaka mbongwana yango nde ebimisaki evolisyo, ndenge bamosusu bakanisaka. Kutu bikelamu oyo balakisaka na mikanda ya bioloji ete ebimaki na mbongwana oyo esalemaka na kati ya nzoto, ezalaka nde bikelamu moko ya bongobongo kaka mpe oyo emonanaka mabemabe, mpe emonani ete mbongwana yango ebebisaka nde kobebisa, ebongisaka te.”—(1977), Vol. 10, lok. 742.
Bongo “bato-makako” oyo bamonisaka na babuku ya kelasi, babuku mosusu mpe bandako oyo babombaka biloko ya kala?
“Nzoto mpe nsuki ya biloko oyo balakisaka na mayemi ya ndenge wana eutaka kaka na makanisi ya bato. . . . Langi ya loposo; langi ya nsuki, lolenge na yango mpe bisika oyo yango ezalaki; ndenge nzoto ezalaki; mpe elongi yango moko, mpo na nyonso wana, toyebi ata eloko moko te na ntina etali bato nyonso ya kala.”—The Biology of Race (New York, 1971), James C. King, nk. 135, 151.
“Mayemi ebele euti mingimingi nde na makanisi, euti te na makambo ya solo. . . . Esengeli bayemi yango báyema eloko moko oyo ezali katikati ya mokomboso ná moto; soki balobi ete eloko yango ezali ya kala mingi, bakolinga kokokanisa yango mpe mingi na mokomboso.”—Science Digest, Aprili 1981, lok. 41.
“Lokola tokómi koyeba ete bato ya kala bazalaki mpenza lokola banyama ya zamba te, tosengeli mpe koyeba ete bato ya eleko oyo babengi Pléistocène bazalaki banyama ya nkanza te; bazalaki mpe lokola mikomboso oyo ezali na mayele moke te. Yango wana koluka kosala mayemi mpo na kolakisa moto ya Néanderthal to moto ya Pékin (Pithécanthrope) ezali mpenza bozoba.”—Dieu était déjà là, ya Ivar Lissner, lok. 281.
Kasi babuku ya siansi emonisaka te ete evolisyo ezali likambo ya solo?
“Ebele ya bato ya mayele bakweaka na motambo ya kokanisa ete bato basengeli kondima kaka oyo balobi . . . Mbala na mbala, balakisá likambo oyo etali esika biloko nyonso euti lokola likambo ya solo. Nzokande ezali lokuta mpenza. . . . Kasi ezaleli wana ya kokanisa ete bato basengeli kondima kaka oyo balobi esilá te, mpe ezali kosalisa siansi soki moke te.”—The Guardian, Londres, 4 Desɛmbɛ 1980, lok. 15.
Ebongi nde kondima ete biloko nyonso oyo ezali na mabele ekelamaki na mikolo motoba?
Mangomba mosusu eteyaka ete Nzambe akelaki biloko nyonso na mikolo motoba ya ngonga 24. Kasi Biblia elobi bongo te.
Ebandeli 1:3-31 elobeli ndenge Nzambe abongisaki mabele oyo esilaki kozalisama banda kala, mpo ekóma esika oyo moto akofanda. Elobi ete mosala yango esalemaki mikolo motoba, kasi elobi te ete mokolo mokomoko ya mikolo motoba yango ezalaki ya ngonga 24. Mbala mingi bato balobaka: “Na mikolo ya nkɔkɔ na ngai,” mpo na kolobela bomoi mobimba ya nkɔkɔ yango. Ndenge moko mpe Biblia esalelaka mbala mingi liloba “mokolo” mpo na kolobela eleko moko ya molai. (Talá 2 Petro 3:8.) Na yango, ‘mikolo’ oyo Ebandeli mokapo 1 elobeli ekokaki kozala bankóto ya bambula.
Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá nkasa 154.
Soki moto alobi—
‘Ngai nandimaka evolisyo’
Okoki koyanola: ‘Okanisi ete Nzambe asalaki ata eloko moko te, to ondimaka nde ete banda na ebandeli, bomoi ebimaki pwasa? (Na nsima, kobá lisolo na kolanda makambo oyo moto yango akoyebisa yo.)’
To okoki koloba: ‘Okanisi ete ezali malamu koboya likambo oyo siansi epesi bilembeteli polele ete ezali bongo? . . . Nalingi kolakisa yo makambo mosusu oyo bato ya siansi balobi mpo na evolisyo. (Salelá makambo oyo ezali na nkasa 191, 192, na motó ya likambo moke “Liteya ya evolisyo eyokani mpenza na siansi?”), to oyo ezali na lokasa 192 na motó ya likambo moke “Bato oyo bateyaka evolisyo bazalaka bango nyonso na likanisi moko? . . . ”)’
Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Soki bilembeteli endimisi likambo moko boye, biso nyonso tokondima likambo yango, boye te? . . . Nazali kokanisa lisusu bililingi ya banyama ya kala oyo ezalaki na babuku na ngai ya kelasi mpo na komonisa ete evolisyo ezali likambo ya solo. Kasi banda wana, natángá makambo ebele oyo bato ya siansi balobá mpo na mikuwa ya banyama ya kala. Maloba na bango mosusu ekomami na buku oyo. (Salelá makambo oyo ezali na nkasa 193, 194, na motó ya likambo moke “Mikuwa ya banyama ya kala emonisi nini?”)’
Makanisi mosusu: ‘Namoni ete otalelaka mpenza makambo ndenge ezali, boye te? . . . Ngai mpe nasalaka bongo.’ Okoki kobakisa: ‘Soki nazali kotambola na esobe mpe nakuti ndako etongami na mabaya ná mabanga, nakoloba ete moto moko azalaki wana liboso na ngai mpe atongaki yango, boye te? . . . Sikoyo, tokoki koloba ete bafololo oyo ezali pembenipembeni ya ndako yango ebimaki kaka pwasa? Soki moto akanisi bongo, asengeli kotala bafololo yango na likebi mpenza mpe akomona ete esalemá na ndenge ya kokamwa; eyebani malamu ete soki eloko esalemi, moto oyo asalaki yango azali. Yango nde Biblia elobi na Baebre 3:4.’
To okoki koyanola (na moto oyo azali mobange): ‘Moko na makambo oyo evolisyo elobaka ezali ete moto azali ndenge azali lelo mpo abandaki kobongwana mokemoke tii akómaki ndenge azali lelo, okanisi ete ezali solo?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yo oumeli mingi na bomoi. Oyebi lisusu ndenge makambo ezalaki ntango ozalaki naino mwana? Makambo mabe ezalaki kosalema mingi ndenge ezali lelo? . . . Bato bazalaki kokanga porte na fungola? . . . Okanisi ete na ntango wana, bato bazalaki kotyela bazalani mpe mibange likebi koleka lelo? . . . Na yango, atako makambo ya tekiniki ekoli mingi, emonani ete bato bazali nde kobungisa bizaleli malamu. Mpo na nini?’ (2) ‘Namoni ete makambo oyo ezali kosalema lelo, oyo tozali komona, ekokani na makambo oyo ekomami awa na Biblia, na Baroma 5:12. . . . Na yango, makambo ezali kobeba se kobeba.’ (3) ‘Kasi Biblia emonisi ndenge makambo ekobongwana. (Dan. 2:44; Em. 21:3, 4)’
‘Ngai nandimaka ete Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kosala moto’
Okoki koyanola: ‘Nasololá na bato mosusu oyo bazali mpe na likanisi wana. Namoni ete ozali na kondima makasi epai na Nzambe. . . . Boye, kondima na yo ezali na esika ya liboso na bomoi na yo; yango nde esalisaka yo otalela likambo mpo na koyeba soki ezali solo to te, boye te? . . . Ngai mpe nasalaka bongo.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Soki likambo oyo nazali kondima ezali mpenza solo, likambo yango ekoyokana na bilembeteli oyo siansi ezali kopesa. Nayebi mpe ete ekozala mpenza bozoba soki naboyi koyoka oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, mpo Nzambe ayebi misala na ye malamu koleka biso. Makambo oyo Biblia, Liloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, elobi na Ebandeli 1:21 ekamwisaka ngai mingi (monisá ete biloko esalemaki na kolanda “mitindo na yango”).’ (2) ‘Lisusu, Ebandeli 2:7 eyebisi biso ete Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele, kasi elobi te ete moto autá na banyama oyo ezalisamaki liboso.’ (3) ‘Mpe vɛrsɛ 21, 22 elobi ete Eva asalemaki na mokuwa ya mopanzi ya Adama, kasi elobi te ete autaki na nyama.’
To okoki koloba: ‘(Soki oyokani na ye, ndenge touti komonisa yango . . .) Bato mosusu balobaka ete lisolo ya Adama ezali lisapo mpamba. Kasi soki ezali bongo, tokoloba ete Biblia elobi solo?’ (1) ‘Talá naino ndenge Baroma 5:19 elobi: “Ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko [Adama] ekómisaki ebele ya bato basumuki, ndenge mpe botosi ya moto kaka moko [Yesu Kristo] ekokómisa bato mingi bayengebene.” Na 1 Bakorinti 15:22, Biblia elobi mpe ete: “Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.” Kasi soki Adama azalaki mpenza te, boye asalaki mpe lisumu te. Soki asalaki lisumu te mpe atikelaki bakitani na ye lisumu te, ntina ezalaki te ete Yesu apesa bomoi na ye mpo na bato. Soki mpe Kristo apesaki mpenza bomoi na ye mpo na biso te, mbɛlɛ elikya ya bomoi ya malamu koleka bomoi ya mokuse oyo tozali na yango lelo ezali te. Mbɛlɛ kozala mokristo ezali na ntina te.’ (2) ‘Nzokande bokristo eteyaka bato bizaleli ya malamu koleka. Bongo mateya ya malamu boye oyo esalisaka bato báyeba solo mpe bázala na ezaleli ya kolongobana ekoki nde kouta na eloko moko ya lokuta?’ (Talá mpe nkasa 25-27, na motó ya likambo “Adama ná Eva.”)
‘Kasi bato mosusu oyo batángá mingi bandimaka yango’
Okoki koloba: ‘Ya solo, kasi namonaka mpe ete bato mosusu oyo bandimaka liteya ya evolisyo bayokanaka te na makambo mosusu oyo liteya yango elobaka. (Tángá bandakisa mosusu oyo ezwami na lokasa 192.) Na yango, biso moko tosengeli kotalela malamu bilembeteli mpo tóyeba soki tokondima liteya ya evolisyo to bozalisi.’
To okoki koloba: ‘Ezali solo. Kasi nayebi ete ezali mpe na bato mosusu oyo batángá mingi oyo bandimaka liteya yango te.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Mpo na nini basusu bandimaka liteya yango mpe basusu bandimaka te? Bango nyonso bazali na bilembeteli ndenge moko. Bokeseni yango euti nde na mposa ya mitema ya bato yango? Ekoki kozala bongo.’ (2) ‘Osengeli kondima nani? Soki totali naino bituluku yango mibale, (tolingi kotyola moto te), wapi etuluku oyo okanisi ete elobi makambo na bosembo—baoyo bazali kondima ete moto akelamaki na Nzambe mpe bazali komona ete bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe, to baoyo bazali koloba ete babimaki kaka pwasa mpe ete bakozongisa monɔkɔ kaka epai na bango moko?’ (3) ‘Na yango, tosengeli kotala malamu ndenge makambo ezali mpo tóyeba soki bozalisi to evolisyo nde ezali kopesa biyano ya sikisiki na mituna oyo etali bomoi.’