Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 111
  • Biblia elobi nini mpo na etumba ya nucléaire?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini mpo na etumba ya nucléaire?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia esakolá mpe etumba ya nucléaire?
  • Nzambe akotika nzela etumba ya nucléaire esalema?
  • Mabele ekobebisama nyonso?
  • Tósala nini mpo bansango ya etumba ya nucléaire etungisa biso mingi te?
  • Biblia elobeli Armagedone lokola etumba ya nucléaire?
  • Na kotalela Biblia, bitumba ekosila ndenge nini?
  • Likámá ya nikleere​—Elongolami mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Likámá ya nikleere​—Mbala oyo esili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bato ya politiki balobi ete Armagedone ekómi pene​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 111
Mɔtɔ ya babombi nikleere ebimi lokola liyebo.

Biblia elobi nini mpo na etumba ya nucléaire?

Komona ndenge bikólo ya nguya ezali se kobakisa bibundeli na yango ya nucléaire yango ezali kobangisa bato mingi na mokili. Ya solo, bato bazali kobanga ndenge bibundeli ya nucléaire ezali kobakisama ndenge moko mpe bazali kobanga ete bitumba ya nucléaire ebanda. Bato bazali kobanga ete soki kaka ekólo moko esaleli mwa mondoki moke ya nucléaire, yango ekoki kotinda bikólo mosusu ya nguya esalela mandoki na yango ya nucléaire mpo ebebisa mokili mobimba. Ndenge zulunalo Bulletin of the Atomic Scientists elobi yango, tozali kobika na “eleko oyo etumba ya nucléaire ekoki kosalema ntango nyonso.”

Etumba ya nucléaire ekoki mpenza kosalema? Soki esalemi, mabele ekobebisama nyonso? Tokoki kosala nini mpo bansango ya bitumba ya nucléaire etungisa biso mingi te? Biblia elobi nini?

Na lisolo oyo tokolobela

  • Biblia esakolá mpe etumba ya nucléaire?

  • Nzambe akotika nzela etumba ya nucléaire esalema?

  • Mabele ekobebisama nyonso?

  • Tosala nini mpo bansango ya etumba ya nucléaire etungisa biso mingi te?

  • Biblia elobeli Armagedone lokola etumba ya nucléaire?

  • Na kotalela Biblia, bitumba ekosila ndenge nini?

  • Mokanda ya Emoniseli elobeli nde etumba ya nucléaire?

Biblia esakolá mpe etumba ya nucléaire?

Biblia elobeli mpenza etumba ya nucléaire te. Nzokande, bansango ya etumba ya nucléaire ezali nde komonisa bizaleli ya bato mpe makambo oyo Biblia esakolaki ete ekosalema.

Tótalela bavɛrsɛ oyo elandi mpe tomona ndenge yango eyokani na makambo oyo ezali kosalema na mokili mobimba

Bavɛrsɛ: Bayekoli ya Yesu batunaki ye boye: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe eleko ya nsuka ya mokili?” Yesu ayanolaki ete: “Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.”​—Matai 24:3, 7.

Makambo oyo ezali kosalema na mokili: Bitumba ekómi komonana mingi koleka na kati ya bikólo, ezala mpe bikólo oyo ezali na mandoki ya nucléaire.

“Mobulu ekɔti mingi na mokili na mikolo oyo: bitumba ezali kosalema mingi koleka.”​—The Armed Conflict Location & Event Data Project.

Vɛrsɛ: “Na ntango ya nsuka, mokonzi ya sudi akobunda na ye, bakotindikana, mpe mokonzi ya nɔrdi akokitela ye na makalo.”​—Danyele 11:40.

Makambo oyo ezali kosalema na mokili: Bakonzi ná bikólo oyo epesaka bango mabɔkɔ bazali kokɔtela banguna na bango, mpo na kokóma na nguya makasi koleka ndenge kaka Biblia esakolá yango. Lelo oyo, bikólo ya nguya oyo ezali na mandoki ya nucléaire ezali koboya kobunda moko na mosusu, nzokande ezali kokoba kobakisa mandoki na yango ya nucléaire.

“Na bambula oyo eleki, tomonaki ndenge oyo bikólo mingi ezali se komikɔtisa na makambo ya bitumba, mpe ndenge bikólo ya nguya ezali kokɔtela ngámbo moko mpe ngámbo mosusu.”​—The Uppsala Conflict Data Program.

Bavɛrsɛ: “mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato . . . oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya nko.”​—2 Timote 3:1-3.

Makambo oyo ezali kosalema na mokili: Ndenge moko na bato mingi ya mokili lelo, bakonzi ya mokili bayokanaka te na makambo mingi. Na esika ya kosilisa matata na kimya, bango balukaka nde kosalela nguya oyo bazali na yango mpo na kobangisa basusu. Makambo yango ekoki kosala ete etumba ya nucléaire ebanda.

“Kozanga boyokani ya malamu kati na bango esali ete bitumba ezala mingi, mpe makambo mingi etambola malamu te.” World Economic Forum.

Nzambe akotika nzela etumba ya nucléaire esalema?

Biblia elobeli yango te. Kasi elobi ete “makambo ya nsɔmɔ” to makambo ya kobangisa ekozala na mikolo na biso. (Luka 21:11) Yango emonanaki na ndakisa ntango babombe atomique ebwakamaki na Etumba ya mibale ya mokili mobimba. Biblia emonisi bantina oyo Nzambe atiki bitumba ezala. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

Mabele ekobebisama nyonso?

Te. Ata soki bato basaleli lisusu mandoki ya nucléaire, Nzambe akotika nzela te yango ebebisa mabele mobimba. Biblia elobi ete mabele ekotikala libela na libela mpe bato bakofanda wana seko na seko.

“Mabele ezali kotikala mpo na libela.”​—Mosakoli 1:4.

“Nzambe, Moto oyo asalaki mabele, . . . asalaki yango kaka mpamba te, kasi asalaki yango nde mpo bato báfanda.”​—Yisaya 45:18.

Bato mosusu bakanisaka ete na mikolo ezali koya ekozala mpasi kofanda na mabele, mpo mabele ekobebisama na etumba ya nucléaire. Atako bongo, Biblia emonisi ete ata soki mabele ebebi, ekobongisama lisusu.

“Esobe mpe mokili oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

Bato bazali kosala elongo na paradiso.

Nzambe alingi ete tózala na esengo na mabele moko kitoko

Mozalisi na biso asalá mabele na likoki ya komibikisa yango moko. Nsukansuka, Nzambe akosalela nguya na ye mpo na kobongisa lisusu mabele, mpe yango ekozala lisusu esika moko kitoko ya kofanda mpo na bana bato libela na libela.​—Nzembo 37:11, 29; Emoniseli 21:5.

Tósala nini mpo bansango ya etumba ya nucléaire etungisa biso mingi te?

Bato mosusu banyokwamaka makasi mpo na bansango ya etumba ya nucléaire mpe makambo ya mpasi oyo yango ebimisaka.” Bilaka mpe batoli ya Biblia ekoki kosalisa bato yango mpo bákitisa kobanga na bango. Ndenge nini?

Biblia elaki avenire ya malamu mpo na bato oyo bakofanda na mabele. Koyeba elikya yango ekoki kozala lokola “longo mpo na bomoi na biso” mpe ekoki kokitisa mitungisi na biso. (Baebre 6:19) Tokoki mpe koboya mitungisi mosusu soki tozali koboya kokanisaka ntango nyonso makambo oyo ekoki kosalema lobi. Ndenge Yesu alobaki yango, “Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—Matai 6:34.

Kutu, ezali na ntina ete biso nyonso tólandelaka malamu makanisi mpe mayoki na biso. Moko ya lolenge ya kosala yango ezali ya koboya kolandela bansango oyo ezali kolɛmbisa biso nzoto, na ndakisa koboya makambo lokola kowelana, mpe makanisi ndenge na ndenge oyo etali bitumba ya nucléaire. Yango elingi koloba te ete tokipaka makambo ya mokili te. Kasi, tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na komitungisa te na makambo oyo ezali koleka na mokili mpe oyo tokokoka kobongisa te.

