Filozofi
Ndimbola: Liloba filozofi euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli “bolingo ya bwanya.” Filozofi oyo tokolobela awa ezali te oyo etindaka bato bándimela Nzambe; kasi oyo elukaka kosalisa bato báyeba malamu makambo etali molɔ́ngɔ́ mobimba mpe bákóma bato oyo bayebi kokanisa malamu. Mpo na koluka koyeba solo, filozofi etindaka bato bákanisakanisa na esika ya kotala ndenge makambo yango ezali.
Ndenge nini moto akoki kozwa boyebi mpe bwanya ya solo?
Mas. 1:7; Nz. 111:10: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya boyebi . . . [mpe ya] bwanya.” (Soki molɔ́ngɔ́ esalemaki na Mokeli moko te ya mayele kasi ebimaki nde na nguya moko boye oyo ezangá mayele, liteya mpo na kosalisa bato báyeba makambo ya molɔ́ngɔ́ ekoki mpe kozala te, boye te? Ndenge nini eloko ya bwanya ekoki kobima na boyekoli ya eloko oyo ezali na mayele te? Baoyo balukaka koyeba molɔ́ngɔ́ to ntina ya bomoi kasi bazali kotalela Nzambe mpe mokano na ye te, balongaka te. Balimbolaka malamu te makambo oyo bazali koyekola mpe basalelaka malamu te makambo oyo bazali komona. Soki bato baboyi kondima Nzambe bakoki kozwa boyebi ya solo te, mpe bakoki ata moke te kozwa likanisi moko oyo bango nyonso bakondima.)
Mas. 2:4-7: “Soki okobi koluka yango lokola palata, mpe okobi kolukaluka yango lokola biloko ya motuya oyo ebombani, boye okokanga ntina ya kobanga Yehova, mpe okozwa boyebi ya Nzambe. Mpo Yehova ye moko apesaka bwanya; boyebi ná bososoli eutaka na monɔkɔ na ye. Mpe akobomba malamu mpenza bwanya mpo na bato ya kolongobana.” (Yehova apesaka lisalisi oyo esengeli na nzela ya Liloba na ye oyo ekomamá mpe na nzela ya ebongiseli na ye. Kasi moto na moto asengeli kokolisa mposa ya kozwa boyebi mpe bwanya mpe kosala milende mpo na kozwa yango; asengeli mpe kosalela makoki na ye ya kokanisa na ndenge ya malamu.)
Moto akoki mpenzampenza kozwa solo na nzela ya Liloba ya Nzambe?
2 Tim. 3:16; Yoa. 17:17: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” [Yesu alobaki na Tata na ye ya likoló boye:] “Liloba na yo ezali solo.” (Ebongi ete Mokeli ya molɔ́ngɔ́ ayeba yango malamu, boye te? Na Biblia, ayebisi biso makambo nyonso te oyo etali molɔ́ngɔ́; kasi makambo oyo akomisaki na Biblia ezali kaka ndenge yango ezali; ezali makambo ya solo mpenza. Na Biblia, Nzambe ayebisá mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato, mpe ndenge akokokisa yango. Lokola azali na nguya nyonso, na bwanya oyo eleki mpenza, na bosembo ya solosolo, mpe na bolingo mingi, ntembe ezali te ete akokokisa mpenza mokano na ye na ndenge oyo esengeli mpenza. Na yango, bizaleli na ye wana endimisi biso ete mokano oyo ayebisi biso na kati ya liloba na ye ebongi mpenza kotyelama motema; ezali solo.)
Bafilozofi ya bato eutá wapi?
Eutá na bato oyo bazali na makoki nyonso te: Biblia elobi na biso boye: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yir. 10:23) Istware emonisi ete koboya kondima likambo yango ebimisaka makambo ya malamu te. Mokolo moko, “Yehova ayanolaki Yobo na kati ya mopɛpɛ makasi mpe alobaki ete: ‘Nani yango azali kobebisa toli na maloba oyo ezangi boyebi? Nabondeli yo, kangá loketo na yo lokola mobali moko makasi, mpe tiká natuna yo, bongo yo oyebisa ngai. Yo ozalaki wapi ntango natyaki moboko ya mabele? Yebisá ngai soki oyebi eloko babengi mayele.’” (Yobo 38:1-4) (Bato bazalaka na makoki nyonso te. Longola yango, na bomoi na bango, bamonaka makambo nyonso te mpe bayebi kaka makambo oyo esalemi esika bakolá to esika bazali. Na yango, bayebi makambo nyonso te; nzokande lokola makambo nyonso ezali na boyokani kati na yango, yango wana mokolo na mokolo, bato bakutanaka na makambo oyo bayebaki liboso te. Filozofi nyonso ya sika oyo bakobimisa ekokoka kolimbola makambo nyonso te.)
Eutá na bato ya kozanga kokoka: “Bato nyonso basalá lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Rom. 3:23) “Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete elongobani kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.” (Mas. 14:12) (Mpo na kozanga kokoka yango, bato ya filozofi balukaka mbala mingi nde matomba na bango moko; ezaleli yango ekoki komemela bango esengo ya mwa ntango, kasi ememaka mpe mawa ná mpasi na motema.)
Eutá na makanisi ya bademo: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya na moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) “Oyo babengi Zabolo mpe Satana . . . azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Em. 12:9) “Kala bozalaki kotambola na yango na kolanda makambo ya mokili oyo, na kolanda mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” (Ef. 2:2) (Bafilozofi oyo ezali kotinda bato báboya kotosa masɛngami ya Yehova, oyo epesaka litomba mpe oyo ezali malamu, euti na makanisi ya bademo. Tokoki bongo kokamwa te ndenge mpe istware emonisi yango, ete mbala mingi bafilozofi ná myango ya bato ememelaka bato ebele mpasi mingi.)
Mpo na nini eleki malamu koyekola mateya ya Yesu Kristo na esika ya koyekola bafilozofi ya bato?
Kol. 1:15-17: “Ye [Yesu Kristo] azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá; mpo na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele . . . Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye. Lisusu, ye azali liboso ya biloko mosusu nyonso mpe na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki.” (Lokola Yesu azali na boyokani malamu na Nzambe akoki kosalisa biso tóyeba solo na ntina etali Nzambe. Lisusu, lokola biloko nyonso ezalisamaki na nzela na ye, ayebi malamu ndenge molɔ́ngɔ́ mobimba ezali. Moto moko te ya filozofi akoki kopesa biso nyonso wana.)
Kol. 1:19, 20: “Nzambe amonaki malamu ete nyonso oyo etondi kotonda efanda na kati na ye [Yesu Kristo], mpe na nzela na ye, azongisa lisusu boyokani kati na ye ná biloko mosusu nyonso, ndenge atye kimya na lisalisi ya makila oyo asopaki likoló ya nzete ya mpasi.” (Na yango, Yesu Kristo nde moto oyo Nzambe aponá mpo ete na nzela na ye, Nzambe ayokana lisusu na bikelamu na ye nyonso. Nzambe apesá mpe Yesu Kristo bokonzi likoló ya mabele mobimba, ndenge Danyele 7:13, 14 emonisi yango. Na yango, mpo na kozwa bomoi na mikolo oyo ezali koya, tosengeli kosala milende mpo na koyeba Yesu mpe kolanda malamu malako na ye.)
Kol. 2:8: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.” (Ekozala libunga monene kolanda filozofi ya bato, eloko ya bokosi boye, na esika ya koluka kozwa bwanya ya solo mpe kokóma moyekoli ya Yesu Kristo, oyo longola Nzambe, azali moto oyo aleki na bonene na molɔ́ngɔ́ mobimba!)
Ndenge nini Nzambe atalelaka “bwanya” oyo euti na bafilozofi ya bato?
1 Ko. 1:19-25: “Ekomamá ete: ‘Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya mpe mayele ya bato ya mayele nakotindika yango pembeni.’ Wapi moto ya bwanya? Wapi mokomeli? Wapi moto ya ntembe na ntango oyo? Nzambe akómisi bwanya ya mokili bozoba te? Mpo lokola, na bwanya ya Nzambe, mokili na nzela ya bwanya na yango eyebi Nzambe te, Nzambe amonaki malamu ete, na nzela ya bozoba [ndenge mokili ezali komona yango] ya eloko oyo ezali kosakolama, abikisa baoyo bazali kondima. . . . Mpo eloko ya Nzambe oyo ezali zoba [ndenge mokili ezali komona yango] ezali na bwanya koleka bato, mpe eloko ya Nzambe oyo ezali na bolɛmbu [ndenge mbala mosusu mokili ezali komona yango], ezali na makasi koleka bato.” (Soki Nzambe azali kotalela makambo ndenge wana, ezali te mpo alingaka komonela bato mosusu to mpo azalaka makambo makasimakasi. Mpo alakisá mokano na ye polelepolele na kati ya Biblia, buku oyo epalanganá na mokili mobimba koleka babuku mosusu nyonso. Atindá mpe batatoli na ye bákende kosolola na bato nyonso oyo bakolinga koyoka. Soki ekelamu moko ekanisi ete ezali na bwanya koleka Nzambe, ezali bozoba mpenza.)