Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/08 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na esika ya kobimisa matomba ebimisi nde mikakatano
  • “Montre ya nsuka ya mokili” epusani
  • Kotungisama na makanisi na ntango ya zemi
  • Bazali kotambwisa motuka kozanga kotya likebi mingi
  • Mokili oyo ekobonga lisusu to te?
    Lamuká!—2017
  • Likɔnga ya montre ya nsuka ya mokili epusani na 00:00!
    Makambo mosusu
  • Likambo nini bato mingi babangaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Biblia elobi nini mpo na etumba ya nucléaire?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 7/08 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

◼ “Na Grande-Bretagne, bana mingi ya mbula motoba balekisi mbula mobimba na kotala televizyo mpe bana mingi (koleka 50%) ya mbula misato bazali na televizyo na bashambre na bango.”​—THE INDEPENDENT, GRANDE-BRETAGNE.

◼ Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Chine epai ya bato oyo bazali na mbula koleka 16, emonisaki ete ndambo na bango (31,4%) balobaki ete basambelaka. Soki motángo yango ezali komonisa ekólo na bango mobimba, yango elingi koloba ete “bato soki milio 300 basambelaka . . . yango ekeseni mpenza na motángo ya milio 100 oyo bakonzi ya ekólo yango bapesaka.”​—CHINA DAILY, CHINE.

Na esika ya kobimisa matomba ebimisi nde mikakatano

Eleki mwa bambula na Pays-Bas, bakonzi mpe bato oyo basalaka milende mpo na kobatela mabelé, mai mpe mopɛpɛ bamonaki ete kosalela mafuta oyo euti na mbuma ná matiti, mingimingi mafuta ya mbila, mpo na kotambwisa bamasini oyo epesaka kura ezali malamu mingi, mpamba te mbuma mpe matiti esilaka te. Zulunalo moko (The New York Times) elobi ete eloko oyo batyelaki motema eyei nde “kobebisa lisusu makambo. Lokola mikili mingi ya Mpoto ekómaki na mposa makasi ya mafuta ya mbila, yango etindaki bato ya bikólo ya Azia ya Sudi-ɛsti bákata banzete ebele na zamba mpe básalela mingi koleka bankisi ya kopesa mabelé vitamini.” Bakaukisaki bisika ya maimai oyo ezalaki na matiti epɔlá, batumbaki matiti yango mpe ebimisaki “ebele” ya milinga oyo ebebisaka mopɛpɛ. Zulunalo yango ebakisi ete likambo yango esali ete ekólo Indonésie ekóma mbala moko “ekólo ya misato na mokili mobimba oyo ebimisaka milinga ya mabe oyo bato ya siansi balobi ete ebakisaka molunge na mokili.”

“Montre ya nsuka ya mokili” epusani

Babimisi ya zulunalo moko [Bulletin of Atomic Scientists (BAS)] nde basalaki montre yango mpo na komonisa ete etikali moke mokili ebomama na bɔmbi ya nikleere. Bapusi likɔnga na miniti mibale, mpe montre yango ezali kolakisa sikoyo ete etikali miniti mitano mpo tókóma midi ya butu, oyo mpo na bango elakisi “nsuka ya mokili.” Eleki sikoyo mbula 60 banda basalá montre yango, mpe oyo ezali mbala ya 18 oyo babongoli ngonga na yango. Mbala ya nsuka oyo babongolaki ngonga na yango ezalaki na sanza ya Febwali 2002, nsima ya kokweisama ya bandako mibale ya molai (World Trade Center) na New York. Lokola bikólo bazali kaka na bibundeli ya nikleere mpe bazali kokoba koyeisa yango makasi, mpe biloko oyo basalaka na yango babɔmbi ya nikleere ezali mpenza kobatelama malamu te, yango etindi babimisi ya zulunalo yango báloba ete “bato bazali kokoka te kosilisa mikakatano oyo ezali kouta na biloko wana oyo ekoki koboma bato mingi mbala moko koleka biloko mosusu nyonso oyo bato basalá.” Balobi lisusu boye: “Kobeba ya mopɛpɛ ekoki kobimisa makama minene kaka lokola bibundeli ya nikleere.”

Kotungisama na makanisi na ntango ya zemi

Makambo oyo bato ya mayele bayekoli mikolo oyo emonisi ete soki mobali azali koswanisa mwasi na ye oyo azali na zemi to kobɛta ye, yango ekoki kosala ete bɔɔngɔ ya mwana oyo azali na libumu ekola malamu te. Vivette Glover, molakisi na iniversite moko ya Londres (Imperial College), alobi boye: “Tomoni ete soki mobali azali koswanisa mwasi na ye oyo azali na zemi, mwana wana akolaka malamu te. Tata azali na mokumba ya ntina mingi.” Alobi lisusu ete lolenge ya boyokani oyo ezali kati na baboti “ekoki kozala na bopusi likoló ya nzoto ya mama, mpe yango ekoki kosala ete bɔɔngɔ ya mwana ekola malamu to te.”

Bazali kotambwisa motuka kozanga kotya likebi mingi

Michael Schreckenberg, moto ya mayele na makambo ya kotambwisa mituka, na iniversite ya Duisburg-Essen, na Allemagne, alobi ete basɔfele oyo balekaka nzela moko mikolo nyonso basalelaka lisusu te eteni ya bɔɔngɔ na bango oyo esalisaka moto atya likebi mingi. Ntango bazali kokumba mituka na banzela oyo bameseni na yango, bakanisaka na makambo mosusu na esika ya kotya likebi na nzela. Yango esalaka ete bámonaka makama nokinoki te. Schreckenberg alendisi basɔfele oyo balekaka nzela moko mikolo nyonso bábosanaka te ete basengeli kozalaka ekɛngɛ mpe kotikaka te ete makanisi na bango eyengayenga ntango bazali kokumba motuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto