Koningana ya mabele na Haïti—Kondima mpe bolingo emonanaki
Na mwa mibale 12 Yanuali 2010, na ngonga ya 4:53 nsima ya midi, Evelyn ayokaki lokito lokola makelele ya mpɛpɔ moko monene ezali kobima na nse ya mabele, mpe mabele ebandaki koningana. Pembeni na ye, makonzí ya bɛto ebandaki kobukana, mpe bandako ebandaki kokwea. Ntango mabele etikaki koningana, Evelyn amataki na esika oyo akokaki komona malamu likambo oyo ezalaki kosalema. Ayokaki bato bazali kogangaganga. Na ngámbo ya Port-au-Prince, engumba-mokonzi ya Haïti, amonaki putulu ezali komata likoló lokola lipata.
NSIMA ya mwa miniti moke, bandako ya bato, bandako minene ya Leta, babanki, balopitalo, mpe biteyelo ekweaki. Bato ya ndenge na ndenge bakufaki—bato koleka 220 000. Bato soki 300 000 bazokaki.
Bato mingi oyo babikaki bafandaki pembeni ya bandako na bango oyo ebukanaki, basili mayele mpe bazangi likambo ya koloba. Bamosusu bazalaki kopanzapanza na mabɔkɔ na kati ya mabanga ya bandako oyo ebukanaki mpo na kobikisa bandeko mpe baninga ya kartye. Kura ekendaki mpe molili ekɔtaki; na yango bato oyo bazalaki kosala mpo na kobikisa basusu babandaki kosalela ba-torche mpe babuji.
Na engumba Jacmel, elenge moko ya mobali ya mbula 11 na nkombo Ralphendy akangamaki na eteni ya ndako oyo ndambo na yango ebukanaki. Etuluku moko ya bato ya engumba yango oyo bazalaki kobikisa bato basalaki mosala makasi mwa ntango molai mpo na kobikisa ye. Kasi lokola mabele ezalaki kaka koningana mokemoke, batikaki mosala yango mpo babangaki baetaje ya ndako yango ekwela bango. Philippe, misionɛrɛ moko oyo azali Motatoli ya Yehova, aboyaki kotika; alobi ete: “Nakokaki te kotika Ralphendy akufa kuna.”
Philippe ná bato mosusu misato bakɔtaki na mwa esika moko moke na nse ya ndako yango oyo ebukanaki mpe balekaki malɛmbɛmalɛmbɛ tii epai Ralphendy alalaki, makolo na ye ekangamaki na biloko oyo ekwelaki ye. Kobanda midi ya butu, balongolaki biloko yango malɛmbɛmalɛmbɛ. Mbala nyonso oyo mabele ezalaki koningana mwa moke, bazalaki koyoka babriki oyo ezalaki likoló na bango ezali koningana mpe kobukana. Na ngonga ya 5:00 na ntɔngɔ, elingi koloba ngonga 12 nsima ya koningana ya mabele, balongaki kobikisa Ralphendy.
Likambo ya mawa, milende mosusu ya ndenge wana elongaki te. Na engumba Léogâne, epai mabele eninganaki makasi mpenza, Roger ná Clid, mwana na ye ya mobali ya mokóló, babikaki ntango ndako na bango ebukanaki. Clarence, mwana na ye ya moke ya mobali akufaki. Clana, mwasi ya Roger, azalaki naino na bomoi mpe azalaki koloba, kasi motó na ye ekangamaki na kati ya plafɔ oyo ekweaki. Roger mpe moninga na ye basalaki mosala makasi mpo na kobimisa ye. Na kati kuna, mwasi yango alobaki boye: “Bósala noki! Nabandi kolɛmba! Mpema ekómi mokuse!” Ngonga misato na nsima, bato oyo bazalaki kosala mpo na kobikisa bato bayaki. Kasi ntango babimisaki ye, asilaki kokufa.
