Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 nk. 20-21
  • Tózela koningana ya mabele ya minene koleka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózela koningana ya mabele ya minene koleka
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli kozela mosusu
  • Esakweli 1. Koningana ya mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biblia esakolaki nini mpo na koningana ya mabele ya makasi mpenza?
    Makambo mosusu
  • Koningana ya mabele na Haïti—Kondima mpe bolingo emonanaki
    Lamuká!—2011
Lamuká!—2011
g 1/11 nk. 20-21

Tózela koningana ya mabele ya minene koleka

BATO ya siansi batángi bankama ya koningana ya mabele ya minene banda ntango oyo basalá bamasini mpo na komeka makasi ya koningana ya mabele. Soki mabele eningani mosika, na bisika oyo bato bafandaka te, bapanzi-nsango balandelaka yango mpenza te to mpe balobelaka yango te. Nzokande, soki mabele eningani na engumba monene, ekoki kobebisa biloko mingi. Motángo ya bato oyo bakufi mpe ya biloko oyo ebebi elandaka motángo ya bato oyo bafandaka na esika yango mpe bibongiseli oyo bazwaki mpo na makama oyo ebimaka yango moko.

Na mokolo ya 12 Yanuali 2010, koningana ya mabele moko makasi mpe oyo ebomaki bato mingi mpe ebebisaka biloko mingi koleka mosusu nyonso esalemaki na Haïti. Kasi ezali te koningana ya mabele ya liboso to mpe kaka yango nde elekaki makasi na mbula oyo. Awa na nse, tokolobela koningana ya mabele mosusu oyo esalemaki na basanza ya ebandeli ya mbula 2010 oyo bamonaki ete eleki koningana ya mabele oyo ebebisaki engumba-mokonzi ya Haïti na makasi.

3 Yanuali: magnitude 7,1 Îles Salomon

Koningana ya mabele wana ya makasi, oyo bamonaki ete ezali ya magnitude koleka 7,1, ebimisaki tsunami to “mbonge ya mɛtrɛ 2 to 3.” Loti Yates, mokonzi oyo atalelaka makambo ya makama, alimbolaki ete na aviɔ, bamonaki “mpela ezindisi bisika nyonso.” Na kolanda maloba ya Yates, na mboka Bainara oyo ezali na Esanga Rendova, bandako 16 ekweaki mpe bandako mosusu mingi ebebaki.

Liboso koningana ya mabele wana esalema, mosusu ya magnitude 6,6 esalemaki. Mingi babangaki koningana ya mabele yango oyo ezalaki makasi mingi te mpe bakimaki na bangomba. Yango nde ebikisaki bango ntango tsunami oyo eutaki na koningana ya mabele ya makasi ezindisaki mabongo na bango, ngonga mibale na nsima.

26 Febwali: magnitude 7,0 Bisanga Ryukyu, na Japon

Koningana ya mabele esalemaki na ngonga ya 5:31 na ntɔngɔ, na ntango ya kuna, mpe ebandaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 80 longwa na engumba Naha, na Okinawa, esanga moko ya Bisanga Ryukyu. Bakebisaki bato mpo na tsunami kasi na nsima balobaki ete ekosalema te. Mwasi moko oyo afandaki na esanga Okinawa mbula koleka 90 alobaki ete amoná naino koningana ya mabele makasi lokola oyo wana te.

27 Febwali: magnitude 8,8 Chili

Ezalaki koningana ya mabele ya mitano oyo ezalaki ya makasi mingi koleka banda 1900. Oyo elekaki makasi esalemaki mpe na Chili, na 1960​—ezalaki na makasi ya magnitude 9,4. Koningana ya mabele wana, ná mosusu oyo ezalaki na magnitude 7,7 oyo ebebisaki engumba-mokonzi ya Chili na 1985, etindaki ekólo yango etya mibeko ya makasi na oyo etali ndenge ya kotonga bandako.

Na yango, bandako ya Santiago mpe ya bingumba mosusu epai mabele eninganaki ekweaki te. Nzokande, bato mingi bazokaki mpe babungisaki biloko mingi. Bakanisi ete bato soki 500 bakufaki; yango ezali katikati ya motángo ya bato oyo tsunami ebomaki na mabongo ya Chili.

4 Aprili: magnitude 7,2 Basse Californie, na Mexique

Koningana ya mabele oyo ebandaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 18 longwa na engumba Guadalupe Victoria, na Mexique, mpe na kilomɛtrɛ 47 longwa na engumba Mexicali. Ezali etúká moko oyo ezali mosika mpe bato mingi te bafandi kuna. Nzokande, koningana ya mabele yango eyokanaki na bingumba mpe bamboka mingi ya Mexique mpe na sudi ya États-Unis.

9 Mai: magnitude 7,2 Sumatra, na Indonésie

Koningana ya mabele yango esalemaki na nse ya mai, na midi, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 217 longwa na Banda Aceh, engumba oyo eleki mosika na nɔrdi ya Indonésie. Bato mingi babimaki na bandako na bango mpe babangaki kozonga mpo na mwa ntango. Kasi, moto moko te akufaki.

Tosengeli kozela mosusu

Soki totali masolo ya koningana ya mabele oyo esalemaki na planɛti na biso, ezali libunga te soki tolobi ete tosengeli kozela koningana ya mabele mosusu na bambula ezali koya. Ebongiseli moko ya États-Unis oyo eyekolaka makambo ya mabele emonisi yango polele ete: “Koningana makasi ya mabele ekokoba kosalema kaka ndenge esalemaki kala.”

Kutu, zulunalo moko emonisaki ete: “Koningana ya mabele oyo esalemi bambula oyo . . . eleki makoki ya moto mpe ezali kokundwela biso ete moto azali na bandelo. Elingi koloba te ete tosengeli kosala eloko te soki tokoki kosala yango . . . , kasi elakisi nde ete tosengeli kozela makama minene oyo eleki makasi na biso.”

Bato oyo bayekolaka Biblia na mozindo bakoki te kobosana bisakweli ya Biblia oyo elobi polele ete koningana ya mabele ezali kati na elembo ya mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo.​—Matai 24:3, 7; Marko 13:8; Luka 21:11.

[Karte na lokasa 20]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Koningana mosusu ya mabele ya magnitude 7,0 to koleka, oyo esalemaki banda na sanza ya Yanuali tii na Mai

Mexique

Haïti

Chili

Japon

Indonésie

Îles Salomon

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto