Sɛkɛlɛ ya koumela na bomoi ezali nde na Okinawa?
◼ Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na 2006 na bisanga ya Okinawa, na Japon, emonisaki ete kati na bato soki milio moko na ndambo, mibange oyo bazali na mbula 100 bazali soki 740—mingi kati na bango (90 %) bazali basi. Ankɛtɛ oyo Doktɛrɛ Makoto Suzuki asalaki na Okinawa mpo na koyeba bomoi ya bato oyo bazali na mbula 100, emonisaki ete soki tozwi bato 100 000, 50 kati na bango bakozala na mbula 100. Na mikili ya bozwi, soki tozwi bato 100 000, bato 10 to 20 nde bakozala na mbula 100.
Boyekoli oyo ezali “kosalema na mokili mobimba mpo na koyeba bomoi ya bato oyo bazali na mbula 100” emonisi ete “bato ebele ya mbula 100 bazali na nzoto makasi.” Mpo na koyeba ntina oyo mibange yango bazali nzoto makasi, Suzuki ná bato na ye bayekolaki bomoi mpe ba-gènes ya bato soki 900 oyo bazali na mbula 100, mpe ya bato mosusu ya Okinawa oyo bazali na mbula 70 to koleka. Suzuki ná bato na ye bamoni ete mibange yango mingi bazali nzoto mike mpe makasi, misisa na bango oyo etambwisaka makila na nzoto ekangamá te, mpe babɛlaka kanser mpe maladi ya motema mpambampamba te. Kati na bato oyo bazali na mbula 90, mingi te babɛlaka maladi ya motó soki tokokanisi bango na bato ya mikili mosusu oyo bazali na bango mbula moko. Sɛkɛlɛ na bango ezali nini?
Ntina ya liboso ezali na ba-gènes na bango. Kasi ezali mpe na bantina mosusu—na ndakisa, bamɛlaka makaya te, bamɛlaka masanga mingi te, mpe balyaka bilei ya malamu. Bato ya Okinawa balyaka mingimingi bilei oyo ezali na mafuta mpe sukali moke, mpe balyaka mingi ndunda, bambuma mpe biloko mosusu. Bato yango balyaka te tii bátondisa mpenza libumu. Doktɛrɛ Bradley Willcox, oyo azali mpe koyekola likambo yango, alobi boye: “Osengeli kotika kolya soki kaka oyoki ete libumu ebandi kotonda. Estoma eyebisaka bɔɔngɔ ete etondi nsima ya miniti soki 20.”
Bato ya Okinawa bazalaka nzoto makasi mpo basalaka mwa bilanga, batambolaka makolo mikolo nyonso, babinaka mabina ya bonkɔkɔ, to basalaka misala mosusu. Ntango bayekolaki bizaleli ya mibange yango bamonaki ete bazalaka ntango nyonso na makanisi ya malamu mpe bamesanaka na likambo nyonso. Bayebaka kolonga mikakatano mpe mingimingi basi “bayebaka komesana na bato mosusu.”
Willcox alobi boye: “Ezali na nkisi te” mpo na koumela na bomoi. Ndenge boyekoli yango emonisi, koumela na bomoi ezali likambo ya ba-gènes, kolya bilei ya malamu, kosala ngalasisi, makambo mosusu ya malamu, “mpe koyeba kolonga mikakatano.”