Mwamisato 13 Yanuali, mokolo ya 2
Pole ya ntɔngɔ emonisaki ndenge biloko ebebaki. Eteni monene ya engumba Port-au-Prince ebebaki. Ntango nsango ebandaki kotambola ete engumba ebebi, bibongiseli oyo epesaka lisalisi mpe bato mingi ya motema malamu na mokili mobimba babandaki koluka ndenge ya kopesa lisalisi. Bato oyo basalaka na biro ya Batatoli ya Yehova na République dominicaine, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 300, bayokaki mpe lokito ya koningana ya mabele. Ntango bayebaki ete koningana ya mabele yango ebandaki nde pembeni ya Port-au-Prince, engumba oyo ezali na bato mingi—bato pene na milio misato kati na bato milio libwa oyo bafandaka na Haïti—Batatoli ya République dominicaine babandaki mbala moko kozwa bibongiseli mpo na kopesa lisalisi.
Eleki mbula 150 banda mabele eninganá makasi na Haïti. Yango wana, na esika ya kotonga bandako oyo ekoki kopikama na ntango ya koningana ya mabele, bato ya Haïti bakómaki kotonga bandako oyo ekoki kobatela bato na mipɛpɛ makasi mpe na bampela. Na yango, bifelo ya babriki mpe bansamba makasi ya bɛto elongaki te kotɛlɛma ata ntango mabele eninganaki na magnitude 7,0. Nzokande, biro ya Batatoli ya Yehova na Haïti, oyo basilisaki kotonga na 1987, etongamaki na kolanda mibeko ya kotonga na bisika oyo koningana ya mabele ekoki kosalema. Atako ezali pembeni na ndelo ya ɛsti ya Port-au-Prince, ebebaki mpenzampenza te.
Butu mobimba, biro ya Batatoli na Haïti ekómaki esika oyo ezalaki kotambwisa makambo ndenge na ndenge mpo na kopesa bato lisalisi. Lokola mwaye ya kosolola malamu na mikili mosusu na telefone mpe na Internet ezalaki te, bandeko ya biro bakendaki na ndelo ya République dominicaine mbala mibale mpo na kotinda balapolo. Na ntango wana, bankama ya bato, oyo mingi kati na bango bazokaki, bazalaki kosopana na biro ya Haïti. Bamemaki bamosusu na mwa balopitalo oyo ezalaki naino kosala, mpe eumelaki te, bato batondaki na balopitalo yango.
Na balopitalo nyonso, ezalaki na bato balali na mabele—bazali kotangisa makila mpe koganga. Moko kati na bango ezalaki Marla, oyo akangamaki ngonga mwambe na nse ya ndako moko oyo ekweaki. Makolo na ye ekómaki lokola ekufi mpe azalaki kokoka koningisa yango te. Baninga ya kartye babimisaki ye kuna mpe bamemaki ye na lopitalo moko, kasi lopitalo nini? Evan, monganga moko oyo azali Motatoli na République dominicaine mpe akómaki liboso, abandaki koluka ye, ayebaki kaka nkombo na ye.
Na ntango wana, elekaki ngonga koleka 24 banda mabele eninganaki, mpe butu eyindaki lisusu. Wana azalaki kokatisakatisa bibembe ya bato na libándá ya lopitalo moko, Evan abondelaki Yehova na nse ya motema mpe akobaki kobenga nkombo ya Marla. Nsukansuka, ayokaki moto ayanoli ete: “Ngai oyo!” Marla atalaki ye mpe amungamungaki. Evan akamwaki, mpe atunaki ye boye: “Ozali komungamunga mpo na nini?” Ayanolaki ete: “Mpo sikoyo nazali elongo na ndeko na ngai na elimo.” Evan akokaki te kokanga mpisoli na ye.
Mwaminei 14 Yanuali, mokolo ya 3
Biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaka na États-Unis—ná bafiliale ya Canada, ya France, ya Guadeloupe, ya Martinique, ya République dominicaine, mpe ya mikili mosusu—basalaki elongo mpo na kosalela malamu biloko oyo bazalaki na yango, bamwaye ya kokumba biloko, ya kosolola, mbongo mpe bato oyo bakosala mosala. Na nyonso, minganga 78 oyo bazali Batatoli ya Yehova basengelaki koya mpo na kopesa lisalisi, elongo na bandeko mosusu mingi. Na ngonga ya 2:30 na ntɔngɔ, motuka monene ya liboso oyo ememaki biloko ya lisalisi elongwaki na biro ya filiale ya République dominicaine mpe ekendeki na Haïti, ememaki kilo soki 6 804 ya bilei, mai, bankisi mpe biloko mosusu.
Ntango motuka yango ekómaki mwa bangonga na nsima, bandeko ya biro ya filiale ya Haïti babandaki kozwa bibongiseli mpo na kokabola biloko oyo eyaki. Mpo miyibi báyiba te biloko ya kolya mpo na kotɛka, basali yango babombaki yango. Bandeko basalaki butu moi mpo na kokanga bilei mpe biloko mosusu na basaki ya mikemike mpo na mabota to mpo na moto mokomoko. Na basanza oyo elandaki, Batatoli ya Yehova bakabolaki kilo koleka 450 000 ya biloko, kati na yango bilei 400 000; nyonso wana ofele.
Mwamitano 15 Yanuali, mokolo ya 4
Kobanda midi, Batatoli 19, kati na bango minganga, mafulume, mpe bato mosusu oyo basalisaka bato balongwaki na République dominicaine mpe Guadeloupe bakómaki na Haïti. Basalaki mwa lopitalo moko ya mbangumbangu mpo na kosalisa bato liboso bákende na lopitalo ya monene. Kati na bato oyo basilisaki kuna, ezalaki mpe na bana ebele oyo bautaki na ndako moko ya bitike. Lisusu, Batatoli yango bapesaki bato ya ndako yango ya bitike biloko ya kolya mpe bakapo ya kosala bisika ya kofanda. Étienne, mokambi ya ndako yango alobaki boye: “Nazali kopesa Batatoli ya Yehova mersi mingi. Nayebi te soki tolingaki kosuka wapi soki bázalaka te.”
Abungi mpe na nsima amonani
Ntango mabele eninganaki, Islande, mwana mwasi moko ya mbula 7 atalaki libándá mpe amonaki bansinga ya kura ezali kokatana mpe ezali kobimisa mwa mɔtɔ. Na kati ya ndako, bifelo ebandaki kobukana mpe babriki ebandaki kokwea, ebukaki ye lokolo mpe azokaki makasi. Nsima ya kobimisa ye na biloko oyo ekweaki, tata na ye, Johnny, akatisaki ndelo ya République dominicaine mpe amemaki Islande na lopitalo moko oyo ezalaki wana. Bamemaki ye na mpɛpɔ na lopitalo moko na Saint-Domingue, engumba-mokonzi ya ekólo yango. Kasi ntango Johnny abengaki na lopitalo yango, Islande azalaki te.
Na boumeli ya mikolo mibale Johnny alukaki Islande esika nyonso, kasi amonaki ye te. Bamemaki ye na lopitalo mosusu, mpe moto moko oyo azalaki kosalisa bato na lopitalo yango ayokaki ye azali kobondela Yehova. (Nzembo 83:18) Moto yango atunaki ye boye: “Olingaka Yehova?” Islande ayanolaki na mai na miso ete “Ɛɛ, nalingaka ye.” Moto yango alendisaki ye ete: “Kobanga te. Yehova akosalisa yo.”
Johnny asɛngaki biro ya Batatoli ya Yehova na République dominicaine esalisa ye na koluka Islande. Motatoli moko na nkombo Melanie andimaki kosalisa ye. Ntango Melanie azalaki kotuna na lopitalo moko, moto oyo ayokaki Islande azali kobondela ayokaki lisolo yango mpe alakisaki ye mwana yango. Eumelaki te, Islande akutanaki na libota na ye.
Mapaso mpe kosalisa bato bázongela kosalela binama na bango
Bato mingi oyo bazokaki bazwaki lisalisi moke kaka to mpe bazwaki lisalisi te tii ntango bakendaki na mwa lopitalo oyo Batatoli basalaki na biro ya filiale ya Haïti, mpe bampota na bango ekómaki kopɔla. Mbala mingi, esɛngaki kaka kokata enama oyo epɔli mpo na kobikisa bomoi ya moto. Na mikolo ya liboso oyo elandaki koningana ya mabele, biloko oyo basalelaka mpo na mapaso, bankisi, ata mpe bankisi oyo batyaka mpo na moto ayaka mpasi te ntango ya lipaso ezalaki komonana te. Likambo yango ezalaki kotungisa ata minganga. Monganga moko alobaki boye: “Nakosepela Nzambe alongola na makanisi na ngai makambo mosusu oyo namonaki mpe oyo nayokaki.”
Na pɔsɔ ya mibale nsima ya koningana ya mabele, minganga oyo bazali Batatoli oyo bautaki na Mpoto mpe bayebaki kosala mapaso ya minene mpe ya mbangumbangu babandaki koya ná bisaleli oyo esengeli. Etuluku wana ya minganga basalaki mapaso 53 mpe bapesaki bato mosusu lisalisi ndenge na ndenge. Wideline, Motatoli moko ya mbula 23, akómaki na Port-au-Prince mokolo moko liboso mabele eningana. Ntango eninganaki, lobɔkɔ na ye ya mobali ebukanaki mpe esɛngaki bákata ye yango na lopitalo moko ya engumba yango. Na nsima, bandeko na ye bamemaki ye na lopitalo moko oyo ezali pembeni na ndako na bango na engumba Port-de-Paix, oyo mpo na kokóma kuna, esengeli kosala ngonga nsambo. Kasi Wideline akómaki na mpasi mingi koleka, mpe bato ya lopitalo yango batikaki kosalisa ye bakanisaki ete akokufa.
Ntango bayokaki likambo na ye, etuluku moko ya minganga oyo bazalaki Batatoli balongwaki na Port-au-Prince mpe bakendaki kosalisa Wideline mpe kozwa ye mpo na kosalisa ye malamu. Ntango bato mosusu ya maladi bamonaki ete bandeko na ye na elimo bayei kotala ye, babɛtaki mabɔkɔ. Na lisalisi ya libota na ye mpe ya lisangá, Wideline azali sikoyo komesana na bomoi na ye ya sika.
Na République dominicaine, Batatoli ya Yehova bafutelaki bandako mpo ezala esika ya kosalisa bato oyo batindami kuna bázongela kosalela binama na bango. Bituluku ya Batatoli ya Yehova nde bazalaki koleka na bandako yango mpo na kosalisa bato—minganga, mafulume, banyɔlisi-binama, bato mosusu oyo bayebi mosala ya monganga. Basalisaki bato ya maladi na motema moko tii ntango bayokaki malamu.
Kosalisa bato bázala na kondima, elikya mpe bolingo
Na Bandako ya Bokonzi 56 ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na bisika oyo mabele eninganaki na Haïti, kaka bandako 6 nde ebebaki. Batatoli mingi oyo balongwaki na bisika na bango mpo na koningana ya mabele bakendeki kofanda na Bandako ya Bokonzi oyo ebebaki te to mpe na bisika mosusu ya polele. Batatoli, lokola bamesanaki koyangana elongo, bazwaki bibongiseli mpo básala moko na mayangani na bango.
Jean-Claude, mokɛngɛli ya lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na esika yango, alobaki boye: “Tokobaki kolanda programɛ ya makambo ya elimo na lisangá ndenge tomesanaki, mpe yango esalisaki bilenge, ata mpe mikóló bázala makasi.” Esalaki nini? Mobali moko alobi boye: “Nazali na esengo mingi komona Batatoli ya Yehova bazali kokoba kotambola mpo na kosakola. Soki tomonaka bino te, tolingaki komona ete makambo ezali mabe mingi koleka.”
Batatoli bazalaki kobɔndisa bato. Motatoli moko alobaki boye: “Bato mingi oyo tokutanaki na bango bazalaki kokanisa ete koningana wana ya mabele ezali etumbu ya Nzambe. Tosalisaki bango bámona ete koningana ya mabele ezali kaka likama mpe euti na Nzambe te. Tolakisaki bango Ebandeli 18:25. Na vɛrsɛ yango Abrahama alobi ete ekoki kokanisama te ete Nzambe aboma bato ya malamu elongo na bato ya mabe. Tolakisaki mpe bango Luka 21:11. Kuna Yesu asakolaki ete koningana ya mabele makasi ekosalema na ntango na biso, mpe tolimbwelaki bango ete mosika te akosekwisa balingami na biso oyo bakufá mpe akolongola bampasi. Bato mingi bamonisaki botɔndi mpo na boyebi wana.”a
Atako bongo, mikakatano ezali naino. Jean-Emmanuel, Motatoli moko oyo azali monganga, alobaki boye: “Tozwi mpasi ya liboso, yango nde koningana ya mabele. Sikoyo, tosengeli kobunda na makambo oyo yango eboti. Longola bamaladi ebele oyo ekoki kobima na bakaa oyo etondi na bato, na bosɔtɔ mpe na mai ya mbula, ezali mpe na makambo ya nsɔmɔ oyo bato balingaka bábosana, kasi elongwaka na motema te.”
Bapɔsɔ nsima ya koningana ya mabele, Motatoli moko ayaki na mwa lopitalo yango. Azalaki komilelalela mpo na motó mpasi oyo ezalaki kosila te mpe mpo na kozanga mpɔngi, makambo oyo bato mingi bazalaka na yango nsima ya makama. Motatoli moko ya mwasi oyo azali lifulume atunaki ye boye: “Eloko moko etutaki yo na motó?” Ye ayanolaki na kimya ete: “Te. Mwasi na ngai oyo nafandaki na ye mbula 17 akufaki. Kasi tozelaka ete makambo ya ndenge wana esalema. Yesu alobaki ete ekosalema.”
Ntango asosolaki likambo oyo ezalaki kotungisa moto yango, lifulume alobaki boye: “Kasi obungisaki moninga na yo ya bomoi. Ezali mpenza mpasi! Ezali mabe te koyoka mawa, ata mpe kolela. Yesu alelaki ntango moninga na ye Lazare akufaki.” Ntango ayokaki bongo, mobali yango abandaki kolela.
Na Batatoli koleka 10 000 oyo bafandaka na bisika oyo mabele eninganaki, Batatoli 154 bakufaki. Bato mingi (koleka 92%) oyo bafandaka na engumba Port-au-Prince babungisaki ndeko to moninga moko to koleka na likama yango. Mpo na kosalisa bato oyo bandeko na bango bakufaki, Batatoli ya Yehova bakendaki mbala na mbala kotala bato oyo bazokaki to babulunganaki na makanisi, bazalaki kopesa bango libaku ya kobimisa mayoki na bango epai ya moto oyo bakokaki kotyela motema. Batatoli oyo bandeko na bango bakufaki bayebaki elaka ya Biblia mpo na lisekwa mpe paradiso, kasi bango mpe bazalaki na mposa ya kobimisa mayoki na bango epai ya baninga na bango bakristo oyo bayebi komitya na esika na bango mpe bazalaki na mposa ya koyoka maloba ya kolendisa.
Kobunda na mikakatano ya lelo mpe ya lobi
Ntoma Paulo akomaki boye: “Kondima, elikya mpe bolingo ezali, yango misato; kasi oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.” (1 Bakorinti 13:13) Bizaleli wana ezali kosalisa Batatoli mingi ya Haïti bábunda na mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo, bálendisa basusu, mpe bátalela mikolo oyo ezali koya na motema ya kokita. Kondima, bomoko, mpe bolingo ya solosolo ezali komonana polele na milende oyo ezali kosalema na bikólo mingi mpo na kosalisa bato yango oyo bazwaki likama. Petra, monganga moko mpe Motatoli oyo autaki na Allemagne mpo na kosalisa, alobi boye: “Naino namoná bolingo ya ndenge oyo te. Nalelaki mingi, mingimingi mpo na esengo kasi mpo na mawa te.”
Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete “na makambo mwa mingi,” koningana ya mabele oyo esalemaki na Haïti na 2010 ezali “likama oyo ebebisaki mboka kaka moko mingi koleka makama mosusu.” Kasi, banda wana, mokili ekutani na makama mosusu minene, oyo euti na biloko oyo ezalisamá to na misala ya bato. Ezali nde na mokolo oyo makama yango ekosila? Batatoli ya Yehova na Haïti mpe na mokili mobimba bazali na kondima ete mosika te Nzambe akokokisa elaka ya Biblia oyo: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 11, “Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
“Nakokaki te kotika Ralphendy akufa kuna”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
“Nazali na esengo mingi komona Batatoli ya Yehova bazali kokoba kotambola mpo na kosakola”
[Etanda/Bililingi na lokasa 17]
BATONGELI BATO BANDAKO
Sanza moko mpamba na nsima, Batatoli ya Yehova oyo bayebi misala ya kotonga babandaki mbala moko kotalatala bandako mpo na koyeba bandako nini ebebaki te mpo bankolo na yango bázonga kuna. Bandeko mingi oyo bandako na bango ebebaki bazalaki na mposa ya bisika ya kolala tii ntango bakobongisa bandako na bango.
John, ndeko moko oyo asalaka na biro ya filiale ya Haïti, alobaki boye: “Tolandaki mayele ya bibongiseli minene oyo esalisaka bato oyo bazwi makama mpe tosalaki baplan ya bandako oyo ezali ntalo moke, oyo ezali mpasi te mpo na kotonga, mpe oyo ezali minene lokola bandako oyo bato mingi bazalaki kofanda liboso. Bandako yango ekokaki kobatela na mbula mpe mopɛpɛ, kozanga ete ezala likama soki mabele eningani lisusu.” Pɔsɔ misato mpamba nsima ya koningana ya mabele, etuluku ya bandeko ya Haïti mpe oyo bautaki bikólo mosusu babandaki kotonga bandako yango.
Na balabala, bato bazalaki kosepela soki bamoni mituka oyo ezalaki komema biteni ya bandako yango. Ntango apesaki mikanda mpo biloko ya kotonga oyo eutaki mboka mopaya ekɔta na Haïti, moto moko ya douane ya Haïti alobaki boye: “Batatoli ya Yehova bazalaki kati ya bato ya liboso oyo bakómaki na ekólo na biso mpo na kosalisa bato. Epai na bango kosalisa ezalaka kaka na maloba te, emonanaka mpe na misala.” Mwa basanza na nsima, Batatoli ya Yehova basilaki kotonga bandako 1 500 mpo na bato oyo bandako na bango ebebaki.
[Karte na lokasa 14]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
HAÏTI
PORT-AU-PRINCE
Léogâne
Esika ebandaki
Jacmel
RÉPUBLIQUE DOMINICAINE
[Elilingi na lokasa 16]
Marla
[Elilingi na lokasa 16]
Islande
[Elilingi na lokasa 16]
Wideline
[Elilingi na lokasa 18]
Etuluku moko ya Batatoli ya Yehova ya Haïti bakei kobɔndisa bato oyo bazwaki likama
[Elilingi na lokasa 18]
Monganga moko azali kosalisa elenge mobali na mwa lopitalo oyo Batatoli ya Yehova basalaki