“Motungisi na motema ya moto enyokolaka ye, kasi liloba ya malamu esepelisaka ye.”​—Masese 12:25.

Tyá makanisi na makambo ya malamu mpo otika kolandela bansango ya mabe.

“Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso wana bozali kotyela ye motema.”​—Baroma 15:13.

Bililingi: Mobali moko azali kotala liboso na kondima nyonso. 1. Nsima na ye ezali na bibundeli lokola aviɔ ya bitumba, bamisile ya nikleere, mpe mɔtɔ ya bombi oyo ebimi lokola liyebo. 2. Liboso na ye ezali na mokili moko ya pɛto mpe ya kitoko, bangomba, mabwaku, ebale ezali kotiyola, mpe bandɛkɛ.

Biblia epesi elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya

Koyekola makambo etali bilaka ya Nzambe, yango ekopesa yo elikya, esengo, mpe kimya ya motema.

Biblia elobeli Armagedone lokola etumba ya nucléaire?

Bato mosusu bakanisaka ete Armagedone ezali etumba ya nucléaire oyo ekosalema na mokili mobimba. Na ntembe te, bakanisaka makambo ya nsɔmɔ oyo likambo ya bongo ekobimisa.

Nzokande Biblia esaleli liloba “Armagedone” mpo na kolobela etumba oyo ekosalema kati na “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi’’ to baguvernema ya bato, mpe Nzambe.a (Emoniseli 16:14, 16) Armagedone ekozala te etumba oyo ekobebisa nyonso na ndenge ya ligboma, oyo ekotika mokili mpamba. Nzokande, na Armagedone, Nzambe akoboma kaka bato mabe, mpe yango ekosala ete kimya mpe libateli ya solosolo ezala na mabele mobimba.​—Nzembo 37:9, 10; Yisaya 32:17, 18; Matai 6:10.

Na kotalela Biblia, bitumba ekosila ndenge nini?

“Azali kosilisa bitumba na mabele mobimba. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; Azali kotumba makalo ya etumba na mɔtɔ.”​—Nzembo 46:9.

Na nzela ya Armagedone, Yehovab Nzambe akotya nsuka na mobulu mpe bitumba mpe akobebisa bibundeli nyonso ya bato. Akosala yango na nzela ya Bokonzi na ye oyo ekozwa esika ya boyangela ya bato na mabele mobimba mpe makambo na yango.​—Danyele 2:44.

Na nzela ya Bokonzi na ye, Nzambe akoteya bato ndenge ya kofanda na kimya mpe na boyokani. Lokola Bokonzi kaka moko nde ekoyangela mabele mobimba, matata ekozala lisusu te na kati ya bikólo mpe bato bakoyekola lisusu etumba te! (Mika 4:1-3) Yango ekobimisa matomba nini? “Bakofanda, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akobangisa bango.”​—Mika 4:4.

a Talá lisolo “Etumba ya Armagedone ezali nini?”

b Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?”

Mokanda ya Emoniseli elobeli nde etumba ya nucléaire?

Bato mosusu bakanisaka ete mokanda ya Emoniseli elobeli libebi oyo euti na etumba ya nucléaire. (Emoniseli 6:14; 8:7-12; 16:1-21) Na ndakisa, elobeli ‘mɔtɔ euti na likoló ekiti tii na mabele.’ (Emoniseli 13:11-13) Batatoli ya Yehova bakangaka ntina ete maloba oyo ezali te etumba ya nucléaire, kasi ezali babombe oyo ekweyaki na etumba ya mibale ya mokili mobimba.

Mokanda ya Emoniseli elobeli te etumba ya nucléaire, mpo mokano na yango ezali te ya kolobela makambo ya nsɔmɔ oyo etumba ya nucléaire ekobimisa. Ntango ozali kotánga mokanda ya Emoniseli, yebá ete:

  • Mokanda yango elobeli bilembo mingi, oyo tosengeli kokanga ntina na yango na ndenge ya elilingi.​—Emoniseli 1:1.

  • Mokanda yango ezali na mokano te ya kobangisa batángi na yango. Kasi, maloba na yango ememaka esengo na baoyo bakakanga ntina mpe basalelaka yango.​—Emoniseli 1:3

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto