Mpo na kotalela na libota
Ekeseni na nini?
Okoki kobimisa makambo misato oyo ekesenisi elilingi A mpe elilingi B? Komá biyano na yo na mikɔlɔtɔ oyo ezali awa na nse, mpe tyá langi na bililingi yango.
LISALISI: Tángá Yisaya 6:1-8.
1. ․․․․․
2. ․․․․․
3. ․․․․․
4. Elilingi nini ezali malamu, elilingi A to elilingi B?
MPO NA KOSOLOLA:
Elimo nini ya malamu Yisaya azalaki na yango? Ndenge nini okoki komonisa ete ozalaka na elimo ya komikitisa mpe ya komipesa?
LISALISI: Tángá Nzembo 110:3; Matai 28:19, 20.
MAKAMBO YA KOSALA NA LIBOTA:
Sɛngá moto mokomoko ya libota asala bolukiluki na oyo etali mikumba ya baanzelu. Na nsima, bókutana mpe moto na moto ayebisa makambo oyo azwi. Na ndakisa, tángá mikumba mosusu oyo baanzelu bazalaka na yango.
LISALISI: Tángá Nzembo 34:7; Baebre 1:14; Emoniseli 14:6, 7.
Baanzelu bazalaka na mikumba ndenge moko?
LISALISI: Tángá Nzembo 103:19-21.
Baanzelu bazalaka na komikitisa mpe bandimaka kosalisa basusu?
LISALISI: Tángá Basambisi 13:17, 18; Luka 22:43; Emoniseli 22:8, 9.
Bombá yango mpo na koyekola
Katá, gumbá na ndambo mibale mpe bombá
LOKASA 12 YISAYA
MITUNA
A. Nani akendaki ná Yisaya mpo na kopesa Mokonzi Ahaze nsango moko?
B. Ntango Yehova atunaki ete: “Nakotinda nani?” Yisaya ayanolaki nini?
C. Yisaya asakolaki ete: “Mabele ekotonda . . . ”
[Etanda]
4026 L.T.B. Adama akelami
Azalaki na bomoi na mobu soki 700 L.T.B.
1 T.B.
98 T.B. Mokanda ya nsuka ya Biblia ekomami
[Karte]
Afandaki na Yerusaleme
Yerusaleme
YISAYA
NA MOKUSE
Mosakoli moko ya sembo, oyo azalaki kosambela Nzambe elongo na libota na ye. Apesaki libota na ye ndakisa malamu na ndenge azalaki kokokisa mosala na ye ya kosakola. Mwasi na ye abengamaki “mosakoli-mwasi.” (Yisaya 7:3; 8:3, 18) Yisaya asalelaki Nzambe na boumeli ya bambula soki 46. Nkombo na ye elimboli “Lobiko ya Yehova.”
BIYANO
A. Mwana na ye, Sheare-yashube.—Yisaya 7:3.
B. “Ngai oyo! Tindá ngai.”—Yisaya 6:8.
C. “. . . na boyebi ya Yehova.”—Yisaya 11:9.
Soki olingi kozwa bakopi mosusu ya lisolo “Mpo na kotalela na libota,” kende na site www.jw.org
● “MPO NA KOTALELA NA LIBOTA” biyano ezali na lokasa 18
BIYANO YA MITUNA OYO EZALI NA LOKASA 29
1. Na elilingi moko, anzelu azali na mapapu motoba, kasi na elilingi mosusu, azali na mapapu minei.
2. Na elilingi moko, anzelu azali na bapɛnsi, kasi na elilingi mosusu, azali na mopanga.
3. Na elilingi moko, likala esimbi mbɛbu ya Yisaya, kasi na elilingi mosusu, esimbi mabɔkɔ na ye.
4. B.