Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 lok. 24
  • Tabàky—Nkisi euti na nzete mpo na kobongisa loposo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tabàky—Nkisi euti na nzete mpo na kobongisa loposo
  • Lamuká!—2009
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kotonga ndako na mabaya?
    Lamuká!—1996
  • Tozali na ekateli ya kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndenge oyo bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Lamuká!—2009
g 10/09 lok. 24

Tabàky​—Nkisi euti na nzete mpo na kobongisa loposo

◼ Na sudi-wɛsti ya Madagascar, epai mbula ebɛtaka mingi te, basi batambolaka pembenipembeni ya libongo mpo na koluka ndako ya mbɛmbɛ mpo na kotɛka epai ya bapaya oyo bayaka na mboka na bango. Basi yango bapakolaka na bilongi, pɔtɔpɔtɔ ya mpɛmbɛ oyo babengi tabàky. Pɔtɔpɔtɔ yango ezalaka kaka te mpo na kobatela loposo na bango na moi makasi, kasi ezalaka mpe mpo na kobongisa yango.

Mpo na kosala tabàky, bazwaka mposo ya nzete ya masonjoany mpe ya fihamy (oyo babengaka mpe aviavy). Ezalaka mpasi te mpo na kosala yango: mwasi akozwa mwa ndambo ya mposo ya nzete mpe akonika yango na libanga moko, mpe akobanda kobakisa mai mokemoke tii ntango ekokóma pɔtɔpɔtɔ. Na nsima, akoki kosalela mwa nzete to eloko moko boye ya plastike, oyo babongisá nsɔngɛ na yango malamu, mpe kobanda kotoka pɔtɔpɔtɔ yango mpo na kopakola na elongi.

Basi mosusu bapakolaka tabàky na elongi mobimba mpe batikaka kaka miso. Bamosusu basepelaka kopakola yango kaka na matama to na mbanga. Tabàky ekoki mpe kosalelama mpo na kobomba mbeba oyo ezali na elongi, kolongola mafuta na loposo, to kobongisa loposo ya nzoto. Ntango mosusu basangisaka yango na biloko mosusu; yango wana basalelaka yango ndenge mingi.

Nani akoki kokanisa ete nzete ekoki kobimisa eloko ya ndenge wana? Ya solo, Madagascar ezali mosika na Paris mpe New York, bingumba oyo ekendá nsango na makambo ya kosala mafuta kitoko ya loposo; kasi, na Madagascar basalaka tabàky, pɔtɔpɔtɔ moko malamu mpo na kobongisa loposo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto