Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/09 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazali kobimisa Babiblia na Chine
  • Bikeko oyo bazali koyiba
  • Bitumba ezali kosilisa mbongo na Afrika
  • Kolala ata moke ezali na ntina
  • Sambelá Nzambe “na elimo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bililingi ya Losambo​—Epai yango eutá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Esaleli malamu mpe esaleli mabe ya bililingi kati na losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki bazulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 1/09 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

◼ Na boumeli ya mbula 20 oyo eleki, na mokili mobimba, makama lokola mpela, koningana ya mabelé, mipɛpɛ makasi esalemaki mbala mingi koleka. Bato koleka milio 250 bazali kokutana na makama yango mbula nyonso.​—EL UNIVERSAL, MEXIQUE.

◼ “Na boumeli ya bambula, mipɛpɛ ya makasi ya pasifike, ememi bosɔtɔ epai na epai mpe esangisi yango.” Lelo oyo, bonene ya esika oyo bosɔtɔ yango ezali, ekokani na bonene ya Australie.​—LA DÉPÊCHE DE TAHITI, TAHITI.

◼ Mpo na kosala litre 50 ya esansi oyo euti na milona, oyo ekoki kotambwisa vuatire moko, esɛngaka kilo 200 ya masango​—“kilo ya masango oyo moto akoki kolya mbula mobimba.”​—GAZETA WYBORCZA, POLOGNE.

Bazali kobimisa Babiblia na Chine

Ye Xiaowen, mokambi ya makambo etali mangomba na Chine alobi ete: “Ekólo Chine ekómi moko ya bikólo oyo ezali kobimisa Babiblia ebele na mokili.” Kompanyi moko oyo ebimisaka Babiblia na Nankin, mboka-mokonzi ya etúká ya Jiangsu, na Chine ebimisaki Biblia ya mobimba oyo ekokisaki motángo ya milio 50 ya Babiblia oyo ebimisamá na Chine. Adrɛsi moko ya Internet ya Chine (People’s Daily Online) elobi ete: “Babiblia soki milio 3 ebimaki na kompanyi yango mbula na mbula na boumeli ya bambula oyo euti koleka.” Balapolo emonisi ete na Chine, motángo ya bato oyo bazali komibenga baklisto ezali komata.

Bikeko oyo bazali koyiba

Zulunalo moko (Rousski Newsweek) elobi ete: “Na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka, na ekólo Russie, miyibi bayibaki na bandako-nzambe koleka 1 000.” Lapolo moko oyo ministère de l’interieur ya Russie esalaki, emonisaki ete bayibaki bikeko soki 40 000. Yango wana, ministère ya interieur ná Lingomba ya Orthodoxe ya Russie bayokanaki ete bábanda kotyaka elembo na ekeko mokomoko oyo ezali na ndako-nzambe, mpe elembo yango ekobanda komonana kaka soki balekisi mwa mwinda moko (ultra violet) likoló na yango. Yango ekobanda kosalisa bato oyo bakosala baankɛtɛ báyeba bankolo bikeko oyo ebungaki. Zulunalo yango elobi lisusu ete baepiskɔpɔ ya Moscou basepelaki na meko yango, “mpo elembo oyo ‘bato’ bakotya na ekeko ekobebisa ata moke te likoki na yango ya kosala makamwisi.”

Bitumba ezali kosilisa mbongo na Afrika

Zulunalo moko (International Herald Tribune) elobi ete: “Kati ya mobu 1990 mpe 2005, bikólo 23 ya Afrika ekɔtaki na bitumba oyo elyaki mbongo dolare miliare soki 300.” Ellen Johnson-Sirleaf, prezida ya Liberia, alobi ete: “Mbongo oyo Afrika ezali kobimisa mpo na bitumba, ekoki kosilisa sida, kobongisa makambo etali kotánga kelasi, mai mpe koluka mayele to nkisi oyo ekoki kobundisa to kosilisa maladi ya ntolo mpe malaria. Ebele ya balopitalo, biteyelo mpe banzela ekokaki kotongama.” Zulunalo yango esukisi ete soki bitumba ezalaka te, Afrika “elingaki kokóma mosika na makambo mingi, na esika ezala na bobola koleka mikili nyonso.”

Kolala ata moke ezali na ntina

Ankɛtɛ moko oyo basalaki na Grèce, emonisaki ete bato ya ekólo yango, basi ná mibali koleka 23 000 balobaki ete kopema ata mbala misato mpamba na pɔsɔ ekoki kosala ete bato mingi (37%) bákufa te na maladi ya motema (crise cardiaque). Dimitrios Trikopoulos, molakisi ya makambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto na eteyelo monene na Harvard, na États-Unis alobi ete: “Soki mitungisi ekómi makasi to ezali kosila te, ekoki kobelisa moto maladi ya motema. Kolala mwa moke nsima ya midi ekoki kokitisa mitungisi [mpe] kosala ete bato bákufa mingi te na maladi ya motema.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto