Ntango bana bazali kokola
“Ntango tozalaki bana mike, tozalaki kolinga mingi buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Sikoyo tozali na mwana mobali oyo azali na sanza 16, nkombo na ye Joshua. Buku yango esalisaka biso mingi mpo na koteya ye. Atako azali naino mwana moke mpenza, Joshua akoki kotánga bankombo ata 35 ya bato oyo Biblia elobeli na buku yango. Akómi kutu kotánga bankombo yango mikolo nyonso.”—Timothy mpe Ann.
“Mwana na ngai ya mobali oyo azali na mbula mitano alingaka kotala buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, mpe ayebi bililingi mingi oyo ezali na buku yango. Buku yango esalisá ngai nasolola na ye na ndenge akoki kolonga mikakatano na kelasi to na esika mosusu. Esalisi ye mingi koleka ndenge nabandaki kokanisa!”—Jennifer.
“Buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2 elobeli makambo nyonso oyo etali bomoi ya elenge. Nazali na mbula 19. Buku oyo esalisá ngai namityela mikano, nazwa bikateli ya malamu na likambo etali kobima ná bana mibali, mpe nakolisa boyokani na ngai ná Nzambe. Nalendisi moto nyonso, ezala elenge to mokóló, atánga buku oyo.”—Courtney.
□ Mokanda mpo na masolo ya Biblia
□ Yekolá epai ya Moteyi Monene
□ Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
□ Nalingi kozwa buku (babuku) oyo bolakisi awa. Okoki kokata eteni oyo mpe kotinda yango na adrɛsi oyo ebongi na yo, na baadrɛsi oyo ezali na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.